LISOLO YA BOYEKOLI 23
LOYEMBO 28 Tózala baninga ya Yehova
Yehova abengisi yo ozala mopaya na ye
“Hema na ngai ekozala elongo na bango, nakozala Nzambe na bango.”—EZK. 37:27.
NA MOKUSE
Mpo na kokóma lisusu na botɔndi mingi ndenge Yehova abengisi biso tózala bapaya na hema na ye ya elilingi mpe mpo na ndenge akipaka biso.
1-2. Libyangi nini Yehova apesi basaleli na ye ya sembo?
SOKI moto atuni yo: ‘Yehova azali nani epai na yo?’ okoloba nini? Mbala mosusu okoyanola, ‘Yehova azali tata na ngai, Nzambe na ngai, mpe Moninga na ngai.’ Okoki mpe kokanisa batitre to bibengeli mosusu oyo okoki kosalela mpo na kolobela Yehova. Kasi omonaka ye mpe lokola Moto oyo abengisi yo ozala mopaya na ye?
2 Mokonzi Davidi akokanisaki boninga ya Yehova ná basaleli na Ye ya sembo na boyokani kati na mopaya ná moto oyo abengisi ye. Atunaki boye: “Ee Yehova, nani okoki kobengisa na hema na yo? Nani akofanda na ngomba na yo mosantu?” (Nz. 15:1) Maloba yango oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe emonisi ete tokoki kokóma bapaya ya Yehova, baninga na ye. Omoni te ete Yehova apesi biso lokumu monene?
YEHOVA ABENGISI BISO TÓZALA BAPAYA NA YE
3. Nani azalaki mopaya ya liboso ya Yehova, mpe mayoki nini Yehova ná mopaya na ye bazalaki na yango?
3 Liboso Azalisa biloko nyonso, Yehova azalaki ye moko. Kasi na nsima, akelaki Mwana na ye ya liboso; ezalaki lokola nde ayambi mopaya na hema na ye ya elilingi. Yehova asepelaki mingi na mokumba na ye wana ya sika, kozala Moto oyo ayambi mopaya. Biblia emonisi ete Yehova alingaki Mwana na ye “mingi mpenza.” Mpe Mwana yango, mopaya ya Yehova ya liboso, azalaki mpe “kosepela liboso na ye ntango nyonso.”—Mas. 8:30.
4. Banani oyo Yehova abengisaki na nsima lokola bapaya na hema na ye?
4 Na nsima, Yehova akelaki bikelamu mosusu ya elimo, baanzelu. Bango mpe abengisaki bango bákóma bapaya na ye. Biblia ebengi baanzelu ‘bana ya Nzambe’ mpe emonisi ete basepelaka kozala elongo na Yehova. (Yobo 38:7; Dan. 7:10) Na ntango moko boye, baninga to bapaya ya Nzambe ezalaki baoyo bafandaka na ye kuna na likoló. Na nsima ntango akelaki bato awa na mabele, bango mpe bakokaki koya na hema na ye. Kendekende, bato lokola Enoka, Noa, Abrahama, mpe Yobo bazalaki bapaya na ye. Biblia emonisi ete basambeli yango ya solo bazalaki baninga ya Nzambe, bato oyo batambolaki “elongo na Nzambe ya solo.”—Eba. 5:24; 6:9; Yobo 29:4; Yis. 41:8.
5. Esakweli oyo ezali na Ezekiele 37:26, 27 elobelaki nini?
5 Na boumeli ya bankama ya bambula, Yehova akobaki kobengisa baninga na ye bákoma bapaya na ye. (Tángá Ezekiele 37:26, 27.) Na ndakisa, esakweli ya Ezekiele emonisi biso ete Nzambe alingi mpenza basambeli na ye ya sembo bázala na boyokani makasi na ye. Alaki kosala “kondimana ya kimya ná bango.” Esakweli yango elobelaki ntango oyo baoyo bazali na elikya ya bomoi na likoló mpe baoyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele bakozala elongo na bomoko na kati ya hema na ye ya elilingi lokola “etonga kaka moko.” (Yoa. 10:16) Sikoyo nde ntango yango!
NZAMBE AKIPAKA BISO ESIKA NYONSO OYO TOZALI
6. Ntango nini moto akómaka mopaya na hema ya Yehova, mpe hema na ye ezalaka wapi?
6 Na ntango ya kala, hema ya moto ezalaki esika ya kopema mpe komibatela na mbula to malili. Moto oyo bayambi lokola mopaya na hema yango azalaki komizela ete bákipe ye malamu. Ntango tomipesi na Yehova, ayambaka biso na hema na ye ya elilingi. (Nz. 61:4) Tozalaka na ebele ya bilei ya elimo mpe tokómaka baninga ya bato mosusu oyo bazali mpe bapaya ya Yehova. Hema na ye ya elilingi esuki kaka na esika moko boye te. Ekoki kozala ete osilá kokende na mboka mopaya, mbala mosusu mpo na kokɔta na liyangani moko monene, mpe okutanaki na bato mosusu oyo bazali mpe na esengo ya kozala na hema ya Nzambe. Hema ya Yehova ezali esika nyonso oyo basambeli na ye ya sembo bazali.—Em. 21:3.
