Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

Makambo ya esengo mpe mateya oyo nazwi na mosala ya Yehova

Makambo ya esengo mpe mateya oyo nazwi na mosala ya Yehova

NTANGO nazalaki mwana, soki kaka namoni aviɔ na likoló, ezalaki kopesa ngai mposa ya kokende na mboka mopaya. Nazalaki komona yango lokola likambo moko oyo ekoki kosalema te.

Baboti na ngai bakimaki mboka Estonie na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba mpe bakendaki kofanda na Allemagne, epai nabotamaki. Nsima ya mbotama na ngai, bamibongisaki mpo na kokenda na Canada. Ndako na biso ezalaki na kati ya apartema moko ya moke epai bansoso mpe ezalaki kofanda, pene na engumba Ottawa, na Canada. Tozalaki mpenza babola, kasi ata bongo, tozalaki kozanga maki te mpo na bilei ya ntɔngɔ.

Mokolo moko, Batatoli ya Yehova batángelaki mama na ngai Emoniseli 21:3, 4. Makambo oyo azalaki koyekola esimbaki mpenza motema na ye mpe abandaki kolela. Mboto ya solo ebandaki kokola, mpe baboti na ngai bakolaki nokinoki na elimo mpe bazwaki batisimo.

Atako baboti na ngai bazalaki koloba Anglais malamu mpenza te, bazalaki na molende na mosala ya Yehova. Mikolo mingi ya pɔsɔ, ata nsima ya kosala mosala makasi na butu mobimba na izini moko ya bibende na Sudbury, na etúká ya Ontario, tata na ngai azalaki komema ngai ná leki na ngai ya mwasi, Sylvia, na mosala ya kosakola. Mpe pɔsɔ nyonso tozalaki koyekola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na libota. Mama ná tata bateyaki ngai nalinga Nzambe. Yango esalisaki ngai napesa bomoi na ngai epai ya Yehova na 1956 ntango nazalaki na mbula zomi. Ntango nyonso nakanisaka ndenge bazalaki kolinga Yehova, yango elendisaka ngai nakoba na mosala ya Yehova.

Nsima ya kozwa diplome ya eteyelo ya ntei, nazalaki komipesa mingi te na mosala ya Yehova. Nakanisaki ete soki nakómi mobongisi-nzela, nakokokisa te ndɔtɔ na ngai ya komata mpɛpɔ mpe komona mikili ndenge na ndenge. Nazwaki mosala na shɛni moko ya radio, nazalaki kosala lokola animatɛrɛ ya miziki, mpe nazalaki kosepela na mosala yango. Kasi nazalaki kosala na mpokwa nyonso; yango wana, nazalaki mbala na mbala kozangisa makita mpe nasalaki boninga ná bato oyo bazalaki kolinga Nzambe te. Nsukansuka, lisosoli na ngai oyo eteyamaki na Biblia esalisaki ngai nabongola bomoto na ngai.

Nakendaki na engumba Oshawa, na etúká ya Ontario. Kuna nakutanaki na Ray Norman, ndeko na ye ya mwasi Lesli, mpe babongisi-nzela mosusu. Bango nyonso bayambaki ngai malamu mpenza. Komona ndenge bazalaki na esengo esalisaki ngai natalela lisusu mikano oyo namityelaki na bomoi. Balendisaki ngai nabanda mosala ya mobongisi-nzela, mpe nabandaki yango na sanza ya 09/1966. Nazalaki na esengo mpe nazalaki kosepela na bomoi. Nzokande, mwa makambo oyo esengelaki kobongola bomoi na ngai ezalaki kozela ngai.

NTANGO YEHOVA ASƐNGI YO OSALA LIKAMBO MOKO, MEKÁ KOSALA YANGO

Atako nazalaki naino kotánga, natondisaki formilɛrɛ ya kokɔta Betele na engumba Toronto, na Canada. Na nsima ntango nazalaki mobongisi-nzela, basɛngaki ngai naya kosala na Betele mpo na mbula minei. Kasi nazalaki mpenza kolinga Lesli, mpe nazalaki kobanga ete soki nandimi libyangi yango, nakomona ye lisusu te. Mwa mikolo na nsima, natingamaki na mabondeli, mpe nsukansuka nandimaki kokende na Betele mpe nazalaki na mawa ntango napesaki Lesli mbote ya bokabwani.

