Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 27

Mpo na nini tosengeli kobanga Yehova?

Mpo na nini tosengeli kobanga Yehova?

“Yehova azali moninga ya motema ya baoyo babangaka ye.” ​—NZ. 25:14.

LOYEMBO 8 Yehova azali ekimelo na biso

NA MOKUSE a

1-2. Na kotalela Nzembo 25:14, tosengeli kosala nini soki tolingi ete tózala na boninga ya penepene ná Yehova?

 BIZALELI nini ezali na ntina mingi soki ozali na mposa ya kobatela boninga ya malamu na moto moko boye? Mbala mosusu okoloba ete baninga ya malamu basengeli kolingana mpe kosalisana. Ekoki kozala ete okanisaka ata moke te ete kobanga ezali ezaleli ya ntina mingi oyo ekoki kosalisa moto azala na boninga ya malamu. Kasi, ndenge vɛrsɛ oyo esimbi motó ya likambo ya lisolo oyo emonisi yango, baoyo balingi kozala na boninga ya penepene ná Yehova basengeli ‘kobanga ye.’​—Tángá Nzembo 25:14.

2 Ezala tosali bambula boni na mosala ya Yehova, biso nyonso tosengeli kokoba kobanga ye na ndenge ya malamu. Kasi kobanga Nzambe elimboli nini? Ndenge nini tokoki koyekola kobanga Yehova? Mateya nini tokoki kozwa na oyo etali kobanga Nzambe na lisolo ya kapita Obadia, ya nganga-nzambe monene Yehoyada, mpe ya Mokonzi Yehoashe?

KOBANGA NZAMBE ELIMBOLI NINI?

3. Lobelá ndenge kobanga ekoki kobatela biso.

3 Tokoki kobanga soki toyebi ete tokoki konyokwama mpo na likambo moko ya mabe. Lolenge wana ya kobanga ekoki kozala malamu mpo ekoki kotinda biso tózwa bikateli ya malamu. Kobanga kokwea epekisaka biso kotambola na nsɔngɛ mpenza ya ngomba to mpe ya libanga moko ya monene. Kobanga kozoka ekoki kotinda biso tókima likama. Kobanga kobebisa boninga na biso elongo na moto moko oyo tolingaka epekisaka biso tóloba to tósala likambo oyo ezangi boboto.

4. Satana alingaka tózala na bobangi ya ndenge nini mpo na Yehova?

4 Satana alingaka bato bábanga Yehova na ndenge ya mabe. Alingaka kondimisa biso ete Yehova azalaka ntango nyonso na nkanda mpe alingaka kopesa biso etumbu mpe tokoki soki moke te kosepelisa ye. (Yobo 4:18, 19) Satana alingaka tóbanga Yehova na ndenge ya mabe mpo tótika kosalela ye. Mpo tókwea te na motambo wana, tosengeli koyekola komemya Nzambe mpe koboya kosilikisa ye.

5. Kobanga Nzambe elimboli nini?

5 Moto oyo abangaka Nzambe na ndenge ya malamu alingaka ye mpe alingaka te kosala likambo nyonso oyo ekobebisa boyokani na ye ná Yehova. Ndenge wana nde Yesu azalaki “kobanga Nzambe.” (Ebr. 5:7) Azalaki kobanga Yehova na ndenge ya mabe te. (Yis. 11:2, 3) Kutu, azalaki nde kolinga ye mingi mpe kosepela kotosa ye. (Yoa. 14:21, 31) Lokola Yesu, tozalaka na limemya makasi epai ya Yehova mpe tobangaka ye mpo azali bolingo, azali sembo, azali na bwanya mpe na nguya. Toyebi mpe ete Yehova alingaka biso mingi mpenza mpe atyaka likebi na makambo oyo tosalaka ntango ateyaka biso. Yango wana, ntango tosalaka makambo oyo esepelisaka Yehova ayokaka esengo, kasi ntango tosalaka makambo oyo esepelisaka ye te, ayokaka mawa.​—Nz. 78:41; Mas. 27:11.

