Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 31

“Bópikama makasi, bóninganaka te”

“Bópikama makasi, bóninganaka te”

“Bandeko na ngai ya bolingo, bópikama makasi, bóninganaka te.”​—1 KO. 15:58.

LOYEMBO 122 Tópikama makasi, tóninganaka te!

NA MOKUSE a

1-2. Na kotalela 1 Bakorinti 15:58, na ndenge nini mokristo akokani na ndako ya molai ya etaje?

 NA NSUKA ya bambula ya 1970, na engumba Tokyo, na Japon, bakómaki komatisa malɛmbɛmalɛmbɛ ndako moko ya molai mpenza ya etaje 60. Bato bamitunaki soki ndako yango ekolonga mpenza kotɛlɛma mpo na koningana ya mabele oyo esalemaka mbala na mbala na engumba yango. Kasi, ndenge nini balongaki kotɛlɛmisa ndako yango? Batongaki ndako yango makasi mpenza mpe basalaki ete ndako yango eninganaka mpo ekwea te ntango koningana ya mabele ezali kosalema. Bakristo bazali lokola ndako yango ya molai. Na ndenge nini?

2 Mokristo asengeli kozala na bokatikati na likambo etali kopikama makasi mpe koningana te. Asengeli kozala makasi mpe koningana te na likambo etali kotosa mibeko ya Yehova mpe mitinda na ye. (Tángá 1 Bakorinti 15:58.) ‘Asepelaka kotosa’ mpe akakolaka mibeko ya Yehova te. Longola yango, asengeli kozalaka “makambo makasimakasi te,” to kondima kobongola makanisi na ye soki esɛngi kosala bongo. (Yak. 3:17) Mokristo oyo azalaka na bokatikati aboyaka kozala makambo makasimakasi to mpe kondima kokanga miso na makambo ya mabe. Na lisolo oyo, tokolobela ndenge oyo tokoki koningana te. Tokolobela mpe makambo mitano oyo Satana asalelaka mpo na kolɛmbisa ekateli na biso ya kopikama makasi mpe tokoyekola ndenge oyo tokoki kotɛmɛla milende na ye.

NDENGE NINI TOKOKI KOPIKAMA MAKASI?

3. Mibeko nini Mopesi Monene ya mibeko apesi ezali na Misala 15:28, 29?

3 Lokola Yehova azali Mopesi Monene ya mibeko, apesaka ntango nyonso basaleli na ye mibeko ya polele. (Yis. 33:22) Na ndakisa, lisangani ya mikóló-bakambi ya siɛklɛ ya liboso, emonisaki makambo misato oyo mpo na yango bakristo basengeli koningana te: (1) koboya losambo ya bikeko, kosambela kaka Yehova, (2) kotosa makila mpo ezali mosantu, mpe (3) kotosa mibeko ya Biblia ya koboya pite. (Tángá Misala 15:28, 29.) Ndenge nini bakristo bakoki kopikama makasi na makambo yango misato lelo oyo?

4. Na kotalela Emoniseli 4:11, ndenge nini tokangamaka kaka na Yehova?

4 Toboyaka losambo ya bikeko, kasi tosambelaka kaka Yehova. Yehova apesaki Bayisraele mitindo ete básambelaka kaka ye. (Mib. 5:6-10) Longola yango, ntango Zabolo amekaki ye, Yesu amonisaki polele ete tosengeli kosambela kaka Yehova. (Mat. 4:8-10) Yango wana, tosambelaka te bikeko ya losambo. Tosambelaka mpe bato te. Na ndakisa, tosengeli te kosalela bakonzi ya mangomba, bakonzi ya politiki, bavedɛti ya masano to ya miziki makambo lokola banzambe. Tozalaka na ngámbo ya Yehova mpe tosambelaka kaka ye oyo ‘azalisaki biloko nyonso.’​—Tángá Emoniseli 4:11.