Nazalaki kosala na esika basukolaka bilamba na Betele mpe na nsima lokola sɛkrɛtɛrɛ. Kendekende, Lesli akómaki mobongisi-nzela monene na Gatineau, na engumba Québec. Mbala mingi nazalaki koluka koyeba soki Lesli azalaki mpenza kosala nini mpe soki nazwaki ekateli ya malamu. Na nsima likambo moko ya kokamwa ekómelaki ngai na bomoi. Babengaki Ray, ndeko ya Lesli, na Betele. Tokómaki kofanda na ye shambrɛ moko! Yango esalisaki ngai nakolisa lisusu boninga ná Lesli. Tobalanaki na mokolo ya nsuka ya mbula ya minei oyo bapesaki ngai na Betele, na mokolo ya 27/02/1971.

Ntango abandi mosala ya zongazonga na mobu 1975

Batindaki ngai ná Lesli na lisangá ya monɔkɔ ya Français na engumba Québec. Nsima ya mwa bambula, nakamwaki ntango basɛngaki ngai nasala lokola mokɛngɛli ya zongazonga wana nazalaki na mbula 28. Nakanisaki ete nazalaki naino elenge mpe nabongaki te na mokumba wana, kasi maloba oyo ezali na Yirimia 1:7, 8 elendisaki ngai. Longola yango, Lesli asalaki aksida ya motuka mbala mibale mpe azalaki kolala malamu te. Yango wana, tokanisaki ete ekozala mpasi tósala mosala ya zongazonga. Atako bongo, Lesli alobaki boye: “Soki Yehova asɛngi biso tósala likambo moko, tosengeli kosala makasi tósala yango.” Tondimaki mokumba yango mpe tosalaki mosala ya mokɛngɛli motamboli na boumeli ya mbula 17.

Nazalaki na makambo mingi ya kosala ntango nazalaki mokɛngɛli ya zongazonga, mpe nazalaki na ntango mpenza te mpo na kozala elongo na Lesli. Nazwaki liteya mosusu. Na mokolo ya yambo na ntɔngɔ, moto moko abɛtaki na porte. Ntango nafungolaki porte namonaki moto te, longola kaka kitunga moko oyo bazipaki na elamba ya mesa, bambuma, fromaje, mampa, molangi moko ya vinyo, bakɔpɔ, mpe mokanda moko oyo ezalaki na nkombo te oyo elobaki: “Zwá mwasi na yo mpe bókende kozwa mopɛpɛ bino mibale.” Ezalaki mokolo moko kitoko mpenza! Kasi nayebisaki Lesli ete nazalaki na badiskur ya kobongisa mpe nakokoka kokende te. Amityaki na esika na ngai, atako bongo elongi na ye ezalaki mawamawa. Wana nafandaki na biro na ngai, lisosoli na ngai ebandaki kotungisama. Nakanisaki Baefese 5:25, 28. Namonaki ete na nzela ya bavɛrsɛ wana ya Biblia, Yehova akundwelaki ngai ete natyaka likebi na mayoki ya mwasi na ngai. Nsima ya kobondela, nayebisaki ye: “Tókende,” mpe asepelaki mingi. Tokendaki esika moko kitoko pene ya ebale, totandaki elamba ya mesa, mpe tolekisaki mokolo moko malamu koleka mikolo nyonso oyo tolekisá elongo. Atako bongo, nazwaki mpe ntango ya kobongisa badiskur na ngai.