TOKOKI KOYEKOLA KOBANGA NZAMBE

6. Wapi lolenge moko oyo tokoki koyekola kobanga Nzambe? (Nzembo 34:11)

6 Tobotamaka te na ezaleli ya kobanga Yehova. Kasi, tosengeli nde koyekola komonisa yango. (Tángá Nzembo 34:11.) Lolenge moko oyo tokoki kosala yango ezali ya kotalaka bozalisi. Mbala nyonso oyo tomonaka bwanya ya Nzambe, nguya na ye, mpe bolingo monene oyo amoniselaki biso na nzela ya “biloko oyo asalá,” tozalaka lisusu na limemya makasi epai na ye mpe bolingo na biso mpo na ye ekómaka lisusu makasi. (Rom. 1:20) Ndeko mwasi moko na nkombo Adrienne alobaki boye: “Ntango namonaka biloko nyonso oyo Yehova asalá mpe bwanya na ye, yango ekamwisaka ngai mpe esalisaka ngai namona ete ayebi oyo eleki malamu mpo na ngai.” Kokanisa na mozindo na biloko yango etindaki ndeko Adrienne aloba boye: “Nalingaka te kosala likambo moko oyo ekobebisa boyokani na ngai ná Yehova, Ye oyo apesá ngai bomoi.” Zwá mwa ntango na boumeli ya pɔsɔ oyo mpo na kokanisa eloko moko oyo Yehova asalá. Kosala bongo ekosalisa yo okóma na limemya makasi mpo na ye mpe olinga ye lisusu mingi.​—Nz. 111:2, 3.

7. Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa biso tóyekola kobanga Yehova na ndenge ya malamu?

7 Lolenge mosusu oyo tokoki koyekola kobanga Nzambe ezali ya kobondelaka mbala na mbala. Soki tozali kobondela mingi, Yehova akokóma mpenza moto ya solo mpo na biso. Mbala nyonso oyo tosɛngaka ye apesa biso makasi mpo tóyikela komekama mpiko, yango esalisaka biso tóbosana te ete azali na nguya mingi. Ntango topesaka ye matɔndi ndenge apesá biso Mwana na ye, yango esalisaka biso tóbosana te ete alingaka biso mingi mpenza. Lisusu, ntango tosɛngaka Yehova asalisa biso na likambo moko, yango esalisaka biso tóbosana te ete azali na bwanya mingi. Mabondeli ya ndenge wana esalisaka biso tómemya lisusu Yehova mingi. Longola yango, ekómisaka makasi ekateli na biso ya koboya kosala likambo nyonso oyo ekoki kobebisa boninga na biso ná ye.

8. Tokoki kosala nini mpo tókoba kobanga Nzambe?

8 Tokokoba kobanga Nzambe soki tozali koyekola Biblia na mokano ya kozwa mateya na bandakisa ya malamu mpe bandakisa ya mabe oyo elobeli. Tiká tólobela basaleli mibale ya sembo ya Yehova, elingi koloba, Obadia mosaleli moko na ndako ya Mokonzi Ahaba mpe Yehoyada Nganga-nzambe monene. Na nsima, tokomona mateya oyo tokoki koyekola na ndakisa ya Yehoashe Mokonzi ya Yuda, oyo na ebandeli asalaki makambo ya malamu kasi na nsima, atikaki kosalela Yehova.

ZALÁ NA MPIKO LOKOLA OBADIA OYO AZALAKI KOBANGA NZAMBE

9. Na kotalela 1 Bakonzi 18:3, 12, ndenge nini kobanga Yehova esalisaki Obadia?

9 Biblia elobeli Obadia b mpo na mbala ya liboso na maloba oyo: “Obadia azalaki kobanga Yehova mingi.” (Tángá 1 Bakonzi 18:3, 12.) Kobanga Nzambe esalisaki Obadia na nini? Na ndakisa, esalisaki ye azala moto ya sembo mpe moto oyo abongi kotyelama motema; yango wana, mokonzi atyaki ye kapita na ndako na ye. (Talá mpe Nehemia 7:2.) Kobanga Nzambe oyo Obadia azalaki na yango epesaki ye mpe mpiko mingi, ezaleli oyo azalaki mpenza na mposa na yango. Azalaki na bomoi na boumeli ya boyangeli ya Ahaba Mokonzi mabe, oyo “asalaki makambo ya mabe mingi mpenza na miso ya Yehova koleka bakonzi nyonso oyo bazalaki liboso na ye.” (1 Bak. 16:30) Longola yango, mwasi na ye, Yezabele, oyo azalaki kosambela Baala, azalaki koyina Yehova mingi mpenza, yango wana alukaki kolimwisa losambo ya solo na bokonzi ya nɔrdi. Kutu abomaki basakoli mingi ya Nzambe. (1 Bak. 18:4) Na ntembe te, Obadia azalaki kosambela Yehova na eleko moko ya mpasi mpenza.

