Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Ndenge nini Batatoli ya Yehova basengeli kotalela likambo etali koluka molongani na nzela ya basite Internet?

Na ntembe te, Yehova alingaka ete mwasi ná mobali oyo babalani bázala na esengo mpe bázala na boyokani ya makasi oyo ekoumela. (Mat. 19:4-6) Soki okanaka kobala, ndenge nini okoki kozwa molongani ya malamu? Lokola Yehova azali Mozalisi na biso, ayebi oyo tosengeli kosala mpo tózala na libala ya esengo. Na yango, soki osaleli mitinda oyo apesá biso, okozala mpenza na esengo. Tótalela mitinda oyo elandi.

Ya liboso, tosengeli koyeba likambo oyo: “Motema ezali na bokosi mingi koleka eloko mosusu nyonso mpe ezali eloko ya kosakana na yango te.” (Yir. 17:9) Ntango bato mibale oyo balingi kobalana bakómi kokutana mpo na koyebana, bakoki mbala moko kokolisa lolango makasi mpe ekoki kozala mpasi mpo bázwa ekateli ya malamu. Soki bato mibale bazwi ekateli ya kobalana libosoliboso mpo na mayoki oyo bazali na yango, mbala mingi makambo esukaka mabe. (Mas. 28:26) Yango wana, ezali likambo ya bwanya te mpo na baoyo bazali kokutana mpo na koyebana, bámoniselana lolango kaka na ebandeli mpe bálakana libala liboso ya koyebana malamu.

Masese 22:3 elobi: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi, kasi bato oyo bazangi boyebi baleki kaka mpe basengeli kozwa mpasi.” Kosalela basite Internet mpo na koluka molongani ekoki kobimisa makama nini? Likambo ya mawa, bato mosusu bakutanaki na bato oyo bayebi te na nzela ya basite Internet yango, bakómaki kolekisa ntango mpo na koyebana malamu mpe na nsima bayaki koyeba ete bato yango bazalaki te ndenge oyo bazalaki kokanisa. Lisusu, bato mabe basalá bakɔnti ya lokuta mpo na koyiba bato oyo bazangi bokɛngi mbongo. Na bantango mosusu, bato yango ya mabe balobaki ete bazali Batatoli ya Yehova.

Tótalela likama mosusu. Basite yango mosusu esalelaka baprogramɛ ya ordinatɛrɛ mpo na komonisa soki bato mibale bakoki kobalana. Kasi likambo moko te emonisi ete kosala bongo esimbaka mpenza. Ekozala likambo ya bwanya te kokanisa ete baprogramɛ ya ordinatɛrɛ ezwelaka moto ekateli na likambo etali kopona molongani ya malamu. Baprogramɛ yango ekokani soki moke te na mitinda ya Biblia!​—Mas. 1:7; 3:5-7.

Etinda oyo ezali na Masese 14:15 elobi: “Moto nyonso oyo azangi mayele andimaka liloba nyonso, kasi moto ya ekɛngɛ atyaka likebi na matambe na ye.” Liboso ya kozwa ekateli ya kobalana na moto, osengeli koyeba ye malamu. Kasi ezali mpasi koyeba moto malamu soki bozali kosolola kaka na nzela ya Internet. Ata soki boyebani makambo mosusu to mpe bozali kolekisa ntango mingi na kotindelana bamesaje, okoki mpenza koloba ete oyebi moto yango malamu? Bato mosusu oyo bakanisaki ete bazwi mpenza balongani ya solosolo, bakamwaki makambo oyo bamonaki epai ya moto yango ntango bakutanaki boye na miso.

Mokomi ya nzembo alobi: “Nafandi esika moko na bato ya lokuta te; mpe nakɔtaka te esika moko na baoyo bazali kobomba ndenge bazali.” (Nz. 26:4) Bato mingi bamonaka ete ezali mabe te kokoma makambo ya lokuta na bakɔnti na bango, mpo bato mosusu básepela na bango. Bakoki kobomba bizaleli na bango ya mabe, mpe bizaleli na bango ya mabe ekoki komonana te mbala moko wana bazali kotindela bato mosusu bamesaje. Ezali na ntina okanisa na mituna oyo: Ata soki bato mosusu balobi ete bazali Batatoli ya Yehova, nini endimisi mpenza ete bazali Batatoli ya Yehova oyo bazwá batisimo? Bazali bakristo oyo bakomeli na elimo? Bazali na boyokani ya malamu ná Yehova? Bandeko ya lisangá na bango bamemyaka bango? Bakoki nde kozala ndakisa mabe to mpe “baninga ya mabe”? (1 Ko. 15:33; 2 Tim. 2:20, 21) Mpe na kotalela mitinda ya Biblia, bazali na ndingisa ya kobala lisusu? Osengeli kozwa biyano na mituna wana. Mpo na yango, ekozala malamu osolola na Batatoli ya Yehova mosusu oyo bayebi moto yango malamu. (Mas. 15:22) Ya solo, Motatoli ya Yehova ya sembo akolinga te kobalana na moto oyo azali Motatoli te mpe ‘kokangana te na ekanganeli ya mabe.’​—2 Ko. 6:14; 1 Ko. 7:39.

Lokola tomoni ete koluka molongani na nzela ya basite Internet ezali na makama, ezali na balolenge oyo okoki koluka mpe koyeba malamumalamu moto oyo okobalana na ye. Epai wapi okoki kokutana na moto ya malamu oyo bokoki kobalana na ye? Ntango tozalaka na likoki ya koyangana elongo na makita ya lisangá, mayangani ya mike mpe ya minene mpe mayangani mosusu, tozwaka libaku ya koyebana.

Wana bozali kolekisa ntango elongo, bokomona polele soki bozali na mikano mpe bizaleli ndenge moko

Kasi na ntango oyo tozalaka te na likoki ya koyangana bongo, na ndakisa, na eleko ya maladi mabe ya Coronavirus, tosalelaka baaparɛyi mpo na koyangana na makita epai wapi tozwaka libaku ya koyebana na Batatoli ya Yehova mosusu oyo bazali minzemba. Okoki koyoka bango ndenge bazali kosala masolo mpe kopesa biyano na makita. (1 Tim. 6:11, 12) Okoki mpe kozwa libaku ya kosolola na bandeko mosusu na bituluku na nsima ya makita. Wana bozali na etuluku elongo na Batatoli ya Yehova mosusu mpo na kolekisa ntango na nzela ya video, okoki komona ndenge moto oyo ozali kosepela na ye asalelaka basusu makambo mpe okoki mpenza komona bizaleli na ye. (1 Pe. 3:4) Na nsima, ntango oyebi moto yango malamu, okoki kotala soki bino mibale bozali na mikano moko mpe soki bino mibale bobongi mpo na kobalana.

Soki minzemba baluki molongani na ndenge oyo eyokani na mitinda ya Biblia, na ntembe te, bakomona mpenza bosolo ya lisese ya Biblia oyo elobaka: “Ozwi mwasi [to mobali] ya malamu? Ozwi eloko ya malamu, mpe Yehova akosepela na yo.”​—Mas. 18:22.