LISOLO YA BOYEKOLI 26
Omilɛngɛla mpo na mokolo ya Yehova
“Mokolo ya Yehova ekoya mpenza lokola moyibi na butu.”—1 TES. 5:2.
LOYEMBO 143 Kobá kosala, kokɛngɛla mpe kozela
NA MOKUSE a
1. Tosengeli kosala nini mpo tóbika na mokolo ya Yehova?
NTANGO Biblia elobelaka “mokolo ya Yehova,” elobelaka nde ntango oyo Yehova akoboma banguna na ye mpe akobikisa basaleli na ye. Na ntango ya kala, Yehova apesaki bikólo mosusu bitumbu. (Yis. 13:1, 6; Ezk. 13:5; Sef. 1:8) Na ntango na biso, “mokolo ya Yehova” ekobanda na kobebisama ya Babilone Monene mpe ekosuka na etumba ya Armagedone. Mpo tóbika na “mokolo” yango, tosengeli komibongisa banda sikoyo. Yesu ateyaki ete tosengeli kaka te komilɛngɛla mpo na “bolɔzi monene” kasi tosengeli mpe ‘kokoba komilɛngɛla’ mpo na yango.—Mat. 24:21; Luka 12:40.
2. Mpo na nini mokanda ya 1 Batesaloniki ezali na ntina mpo na biso?
2 Na mokanda na ye ya liboso epai ya Batesaloniki, ntoma Paulo asalelaki maloba ya elilingi mpo na kosalisa bakristo bámilɛngɛla mpo na mokolo monene oyo Yehova akosambisa bato. Ntoma Paulo ayebaki ete mokolo ya Yehova esengelaki koya na ntango wana te. (2 Tes. 2:1-3) Atako bongo, alendisaki bandeko na ye bámibongisa mpo na mokolo yango lokola nde mokolo yango ezali koya lobi. Biso mpe tokoki kosalela toli na ye. Tiká tótalela ndimbola oyo apesaki na makambo oyo elandi: (1) ndenge mokolo ya Yehova ekoya, (2) banani bakobika te na mokolo yango, mpe (3) ndenge tokoki komibongisa mpo tóbika.
MOKOLO YA YEHOVA EKOYA NDENGE NINI?
3. Na ndenge nini mokolo ya Yehova ekoya mpenza lokola moyibi na butu? (Talá mpe elilingi.)
3 “Lokola moyibi na butu.” (1 Tes. 5:2) Oyo ezali maloba ya liboso na maloba misato ya elilingi oyo basaleli mpo na kolobela koya ya mokolo ya Yehova. Mbala mingi miyibi basalaka nokinoki mpe bayaka na butu na ntango oyo bato bayebi te. Mokolo ya Yehova ekoya mpe na mbalakaka, mpe bato mingi bakosutuka. Ata bakristo ya solo bakoki mpe kokamwa ndenge makambo ekosalema mbangumbangu. Kasi na kokesana na bato mabe, biso tokobomama te.
4. Na ndenge nini mokolo ya Yehova ezali lokola mpasi ya kobota?
4 “Ndenge mpasi ya kobota eyelaka mwasi ya zemi.” (1 Tes. 5:3) Mama oyo azali pene ya kobota akoki te koyeba mokolo to ngonga oyo akobota mpenza. Atako bongo, azalaka na ntembe ata moke te ete akobota. Soki ntango na ye ya kobota ekoki, na ntembe te mpasi yango eyaka na mbalakaka mpe moto akoki kopekisa yango te. Ndenge moko mpe, toyebi te mokolo mpe ngonga oyo mokolo ya Yehova ekobanda. Atako bongo, tondimisami ete ezali koya mpe ete mokolo oyo Nzambe akosambisa bato mabe ekoya na mbalakaka mpe bakokima yango ata moke te.
