Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 30

Kobá kokolisa bolingo na yo

Kobá kokolisa bolingo na yo

“Tókola na bolingo na makambo nyonso.”​—EF. 4:15.

LOYEMBO 2 Yehova nde nkombo na yo

NA MOKUSE a

1. Mateya nini oyekolaki ntango obandaki koyekola Biblia?

 OZALI koyeba lisusu mokolo ya liboso obandaki koyekola? Mbala mosusu okamwaki ntango oyebaki ete Nzambe azalaka na nkombo. Mbala mosusu motema na yo ekitaki ntango oyebaki ete Nzambe anyokolaka bato te na lifelo ya mɔtɔ. Ntango mosusu okamwaki koyeba elikya ya komona lisusu bato oyo olingaka mingi oyo bakufá, mpe kozala na bango na Paradiso awa na mabele.

2. Na kotalela Baefese 5:1, 2, longola koyekola mateya ya Biblia, milende nini mosusu osalaki mpo okola na elimo?

2 Wana ozalaki koyekola Biblia mingi, bolingo na yo mpe mpo na Yehova ebandaki kokola. Bolingo yango etindaki yo osalela makambo oyo oyekolaki. Ozwaki bikateli ya malamu oyo esimbami na mitinda ya Biblia. Obongisaki etamboli mpe bizaleli na yo mpo ozalaki na mposa ya kosepelisa Nzambe. Kaka ndenge mwana amekolaka baboti na ye, yo mpe omekolaki Tata na yo ya likoló.​—Tángá Baefese 5:1, 2.

3. Mituna nini tosengeli komituna?

3 Tosengeli komituna boye: ‘Bolingo na ngai mpo na Yehova ezali kaka makasi ndenge ezalaki ntango nakómaki mokristo? Banda nazwá batisimo, lolenge na ngai ya kokanisa mpe ya kosala makambo, mingimingi na oyo etali komonisela bandeko bolingo, emonisaka ete namekolaka Yehova?’ Soki “bolingo oyo ozalaki na yango liboso” ekómi kokita, kolɛmba nzoto te. Likambo ya bongo, ekómelaki mpe bakristo na siɛklɛ ya liboso. Kasi Yesu asundolaki bango te, mpe akosundola biso te. (Em. 2:4, 7) Ayebi ete tokoki kozongela lisusu bolingo oyo tozalaki na yango liboso ntango tobandaki koyekola solo.

4. Tokolobela nini na lisolo oyo?

4 Lisolo oyo ekolobela ndenge oyo tokoki kokoba kokolisa bolingo na biso mpo na Yehova mpe mpo na basusu. Na nsima, tokomona mapamboli oyo biso mpe bato mosusu tokozwa soki tozali kokolisa bolingo.

KOLISÁ BOLINGO NA YO MPO NA YEHOVA

5-6. (a) Mikakatano nini ntoma Paulo akutanaki na yango na boumeli ya mosala na ye? (b) Nini esalisaki ye akoba kosalela Yehova?

5 Atako ntoma Paulo alekisaki bomoi ya malamu na mosala ya Yehova, kasi akutanaki mpe na mikakatano. Mbala mingi azalaki kosala mibembo ya milai, mpe na ntango wana kosala mobembo ezalaki pɛtɛɛ te. Na boumeli ya mibembo yango, mbala mosusu azalaki kokutana “na makama ya bibale” mpe “na makama ya miyibi.” Na mabaku mosusu, banguna banyokolaki ye mpe babɛtaki ye. (2 Ko. 11:23-27) Longola yango, bandeko na ye bakristo bazalaki ntango nyonso te komonisa botɔndi na milende nyonso oyo azalaki kosala mpo na kosalisa bango.​—2 Ko. 10:10; Flp. 4:15.

6 Nini esalisaki Paulo akoba kosalela Yehova? Na nzela ya Makomami mpe makambo oyo ye moko akutanaki na yango, Paulo ayekolaki makambo mingi na oyo etali bomoto ya Yehova. Paulo andimisamaki ete Yehova Nzambe azalaki kolinga ye. (Rom. 8:38, 39; Ef. 2:4, 5) Mpe akómaki kolinga Yehova mingi koleka. Paulo amonisaki ete azalaki kolinga Yehova ‘na ndenge asalelaki basantu mpe azalaki kokoba kosalela bango.’​—Ebr. 6:10.

