Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 28

Zalá moto oyo atyaka kimya kasi te moto oyo abimisaka kowelana

Zalá moto oyo atyaka kimya kasi te moto oyo abimisaka kowelana

“Tólukaka te komimonisa ete toleki bamosusu, kobimisa kowelana na kati na biso, koyokelana likunya.”​—GAL. 5:26.

LOYEMBO 101 Tósala na bomoko

NA MOKUSE *

1. Elimo ya kowelana ekoki kotinda bato básala nini?

LELO oyo na mokili, bato mingi bazali na ezaleli ya kowelana. Na ndakisa, bato mosusu ya mombongo basalaka makambo oyo epesaka basusu mpasi kaka mpo báleka baninga. Bato mosusu oyo babɛtaka masano, balukaka ata kozokisa baninga na nko kaka mpo bálonga. Bana-kelasi mosusu bakoki koyiba biyano na ekzamɛ kaka mpo bándima bango bákɔta na inivɛrsite moko ya lokumu mingi. Biso bakristo toyebi ete kosala makambo ya ndenge wana ezali mabe; mpe ezali kati na “misala ya nzoto.” (Gal. 5:19-21) Ekoki kosalema ete basaleli mosusu ya Yehova bákolisa ezaleli ya kowelana na kati ya lisangá kozanga ete báyeba yango? Yango ezali motuna moko ya ntina mingi, mpamba te elimo ya kowelana ekoki kobebisa bomoko na biso na kati ya lisangá.

2. Tokolobela nini na lisolo oyo?

2 Na lisolo oyo, tokolobela bizaleli mabe oyo ekoki kosala ete tówelana na bandeko na biso. Tokolobela mpe ndakisa ya basi mpe mibali ya sembo oyo Biblia elobeli, oyo baboyaki kokóma na ezaleli ya kowelana. Ya liboso, tótalela naino makanisi oyo etindaka biso tósala likambo boye to boye.

TALELÁ MAKANISI OYO ETINDAKA YO OSALA LIKAMBO BOYE TO BOYE

3. Mituna nini tosengeli komituna?

3 Ezali malamu tótalelaka makanisi na biso mbala na mbala. Tokoki komituna boye: ‘Namiyokaka malamu kaka soki nakanisi ete naleki moto mosusu? Nasalaka mosala makasi na lisangá kaka mpo naleka basusu? To nasalaka yango nde mpo na kosepelisa Yehova?’ Mpo na nini tosengeli komituna mituna yango? Tótala oyo Liloba ya Nzambe elobi.

4. Na kotalela Bagalatia 6:3, 4, mpo na nini tosengeli koboya komikokanisa na basusu?

4 Biblia eyebisi biso ete tosengeli te komikokanisaka na basusu. (Tángá Bagalatia 6:3, 4.) Mpo na nini? Mpo soki tozali kokanisa ete toleki bandeko na biso, tokoki kokóma na lolendo. Lisusu, soki tozali komikokanisa na bandeko mosusu oyo tokanisi ete baleki biso, tokoki kolɛmba nzoto. Komikokanisa na bandeko mosusu ezali malamu te. (Rom. 12:3) Katerina, * ndeko mwasi moko oyo afandaka na Grèce alobi boye: “Nabandaki komikokanisa na bandeko oyo ezalaki komonana ete bazali kitoko, basakolaka malamu, mpe bayebi mpenza kosala boninga. Yango esalaki ete namimona ntina te.” Tosengeli kobosanaka te ete soki Yehova abendaki biso epai na ye, ezali te mpo tozali kitoko, tolobaka malamu, to mpo bato mingi balingaka biso; kasi nde mpo tolingaka ye mpe toyokaka Mwana na ye.​—Yoa. 6:44; 1 Ko. 1:26-31.

5. Ndakisa ya ndeko Hyun eteyi yo nini?

5 Tosengeli mpe komituna boye: ‘Nayebani lokola moto oyo atyaka kimya to epanza makita?’ Tótalela ndakisa ya ndeko Hyun, oyo afandaka na Corée du Sud. Na ntango moko boye, azalaki kowelana ná bandeko mosusu oyo bazalaki na mikumba na kati ya lisangá. Alobi boye: “Nazalaki kolobela bango mabe mpe mbala mingi nazalaki koboya makambo oyo bazalaki koloba.” Yango ebimisaki makambo nini? Alobi boye: “Ezaleli na ngai ekɔtisaki bokabwani na kati ya lisangá.” Baninga mosusu ya Hyun basalisaki ye atika ezaleli na ye wana ya mabe. Hyun asalaki bambongwana oyo esengeli, mpe lelo oyo azali nkulutu na kati ya lisangá. Soki tomoni ete tolingi kokóma na ezaleli ya kowelana na basusu na esika ya kotya kimya, tosengeli kosala mbongwana nokinoki.