5. Na ndenge nini bolɔzi monene ezali lokola kotana ya ntɔngɔ?
5 Lokola kotana ya ntɔngɔ. Na maloba ya elilingi ya misato oyo Paulo asaleli, alobeli lisusu miyibi oyo bazali koyiba na butu. Kasi na mbala oyo, Paulo akokanisi mokolo ya Yehova na kotana ya ntɔngɔ. (1 Tes. 5:4) Na ntembe te, miyibi oyo bayaka na butu bayebaka te ete ntango ezali koleka. Ntɔngɔ ya mokolo elandi ekoki kotanela bango mpe kolakisa bango polele na miso ya bato. Ndenge moko mpe, bolɔzi monene ekomonisa polele baoyo bazali lokola miyibi, oyo bazalaka na molili na ndenge bakobaka kosala makambo oyo esepelisaka Nzambe te. Na kokesana na bango, tokoki komilɛngɛla soki tozali koboya etamboli oyo esepelisaka Yehova te, mpe tozali kolanda “ndenge nyonso ya bolamu mpe boyengebene mpe solo.” (Ef. 5:8-12) Na nsima, Paulo asaleli maloba mibale ya elilingi oyo ezali na boyokani mpo na kolobela baoyo bakobika te.
BANANI BAKOBIKA TE NA MOKOLO YA YEHOVA?
6. Na kotalela 1 Batesaloniki 5:6, 7, na ndenge nini bato mingi bazali kolala mpɔngi?
6 “Baoyo balalaka mpɔngi.” (Tángá 1 Batesaloniki 5:6, 7.) Paulo akokanisaki baoyo bakobika te na mokolo ya Yehova na bato oyo bazali kolala mpɔngi. Batyaka likebi te na makambo oyo ezali kosalema zingazinga na bango, to ndenge ntango ezali koleka. Na yango, bayebaka te ntango makambo ya ntina ezali kosalema mpe bakoki kosala eloko te mpo na yango. Lelo oyo, bato mingi bazali kolala mpɔngi na elimo. (Rom. 11:8) Bandimaka te bilembo oyo emonisi ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka” mpe ete bolɔzi monene ekoya mosika te. Makambo ya minene oyo esalemaka na mokili epesaka bamosusu mposa ya kotya likebi na nsango ya Bokonzi oyo tomemelaka bango. Atako bongo, na esika básɛnzɛla, mingi na bango balalaka nde mpɔngi. Ata bato mosusu oyo bandimaka ete mokolo ya kosambisama ekoya, bakanisaka ete mokolo yango ezali mosika mpenza. (2 Pe. 3:3, 4) Kasi, tosengeli kosɛnzɛlaka mokolo na mokolo mpo yango ezali na ntina mingi mpo na biso.
7. Na ndenge nini bato oyo Nzambe akoboma bazali lokola bato oyo balangwaka masanga?
7 “Baoyo balangwaka.” Ntoma Paulo akokanisaki bato oyo Nzambe akoboma na balangwi-masanga. Balangwi-masanga bayebaka te makambo oyo ezali kosalema zingazinga na bango, mpe bazwaka bikateli ya malamu te. Ndenge moko mpe, basali-mabe batyaka likebi te na makebisi ya Nzambe. Baponaka lolenge ya bomoi oyo ekomema bango na libebi. Kasi Nzambe asɛngi bakristo bábatela makanisi na bango mpe balangwaka masanga te. (1 Tes. 5:6) Moto moko oyo alimbolaka maloba ya Biblia alobi ete “moto oyo alangwaka masanga te akanisaka malamu, azalaka motema ya kokita mpe alɛngaka na nsɔmɔ te. Azalaka na likoki ya kokanisa malamu mpo na kozwa ekateli ya malamu.” Mpo na nini tosengeli kozala motema ya kokita mpe kotɛlɛma ngwi? Mpo tómikɔtisa te na makambo ya politiki to na mikakatano ya mikolo oyo. Mbamba oyo bato batyaka basusu mpo bákɔta na ngámbo moko boye na makambo ya politiki mpe na mikakatano ya mikolo oyo ekokóma lisusu makasi lokola mokolo ya Yehova ezali se kokóma pene. Atako bongo, tosengeli te komitungisa mpo na makambo oyo tokosala na ntango yango. Elimo ya Nzambe ekoki kosalisa biso tózala motema ya kokita, tótɛlɛma ngwi na makanisi mpe tózwa bikateli ya bwanya.—Luka 12:11, 12.