10. Ndenge nini Obadia amonisaki mpiko mingi?

10 Ndenge nini Obadia amonisaki mpiko mingi? Ntango Yezabele azalaki koluka basakoli ya Nzambe mpo na koboma bango, Obadia azwaki basakoli 100 na kati na bango mpe abombaki “basakoli 50 na kati ya mobenga moko mpe 50 na kati ya mobenga mosusu, mpe [azalaki] kopesa bango limpa ná mai.” (1 Bak. 18:13, 14) Soki bayebaki likambo oyo Obadia mobali ya mpiko asalaki, mbɛlɛ balingaki koboma ye. Mbala mosusu, Obadia azalaki kobanga mpenza, mpe alingaki kokufa te. Atako bongo, alingaki Yehova mingi mpe baoyo bazalaki kosalela Yehova koleka ata bomoi na ye moko.

Atako mosala na biso epekisami, na mpiko nyonso ndeko mobali moko azali kokabolela bandeko na ye Batatoli mikanda oyo elimbolaka Biblia (Talá paragrafe 11) c

11. Ndenge nini basaleli ya Yehova ya mikolo na biso bazali lokola Obadia? (Talá mpe elilingi.)

11 Lelo oyo, Batatoli ya Yehova mingi bazali kofanda na mikili epai mosala na biso epekisami. Lokola Obadia, atako bakobaka komemya bakonzi ya Leta, bandeko wana ya basi mpe ya mibali bakobaka kopesa Yehova losambo oyo ebongi kaka na ye! (Mat. 22:21) Bamonisaka ete babangaka Nzambe ntango batosaka ye na esika ya kotosa bato. (Mis. 5:29) Basalaka bongo na ndenge bakobaka kosakola nsango malamu mpe bayanganaka elongo na makita na kobombana. (Mat. 10:16, 28) Balukaka koyeba soki bandeko na bango bazali na bilei ya elimo oyo basengeli na yango mpo bákoba kozala penepene na Yehova. Tózwa ndakisa ya Henri, oyo afandaka na ekólo moko ya Afrika epai mosala na biso epekisamaki na ntango moko boye. Na ntango ya epekiseli, Henri amipesaki na bolingo na ye moko mpo na kokabolela bandeko na ye Batatoli mikanda oyo elimbolaka Biblia. Akomaki boye: “Nazalaka moto ya nsɔninsɔni. Na yango, nandimi ete limemya makasi oyo nazalaki na yango mpo na Yehova nde epesaki ngai mpiko oyo nasengelaki na yango.” Yo mpe okoki kokóma na mpiko lokola Henri? Ɛɛ, soki ozali koyekola kobanga Nzambe na ndenge ya malamu.

ZALÁ SEMBO LOKOLA NGANGA-NZAMBE MONENE YEHOYADA OYO AZALAKI KOBANGA NZAMBE

12. Ndenge nini nganga-nzambe monene Yehoyada ná mwasi na ye bamonisaki ete bazalaki mpenza sembo epai ya Yehova?

12 Nganga-nzambe monene Yehoyada azalaki kobanga Nzambe, mpe kobanga yango etindaki ye azala sembo mpe alongisa losambo ya solo. Yango emonanaki ntango Atalia, mwana ya Yezabele, abɔtɔlaki kiti ya bokonzi mpe akómaki mokonzi-mwasi na Yuda. Bato bazalaki na ntina ya kobanga Atalia. Mpo azalaki na nkanza mpe na lokoso ya bokonzi, yango wana, alukaki koboma bana nyonso ya mokonzi, elingi koloba, bankɔkɔ na ye moko! (2 Nt. 22:10, 11) Yehoashe, moko ya bana yango abikaki mpo mwasi ya Yehoyada, Yehoshabeate, abikisaki ye. Yehoshabeate ná mobali na ye babombaki mwana yango mpe babatelaki ye. Na ndenge yango nde Yehoyada ná Yehoshabeate bapesaki mabɔkɔ mpo na kobatela molɔngɔ ya bakonzi ya libota ya Davidi. Yehoyada azalaki sembo epai ya Yehova mpe alɛngaki te liboso ya mokonzi Atalia.​—Mas. 29:25.