5. Mpo na nini totosaka mobeko ya Yehova na oyo etali komemya bomoi mpe makila mpo ezali mosantu?

5 Totosaka mobeko ya Yehova na oyo etali komemya bomoi mpe makila mpo ezali mosantu. Mpo na nini? Mpo Yehova alobi ete makila elakisi bomoi, likabo ya motuya oyo euti epai na ye. (Lev. 17:14) Ntango Yehova apesaki bato mbala liboso etinda ya kolya misuni ya banyama, apesaki bango mitindo ete basengeli kolya makila te. (Eba. 9:4) Azongelaki mobeko yango ntango apesaki Yisraele Mibeko ya Moize. (Lev. 17:10) Lisusu, apesaki lisangani ya mikóló-bakambi ya siɛklɛ ya liboso malako ete bakristo nyonso ‘bákoba koboya makila.’ (Mis. 15:28, 29) Totosaka mobeko yango mpenza ntango tozwaka bikateli na likambo etali kozwa lisalisi ya minganga. b

6. Milende nini tosalaka mpo tótosa mibeko ya Yehova na oyo etali malamu ná mabe?

6 Totosaka mpe tokakolaka te mibeko ya Yehova na oyo etali malamu ná mabe. (Ebr. 13:4) Ntoma Paulo asaleli maloba ya elilingi, ntango apesi biso toli ya ‘koboma’ biteni ya nzoto na biso, elingi koloba, tosengeli kosala nyonso tóbengana bamposa mabe ya nzoto. Toboyaka kotala to kosala likambo nyonso oyo ekoki kotinda biso tósala pite. (Kol. 3:5; Yobo 31:1) Ntango tomekamaka mpo na kosala likambo moko ya mabe, tobenganaka mbala moko likanisi nyonso oyo ekoki kobebisa boninga na biso ná Nzambe.

7. Tosengeli kozwa ekateli ya kosala nini, mpe mpo na nini?

7 Yehova asɛngaka biso ‘tótosa na motema.’ (Rom. 6:17) Litambwisi na ye ezalaka ntango nyonso mpo na bolamu na biso, mpe tosengeli te kokakola mibeko na ye. (Yis. 48:17, 18; 1 Ko. 6:9, 10) Tosalaka makasi mpo na kosepelisa Yehova mpe tomonisaka ete tozali na makanisi oyo mokomi moko ya nzembo azalaki na yango, oyo alobaki: “Nazwaki ekateli ya kotosa malako na yo ntango nyonso, tii na nsuka.” (Nz. 119:112) Kasi, Satana akoluka kolɛmbisa ekateli na biso wana. Mayele nini asalelaka?

NDENGE NINI SATANA ALUKAKA KOLƐMBISA EKATELI NA BISO YA KOTIKALA NGWI?

8. Ndenge nini Satana asalelaka minyoko mpo na kolɛmbisa ekateli na biso ya kotikala ngwi?

8 Minyoko. Zabolo atindaka bato bábɛta biso mpe bábangisa biso mpo na kolɛmbisa ekateli na biso. Azali na mokano ya “kolya” biso, elingi koloba, ya kobebisa boyokani na biso ná Yehova. (1 Pe. 5:8) Bakanelaki, babɛtaki, mpe babomaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso mpo bazwaki ekateli ya kotikala ngwi. (Mis. 5:27, 28, 40; 7:54-60) Satana azali kokoba kosalela minyoko tii lelo oyo. Tokoki komona yango ndenge na nko nyonso bazali kosalela bandeko na biso ya basi mpe ya mibali makambo ya mabe na Russie mpe na bikólo mosusu. Mpe na mokili mobimba, batɛmɛli bazali konyokola bandeko na biso ya basi mpe ya mibali na lolenge moko to mosusu.

9. Pesá ndakisa oyo emonisi ntina ya kokeba na mayele ya nsense.

9 Mayele ya nsense. Satana asalelaka “mayele mabe” mpe minyoko ya polelepolele. (Ef. 6:11) Tózwa ndakisa ya ndeko mobali moko na nkombo Bob, oyo akɔtaki na lopitalo mpo básala ye lipaso moko monene. Ayebisaki minganga ete ezala ndenge nini akondima te ete bázongisa ye makila. Minganga yango bandimaki kotosa ekateli na ye. Kasi, na butu liboso ya kosala ye lipaso, monganga oyo apesaka bato nkisi ya mpɔngi ayaki epai ya Bob wana bandeko na ye ya libota bazongaki na ndako. Ayebisaki Bob ete minganga bakoki mbala mosusu te kosalela makila kasi basengeli kozala na yango wana soki esɛngi kozongisa makila. Mbala mosusu monganga yango akanisaki ete Bob akobongola likanisi na ye wana bandeko na ye ya libota bazali te. Kasi Bob atikalaki ngwi, mpe alobaki ete akondima soki moke te bázongisa ye makila ata likambo nini ekómeli ye.

