Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 28

Kobá kozwa matomba na kobanga Nzambe

Kobá kozwa matomba na kobanga Nzambe

“Moto oyo azali kotambola na kozanga mbeba abangaka Yehova.” ​—MAS. 14:2.

LOYEMBO 122 Tópikama makasi, tóninganaka te!

NA MOKUSE a

1-2. Lokola Lota, mokakatano nini tozali na yango lelo oyo?

 NTANGO tomonaka bizaleli mabe ya bato lelo oyo, tomiyokaka lokola Lota. “Atungisamaki makasi na etamboli ya nsɔni ya bato oyo babukaka mibeko,” mpo ayebaki ete Tata na biso ya likoló ayinaka etamboli ya mabe. (2 Pe. 2:7, 8) Kobanga Nzambe mpe kolinga ye etindaki Lota aboya bizaleli mabe ya bato oyo bazalaki zingazinga na ye. Biso mpe tozingami na bato oyo batosaka mwa moke to mpe batosaka te mibeko ya Yehova na oyo etali malamu ná mabe. Atako bongo, tokoki kotikala pɛto na bizaleli soki tokobi kolinga Nzambe mpe koyekola kobanga ye.​—Mas. 14:2.

2 Yehova asalisaka biso tósala bongo na nzela ya elendiseli oyo ezali na mokanda ya Masese. Bakristo nyonso, basi mpe mibali, bilenge mpe mibange, bakoki kozwa mpenza matomba soki bazali kotalela toli ya bwanya oyo ezali na mokanda yango.

KOBANGA NZAMBE EBATELAKA BISO

Na bisika na biso ya mosala, tosengeli komibatela na baninga ya mabe, mpe koboya kondima kosala makambo oyo ekosepelisa Yehova te (Talá paragrafe 3)

3. Na kotalela Masese 17:3, wapi ntina ya libosoliboso oyo tosengeli kobatela motema na biso? (Talá mpe elilingi.)

3 Ntina ya libosoliboso oyo tosengeli kobatela motema na biso ya elilingi ezali ete Yehova atalaka mitema na biso. Yango elingi koloba ete amonaka makambo oyo bato bakoki komona te mpe ayebi lolenge ya bato oyo tozali mpenza. (Tángá Masese 17:3.) Akolinga biso soki totondisi makanisi na biso na toli na ye ya bwanya oyo ekosalisa biso tózala na bomoi ya seko. (Yoa. 4:14) Soki tosali bongo, tokobebisama soki moke te na bizaleli mabe, na lokuta ya Satana, mpe na mokili na ye. (1 Yoa. 5:18, 19) Soki tozali kopusana penepene na Yehova, tokokóma lisusu kolinga ye mingi mpe komemya ye makasi. Lokola tolingaka te kosilikisa Tata na biso, toboyaka ata kozala na likanisi ya kosala lisumu. Soki tomekami mpo na kosala mabe, tokoki komituna boye: ‘Mpo na nini nasilikisa na nko nyonso Moto oyo amonisaka ete alingaka ngai mingi?’​—1 Yoa. 4:9, 10.

4. Ndenge nini kobanga Yehova ebatelaki ndeko mwasi moko mpo asala likambo ya mabe te?

4 Marta, ndeko mwasi moko na Croatie oyo amekamaki mpo na kosala pite, akomaki boye: “Ezalaki mpasi mpo nakanisa malamu mpe nabengana mposa ya kosala mabe. Kasi kobanga Yehova ebatelaki ngai.” b Ndenge nini kobanga Nzambe ebatelaki ye? Marta alobi ete akanisaki na mozindo makama oyo ekateli ya mabe ekobimisa. Biso mpe tokoki kosala bongo. Likama monene ezali ete tokoki koyokisa Yehova mpasi na motema mpe kozala te na kati ya basambeli na ye mpo na libela.​—Eba. 6:5, 6.

5. Ndakisa ya Leo ekoki koteya biso nini?

5 Ntango tobangaka Yehova, tosalaka te boninga elongo na baoyo basalaka makambo ya mabe. Leo, oyo afandaka na Congo, azwaki liteya na likambo yango. Mbula minei nsima ya batisimo na ye, asalaki boninga elongo na bato oyo bazalaki kosala makambo ya mabe. Akanisaki ete lokola azalaki kosala makambo ya mabe te, azalaki kosalela Yehova lisumu te. Kasi, eumelaki te, baninga na ye ya mabe batindaki ye akóma komɛla masanga mingi mpe kosala pite. Na nsima, akómaki kokanisa makambo oyo baboti na ye bateyaki ye mpe esengo oyo abungisaki. Nini emonanaki na nsima? Azongelaki kosala makambo ya malamu. Bankulutu basalisaki ye , azongelaki Yehova. Lelo oyo, azali kosala na esengo lokola nkulutu mpe mobongisi-nzela monene.