BOYÁ EZALELI YA KOMIMONA ETE OLEKI BASUSU MPE LIKUNYA

6. Na kotalela Bagalatia 5:26, bizaleli nini ya mabe ekoki kobimisa kowelana?

6 Tángá Bagalatia 5:26. Wapi bizaleli mosusu ya mabe oyo ekoki kobimisa kowelana? Moko na yango ezali ya komimona ete oleki basusu. Moto oyo amimonaka ete aleki basusu, azalaka na lolendo mpe alukaka kaka matomba na ye moko. Ezaleli mosusu ya mabe ezali likunya. Moto ya likunya alukaka kaka te kozwa eloko oyo moto mosusu azali na yango, kasi alingaka mpe ete moto yango azanga eloko yango. Ya solo mpenza, koyokela moto likunya ezali koyina ye. Na ntembe te, tosengeli mpenza kokima bizaleli wana ya mabe!

7. Pesá ndakisa oyo emonisi makama oyo ezaleli ya komimona ete toleki basusu mpe likunya ekoki kobimisa.

7 Ezaleli ya komimona ete toleki basusu mpe likunya ezali lokola bansɛlɛlɛ oyo ezali kolya mabaya ya nsamba ya ndako. Ata soki ndako yango ezali komonana kitoko, kasi lokola bansɛlɛlɛ ezali kolya mabaya ya nsamba na yango, nsukansuka ndako yango ekokwea. Ndenge moko mpe, moto akoki kosalela Yehova bambula mingi, kasi soki atiki ete ezaleli ya komimona ete aleki basusu mpe likunya etambwisa ye, yango ekoki kobimisela ye makama mpe nsukansuka akokwea. (Mas. 16:18) Akotika kosalela Yehova mpe akobimisela basusu mpasi. Kasi ndenge nini tokoki kokima ezaleli ya komimona ete toleki basusu mpe likunya?

8. Ndenge nini tokoki kobundisa ezaleli ya komimona ete toleki basusu?

8 Tokoki kobundisa ezaleli ya komimona ete toleki basusu soki tosaleli toli oyo ntoma Paulo apesaki bakristo ya Filipi. Alobaki boye: “Bósala eloko moko te na kowelana to mpo bozali komimona ete boleki bamosusu, kasi na elimo ya komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki bino.” (Flp. 2:3) Soki tozali kotalela basusu ete baleki biso, tokowelana te na baoyo bazali na makoki koleka biso. Kutu, tokosepela nde na makambo oyo bazali kosala, mingimingi soki bazali kosalela makoki na bango na mosala ya Yehova mpo na kokumisa ye. Na ngámbo mosusu, soki bandeko na biso oyo bazali na makoki mingi bazali kosalela toli ya ntoma Paulo, bakomona mpe bizaleli na biso ya malamu. Yango ekosala ete kimya mpe bomoko ezala na kati ya lisangá.

9. Ndenge nini tokoki koboya koyokela bandeko na biso likunya?

9 Tokoki kobundisa ezaleli ya komimona ete toleki basusu, soki tozali na bopɔlɔ, elingi koloba, koyeba esika makoki na biso esuki. Soki tozali na bopɔlɔ, tokoluka te komonisa basusu ete tozali na makoki mingi koleka bango to mpe toyebi kosala makambo mingi koleka bango. Kasi, tokoluka nde koyekola makambo epai ya baoyo bazali na makoki mingi koleka biso. Na ndakisa, kanisá ete ndeko moko asalaka badiskur malamu na lisangá. Tokoki kotuna ye ndenge oyo asalaka mpo na kobongisa badiskur yango. Soki ndeko mwasi moko ayebi mpenza kolamba, tokoki kotuna ye makanisi mpo biso mpe tókóma kolamba bongo. Mpe soki ndeko moko ya elenge azalaka na mokakatano ya kosala boninga, akoki kotuna makanisi epai ya ndeko moko oyo ayebi kosala boninga. Soki tosali bongo, tokozala na likunya te mpe tokokolisa makoki na biso moko.