7. Wapi lolenge moko oyo tokoki kokolisa bolingo na biso mpo na Yehova?

7 Tokoki kokolisa bolingo na biso mpo na Yehova soki tozali koyekola Liloba na ye na molende. Ntango ozali kotánga Biblia, luká koyeba soki vɛrsɛ mokomoko oyo ozali kotánga emonisi nini mpo na Yehova. Omituna boye: ‘Ndenge nini lisolo oyo emonisi ete Yehova alingaka ngai? Bantina nini vɛrsɛ yango epesi ngai mpo nalinga Yehova?’

8. Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa biso tókolisa bolingo na biso mpo na Nzambe?

8 Kofungolela Yehova motema na biso ntango nyonso na libondeli ezali lolenge mosusu oyo tokoki kokolisa bolingo na biso mpo na ye. (Nz. 25:4, 5) Yehova, na ngala na ye, akoyanola na mabondeli na biso. (1 Yoa. 3:21, 22) Khanh, ndeko mwasi moko na Azia, alobi: “Bolingo na ngai mpo na Yehova esimbamaki libosoliboso na boyebi oyo nazalaki na yango, kasi bolingo yango ekómaki lisusu makasi ntango namonaki ndenge oyo azalaki koyanola na mabondeli na ngai. Yango etindaki ngai nasala makambo oyo esepelisaka ye.” b

KOLISÁ BOLINGO NA YO MPO NA BASUSU

9. Nini emonisi ete Timote azalaki kokolisa bolingo na ye mpo na bandeko?

9 Mwa moke nsima ya kokóma mokristo, Paulo akutanaki na elenge mobali moko na nkombo Timote. Timote azalaki kolinga Yehova mpe bato. Paulo ayebisaki bakristo ya Filipi boye: “Nazali na moto mosusu te oyo azali na makanisi lokola ya [Timote], oyo azali komitungisa mpenza mpo na bolamu na bino.” (Flp. 2:20) Awa, Paulo azalaki te kolobela makoki oyo Timote azalaki na yango, na ndakisa koyeba kobongisa makambo to kosala badiskur, kasi Paulo azalaki kolobela nde bolingo oyo Timote azalaki na yango mpo na bandeko. Kozanga ntembe, bandeko ya masangá oyo Timote azalaki kokende kotala bazalaki kozela ye na mposa makasi.​—1 Ko. 4:17.

10. Ndenge nini Anna ná mobali na ye bamoniselaki bandeko na bango ya basi mpe ya mibali bolingo?

10 Biso mpe tolukaka mabaku ya kosalisa bandeko na biso. (Ebr. 13:16) Tólobela ndakisa ya Anna, oyo tolobelaki na lisolo oyo eleki. Nsima ya mopɛpɛ moko makasi oyo ebɛtaki, ye ná mobali na ye bakendaki kotala ndako ya libota moko ya Batatoli ya Yehova mpe bamonaki ete mopɛpɛ yango ebebisaki nsamba ya ndako na bango. Yango wana, bato ya libota yango bazalaki na bilamba ya pɛto te. Anna alobi: “Tozwaki bilamba na bango, tosukolaki yango, tongomaki yango, togumbaki yango mpe tozongiselaki bango yango. Mpo na biso, yango ezalaki kaka mwa likambo ya moke, kasi esalaki ete tókóma baninga ya motema tii lelo oyo.” Bolingo oyo Anna ná mobali na ye bazalaki na yango mpo na bandeko etindaki bango básunga bandeko.​—1 Yoa. 3:17, 18.

11. (a) Bolingo oyo tomoniselaka bato etindaka basusu básala nini? (b) Na kotalela Masese 19:17, Yehova asalaka nini ntango tozali komonisa bolingo?

