LISOLO YA BOMOI
Yehova atyaki likebi na mabondeli na ngai
MOKOLO moko na butu ntango nazalaki na mbula zomi, natalaki minzoto na likoló. Etindaki ngai nafukama mpe nabondela. Nayebaki kaka makambo moke ya Yehova, kasi nayebisaki ye nyonso oyo ezalaki na motema na ngai. Libondeli yango ezalaki ebandeli ya boninga na ngai bomoi mobimba elongo na Yehova Nzambe, “Moyoki ya libondeli.” (Nz. 65:2) Nayebisa bino ntina oyo nabondelaki Nzambe oyo nautaki koyeba sika.
LIKAMBO OYO EBONGOLAKI BOMOI NA NGAI
Nabotamá na mokolo ya 22/12/1929, na Noville, mboka moko moke oyo ezali na baferme libwa pene na Bastogne, na etúká ya Ardennes, na Belgique. Nabosanaka te makambo ya esengo oyo tozalaki kosala na ferme ya baboti na biso. Ngai ná leki na ngai ya mobali Raymond tozalaki kobenda miliki ya bangɔmbɛ na biso na mabɔkɔ mokolo na mokolo mpe tozalaki kosalisa na kobuka mbuma. Na mwa mboka na biso ya moke, bato nyonso bazalaki kosala elongo mpo na kosalisana.
Baboti na ngai, Emile ná Alice, bazalaki bandimi ya molende ya Katolike. Bazalaki kokende Misa mokolo nyonso ya lomingo. Kasi, na bambula 1939, babongisi-nzela oyo bautaki na Angleterre bayaki na mboka na biso mpe bapesaki tata na biso zulunalo Consolation (lelo Lamuká!). Tata amonaki mbala moko ete azwi solo mpe abandaki kotánga Biblia. Ntango atikaki kokende Misa, bato ya mboka na biso, oyo bazalaki liboso na boboto, batɛmɛlaki ye makasi mpenza. Batyaki tata mbamba atikala na Katolike, mpe yango ememaki koswana makasi.
Esalaki ngai mpasi mingi komona ndenge bazalaki kotya tata mbamba makasi. Yango nde etindaki ngai nasɛnga Nzambe lisalisi na libondeli oyo nasalaki na motema mobimba ndenge namonisaki yango na ebandeli ya lisolo. Ntango bato ya mboka batikaki kotya tata mbamba, nasepelaki mingi. Nandimaki mpenza ete Yehova azali “Moyoki ya libondeli.”
BOMOI NA NTANGO YA ETUMBA
Basoda ya Allemagne ya ntango ya Banazi bakɔtaki na Belgique na mokolo ya 10/05/1940, mpe esalaki ete ebele ya bato bákima mboka. Libota na biso ekimaki na sudi ya France. Na nzela, tokutanaki na bitumba ya nsɔmɔ kati na basoda ya Allemagne mpe basoda ya France.
Na nsima, ntango tozongaki na ferme na biso,
tomonaki ete bayibaki biloko na biso mingi. Kaka mbwa na biso, Bobbie nde ezalaki wana. Makambo wana etindaki ngai namituna, ‘Mpo na nini bitumba ná mpasi ezali na mokili?’Na ntango yango, tozwaki makasi ntango ndeko Emile Schrantz, a nkulutu oyo azalaki mpe mobongisi-nzela moko ya sembo ayaki kotala biso. Alimbolelaki biso polele na nzela ya Biblia ntina oyo bampasi ezali na mokili mpe ayanolaki na mituna oyo nazalaki komituna mpo na bomoi. Nakolisaki boninga makasi ná Yehova mpe nandimaki mpenza ete azali Nzambe ya bolingo.
Liboso kutu etumba esila, libota na biso ekómaki komonana mpe kosolola na bandeko mbala na mbala. Na sanza ya 08/1943, ndeko José-Nicolas Minet ayaki kosala diskur na ferme na biso. Atunaki: “Nani alingi kozwa batisimo?” Tata na ngai atombolaki lobɔkɔ, ngai mpe natombolaki lobɔkɔ. Tozwaki batisimo na mai moko ya moke pene ya ferme na biso.