7. Mpo na nini tokoki koloba ete bato ya sembo oyo bakufá bazali kaka bapaya na hema ya Yehova? (Talá mpe elilingi.)
7 Bongo tokoloba nini mpo na bato ya sembo oyo bakufá? Ebongi tóloba ete bazali kaka bapaya na hema ya Yehova? Ee! Mpo na nini tolobi bongo? Mpo bazali na bomoi na makanisi ya Yehova. Yesu alobaki: ‘Na oyo etali lisekwa ya bakufi, Moize amonisaki yango na lisolo ya mwa banzete ya nzubɛ, ntango abengi Yehova “Nzambe ya Abrahama, Nzambe ya Yisaka, mpe Nzambe ya Yakobo.” Azali Nzambe, ya bakufi te, kasi ya bato ya bomoi, mpamba te epai na ye bango nyonso bazali na bomoi.’—Luka 20:37, 38.
MATOMBA MPE MOKUMBA OYO TOZALI NA YANGO
8. Matomba nini tozwaka lokola tozali bapaya na hema ya Yehova?
8 Kaka ndenge hema ekoki kozala esika ya kopema mpe ya komibatela na mbula to malili, hema ya Yehova mpe ebatelaka biso bapaya na ye na makama ya elimo, mpe epesaka biso elikya. Soki totikali baninga ya Yehova, Satana akosala biso eloko te oyo ekoki kozala likama mpo na libela. (Nz. 31:23; 1 Yoa. 3:8) Na mokili ya sika, Yehova akokoba kobatela baninga na ye ya sembo kaka te na makama ya elimo, kasi mpe na liwa.—Em. 21:4.
9. Yehova azelaka ete bapaya na ye básala nini?
9 Ezali mpenza lokumu monene kozala mopaya na hema ya Yehova; tosali na ye boninga oyo ekoki koumela libela na libela. Tosengeli kosala nini mpo tókoba kozala bapaya ya Yehova? Soki moto abengisi yo epai na ye, okoluka koyeba makambo oyo alingi osala. Na ndakisa, mbala mosusu akolinga olongola sapato liboso ya kokɔta na ndako, mpe okosala yango. Ndenge moko mpe, tolingaka mpenza koyeba makambo oyo Yehova asɛngi na baoyo balingi kokoba kozala bapaya na hema na ye. Kolinga Yehova ekotinda biso tósala nyonso oyo tokoki mpo na ‘kosepelisa ye mpenza.’ (Kol. 1:10) Mpe atako tomonaka ete Yehova azali moninga na biso, toyebi ete azali mpe Nzambe mpe Tata na biso, oyo abongi tómonisela limemya. (Nz. 25:14) Lokola ezali bongo, tosengeli ntango nyonso kopesa ye limemya makasi. Kobosana likambo yango te ekosalisa biso tóboya kosala makambo oyo eyokisaka ye mpasi. Tózala na mposa ya ‘kotambola na bopɔlɔ’ elongo na Nzambe na biso.—Mika 6:8.
YEHOVA ASALELAKI BAYISRAELE MAKAMBO KOZANGA KOPONA BILONGI
10-11. Ndenge nini Yehova amonisaki ete aponaka bilongi te ntango Bayisraele bazalaki na esobe ya Sinai?
10 Yehova asalelaka bapaya na ye makambo kozanga kopona bilongi. (Rom. 2:11) Tokoki komona yango na ndenge asalelaki Bayisraele makambo ntango bazalaki na esobe ya Sinai.
11 Nsima ya kobimisa bato na ye na boombo na Ezipito, Yehova atyaki banganga-nzambe mpo básalaka na tabernakle. Balevi bazwaki mokumba ya kosala misala mosusu na tabernakle yango mosantu. Baoyo bazalaki kosala na tabernakle to baoyo bazalaki kofanda pembeni na yango Yehova akipaki bango malamu koleka basusu? Te! Yehova asalelaki bato nyonso makambo ndenge moko mpo aponaka bilongi te.
12. Ndenge nini Yehova amonisaki ete aponaka bilongi te na oyo etali koyamba bapaya na ekólo ya Yisraele oyo eutaki kosalema? (Kobima 40:38) (Talá mpe elilingi.)