TOKOSALA NINI MPO TÓMIBONGISA MPO NA MOKOLO YA YEHOVA?
8. Bizaleli nini oyo 1 Batesaloniki 5:8 elobeli oyo ekosalisa biso tósɛnzɛla mpe tóbatela makanisi na biso? (Talá mpe elilingi.)
8 “Tólata ebateli-ntolo . . . mpe ekɔti.” Paulo akokanisi biso na basoda oyo bazali ekɛngɛ mpe balati bilamba mpo na etumba. (Tángá 1 Batesaloniki 5:8.) Mposa ya bato ezalaka ete soda amilɛngɛla mpo na kobunda ntango nyonso oyo etumba ebimi. Ezali mpe bongo mpo na biso. Tomilɛngɛlaka mpo na mokolo ya Yehova ntango tolataka ebateli-ntolo ya kondima, bolingo mpe ekɔti, oyo ezali elikya na biso. Bizaleli wana ekoki kosalisa biso mingi mpenza.
9. Ndenge nini kondima na biso ebatelaka biso?
9 Ebateli-ntolo ezalaki kobatela motema ya soda. Kondima mpe bolingo ebatelaka motema na biso ya elilingi. Ekosalisa biso tókoba kosalela Nzambe mpe kolanda Yesu. Kondima esalisaka biso tómindimisa ete Yehova akopesa biso mbano mpo tozali koluka ye na motema na biso mobimba. (Ebr. 11:6) Ekosalisa biso tótikala sembo epai ya Mokambi na biso, Yesu, ata soki tosengeli koyikela mikakatano mpiko. Tokoki kokómisa kondima na biso makasi mpo tóyikela mikakatano mpiko soki tozali kozwa mateya na bandakisa ya bandeko na biso oyo bazali kotikala sembo atako bazali kokutana na minyoko to mikakatano ya mbongo. Lisusu, tokoki kokima motambo ya konduka biloko ya mokili soki tozali komekola bato oyo bakómisaki bomoi na bango pɛpɛlɛ mpo bátya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso. b
10. Ndenge nini kolinga Nzambe mpe bazalani na biso esalisaka biso tóyika mpiko?
10 Bolingo ezali mpe na ntina mingi mpo tósɛnzɛla mpe tóbatela makanisi na biso. (Mat. 22:37-39) Kolinga Nzambe esalisaka biso tóyika mpiko na mosala ya kosakola atako yango ekoki kobimisela biso minyoko. (2 Tim. 1:7, 8) Lokola tomonisaka bolingo ata epai ya baoyo basalelaka Yehova te, tokobaka kosakola mpe koteya na teritware na biso, ata kopesa litatoli na nzela ya telefone to na kokoma mikanda. Tozalaka na elikya ete mokolo mosusu bazalani na biso bakobongwana mpe bakobanda kosala makambo oyo ezali sembo.—Ezk. 18:27, 28.