Na sanza ya 12/1944, limpinga ya Allemagne ebandaki etumba na yango monene ya nsuka na wɛsti, mpe eyebani mingi na nkombo ya etumba ya Ardennes. Tozalaki kofanda pene na esika oyo etumba yango ezalaki, mpe tokangamaki na ndako na biso ya nse ya mabele pene na sanza mobimba. Mokolo moko ntango nabimaki libándá mpo na koleisa banyama, bɔmbi moko ekweaki na ferme mpe ememaki nsamba ya ndako oyo ezalaki wana. Soda moko ya Amerika na ndako ya bibwɛlɛ oyo ezalaki pene na ngai agangaki na mongongo makasi, “Lalá na nse!” Napotaki mbangu mpe nalalaki pene na ye; atyaki ekɔti na ye na motó na ngai mpo na kobatela ngai.
KOKOLA NA ELIMO
Nsima ya etumba, tosalaki makasi tósololaka mingi na bandeko ya lisangá ya Liège, oyo ezalaki na kilomɛtrɛ soki 90 na nɔrdi na biso. Na nsima, tofungolaki mwa etuluku moke ya boyekoli na Bastogne. Nakómaki kosala na biro moko ya kofutisa mpako mpe nazwaki libaku ya koyekola mibeko. Na nsima, nasalaki na biro moko ya Leta. Na 1951, tosalaki liyangani moke ya zongazonga na Bastogne. Bato soki 100 bayaki, kati na bango Elly Reuter, ndeko mwasi oyo azalaki mobongisi-nzela ya molende mpenza. Atambolaki na velo kilomɛtrɛ 50
mpo na koya na liyangani. Eumelaki te, tolinganaki mpe tokómaki bafianse. Elly azwaki libyangi ya kokɔta na Eteyelo ya Gileade na États-Unis. Akomelaki biro monene mpo na koyebisa bango ntina oyo amonaki ete asengeli kozongisa libyangi yango. Ndeko Knorr, oyo azalaki kokamba mosala ya basaleli ya Yehova na ntango wana, azongiselaki ye eyano ya boboto ete mokolo mosusu akoki kozwa libaku ya kokɔta Gileade elongo na mobali na ye. Tobalanaki na sanza ya 02/1953.Kaka na mbula yango, ngai ná Elly tokɔtaki liyangani Ebongiseli ya mokili ya sika, oyo esalemaki na Yankee Stadium, na etúká ya New York. Na liyangani yango, nakutanaki na ndeko mobali moko oyo apesaki ngai mosala moko ya malamu mpe asɛngaki ngai nakende kofanda na États-Unis. Nsima ya koyebisa Yehova likambo yango na libondeli, ngai ná Elly tomonaki malamu tóndima mosala yango te, kasi tózonga na Belgique mpo na kopesa mabɔkɔ na mwa etuluku na biso ya basakoli soki 10 na Bastogne. Na mbula oyo elandaki, tosepelaki mingi ntango tobotaki mwana na biso ya mobali, Serge. Likambo ya mawa, sanza nsambo na nsima, Serge abɛlaki mpe akufaki. Toyebisaki Yehova mpasi makasi oyo toyokaki, mpe tozwaki makasi na elikya na biso ya lisekwa.
MOSALA YA NTANGO NYONSO
Na sanza ya 10/1961, nazwaki mwa mosala oyo ekotikela ngai ntango ya kokóma mobongisi-nzela. Kasi, kaka mokolo yango, mokɛngɛli ya filiale ya Belgique abengaki ngai na telefone. Atunaki ngai soki nakoki kobanda kosala lokola mosaleli ya zongazonga (lelo oyo mokɛngɛli ya zongazonga). Natunaki ye: “Tokoki te kosala naino lokola babongisi-nzela liboso tóndima mokumba yango?” Andimaki tósala yango. Nsima ya kosala lokola babongisi-nzela sanza mwambe, tobandaki mosala ya zongazonga na sanza ya 09/1962.