ZWÁ MATEYA NA BANDAKISA YA BIBLIA

Komikitisa esalisaki Gideone abatela kimya ná mibali ya Efraime. (Talá paragrafe 10-12)

10. Mokakatano nini Gideone akutanaki na yango?

10 Tótalela likambo oyo ebimaki kati na Gideone, oyo azalaki na libota ya Manase, mpe mibali ya libota ya Efraime. Yehova asalisaki Gideone ná mibali 300 bálonga etumba moko, mpe yango ekokaki kotinda bango bákóma na lolendo makasi. Mibali ya Efraime bayaki kokutana na Gideone mpo na kopesa ye longonya te kasi nde mpo na koswanisa ye. Emonani ete basilikaki mpo, banda na ebandeli, Gideone abengisaki bango te básangana mpo na kobundisa banguna ya Nzambe. Bazalaki komitungisa mingi mpo na lokumu ya libota na bango, kasi babosanaki ete yango te nde ezalaki na ntina mpo na Gideone. Gideone abundaki etumba yango mpo na kopesa nkombo ya Yehova lokumu mpe kobatela basaleli na ye.​—Bas. 8:1.

11. Gideone ayebisaki mibali ya Efraime nini?

11 Na komikitisa nyonso, Gideone ayebisaki mibali ya Efraime boye: “Eloko nini nasali koleka bino?” Na nsima, amonisaki ndenge oyo Yehova asalisaki mibali ya Efraime básala makambo ya minene. Na yango, nkanda ya mibali yango “ekitaki.” (Bas. 8:2, 3) Gideone andimaki komikitisa mpo na kobatela kimya na kati ya basaleli ya Nzambe.

12. Ndakisa ya Gideone ná mibali ya Efraime eteyi biso nini?

12 Lisolo yango eteyi biso nini? Ndakisa ya mibali ya Efraime eteyi biso ete, na esika ya koluka lokumu na biso moko, tosengeli nde kopesaka Yehova lokumu. Batata ya mabota mpe bankulutu bakoki kozwa liteya na ndakisa ya Gideone. Soki tosali likambo oyo esilikisi ndeko moko, tosengeli koluka koyeba ntina oyo ndeko yango asiliki. Tokoki mpe kopesa moto yango longonya mpo na makambo ya malamu oyo asalá. Mpo na kosala yango, tosengeli kozala na komikitisa, mingimingi soki moto mosusu nde azali na libunga. Kasi kotya kimya ezali na ntina mingi koleka lokumu na biso moko.

Lokola Hana atyaki motema ete Yehova akosembola makambo, yango esalisaki ye azwa lisusu kimya ya motema. (Talá paragrafe 13-14)

13. Mokakatano nini Hana akutanaki na yango, mpe ndenge nini alongaki yango?

13 Tólobela mpe ndakisa ya Hana. Abalanaki na Elekana, Molevi moko oyo azalaki kolinga ye mingi. Kasi Elekana azalaki na mwasi mosusu na nkombo Penina. Elekana azalaki kolinga Hana mingi koleka Penina, nzokande, “Penina azalaki na bana, kasi Hana azalaki na bana te.” Mpo na yango, Penina azalaki kotumola Hana “mingi mpenza mpo na kosilikisa ye.” Hana asalaki nini? Atungisamaki mingi mpenza! “Azalaki kolela mpe azalaki kolya te.” (1 Sa. 1:2, 6, 7) Kasi Biblia elobi te ete Hana alukaki kozongisela Penina mabe na mabe. Kasi ayebisaki Yehova ndenge oyo azalaki komiyoka, mpe atyaki motema ete akosalisa ye. Penina abongolaki lolenge na ye ya kosalela Hana makambo? Biblia elobi yango te. Kasi toyebi ete Hana azwaki lisusu kimya ya motema mpe abatelaki yango. Biblia elobi ete: “Elongi na ye ezalaki mawamawa lisusu te.”​—1 Sa. 1:10, 18.

14. Ndakisa ya Hana eteyi biso nini?

14 Ndakisa ya Hana ekoki koteya biso nini? Soki moto moko alingi kowelana na yo, kobosana te ete okoki kosala likambo moko mpo na kolonga mokakatano yango. Ezali na ntina te oluka kowelana na moto yango. Na esika ozongisa mabe na mabe, luká nde kotya kimya ná moto yango. (Rom. 12:17-21) Ata soki moto yango abongwani te, okozala na kimya mpe okobatela esengo na yo.

Lokola Apolosi mpe Paulo bayebaki ete Yehova nde azalaki kopambola mosala na bango, yango esalisaki bango báwelana te (Talá paragrafe 15-18)

15. Apolosi ná Paulo bakokanaki na makambo nini?

15 Mpo na kosukisa, tótalela mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Apolosi mpe ya ntoma Paulo. Mibali yango nyonso mibale bayebaki Makomami malamu mpenza. Bango nyonso bayebanaki mingi mpe bazalaki bateyi malamu. Bango nyonso mibale basalisaki bato mingi bákóma bayekoli. Kasi, bazalaki koyokelana zuwa te.