6. Ndakisa nini ya basi mibale ya elilingi tokolobela sikoyo?

6 Tótalela Masese mokapo 9, epai tozali kotánga makambo etali bwanya mpe bozoba, oyo emonisami lokola basi mibale. (Talá mpe Baroma 5:14; Bagalatia 4:24.) Wana tozali kotalela mokapo yango, tóbosana te ete mokili ya Satana emipesi mingi na likambo etali kosangisa nzoto mpe pornografi. (Ef. 4:19) Na yango, ezali na ntina mingi ete tókoba kobanga Nzambe mpe kotika kosala mabe. (Mas. 16:6) Yango wana, biso nyonso, ezala mwasi to mobali, tokoki kozwa matomba na makambo oyo Masese mokapo ya libwa elobeli. Mokapo yango emonisi ete basi yango nyonso mibale bazali kobenga bato oyo “bazangi mayele.” Ezali lokola mokomoko na bango azali koloba boye: ‘Bóya na ndako na ngai mpe bólya limpa.’ (Mas. 9:1, 5, 6, 13, 16, 17) Kasi makambo oyo ekómelaka baoyo bandimaka libyangi na bango nyonso mibale ekeseni mpenza.

BOYÁ LIBYANGI YA MWASI YA ZOBA

Libyangi oyo euti epai ya “mwasi ya zoba” ekoki komema na makama minene (Talá paragrafe 7)

7. Na kotalela Masese 9:13-18, nini ezali kokómela baoyo bandimaka libyangi ya mwasi ya zoba? (Talá mpe elilingi.)

7 Tólobela libyangi oyo euti epai ya “mwasi ya zoba.” (Tángá Masese 9:13-18.) Na mpiko nyonso azali kobelela baoyo bazangi mayele boye: “Bóya awa” mpe bósala fɛti elongo na ngai. Nini ezali kokómela bango? “Baoyo bazangi makasi kati na liwa bazali kuna.” Okoki komikundwela maloba ya elilingi ya ndenge wana oyo ezali na mikapo ya ebandeli ya mokanda ya Masese. Ekebisi biso na “mobulu” mpe na “mwasi ya pite.” Eyebisi biso boye: “Ndako na ye ezali kozinda tii na liwa.” (Mas. 2:11-19) Masese 5:3-10 ekebisi biso na “mwasi [mosusu] ya mobulu” oyo “makolo na ye ezali kokita na liwa.”

8. Ekateli nini tosengeli kozwa?

8 Baoyo bazali koyoka “mwasi ya zoba” basengeli kopona soki bakondima libyangi na ye to te. Biso mpe tosengeli kopona soki tokondima to tokoboya libyangi yango. Tokosala nini soki moto moko aluki kotinda biso tósala pite, to soki tomoni na mbalakaka bililingi ya pornografi?

9-10. Wapi mwa bantina oyo mpo na yango tosengeli koboya kosala pite?

9 Ezali na bantina oyo tosengeli koboya kosala pite. Bamonisi ete “mwasi [yango] ya zoba” azali koloba boye: “Mai ya koyiba ezalaka elɛngi.” “Mai ya koyiba” ezali nini? Biblia ekokanisi kosangisa nzoto ya mwasi ná mobali na kati ya libala na mai ya mpiɔ. (Mas. 5:15-18) Mwasi ná mobali oyo babalani na kolanda mibeko ya Leta nde bazali na lotomo ya kosangisa nzoto. Yango ekeseni mpenza na “mai ya koyiba.” Mai yango elimboli pite, lolenge ya kosangisa nzoto oyo epekisami. Mbala mingi bato basalaka pite na kobombana mpo basusu báyeba te, kaka ndenge moyibi ayibaka na kobombana. Mbala mingi bato bamonaka ete “mai ya koyiba” ezalaka elɛngi mpo bakanisaka ete moto moko te akoyeba likambo oyo basali. Oyo nde lokuta monene! Yehova amonaka nyonso. Soki Yehova aboyi biso, yango ezali likambo oyo eleki mabe mpenza, mpe ezali mpenza likambo ya “elɛngi” te. (1 Ko. 6:9, 10) Kasi yango esuki wana te.

10 Kosala pite ekoki komema nsɔni, kosilisa moto valɛrɛ, kozwa zemi oyo ekanami te, mpe kopanza mabota. Ya solo, ezali likambo ya bwanya koboya kokende na “ndako” ya mwasi ya zoba mpe kolya limpa na ye. Longola kobebisa boyokani ya moto elongo na Yehova, bato mingi oyo basalaka pite bazwaka bamaladi oyo ememaka bango na liwa ya mobesu. (Mas. 7:23, 26) Vɛrsɛ 18 ya mokapo 9 esukisi na maloba oyo: “Baoyo mwasi yango abengaki bazali na esika mozindo ya Nkunda.” Na yango, mpo na nini bato mingi bandimaka libyangi na ye ya lokuta oyo ememaka na liwa?​—Mas. 9:13-18.