10. Na kotalela 1 Bakorinti 3:19, 20, mpo na nini kokanisa ndenge bato oyo batyolaka mibeko ya Yehova bakanisaka ezali likama?

10 Makanisi ya bato. Soki tozali kokanisa ndenge bato oyo batyolaka Yehova mpe mibeko na ye bakanisaka, tokoki mpe kobosana Yehova mpe mibeko na ye. (Tángá 1 Bakorinti 3:19, 20.) Mbala mingi “bwanya ya mokili oyo” elendisaka bamposa ya nzoto. Bakristo mosusu na Pergame mpe na Tyatire bakómaki kosambela bikeko mpe kosala pite ndenge bato bazalaki kosala na engumba yango. Yesu apesaki masangá yango nyonso mibale toli ya makasi mpo batikaki ete bato básala pite. (Em. 2:14, 20) Lelo oyo, bato oyo bazali zingazinga na biso bakoki kotinda biso tókóma na makanisi mabe. Bandeko ya libota mpe bato oyo toyebani na bango bakoki kondimisa biso ete tozali makambo makasimakasi mpe kolendisa biso tóbuka mibeko ya Yehova. Na ndakisa, bakoki koloba ete ezali na ntina te kotikala pɛto na bizaleli mpe mitinda ya Biblia esilá ngala.

11. Lokola topikami makasi, tosengeli koboya nini?

11 Na bantango mosusu, tokoki kokanisa ete Yehova apesaka biso te malako oyo ezali polele. Tokoki ata komeka ‘kokende mosika koleka makambo oyo ekomamá.’ (1 Ko. 4:6) Bakonzi ya mangomba na mikolo ya Yesu bazalaki na ngambo ya lisumu yango. Babakisaki mibeko na bango moko na Mibeko mpe bakómisaki yango mpasi mpo bato mpamba bátosa yango. (Mat. 23:4) Yehova apesaka biso malako ya polele na nzela ya Liloba na ye mpe ebongiseli na ye. Tozali na ntina te ya kobakisa malako mosusu na oyo apesaka. (Mas. 3:5-7) Yango wana, tokendeke mosika te na makambo oyo ekomamá na Biblia to totyelaka bandeko na biso bakristo mibeko te na makambo oyo Biblia esɛngi te.

12. Ndenge nini Satana asalelaka “bokosi ya mpambampamba”?

12 Bokosi. Satana asalelaka “bokosi ya mpambampamba” mpe “makambo mikemike ya mokili” mpo na kokosa mpe kokabola bato. (Kol. 2:8) Na siɛklɛ ya liboso, yango esangisaki bafilozofi oyo eutaki na makanisi ya bato, mateya ya Bayuda oyo ezalaki na Makomami te, mpe liteya oyo elobaki ete bakristo basengeli kotosa Mibeko ya Moize. Bato bakosamaki na makanisi yango ya lokuta mpo makanisi yango ememaki bato mosika na Yehova, ye oyo azali Mopesi Monene ya bwanya ya solosolo. Lelo oyo, Satana asalelaka baradio to batelevizyo mpe basite Internet ya kosolola na baninga mpo na kopanza banungunungu ya lokuta, mpe bansango ya lokuta oyo bakonzi ya politiki balendisaka. Makambo ya ndenge wana emonanaki na eleko ya maladi ya Coronavirus. c Batatoli ya Yehova oyo bazalaki kotosa malako oyo ebongiseli na biso ezalaki kopesa bamitungisaki te ndenge bato oyo bazalaki koyoka bansango ya lokuta bazalaki komitungisa mpambampamba.​—Mat. 24:45.