Nsima ya kosala mbula mibale na mosala ya zongazonga, babengaki biso tókɔta Betele na Bruxelles. Tobandaki kosala kuna na sanza ya 10/1964. Mokumba yango ya sika ememelaki biso mapamboli mingi. Mwa moke na nsima ya koya ya ndeko Knorr na Betele na biso na 1965, nakamwaki ntango batyaki ngai mokɛngɛli ya filiale. Na nsima, babengaki ngai ná Elly mpo tókɔta kelasi ya mbala ya 41 ya Eteyelo ya Gileade. Maloba oyo ndeko Knorr alobaki mbula 13 liboso ekokisamaki! Nsima ya kozwa diplome, tozongaki na Betele ya Belgique.
KOFANDISA MOSALA NA BISO NA NZELA YA MIBEKO
Na boumeli ya bambula, nazwaki libaku ya kosalela makambo ya mibeko oyo nayekolá mpo na kosalisa na kofandisa bonsomi na biso ya losambo na Mpoto mpe na bisika mosusu. (Flp. 1:7) Yango esalaki ete nakutana na bakonzi minene ya bikólo koleka 55 epai batyelaki mosala na biso bipekiseli to mpe bapekisaki yango. Na esika nayebisa bakonzi yango ete nayebi makambo ya mibeko, nazalaki koloba ete nazali “moto ya Nzambe.” Nazalaki ntango nyonso kosɛnga litambwisi ya Yehova na libondeli mpo nayebaki ete “motema ya mokonzi [to ya zuzi] ezali lokola mikɛli ya mai na lobɔkɔ ya Yehova. Abalusaka yango esika nyonso oyo alingi.”—Mas. 21:1.
Likambo moko oyo nabosanaki te ezalaki ntango nasololaki na moto moko ya Parlema ya mikili ya Mpoto. Nasɛngaki mbala ebele ete nasolola na ye, mpe nsukansuka andimaki tókutana. Kasi alobaki: “Nakopesa yo kaka miniti mitano, nakolekisa ata miniti moko te.” Nagumbaki motó mpe nabandaki kobondela. Moto yango atunaki ngai na kobanga soki nazalaki kosala nini. Ntango natombolaki motó nayebisaki ye: “Nazalaki kopesa Nzambe matɔndi mpo ozali moko ya basaleli na ye.” Atunaki ngai: “Olingi koloba nini?” Nalakisaki ye Baroma 13:4. Lokola azalaki moto ya Protesta, vɛrsɛ yango ebendaki likebi na ye. Esukaki ndenge nini? Apesaki ngai miniti 30, mpe tosololaki malamu mpenza. Alobaki kutu ete azalaki na limemya mpo na mosala na biso.
Na boumeli ya bambula, basaleli ya Yehova basambi makambo ebele na batribinale ya Mpoto na makambo lokola koboya kokɔta na makambo ya politiki, kozwa mokumba ya kobatela bana, kofuta mpako, mpe bongo na bongo. Nazwaki libaku ya kosalisa na makambo yango mingi mpe namoni ngai moko ndenge Yehova asalisaki biso tósamba malamu mpe tólonga. Batatoli ya Yehova basili kolonga mbala koleka 140 na Tribinale monene ya Mpoto mpo na ntomo ya bato!
MOSALA EFUNGWAMI NA CUBA
Na bambula ya 1990, nasalaki elongo na ndeko Philip Brumley, ya biro monene, mpe ndeko Valter Farneti, ya Italie, mpo na kolandela makambo ya bonsomi ya losambo ya bandeko na biso na Cuba, epai mosala na biso ezalaki na bipekiseli. Nakomelaki ambasade ya Cuba na Belgique mpe na nsima nakutanaki na mokonzi oyo atyamaki mpo na kotalela likambo na biso. Na makita oyo tosalaki na ye liboso, toyokanaki mpenza mingi te na oyo etali bansango ya lokuta oyo esalaki ete bátyela mosala na biso bipekiseli.