11. Mpo na nini kotala pornografi ezali mpenza likama?

11 Motambo monene oyo tosengeli kokima ezali pornografi. Bato mosusu bakanisaka ete kotala pornografi ezali mabe te. Nzokande, pornografi esalaka bato mabe, ebebisaka lokumu ya moto, mpe ekómisaka bato baombo mpo ezalaka mpasi kotika yango. Bililingi ya mbindo ezalaka na nguya; ezalaka mpasi elongwa na bɔɔngɔ ya moto. Lisusu, pornografi elongolaka te bamposa ya mabe; kutu ekómisaka lisusu bamposa yango makasi. (Kol. 3:5; Yak. 1:14, 15) Na ntembe te, bato mingi oyo batalaka pornografi bakweaka na pite.

12. Ndenge nini tomonisaka ete toboyaka bililingi oyo elamwisaka mposa ya kosangisa nzoto?

12 Lokola tozali bakristo, tosengeli kosala nini soki tomoni na mbalakaka elilingi ya pornografi na aparɛyi na biso? Tosengeli mbala moko kolongola elilingi yango. Ekozala mpasi te mpo na biso kosala bongo soki tozali koyeba ete eloko eleki ntina mpo na biso ezali nde boyokani na biso ná Yehova. Atako bililingi mosusu ezalaka pornografi te, ekoki kolamwisa biso mposa ya kosangisa nzoto. Mpo na nini tosengeli koboya yango? Mpo tolingaka ata moke te kokanisa kosala pite na motema na biso. (Mat. 5:28, 29) Nkulutu moko na Thaïlande na nkombo David alobi boye: “Namitunaka boye: ‘Atako bililingi yango ekoki kozala pornografi te, Yehova akosepela soki nazali kokoba kotala yango?’ Kokanisa bongo esalisaka ngai nasala makambo na bwanya.”

13. Nini esalisaka biso tósala makambo na bwanya?

13 Kobanga kosala likambo nyonso oyo ekosepelisa Yehova te, ekosalisa biso tósala makambo na bwanya. Kobanga Nzambe ezali “ebandeli,” to moboko “ya bwanya.” (Mas. 9:10) Yango elobelami polele na ebandeli ya mokanda ya Masese mokapo 9, epai bakokanisi “bwanya ya solosolo” na mwasi mosusu.

NDIMÁ LIBYANGI YA MWASI YA BWANYA

14. Libyangi nini mosusu elobelami na Masese 9:1-6?

14 Tángá Masese 9:1-6. Awa totángi makambo etali libyangi oyo euti na Liziba mpe Moboko ya bwanya ya solosolo, elingi koloba epai ya Mozalisi na biso oyo atondi na bwanya. (Mas. 2:6; Rom. 16:27) Na bavɛrsɛ yango, balobeli ndako moko ya monene ná makonzí nsambo. Yango emonisi ete Yehova akabaka mpe ayambaka bato nyonso oyo balingi kosalela bwanya oyo euti epai na ye na bomoi na bango.

15. Nzambe asɛngi biso tósala nini?

15 Yehova azali Mokabi mpe Mosungi monene. Na ndakisa ya mwasi oyo ezali komonisa “bwanya ya solosolo” oyo Masese mokapo 9 elobeli, toyekoli ete Yehova akabaka mpe apesaka biso biloko mingi ya malamu. Lisolo yango elobi ete mwasi yango ya elilingi alambi mosuni, asangisi vinyo, mpe abongisi mesa na ndako na ye. (Mas. 9:2) Lisusu, na kotalela vɛrsɛ 4 mpe 5: “Ye [bwanya ya solosolo] alobi na moto nyonso oyo azangi mayele boye: ‘Yaká, lyá limpa na ngai.’” Mpo na nini tosengeli koya na ndako ya bwanya ya solosolo mpe kolya limpa oyo alaki kopesa biso? Mpo Yehova alingi ete bana na ye bázala na bwanya mpe bábatelama. Alingi te tósala mabunga oyo ekopesa biso mpasi. Yango wana, “abatelaka malamu bwanya mpo na bato malamu.” (Mas. 2:7) Soki tozali kobanga Yehova na ndenge ya malamu, tokolinga kosepelisa ye. Toyokaka toli na ye ya bwanya, mpe tosepelaka kotosa yango.​—Yak. 1:25.