11 Ntango tosalelaka bato makambo na bolingo mpe na boboto, mbala mingi bamonaka ete tosalaka milende mpo na komekola ndenge oyo Yehova akanisaka mpe asalaka makambo. Mpe bakoki kozala na botɔndi mpo na boboto oyo tomoniseli bango na ndenge oyo tokanisaki kutu te. Khanh, oyo tolobelaki liboso, abosanaka te bato oyo basalisá ye. Alobi boye: “Nazalaka na botɔndi mingi na bandeko basi oyo bazalaki komema ngai na mosala ya kosakola. Bazalaki koya kozwa ngai na ndako na ngai, kobengisa ngai mpo na kolya mwa eloko, mpe koluka koyeba soki nakómi malamu na ndako. Sikoyo nde nayei koyeba ete ezalaki mosala monene oyo bazalaki kosala. Mpe bazalaki kosala yango na bolingo.” Toyebi ete bato nyonso te nde bakopesa biso matɔndi mpo na bolamu oyo tosaleli bango. Khanh alobi boye mpo na bato oyo basalisaki ye: “Nakanisaka mokolo mosusu nakozongisela bango bolamu oyo basalelá ngai, atako nayebi esika bazali te. Kasi, Yehova ayebi esika bazali, mpe nasɛngaka ye afuta bango.” Makambo oyo Khanh alobi ezali solo. Yehova amonaka ata likambo ya moke ya boboto oyo tosalelaka basusu. Atalelaka yango lokola mbeka ya motuya mpe nyongo oyo akofuta.​—Tángá Masese 19:17.

Moto oyo azali kokola na elimo, alukaka mabaku ya kosalisa basusu (Talá paragrafe 12)

12. Ndenge nini bandeko bakoki komonisela bandeko ya lisangá bolingo? (Talá mpe bililingi.)

12 Soki ozali ndeko mobali, ndenge nini okoki komonisela basusu bolingo mpe makambo nini okoki kosala mpo na kosalisa bango? Elenge mobali moko na nkombo Jordan atunaki nkulutu moko ndenge nini akoki kosala lisusu mingi mpo na kosunga bandeko na lisangá. Nkulutu yango apesaki ye longonya mpo na bokoli oyo asalaki mpe apesaki ye mwa batoli mpo esalisa ye asala lisusu mingi na lisangá. Na ndakisa, ayebisaki Jordan ayaka na Ndako ya Bokonzi na ngonga ya malamu mpo na kopesa bandeko mbote, apesaka biyano na makita, asakolaka mbala na mbala na etuluku na bango ya mosala ya kosakola, mpe alukaka mabaku ya kosalisa basusu. Ntango Jordan asalelaki toli yango, akómaki kaka te na makoki ya kosala makambo ya malamu, kasi akolisaki mpe bolingo na ye mpo na bandeko. Jordan ayekolaki ete ntango ndeko mobali akómi mosaleli na misala, abandaka te kosalisa basusu na ntango oyo akómi mosaleli na misala; kasi abandaka naino kosalisa basusu, mpe ntango akómi mosaleli na misala akobaka kosalisa bango.​—1 Tim. 3:8-10, 13.

13. Ndenge nini bolingo esalisaki ndeko mobali moko na nkombo Christian akokisa masɛngami ya kokóma lisusu nkulutu?

13 Bongo soki kala ozalaki nkulutu to mosaleli na misala? Yehova abosani te mosala makasi oyo osalá mpe bolingo oyo etindaki yo osala mosala yango. (1 Ko. 15:58) Atyaka mpe likebi na bolingo oyo ozali kokoba komonisa ata lelo oyo. Ndeko mobali moko na nkombo Christian alɛmbaki nzoto ntango balongolaki ye na molɔngɔ ya bankulutu. Kasi alobaki boye: “Nazwaki ekateli ya kosala nyonso oyo nakokaki mpo nasalela Yehova na bolingo, ata nazalaki lisusu nkulutu te.” Kendekende, nazongelaki mokumba na ngai ya nkulutu. Christian alobi: “Mpo na koloba solo, nazalaki kobaye mwa moke kozongela mokumba yango. Kasi nazwaki ekateli ete soki Yehova, na motema mawa na ye, alingi ete nazongela mokumba na ngai, nakosala yango mpo nalingaka ye mpe bandeko na ngai.”

14. Mateya nini ozwi na makambo oyo ndeko mwasi moko na Géorgie alobi?

14 Basaleli ya Yehova bamoniselaka mpe bato oyo bazalaka na bango esika moko bolingo. (Mat. 22:37-39) Na ndakisa, Elena, ndeko mwasi moko oyo afandaka na Géorgie, alobi boye: “Kolinga Yehova nde ezalaki eloko ya libosoliboso oyo ezalaki kotinda ngai nasakola. Kasi ntango bolingo na ngai mpo na Yehova ezalaki kokola, nakómaki mpe kolinga basusu mingi. Nazalaki kokanisa na makambo oyo bazalaki kokutana na yango mpe koluka koyeba lisolo oyo ekosimba mitema na bango. Ntango nyonso nazalaki kokanisa bongo mpo na bango, nazalaki kokóma na mposa makasi ya kosalisa bango.”​—Rom. 10:13-15.