13. Mpo na nini tosengeli komibatela na makambo oyo ekoki kolongola likebi na biso?

13 Makambo oyo ekoki kolongola likebi na biso. Tosengeli kotya makanisi na “makambo oyo eleki ntina.” (Flp. 1:9, 10) Makambo oyo ekoki kolongola likebi na biso ekoki kolya biso ntango mingi mpe kosilisa biso makasi. Makambo oyo tosalaka mokolo na mokolo, na ndakisa kolya, komɛla, kolekisa mwa mopɛpɛ, mpe mosala ya mosuni, ekoki kokóma makambo oyo ekoki kolongola likebi na biso soki tokómisi yango makambo oyo eleki ntina na bomoi na biso. (Luka 21:34, 35) Longola yango, mokolo na mokolo toyokaka mpe totángaka bansango etali kowelana ya bato mpe bantembe na makambo ya politiki. Tosengeli komindimisa ete bantembe yango ezali te kolongola likebi na biso. Lisusu, tokoki kobanda kokɔtela ngambo moko na makanisi mpe na motema. Satana asalelaka mayele wana nyonso oyo tolobeli awa likoló na mokano ya kolɛmbisa ekateli na biso ya kosala oyo ezali malamu. Tiká tótalela ndenge tokoki kotɛmɛla milende na ye mpe kotikala ngwi.

NDENGE NINI TOKOKI KOTIKALA NGWI?

Mpo otikala ngwi, kanisá ntina oyo omipesaki mpe ozwaki batisimo, tángáká Liloba ya Nzambe mpe manyoláká yango, salá ete motema na yo etengatenga te, mpe tyelá Yehova motema (Talá paragrafe 14-18)

14. Wapi likambo moko oyo ekoki kosalisa biso tótikala ngwi na ngámbo ya Yehova?

14 Kanisá ntina oyo omipesaki mpe ozwaki batisimo. Osalaki makambo wana mibale mpo olingaki kozala na ngámbo ya Yehova. Kobosana te makambo oyo esalisaki yo ondima ete ozwaki solo. Ozwaki boyebi ya sikisiki ya Yehova mpe obandaki komemya mpe kolinga ye lokola Tata na yo ya likoló. Okómaki na kondima mpe obongolaki motema. Motema na yo etindaki yo otika bizaleli ya mabe mpe oyokanisa bomoi na yo na mokano ya Nzambe. Oyokaki malamu ntango oyebaki ete Nzambe alimbisaki yo. (Nz. 32:1, 2) Obandaki koyangana na makita ya lisangá mpe kosakola makambo kitoko oyo oyekolaki. Lokola ozali mokristo oyo amipesaki mpe azwaki batisimo, ozali sikoyo kotambola na nzela ya bomoi, mpe salá makasi okoba kotambola na nzela yango.​—Mat. 7:13, 14.

15. Mpo na nini koyekola mpe komanyola ezalaka na matomba?

15 Tángáká Liloba ya Nzambe mpe manyoláká yango. Nzete ekoki kotɛlɛma makasi soki ezali na misisa oyo epikami makasi. Yango wana soki tozali na kondima makasi epai ya Yehova, tokozala na likoki ya kotikala ngwi. Ntango nzete ekolaka, misisa na yango epikamaka makasi mpe epanzanaka. Ntango toyekolaka mpe tomanyolaka Liloba ya Nzambe, tokómisaka kondima na biso makasi mpe tondimaka mpenza ete banzela ya Nzambe eleki malamu. (Kol. 2:6, 7) Kanisáká na mozindo ndenge malako, litambwisi mpe libateli ya Yehova esalisaki basaleli na ye ya ntango ya kala. Na ndakisa, Ezekiele atyaki mpenza likebi ntango anzelu moko azalaki kozwa mezire ya makambo mikemike ya tempelo ya emonaneli. Emonaneli yango epesaki Ezekiele makasi, mpe epesi biso mateya oyo ebongi na oyo etali ndenge oyo tokoki kopesa mabɔkɔ na mibeko ya Yehova mpo na losambo ya pɛto. d (Ezk. 40:1-4; 43:10-12) Biso mpe tozwaka matomba na ndenge tozwaka ntango mpo na koyekola mpe komanyola na makambo ya mozindo ya Liloba ya Nzambe.

16. Na kotalela Nzembo 112:7, ndenge nini kozala na motema oyo ezali kotengatenga te ebatelaki Bob?

16 Salá ete motema na yo etengatenga te. Mokonzi Davidi alobaki ete akotika te kolinga Yehova ntango ayembaki boye: “Ee Nzambe, motema na ngai ezali kotengatenga te.” (Nz. 57:7) Biso mpe tokoki kozala na motema oyo ezali kotengatenga te, mpe kotyela Yehova motema mobimba. (Tángá Nzembo 112:7.) Tótala ndenge yango esalisaki Bob, oyo tolobelaki liboso. Ntango bayebisaki ye ete makila ekozala wana soki esɛngi bázongisa ye makila, alobaki mbala moko ete soki libaku emonani ete bakotya ye makila, akolongwa na lopitalo yango mbala moko. Na nsima, Bob alobaki boye: “Nakakatanaki te mpe nazalaki kobanga eloko te ata soki likambo nini elingaki kokómela ngai.”