13. Ntango Yehoashe azalaki na mbula nsambo, ndenge nini Yehoyada amonisaki ete azalaki sembo?

13 Ntango Yehoashe azalaki na mbula nsambo, Yehoyada amonisaki lisusu ete azalaki sembo epai ya Yehova. Asalelaki mayele moko oyo esengelaki kosala ete Yehoashe akóma mokonzi, mpo azalaki na lotomo ya kozala mokonzi na kiti ya bokonzi ya Davidi. Kasi, soki mayele yango elongaka te, na ntembe te Yehoyada alingaki kobomama. Na lisalisi ya Yehova, mayele yango elongaki. Yehoyada akómisaki Yehoashe mokonzi mpe abomisaki Atalia na lisalisi ya bankumu mpe Balevi. (2 Nt. 23:1-5, 11, 12, 15; 24:1) Na nsima, Yehoyada “asalaki kondimana kati na Yehova mpe mokonzi ná bato ya ekólo ete bakokoba kozala bato ya Yehova.” (2 Bak. 11:17) Yehoyada “atyaki mpe bakɛngɛli na baporte ya ndako ya Yehova mpo moto oyo azali mbindo, ata mpo na ntina nini, akɔta te.”​—2 Nt. 23:19.

14. Lokumu nini Yehoyada azwaki lokola akumisaki Yehova?

14 Yehova alobaki boye: “Baoyo bazali kopesa ngai lokumu, ngai mpe nakopesa bango lokumu.” Ya solo, Yehova apesaki Yehoyada mbano. (1 Sa. 2:30) Na ndakisa, asalaki ete lisolo ya Yehoyada ekomama na Biblia mpo eteya biso. (Rom. 15:4) Longola yango, ntango Yehoyada akufaki, azwaki lokumu moko monene ya kokundama “na Sité ya Davidi esika moko na bakonzi, mpo asalaki malamu na Yisraele mpo na Nzambe ya solo mpe ndako na Ye.”​—2 Nt. 24:15, 16.

Lokola Nganga-nzambe monene Yehoyada, kobanga Yehova ekoki kotinda biso tósalisa bandeko na biso na bosembo nyonso (Talá paragrafe 15) d

15. Lisolo ya Yehoyada ekoki koteya biso nini? (Talá mpe elilingi.)

15 Lisolo ya Yehoyada ekoki kosalisa biso nyonso tóyekola kobanga Nzambe. Babateli ya mpate bakoki komekola Yehoyada soki bazali ntango nyonso ekɛngɛ mpe bazali kobatela etonga ya Nzambe na bosembo nyonso. (Mis. 20:28) Ndakisa ya Yehoyada ekoki koteya mibange ete, soki bazali kobanga Yehova mpe kotikala sembo epai na ye, akoki kosalela bango mpo bákokisa mokano na ye. Yehova asundoli bango te. Bilenge bakoki koyekola ndenge Yehova asalelaki Yehoyada makambo mpe komekola Yehova soki bazali kosalela mibange ya sembo makambo na limemya mpe na lokumu, mingimingi baoyo basali mingi na mosala ya Yehova. (Mas. 16:31) Mpe biso nyonso tokoki kozwa liteya na bankumu mpe Balevi oyo bapesaki Yehoyada mabɔkɔ. Tiká ete na bosembo nyonso tópesa mabɔkɔ na “baoyo bazali kokamba” biso na kotosáká bango.​—Ebr. 13:17.

KOZALA TE LOKOLA YEHOASHE

16. Nini emonisi ete Mokonzi Yehoashe azalaki na bolɛmbu?

16 Yehoyada asalisaki Mokonzi Yehoashe mpo azala moto malamu. (2 Bak. 12:2) Yango wana, ntango azalaki elenge, azalaki na mposa ya kosepelisa Yehova. Kasi nsima ya liwa ya Yehoyada, Yehoashe ayokelaki bankumu oyo bazalaki bapɛngwi. Likambo nini emonanaki na nsima? Ye ná bato oyo bazalaki na nse ya boyangeli na ye “babandaki kosalela banzete ya losambo mpe kosambela bikeko.” (2 Nt. 24:4, 17, 18) Atako Yehova ayokaki mawa mpenza, “azalaki kotindela bango basakoli mpo na kosalisa bango bázongela [ye] . . . , kasi baboyaki koyoka.” Bayokelaki ata Zekaria mwana ya Yehoyada te, oyo azalaki kaka te mosakoli ya Yehova mpe nganga-nzambe, kasi mpe ndeko ya Yehoashe. Kutu, Mokonzi Yehoashe abomisaki Zekaria, atako libota ya Zekaria ebatelaki ye na bomoi mpo abomama te.​—2 Nt. 22:11; 24:19-22.