Nsima ya koluka litambwisi ya Yehova na libondeli, tosɛngaki ye tótinda Babiblia 5,000 na Cuba mpe bandimaki. Babiblia yango ekómaki malamu mpe bakabolelaki yango bandeko; na yango tomonaki ete Yehova azalaki kopambola milende na biso. Na nsima, tosɛngaki ndingisa ya kotinda lisusu Babiblia 27500. Bandimaki lisusu. Kosalisa ndeko mokomoko ya Cuba azala na Biblia na ye moko epesaki ngai esengo mingi.
Nakendaki na Cuba na mabaku mingi mpo na kosalisa na kofandisa mosala na biso na nzela
ya mibeko. Na ndenge yango, nayebanaki malamu na bakonzi mingi ya guvɛrnema.NDENGE TOSALISAKI BANDEKO YA RWANDA
Na 1994, bato koleka 1 000 000 babomamaki na Rwanda ntango babomaki Batutsi. Likambo ya mawa, bandeko na biso mosusu mpe babomamaki. Eumelaki te, basɛngaki etuluku moko ya bandeko bábongisa biloko mpo na kosunga bandeko ya ekólo yango.
Ntango etuluku na biso ekómaki na mboka-mokonzi Kigali, tomonaki efelo ya biro ya kobongola mikanda mpe ndako ya kobomba mikanda etɔbɔki na masasi bisika mingi. Toyokaki masolo ya nsɔmɔ ya bandeko oyo babomamaki na mashɛti. Kasi, toyokaki mpe masolo oyo emonisaki ndenge bolingo etindaki bandeko básalisana. Na ndakisa, tokutanaki na ndeko moko mobali ya Tutsi oyo abombanaki mikolo 28 na libulu moko na nse ya mabele, na libateli ya libota moko ya Batatoli oyo bazalaki Bahutu. Na likita moko na Kigali, tosalaki makasi tólendisa mpe tóbɔndisa bandeko koleka 900.
Na nsima tokatisaki na Zaïre (lelo République Démocratique du Congo) mpo na koluka ebele ya Batatoli ya Rwanda oyo bakimaki kuna na bakaa ya bato bakimá mboka pene na Goma. Lokola tozalaki komona bango te, tobondelaki Yehova asalisa biso tómona bango. Na nsima, tomonaki moto moko azali kopusana pembeni na biso, mpe totunaki ye soki ayebi ata Motatoli ya Yehova moko. Azongisaki: “Ɛɛ, nazali Motatoli. Nakoki komema bino esika komite mpo na kosunga bandeko ezali.” Nsima ya kosala likita ya kolendisa elongo na bandeko ya komite yango, tokutanaki na bandeko soki 1600 oyo bakimaki mboka mpo na kolendisa bango na elimo mpe kobɔndisa bango. Totángelaki bango mpe mokanda moko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Bandeko yango basepelaki mingi ntango bayokaki eteni oyo elobi: “Tobondelaka mpo na bino ntango nyonso. Toyebi ete Yehova akosundola bino te.” Maloba wana ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezalaki mpenza solo. Lelo, Batatoli koleka 30000 bazali kosalela Yehova na esengo na Rwanda!
NAZALI NA EKATELI YA KOTIKALA SEMBO
Nsima ya mbula pene na 58 ya libala, Elly mwasi na ngai akufaki na 2011. Yehova abɔndisaki ngai wana nazalaki koyebisa ye mpasi na ngai na nzela ya libondeli. Nazwaki mpe libɔndisi na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi.
Atako nakómi na mbula koleka 90, nabimaka mosala ya kosakola pɔsɔ nyonso. Nasepelaka mpe mingi kosalisa Departema ya makambo ya mibeko awa na Betele ya Belgique, nayebisaka basusu makambo oyo nayebi, mpe nasalisaka na kolendisa bilenge na Betele.
Eleki mbula soki 84 ntango nasalaki libondeli na ngai ya liboso epai ya Yehova. Ezalaki ebandeli ya bomoi ya malamu oyo esalisi ngai nakóma penepene na ye. Nazali na botɔndi mingi ndenge na bomoi na ngai mobimba, Yehova atyaka likebi na mabondeli na ngai.—Nz. 66:19. b