16. Ndenge nini kobanga Nzambe esalisaki Alain azwa ekateli ya bwanya, mpe matomba nini emonanaki?

16 Tótala ndenge kobanga Nzambe esalisaki Alain azwa ekateli ya bwanya. Alain azali nkulutu na lisangá mpe molakisi na eteyelo moko. Alobi boye: “Balakisi mingi oyo bazali baninga na ngai ya mosala bazalaki kotala bafilme ya pornografi mpo báyeba makambo mingi oyo etali kosangisa nzoto.” Kasi Alain akosamaki te na lokuta wana. Alobi boye: “Lokola nazalaki kobanga Nzambe, naboyaki mpenza kotala bafilme yango. Longola yango, nalimbwelaki baninga na ngai balakisi ntina oyo naboyaki kotala bafilme yango.” Azalaki kotosa toli oyo euti na “bwanya ya solosolo” ya ‘kotambola na nzela ya mayele.’ (Mas. 9:6) Balakisi mosusu bakamwaki ndenge Alain aboyaki kotala yango, mpe sikoyo, balakisi yango mosusu bazali koyekola Biblia mpe koyangana na makita ya lisangá.

Soki tondimi libyangi oyo euti na “bwanya ya solosolo,” tokoki kozala na esengo sikoyo mpe kozala na bomoi mpo na libela (Talá paragrafe 17-18)

17-18. (a) Mapamboli nini baoyo bandimaka libyangi oyo euti na “bwanya ya solosolo” bazali na yango? (b) Elikya nini bakoki kozala na yango? (Talá mpe elilingi.)

17 Yehova asaleli ndakisa ya basi mibale wana ya elilingi mpo na komonisa biso ndenge ya kozala na bomoi ya esengo na mikolo ezali koya. Baoyo bandimaka libyangi ya “mwasi ya zoba” bazwaka esengo na kosala pite. Mpo na koloba solo, bazalaka na bomoi kaka mpo na mwa ntango, mpe bayebaka te nini ekokómela bango na mikolo ezali koya. Nsuka na bango ezali na “esika mozindo ya Nkunda.”​—Mas. 9:13, 17, 18.

18 Na kokesana na baoyo bandimaka libyangi ya mwasi ya zoba, baoyo bandimaka libyangi oyo euti na “bwanya ya solosolo” bakozwa mpenza mbano na mikolo ezali koya! Mpe bazali na esengo mpo bazali na biloko nyonso oyo basengeli na yango mpo na kokómisa boyokani na bango ná Yehova makasi. (Yis. 65:13) Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova alobi: “Bóyoka ngai na likebi, mpe bólya eloko oyo ezali malamu, mpe bokosepela mingi mpenza na bilei ya kitoko.” (Yis. 55:1, 2) Tozali koyekola kolinga makambo oyo Yehova alingaka mpe koyina makambo oyo ayinaka. (Nz. 97:10) Lisusu, tosepelaka kobenga basusu mpo bázwa matomba na “bwanya ya solosolo.” Tozali lokola basali oyo “[bazali kobelela] uta na bisika oyo etombwaná ya engumba ete: ‘Moto nyonso oyo azangi mayele, aya awa.’” Matomba oyo biso mpe baoyo nyonso bandimaka libyangi yango tozwaka, ezali kaka te mpo na sikoyo. Ekoumela seko, mpe ekosala ete ‘tózala na bomoi’ libela na libela wana tozali ‘kotambola na nzela ya mayele.’​—Mas. 9:3, 4, 6.

19. Na kotalela Mosakoli 12:13, 14, tosengeli kozwa ekateli ya kosala nini? (Talá mpe etanda “ Kobanga Nzambe ebatelaka biso.”)

19 Tángá Mosakoli 12:13, 14. Tiká ete kobanga Nzambe ekoba kobatela mitema na biso, esalisa biso tózala na bizaleli malamu, mpe tópusana penepene na Yehova na mikolo mabe oyo ya nsuka. Kobanga Nzambe na ndenge ya malamu ekotinda biso tókoba kobenga bato mingi soki esengeli mpo bázwa “bwanya ya solosolo” mpe bázwela yango matomba.

LOYEMBO 127 Lolenge ya moto oyo nasengeli kozala

a Bakristo basengeli koyekola kobanga Nzambe na ndenge ya malamu. Kobanga ya ndenge wana ekoki kobatela motema na biso mpe kobatela biso na pite mpe na pornografi. Na lisolo oyo, tokolobela Masese mokapo 9, oyo elobeli mwasi moko oyo ezali komonisa bozoba mpe mwasi mosusu oyo ezali komonisa bwanya. Toli oyo ezali na Masese mokapo 9 ekoki kosalisa biso sikoyo mpe na mikolo ezali koya.

b Topesi bango bankombo mosusu.