Soki tokómisi kondima na biso makasi, tokoki kotikala ngwi ezala tokutani na komekama ya ndenge nini (Talá paragrafe 17)

17. Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Bob? (Talá mpe elilingi.)

17 Bob atengatengaki te mpo azwaki ekateli ya kotikala ngwi liboso mpenza akende na lopitalo. Ya liboso, alingaki kosepelisa Yehova. Ya mibale, azalaki koyekola na mozindo makambo oyo Biblia mpe mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia elobaka mpo na komemya bomoi mpe makila mpo ezali mosantu. Ya misato, amindimisaki ete kolanda malako ya Yehova ekomemela ye matomba ya libela. Biso mpe tokoki kozala na motema oyo etengatengaka te ezala tokutani na komekama ya ndenge nini.

Na mpiko nyonso, Barake ná bato na ye bazali kolanda limpinga ya basoda ya Sisera (Talá paragrafe 18)

18. Ndenge nini ndakisa ya Barake esalisaka biso tótyela Yehova motema? (Talá elilingi ya ezipeli.)

18 Tyelá Yehova motema. Tótalela ndenge oyo Barake alongaki mpo atyelaki malako ya Yehova motema. Atako nguba to likɔnga ezalaki komonana te na mokili yango, Yehova apesaki ye malako ya kokende kobundisa mampinga ya basoda ya Bakanana, oyo Sisera azalaki kokamba oyo ezalaki na bibundeli mingi mpenza. (Bas. 5:8) Mosakoli mwasi Debora ayebisaki Barake akita na mokili patatalu mpo na kokutana na Sisera mpe na makalo na ye 900. Atako ezalaki mpasi mpo na Bayisraele kobundisa makalo oyo ezalaki na mbangu na mabele ya patatalu, kasi Barake atosaki. Ntango basoda bakitaki na Ngomba Tabore, Yehova anɔkisaki mbula uta na likoló. Makalo ya Sisera ezindaki na pɔtɔpɔtɔ, mpe Yehova apesaki Barake elonga. (Bas. 4:1-7, 10, 13-16) Ndenge moko mpe, Yehova akopesa biso elonga soki totyeli ye motema mpe malako oyo apesaka na nzela ya bamonisi na ye.​—Mib. 31:6.

ZALÁ NA EKATELI YA KOPIKAMA MAKASI

19. Mpo na nini tolingaka kopikama makasi?

19 Tokokoba kotɛlɛma ngwi ntango nyonso oyo tozali na mokili oyo. (1 Tim. 6:11, 12; 2 Pe. 3:17) Tiká ete tóningana te na minyoko, mayele ya nsense, makanisi ya bato, bokosi, mpe makambo oyo ekoki kolongola likebi na biso. (Ef. 4:14) Nzokande, tiká tótɛlɛma ngwi, mpe tókoba kolinga Yehova mpe kotosa mibeko na ye. Kaka na ntango yango, tosengeli kozalaka makambo makasimakasi te. Na lisolo oyo elandi, tokolobela ndenge oyo Yehova mpe Yesu bazali ndakisa ya kokoka na likambo etali kozala makambo makasimakasi te.

LOYEMBO 129 Tokoyika mpiko tii na nsuka

a Banda na mikolo ya Adama ná Eva, Satana asalaka makasi andimisa bato ete basengeli kopona bango moko nini ezali malamu mpe nini ezali mabe. Mposa na ye ezali ete tózala na likanisi yango mpo na mibeko ya Yehova mpe mpo na malako nyonso oyo ebongiseli ya Yehova epesaka biso. Lisolo oyo ekosalisa biso tómibatela na elimo ya lipanda oyo ezali na mokili oyo eyangelami na Satana mpe tókómisa makasi ekateli na biso ya kotosa Yehova.

b Mpo na koyeba ndenge oyo mokristo akoki kotalela makila ndenge Nzambe atalelaka yango, talá liteya 39 ya buku Sepelá na bomoi libela na libela!

d Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 13 mpe 14 ya buku Losambo ya pɛto ya Yehova​—Nsukansuka ezongisami!