17. Makambo nini ekómelaki Yehoashe?

17 Yehoashe atikaki kobanga Yehova, mpe makambo ekómelaki ye bololo mpenza. Yehova alobaki boye: “Baoyo bazali kotyola ngai, nakotala bango lokola eloko mpamba.” (1 Sa. 2:30) Na nsima, mwa limpinga moko ya basoda ya Siri elongaki “limpinga moko monene” ya Yehoashe mpe ‘bazokisaki ye makasi.’ Na nsima, wana bato ya Siri batikaki ye, basaleli na ye moko babomaki ye mpo abomisaki Zekaria. Mokonzi wana ya mabe atalelamaki te lokola moto oyo abongaki kokundama “na malita ya bakonzi.”​—2 Nt. 24:23-25; talá “mwana ya Barakia” na nɔti mpo na koyekola na Matai 23:35 na Français.

18. Na kotalela Yirimia 17:7, 8, ndenge nini tokoki koboya kozala lokola Yehoashe?

18 Ndakisa ya Yehoashe ekoki koteya biso nini ? Azalaki lokola nzete moko oyo misisa na yango ekɔtaki mpenza te na mabele mpe oyo kaka mwa eteni ya nzete moko boye nde ezalaki kotɛlɛmisa yango. Nsima ya liwa ya Yehoyada, moto oyo azalaki kosunga ye, Yehoashe abandaki koyokela bapɛngwi mpe atikalaki sembo te epai ya Yehova. Ndakisa yango emonisi malamu ete tosengeli te kobanga Nzambe kaka mpo na komekola ndakisa malamu ya bato ya libota na biso to mpe ya bandeko na biso bakristo. Mpo tótikala makasi na elimo, tosengeli kokómisa makasi ezaleli na biso ya kokangama na Nzambe mpe kobanga ye, na nzela ya boyekoli ya Biblia, komanyola, mpe kobondela mbala na mbala.​—Tángá Yirimia 17:7, 8; Kol. 2:6, 7.

19. Yehova asɛngaka biso tósala nini?

19 Yehova asɛngaka biso te tósala makambo oyo tokokoka te. Makambo oyo asɛngaka biso ezali na Mosakoli 12:13, oyo elobi: “Bangá Nzambe ya solo mpe batelá mitindo na ye. Mpo yango nde mokumba nyonso ya moto.” Soki tozali kobanga Nzambe, tokotikala sembo epai na ye ata soki likambo nini ekómeli biso na mikolo ezali koya, kaka ndenge Obadia mpe Yehoyada basalaki. Eloko ata moko te ekokoka kobebisa boninga na biso ná Yehova.

LOYEMBO 3 Nguya na ngai, elikya na ngai, makasi na ngai

a Liloba “kobanga” oyo Biblia esaleli ezali na bandimbola mingi. Na kotalela likambo oyo bazali kolobela, ekoki kolakisa nsɔmɔ, limemya, to kolɛnga. Lisolo oyo ekosalisa biso tómonisa lolenge ya kobanga oyo ekoki kotinda biso tózala na mpiko mpe tózala sembo na mosala oyo Tata na biso ya likoló apesi biso.

b Obadia oyo tolobeli na lisolo oyo ezali mosakoli Obadia te, oyo azalaki na bomoi basiɛklɛ mingi na nsima mpe oyo akomaki mokanda ya Biblia oyo ezali na nkombo na ye.

c NDIMBOLA YA BILILINGI: Elilingi oyo ezali komonisa ndenge ndeko mobali moko azali kokabola mikanda oyo elimbolaka Biblia na ntango ya epekiseli.

d NDIMBOLA YA BILILINGI: Elenge mwasi moko azali koyekola epai ya ndeko mwasi moko ya mobange ndenge ya kopesa litatoli na nzela ya telefone; ndeko mobali moko ya mobange azali komonisa mpiko na ndenge azali kopesa litatoli na esika ya bato mingi; ndeko mobali moko ya makoki azali kopesa basusu formasyo na oyo etali ndenge ya kobatela Ndako ya Bokonzi.