Mikumba oyo tozalaki na yango na mosala ya zongazonga ezalaki kopesa biso esengo mpe tosalaki mingi banda na Colombie-Britannique tii na Terre-Neuve, na Canada. Mposa na ngai ya kosala mibembo ntango nazalaki mwana ekokisamaki mpenza. Natondisaki formilɛrɛ ya kokɔta na eteyelo ya Gileade kasi nazalaki kolinga te kokende kosala na mboka mopaya lokola misionɛrɛ. Ezalaki komonana lokola bamisionɛrɛ bazalaki bato ya sipesiale, mpe namonaki ete nabongaki te mpo na yango. Longola yango, nazalaki kobanga ete bakoki kotinda biso na ekólo moko ya Afrika epai nzala mpe bitumba ezalaka. Nazalaki kosepela na Canada.

BATINDAKI BISO NA ESTONIE MPE NA MIKILI YA BALTES ​—LIKAMBO OYO TOZALAKI KOMIZELA NA YANGO TE

Azali koleka na mikili ya Baltes

Na mobu 1992, Batatoli ya Yehova bazongelaki kosakola na ndenge ya polele na mikili mosusu oyo ezalaki liboso na Union soviétique. Yango wana bandeko basɛngaki biso soki tokosepela kokende kosala na Estonie mpe kozala bamisionɛrɛ kuna. Tokamwaki mpenza, kasi tobondelaki mpo na yango. Na mbala oyo mpe, nakanisaki boye: ‘Soki Yehova asɛngi biso tósala likambo moko, tosengeli kosala makasi tósala yango.’ Tondimaki kokende, mpe nasepelaki koyeba ete batindi biso na Afrika te.

Na mbala moko tobandaki koyekola monɔkɔ ya Estonien. Nsima ya kolekisa sanza mibale na ekólo yango, basɛngaki biso tósala mosala ya zongazonga. Tosengelaki kokende kotala masangá soki 46 mpe bituluku na mikili misato ya Baltes, ezala mpe na Kaliningrad, na Russie. Yango esɛngaki biso tóyekola koloba mwa moke monɔkɔ ya Lettonien, ya Lituanien, mpe ya Russe. Ezalaki mpasi. Atako bongo, bandeko bazalaki na esengo komona ndenge tozalaki koyekola monɔkɔ na bango mpe basalisaki biso. Na mobu 1999, biro ya filiale efungwamaki na Estonie, mpe basɛngaki ngai nasala na Komite ya filiale elongo na ndeko Toomas Edur, Lembit Reile, mpe Tomm Kauko.

Azali kosala diskur na liyangani ya etúká na Lituanie

Komite ya filiale na Estonie, etyamaki na mobu 1999

Toyaki koyebana na Batatoli mingi oyo bamemamaki na bakaa ya bakangami na Sibérie. Atako banyokolaki bango makasi na bolɔkɔ mpe bakabolaki bango na mabota na bango, bakómaki nkandankanda te. Babatelaki esengo mpe milende na bango na mosala ya kosakola. Yango esalisaki biso tómona ete tokoki mpe koyika mpiko mpe kozala na esengo ata na ntango ya mpasi.

Tosalaki mosala makasi na boumeli ya bambula mingi, yango wana Lesli abandaki komiyoka ete alɛmbi makasi. Toyebaki mbala moko te ete kolɛmba yango eutaki na maladi babengi fibromyalgie. Yango wana tomonaki ete tózonga na Canada. Ntango basɛngaki biso tókende na eteyelo ya bandeko ya Komite ya filiale elongo na basi na bango na Patterson, na New York, na États-Unis, nakanisaki te ete tokokoka kokɔta eteyelo yango. Kasi, nsima ya kobondela na etingya, tondimaki kokende. Yehova apambolaki ekateli yango. Ezalaki na ntango ya eteyelo yango nde nsukansuka Lesli azwaki lisalisi ya monganga oyo asengelaki na yango. Yango wana, tozongelaki lisusu kosala misala oyo moto nyonso akoki kosala.

LIKAMBO OYO TOZALAKI KOMIZELA NA YANGO TE ​—KOKENDE NA KONTINA MOSUSU

Mokolo moko na mpokwa na mobu 2008, ntango tozongaki na Estonie, babengaki ngai na telefone uta na biro monene mpe batunaki soki tokosepela kokende kosala na République Démocratique du Congo. Ezalaki likambo oyo tomizelaki na yango te, mingimingi mpo esengelaki nayanola bango na mokolo oyo elandi. Na ebandeli, nayebisaki yango Lesli te mpo nayebaki ete akolala malamu te na butu yango. Nzokande, ngai nde nalalakite, nazalaki kobondela Yehova mpo nazalaki kobanga kokende na Afrika.