11. Na kotalela 1 Batesaloniki 5:11, ndenge nini kolinga bandeko na biso esalisaka biso?
11 Tolingaka mpe bandeko na biso bakristo. Tomonisaka ete tolingaka bango na ndenge ‘tobɔndisanaka mpe tolendisanaka.’ (Tángá 1 Batesaloniki 5:11.) Se ndenge basoda basalaka na bomoko na ntango ya etumba, biso mpe tolendisanaka. Na ntembe te, ekoki kosalema ete soda azokisa soda mosusu ya etuluku na ye na ntango ya etumba kozanga ete akana yango, kasi asengeli soki moke te kosala yango na nko. Ndenge moko mpe, tosengeli soki moke te kozokisa bandeko na biso na nko to kozongisa mabe na mabe. (1 Tes. 5:13, 15) Tomonisaka mpe ete tolingaka bandeko na ndenge tomemyaka baoyo bakambaka lisangá. (1 Tes. 5:12) Ntango Paulo akomaki mokanda oyo, lisangá ya Tesaloniki ekokisaki naino mbula moko te. Ekoki kozala ete mibali oyo batyamaki bankulutu bayebaki makambo mingi te mpe ekoki kozala ete basalaki mwa mabunga. Atako bongo, esengelaki komonisela bango limemya. Wana bolɔzi monene ezali se kobɛlɛma, tokozala na mposa ya kosalela malako oyo eutaka epai ya bankulutu na biso koleka ndenge tozali kosala sikoyo. Mbala mosusu tokozwa te malako epai ya bandeko ya biro monene mpe ya biro ya filiale. Yango wana, ezali na ntina tóyekola kolinga mpe komemya bankulutu na biso banda sikoyo. Ezala likambo nini esalemi, tiká tóbatela makanisi na biso, tótya likebi na mabunga na bango te, kasi tótya nde likebi na bilembo oyo ezali komonisa ete na nzela ya Yesu, Yehova azali kokamba mibali wana ya sembo.
12. Ndenge nini elikya na biso ebatelaka makanisi na biso?
12 Kaka ndenge ekɔti ezalaki kobatela motó ya soda, elikya na biso ya lobiko ebatelaka makanisi na biso. Tondimaka mpenza ete biloko oyo mokili elaki kopesa biso ezali na ntina te. (Flp. 3:8) Elikya na biso esalisaka biso tózala motema ya kokita mpe tótɛlɛma ngwi. Yango nde ekómelaki ndeko Wallace mpe Laurinda, oyo bazali kosala na Afrika. Na boumeli ya pɔsɔ misato, mokomoko na bango abungisaki moboti na ye na liwa. Lokola maladi ya coronavirus ezalaki se kopanzana, bazalaki na likoki te ya kozonga na ekólo na bango mpo bázala elongo na bandeko ya mabota na bango. Ndeko Wallace akomaki boye: “Elikya ya lisekwa esalisaka ngai nakanisaka bango, nakanisaka te ndenge oyo bazalaki na mikolo ya nsuka ya bomoi na bango na mokili oyo, kasi nakanisaka ndenge bakozala na mikolo na bango ya liboso na mokili ya sika. Elikya yango ekitisaka ngai motema ntango mawa makasi ekangaka ngai to ntango nayokaka ete nabungisi eloko moko.”
13. Tokoki kosala nini mpo tózwa elimo santu?
13 “Bóboma mɔtɔ ya elimo te.” (1 Tes. 5:19) Paulo akokanisaki elimo santu na mɔtɔ oyo ezali na kati na biso. Ntango tozalaka na elimo ya Nzambe, tokómaka na molende mpe na nsai mpo na kosala makambo oyo ezali sembo mpe yango epesaka biso makasi ya kosalela Yehova. (Rom. 12:11) Tokoki kosala nini mpo tózwa elimo santu? Tokoki kobondela mpo na yango, koyekola Liloba ya Nzambe oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo na ye, mpe kokɔta na ebongiseli na ye oyo etambwisami na elimo na ye. Kosala bongo ekosalisa biso tómonisa “mbuma ya elimo.”—Gal. 5:22, 23.