16. Apolosi azalaki moto ya ndenge nini?

16 Apolosi azalaki “moto ya Alezandria,” mboka moko ya lokumu epai bato bazalaki kokende mpo na kotánga kelasi na siɛklɛ ya liboso. Azalaki molobi moko malamu, mpe “ayebaki Makomami malamumalamu mpenza.” (Mis. 18:24) Ntango Apolosi azalaki na Korinti, bandeko mosusu ya lisangá bazalaki komonisa ete bazalaki kolinga ye mingi koleka bandeko mosusu, ata mpe Paulo. (1 Ko. 1:12, 13) Apolosi alendisaki elimo yango ya bokabwani? Tondimi te ete asalaki bongo. Kutu, ntango Apolosi alongwaki na Korinti, mwa moke na nsima, Paulo alendisaki ye azonga kuna. (1 Ko. 16:12) Paulo alingaki te kosɛnga ye azonga na Korinti soki azalaki kokɔtisa elimo ya bokabwani na lisangá. Na ntembe te, Apolosi asalelaki malamu makoki oyo azalaki na yango mpo na kosakola nsango malamu mpe kolendisa bandeko na ye. Tondimi mpe ete Apolosi azalaki moto ya komikitisa. Na ndakisa, Biblia elobi te ete asilikaki ntango Akila ná Prisile “bamonisaki ye polele nzela ya Nzambe na ndenge ya malamu lisusu koleka.”​—Mis. 18:24-28.

17. Ndenge nini Paulo alendisaki elimo ya kimya?

17 Paulo ayebaki malamu mosala oyo Apolosi asalaki. Kasi, Paulo amitungisaki te ete bato bakokanisa ete Apolosi alekaki ye. Ntango totángaka makambo oyo akomelaki bakristo ya Korinti, tomonaka ete Paulo azalaki na komikitisa mpe na makanisi malamu. Na esika ya kolanda makanisi ya bato oyo bazalaki koloba ete “Ngai nazali moto ya Paulo,” atikaki ete lokumu nyonso ezonga epai ya Yehova mpe Yesu Kristo.​—1 Ko. 3:3-6.

18. Na kotalela 1 Bakorinti 4:6, 7, ndakisa ya Apolosi mpe ya Paulo eteyi biso nini?

18 Ndakisa ya Apolosi mpe ya Paulo ekoki koteya biso nini? Tokoki kosala mingi na mosala ya Yehova, mpe kosalisa bato mingi bákola mpe bázwa batisimo. Kasi tosengeli koyeba ete Yehova nde asalisaka biso tósala nyonso wana. Ezali na liteya mosusu oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Apolosi mpe Paulo. Soki tozali na mikumba mingi, tosengeli kosala makasi mpo na kobatela kimya na lisangá. Tozalaka mpenza na botɔndi ntango bankulutu mpe basaleli na misala basalisaka biso tózala na kimya mpe na bomoko elongo na basusu! Basalaka yango na ndenge bapesaka biso toli oyo eutaka na Biblia. Balukaka te komimona ete bazali na ntina mingi, kasi basalisaka bandeko nyonso ya lisangá bátosa Yesu mpe bálanda ndakisa na ye!​—Tángá 1 Bakorinti 4:6, 7.

19. Biso nyonso tosengeli kosala nini? (Talá mpe etanda “ Boyá kobimisa kowelana.”)

19 Mokomoko na biso azali na makoki oyo Nzambe apesá ye. Tokoki kosalela makoki yango “mpo na kosalelana.” (1 Pe. 4:10) Tokoki kokanisa ete makambo oyo tozali kosala ezali na ntina mingi te. Kasi kobosana te ete mwa bansinga mingi ya mikemike oyo basangisi esika moko nde esalaka elamba ya kitoko. Ndenge moko mpe, likambo nyonso oyo okosala, ekosalisa lisangá mobimba mpo ezala na bomoko. Biso nyonso tosengeli kosala makasi tolongola elimo ya kowelana. Tiká ete tózwa ekateli ya kosala nyonso oyo tokoki mpo na kotya kimya mpe bomoko na kati ya lisangá.​—Ef. 4:3.

LOYEMBO 80 ‘Bómeka mpe bómona malamu ya Yehova’

^ par. 5 Lokola nzungu ya mabele oyo ekoki kopanzana soki esali mwa nzela, ndenge moko mpe, lisangá ekoki kopanzana soki ndeko moko azali komona ete aleki basusu. Soki lisangá ezali makasi te mpe na bomoko te, ekozala te esika moko ya kimya mpo na kosambela Nzambe. Lisolo oyo ekolobela ntina oyo tosengeli koboya kokolisa elimo ya kowelana, mpe oyo tokoki kosala mpo na kobatela kimya na kati ya lisangá.

^ par. 4 Topesi bango bankombo mosusu.