MAPAMBOLI OYO TOKOZWA SOKI TOMONISELI BASUSU BOLINGO

Likambo moko ya bolingo ekoki komemela ebele ya bato mapamboli (Talá paragrafe 15-16)

15-16. Ndenge emonisami na bililingi, mapamboli nini tozwaka ntango tomoniselaka basusu bolingo?

15 Ntango tomoniselaka bandeko na biso bolingo, biso nyonso tozwaka matomba. Ntango maladi ya Coronavirus ebandaki, ndeko mobali moko na nkombo Paolo ná mwasi na ye basalisaki bandeko basi mingi ya mibange báyekola kosalela baaparɛyi mpo na kopesa litatoli. Ndeko mwasi moko azalaki liboso kokoka te kosalela aparɛyi na ye, nsukansuka alongaki kosalela yango. Azwaki likoki ya kosalela yango mpo na kobengisa bandeko na ye ya libota na Ekaniseli. Bato 60 kati na bango bayanganaki na nzela ya video! Ndeko mwasi yango ná bandeko na ye ya libota bazwaki matomba na milende oyo Paolo ná mwasi na ye basalaki. Na nsima, ndeko mwasi yango akomelaki Paolo boye: “Matɔndi na ndenge oteyi biso mibange. Nakotikala kobosana te ndenge Yehova akipaka biso mpe mosala makasi oyo bosalaki mpo na kosunga biso.”

16 Masolo lokola oyo epesaki Paolo liteya moko monene. Ekundwelaki ye ete bolingo ezali na ntina mingi koleka kozala na ebele ya boyebi to mpe makoki oyo moto abotamá na yango. Abakisi boye: “Nazalaki mokɛngɛli ya zongazonga. Lelo, nayei koyeba ete bandeko bakoki kobosana badiskur oyo nasalá, kasi babosanaka te makambo ya malamu oyo nasalelá bango.”

17. Nani mosusu akozwa matomba ntango tomoniselaka basusu bolingo?

17 Ntango tomoniselaka basusu bolingo, biso moko mpe tozwaka matomba na ndenge oyo tokanisaki te. Jonathan, oyo afandaka na Nouvelle-Zélande, amonisi bosolo ya likambo yango. Mokolo ya pɔsɔ moko na moi makasi, amonaki mobongisi-nzela moko azali kosakola na balabala. Jonathan azwaki ekateli ya koteyaka na mobongisi-nzela yango na mikolo nyonso ya pɔsɔ nsima ya midi. Na ntango yango, Jonathan ayebaki naino te matomba oyo akokaki kozwa na likambo wana ya boboto oyo asalaki. Jonathan alobi: “Na ntango moko boye na bomoi na ngai, nazalaki kolinga mosala ya kosakola te. Kasi ntango namonaki ndenge oyo mobongisi-nzela yango azalaki koteya mpe ndenge oyo mosala na ye ezalaki kobota mbuma, etindaki ngai nakóma kolinga mosala ya kosakola. Akómaki mpe moninga malamu oyo asalisaki ngai nakola na elimo, nasepela mingi na mosala ya kosakola, mpe nakóma lisusu moninga ya motema ya Yehova.”

18. Yehova alingi tósala nini?

18 Yehova alingi biso nyonso tókóma lisusu kolinga ye mpe basusu mingi. Ndenge tomoni yango, tokoki kokómisa makasi bolingo na biso mpo na Yehova soki tozali kotánga mpe komanyola Liloba na ye mpe kosololaka na ye mbala na mbala na libondeli. Tokoki kokolisa bolingo na biso mpo na bandeko na biso soki tozali kosunga bango na makambo ndenge na ndenge. Wana bolingo na biso ezali kokola, tokopusana lisusu penepene na Yehova mpe na bandeko na biso bakristo. Mpe boninga na biso ekozala mpo na libela na libela!

LOYEMBO 109 Tólingana makasi na motema moko

a Ezala tozali kosalela Yehova banda bambula mingi to te, biso nyonso tosengeli kokoba kokola na elimo. Lisolo oyo ekolobela lolenge moko ya malamu oyo tokoki kosala yango: kokolisa bolingo na biso mpo na Yehova mpe basusu. Wana ozali komanyola na lisolo oyo, talá makambo oyo osí osali mpo okola na elimo mpe milende oyo okoki kosala mpo okoba kokola na elimo.

b Topesi bango bankombo mosusu.