Mokolo oyo elandaki ntango nasololaki na Lesli, tokanisaki boye: “Yehova azali kosɛnga biso tókende na Afrika. Soki tomeki naino te, ndenge nini tokoyeba ete tokokoka kosala yango te to tokosepela na yango te?” Na yango, nsima ya kolekisa mbula 16 na Estonie, tokendaki na Kinshasa, na République Démocratique du Congo. Biro ya filiale ezalaki na elanga moko ya kitoko mpe ezalaki kimya mpenza. Eloko kaka moko oyo Lesli atyaki na shambrɛ na biso ezalaki karte moko oyo amemaki uta Canada. Likoló na yango ezalaki na maloba oyo: “Zalá na esengo esika ozali.” Nsima ya kokutana na bandeko, kotambwisa boyekoli ya Biblia, mpe komona esengo ya kozala misionɛrɛ, tozongelaki lisusu esengo na biso. Kendekende, basɛngaki biso tókende kotala bafiliale mosusu ya bikólo soki 13 ya Afrika. Yango esalisaki biso tóyeba mimeseno ekeseni mpe bato ya ndenge nyonso. Nazalaki lisusu kobanga te kozala na Afrika, mpe topesaki Yehova matɔndi ndenge atindaki biso tósala na Afrika.

Na République Démocratique du Congo, bandeko bazalaki kopesa biso lolenge nyonso ya bilei, na ndakisa, banyamankɛkɛ to banyama mikemike, oyo nazalaki kokanisa ete tokokoka te kolya yango. Kasi ntango tomonaki ndenge bandeko na biso bazalaki kosepela na yango, tomekaki yango mpe bandeko basepelaki komona ndenge tozalaki kolya yango.

Tosalaki mibembo na Ɛsti ya ekólo yango mpo na kolendisa bandeko na biso mpe komemela bango biloko oyo bazalaki na mposa na yango. Na bamboka yango, bituluku ya batɔmbɔki ezalaki kokɔtela bato na bamboka ya zamba mpe konyokola basi ná bana. Bandeko mingi bazalaki na biloko mingi te ya kobikela. Atako bongo, elikya makasi ya lisekwa oyo bazali na yango, kolinga Yehova, mpe bosembo na bango na ebongiseli na ye elendisaki biso mpenza. Yango etindaki biso tótalela lisusu kondima na biso mpe tókómisa yango lisusu makasi. Bandeko mosusu babungisaki bandako na bango mpe bilanga. Yango ekundwelaki ngai ete tokoki kobungisa biloko na biso ya kobikela na mbalakaka, kasi eleko eleki ntina mpo na biso ezali nde boyokani na biso ná Yehova. Atako bazalaki kokutana na mikakatano ya makasi, bandeko yango bazalaki komilelalela mpenza te. Ndenge na bango ya kotalela makambo elendisaki biso tóyikela mikakatano mpe bamaladi na biso mpiko.

Azali kosala diskur na etuluku moko ya bato oyo bakimi mboka na bango

Azali kopesa bandeko biloko mpe bankisi na Dungu, na République Démocratique du Congo

MOKUMBA YA SIKA NA AZIA

Na nsima, likambo mususu oyo tomizelaki na yango te esalemaki. Basɛngaki biso tókende na filiale ya Hong Kong. Tokanisaki ata mokolo moko te ete tokofanda na Azia! Kasi nsima ya komona lobɔkɔ mpe bolingo ya Yehova na bisika nyonso oyo tozalaki kokende, tondimaki libyangi yango. Na 2013, tolelaki ntango totikaki baninga na biso ya motema mpe Afrika mokili moko kitoko, kasi toyebaki te nini ezalaki kozela biso.