14. Makambo nini tosengeli koboya kosala soki tolingi tókoba kozwa elimo ya Nzambe? (Talá mpe elilingi.)
14 Soki Nzambe apesi biso elimo santu na ye, tosengeli kozala ekɛngɛ mpo ‘tóboma mɔtɔ ya elimo yango te.’ Nzambe apesaka elimo santu na ye kaka na baoyo babatelaka makanisi malamu mpe bazalaka na etamboli ya pɛto. Akokoba te kopesa biso elimo na ye soki tozali kaka kokanisa makambo ya mbindo mpe kosala yango. (1 Tes. 4:7, 8) Mpo tókoba kozwa elimo santu, tosengeli mpe ‘kotyola maloba ya esakweli te.’ (1 Tes. 5:20) Liloba “esakweli” oyo esalelami awa elakisi bansango oyo Yehova apesaka biso na nzela ya elimo na ye, ezala mpe bansango etali mokolo ya Yehova mpe ntina oyo tosengeli kosala makambo na lombangu mpenza. Tokanisaka te ete mokolo ya Yehova, to Armagedone ekoya te na eleko na biso. Kutu, tomonisaka ete tondimaka ete mokolo ya Yehova ekoya mosika te, mpe tobatelaka yango na makanisi na ndenge tomipesaka mingi na kosala “misala oyo ezali komonisa ete tokangami na Nzambe” mokolo na mokolo.—2 Pe. 3:11, 12.
“BÓLUKA KOYEBA LIKAMBO NYONSO”
15. Na kotalela 1 Batesaloniki 5:21, tokoki kosala nini mpo tókosama te na bansango ya lokuta to na makanisi ya lokuta oyo ekouta na bademo?
15 Mosika te, banguna ya Nzambe bakoloba na lolenge moko to mosusu ete: “Kimya, likambo ya kobanga ezali te!” (1 Tes. 5:3) Makanisi yango ya lokuta oyo ekouta na bademo ekopalangana na mabele, mpe bato mingi bakokosama na yango. (Em. 16:13, 14) Bongo biso? Tokokosama te soki ‘tozali koluka koyeba [to, komeka] likambo nyonso.’ (Tángá 1 Batesaloniki 5:21.) Maloba ya Grɛki oyo ebongolami na “koluka koyeba” esalelamaki mpo na komonisa ndenge bato bazalaki komeka mabanga ya ntalo, na ndakisa wolo to palata, mpo na koyeba soki ezalaki mabanga ya solosolo. Na yango, tosengeli komeka makambo oyo toyokaka to totángaka mpo na koluka koyeba soki ezali solo to te. Yango ezalaki na ntina mingi mpo na bakristo ya Tesaloniki, mpe ekozala lisusu na ntina mingi mpo na biso lokola bolɔzi monene ezali se kokóma pene. Na esika ya kondima likambo nyonso oyo basusu bazali koloba, tosalelaka makoki na biso ya kokanisa mpo na kokokanisa makambo oyo totángaka to toyokaka ná makambo oyo Biblia mpe ebongiseli ya Yehova elobaka. Kosala bongo ekosalisa biso tókosama te na makanisi ya lokuta oyo ekouta na bademo to na bansango ya lokuta.—Mas. 14:15; 1 Tim. 4:1.
16. Elikya nini ya solosolo tozali na yango, mpe tozwi ekateli ya kosala nini?
16 Toyebi ete basaleli ya Nzambe bakobika na bolɔzi monene. Atako bongo, mokomoko na biso ayebi te ndenge bomoi na ye ekozala lobi. (Yak. 4:14) Na yango, ezala tokozala na bomoi na ntango ya bolɔzi monene to soki tokufi liboso eya, Nzambe akopesa biso bomoi ya seko soki totikali sembo. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakozala elongo na Kristo kuna na likoló. Bampate mosusu bakozala na Paradiso awa na mabele. Tiká ete biso nyonso tótya makanisi na elikya kitoko oyo tozali na yango mpe tómilɛngɛla mpo na mokolo ya Yehova!
LOYEMBO 150 Bóluka Nzambe mpo bóbika
a Na mokanda ya liboso epai ya Batesaloniki mokapo 5, totángaka maloba ya elilingi oyo basaleli mpo na koteya biso makambo etali mokolo ya Yehova oyo ezali koya. “Mokolo” yango ezali nini, mpe ndenge nini ekoya? Banani bakobika na mokolo yango? Banani bakobika te? Ndenge nini tokoki komibongisa mpo na mokolo yango? Tokotalela makambo oyo ntoma Paulo alobaki mpe tokoyanola na mituna yango.
b Talá masolo “Bamipesaki na bolingo na bango moko.”