12 Moyisraele nyonso na kaa akokaki kozala moninga ya Yehova, ata soki asalaka na tabernakle to te, mpe afandaka pembeni na yango to te. Na ndakisa, Yehova azalaki kosala ete ekólo mobimba ekoka komona likonzí ya lipata ya likamwisi mpe likonzí ya mɔtɔ oyo ezalaki likoló ya tabernakle. (Tángá Kobima 40:38.) Ntango lipata ebandaki kokende na nzela moko, ata baoyo bahema na bango ezalaki mosika mpenza na tabernakle bazalaki komona yango, bazalaki kokanga biloko na bango, kolongola bahema na bango, mpe kokende elongo na ekólo mobimba. (Mit. 9:15-23) Moyisraele nyonso akokaki koyoka lokito makasi ya kelelo mibale ya palata oyo ezalaki koyebisa bato nyonso ete basengeli kokende. (Mit. 10:2) Ya solo, kofanda pene ya tabernakle ezalaki komonisa te ete moto azali na boninga ya penepene na Yehova. Kasi, moto nyonso na ekólo yango ya Yehova oyo eutaki kosalema akokaki kozala mopaya na Ye mpe kolikya kozwa litambwisi mpe libateli na Ye. Lelo oyo mpe, ata soki tofandaka wapi, Yehova alingaka biso, akipaka biso mpenza, mpe abatelaka biso.
BANDAKISA YA LELO OYO EMONISI ETE YEHOVA APONAKA BILONGI TE
13. Wapi lolenge moko oyo Yehova amonisaka ete aponaka bilongi te lelo oyo?
13 Lelo oyo, basaleli mosusu ya Nzambe bafandaka pene ya biro monene to ya Betele moko ya Batatoli ya Yehova. Basusu kutu basalaka na bisika yango. Na bongo, bandeko yango bapesaka mabɔkɔ na makambo ndenge na ndenge oyo esalemaka na bisika yango mpe bazalaka elongo na bandeko oyo bazali kokamba. Bandeko mosusu bazali bakɛngɛli ya zongazonga to bazali na lolenge mosusu ya mosala ya ntango nyonso. Ata soki ozali na kati ya ebele ya bandeko oyo bazali na mikumba yango te, yebá ete Moto oyo abengisi biso, Yehova, alingaka baoyo nyonso andimi bázala bapaya na ye. Mpe ayebi yo mpe atyelaka yo likebi. (1 Pe. 5:7) Basaleli nyonso ya Nzambe bazwaka bilei ya elimo, litambwisi, mpe libateli oyo esengeli.
14. Wapi ndakisa mosusu oyo emonisi ete Yehova aponaka bilongi te na oyo etali bapaya na ye?
14 Ndakisa mosusu oyo emonisi ete Yehova aponaka bilongi te na oyo etali bapaya na ye ezali ndenge asali ete bato na mokili mobimba bákoka kozala na Biblia lelo oyo. Makomami mosantu ekomamaki libosoliboso na minɔkɔ misato: Ebre, Aramɛyɛ, mpe Grɛki. Baoyo bayebi kotánga minɔkɔ ya libosoliboso oyo Biblia ekomamaki bazali nde na boyokani makasi na Yehova koleka baoyo bayebi minɔkɔ yango te? Te, ezali bongo te.—Mat. 11:25.
15. Nini emonisi polele ete Yehova aponaka bilongi te? (Talá mpe elilingi.)
15 Kondimama na biso epai ya Yehova etaleli te bakelasi oyo totángi to minɔkɔ oyo toyebi. Yehova apesi libaku ya kozwa bwanya na ye kaka te na baoyo batángi, apesi libaku yango na moto nyonso na mabele, ezala baoyo batángi mingi to te. Liloba na ye Biblia ebongolami na bankóto ya minɔkɔ; na yango, bato na mokili mobimba bakoki koyeba mateya na yango mpe koyekola ndenge oyo bakoki kokóma baninga ya Nzambe.—2 Tim. 3:16, 17.
KOBÁ ‘KONDIMAMA’ NA YEHOVA
16. Na kotalela Misala 10:34, 35, tokoki kosala nini mpo Yehova akoba kondima biso?
16 Ezali mpenza lokumu monene ndenge Yehova ayambi biso lokola bapaya na hema na ye ya elilingi. Azali Moyambi-bapaya oyo aleki na boboto, na bolingo, mpe oyo ayebi mpenza koyamba. Lisusu, aponaka bilongi te, ayambi biso nyonso kozanga kotalela esika oyo tozali, mimeseno ya mboka na biso, bakelasi oyo totángá, loposo, ekólo, mbula na biso, to soki tozali mwasi to mobali. Kasi, kaka baoyo batosaka mibeko na ye nde bandimami lokola bapaya na ye.—Tángá Misala 10:34, 35.
17. Epai wapi tokoki komona makambo mosusu oyo etali kozala bapaya na hema ya Yehova?
17 Ndenge Nzembo 15:1 emonisi yango, Davidi atunaki boye: “Ee Yehova, nani okoki kobengisa na hema na yo? Nani akofanda na ngomba na yo mosantu?” Elimo ya Nzambe esalisaki mokomi ya nzembo yango apesa biyano na mituna yango. Lisolo oyo elandi ekolobela mwa masɛngami ya sikisiki oyo tosengeli kokokisa mpo Yehova akoba kondima biso.
LOYEMBO 32 Poná nde Yehova!