Ezalaki mbongwana monene kofanda na Hong Kong, mpo ezalaki engumba oyo etondi na bato oyo bauti na mokili mobimba. Koyekola monɔkɔ ya Chinois oyo babengi Cantonais ezalaki mpasi mpo na biso. Atako bongo, bandeko bayambaki biso na esengo mpenza, mpe tosepelaki mpenza na bilei ya mboka yango. Misala mingi ezalaki kosalema na biro ya filiale. Kasi kaka na ntango wana, ntalo ya bandako ekómaki komata nokinoki mpenza. Yango wana, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezwaki ekateli, malamu ya kotɛka bandako mingi ya filiale. Mwa moke na nsima, na 2015, batindaki biso, Corée du Sud, epai tozali kokoba kosalela Yehova. Tosengelaki koyekola monɔkɔ mosusu ya makasi. Atako tolobaka mpenza malamu te monɔkɔ ya Coréen, kasi tolendisamaka ntango bandeko basepelaka na milende oyo tosalaka mpo na kosolola na bango.

Bomoi ya sika na Hong Kong

Filiale ya Corée

MATEYA OYO TOZWI NA MOSALA YA YEHOVA

Kozwa baninga ya sika ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te, kasi soki tozali kobengisa basusu báya kotala biso na ndako, tokoki koyekola koyeba bato nokinoki. Tomonaki ete bandeko na biso bazali ndenge moko atako mimeseno ekeseni, mpe Yehova asalelaki biso na ndenge moko ya kokamwa mpo tókoka kofungolela mpenza baninga mingi oyo tozali na bango motema na mpe kolinga bango.​—2 Ko. 6:11.

Tomonaki ntina ya kondima bato ndenge Yehova andimaka bango mpe komona bilembo oyo emonisi ete Yehova alingaka biso na ndenge apesaka biso malako. Ntango nyonso oyo tozalaki kolɛmba nzoto to komituna soki basusu bazalaki kondima biso, tozalaki lisusu kotánga bakarte to mikanda ya kolendisa oyo baninga na biso bakomelaki biso. Tomoni ndenge Yehova azali koyanola na mabondeli na biso, komonisela biso bolingo mpe kopesa biso makasi.

Na boumeli ya bambula, ngai ná Lesli toyekoli ntina ya kozwaka ntango mpo na kozala elongo, ezala tozali na makambo mingi ya kosala. Toyekoli mpe ntina ya kosɛka mwa moke ntango tosali mabunga, mingimingi ntango tozali komeka koyekola monɔkɔ ya sika. Lisusu butu nyonso, tomekaka kokanisa eloko moko oyo tosepelaki na yango oyo tokoki kopesa Yehova matɔndi mpo na yango.

Mpo na koloba solo, nakanisaki ete nakokaki te kozala misionɛrɛ to kofanda na mikili mosusu. Atako bongo, namoni esengo ya koyekola ndenge makambo nyonso ekoki kosalema na lisalisi ya Yehova. Maloba oyo ya mosakoli Yirimia ezongelaka ngai na makanisi: “Okosi ngai, Ee Yehova.” (Yir. 20:7) Ɛɛ, apesaki biso biloko mingi ya kitoko mpe mapamboli oyo tokokaki kokanisa te, kutu akokisaki mpe mposa na ngai ya kosala mibembo na mpɛpɔ. Tosalaki mibembo na bisika mingi oyo nakokaki ata moke te kolɔta ntango nazalaki mwana, mpe tokendaki kotala bafiliale na bakontina mitano mobimba. Na mikumba nyonso oyo tosali, nazali mpenza na botɔndi epai ya Lesli mpo na lisungi na ye mpe elimo na ye ya komipesa.

Tokobaka komikundwela ete tosalaka makambo nyonso mpo tolingaka Yehova. Mapamboli oyo tozali na yango lelo ezali komonisa ndenge bomoi ya seko ekozala kitoko ntango Yehova ‘akofungola lobɔkɔ na ye mpe akokokisa mposa ya ekelamu nyonso ya bomoi.’​—Nz. 145:16.