Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

Kotyela basusu likebi ememaka mapamboli ya seko

Kotyela basusu likebi ememaka mapamboli ya seko

Ngai, mama mpe ndeko na ngai ya mwasi, Pat, na mobu 1948

“LINGOMBA ya Anglican eteyaka solo te. Kobá koluka solo.” Ntango kaka nkɔkɔ na ngai ya mwasi alobaki bongo, mama akómaki koluka lingomba ya solo. Kasi, azalaki kolinga kosolola na Batatoli ya Yehova te mpe ntango tozalaki kofanda na Toronto, na Canada, ayebisaki ngai soki bayei epai na biso nasengeli kobatama. Kasi ntango mama-leki na ngai akómaki koyekola na Batatoli ya Yehova na mobu 1950, mama mpe andimaki koyekola. Babandaki koyekola na ndako ya mama-leki mpe na nsima azwaki batisimo.

Tata azalaki mokambi na lingomba moko na Canada, na yango mikolo nyonso ya lomingo azalaki kotinda ngai ná leki na ngai ya mwasi na ekodime, na nsima na ngonga 11:00 tozalaki kokende elongo na tata kosala misala ya lingomba. Na nsima ya midi, tozalaki kokende na mama na Ndako ya Bokonzi. Yango wana, tozalaki komona polele bokeseni oyo ezalaki kati na mangomba yango mibale.

Na mobu 1958, ngai ná libota ya ndeko Hutcheson na liyangani oyo esangisaka bato ya mikili mingi oyo ezalaki na motó ya likambo: “Mokano ya Nzambe”

Mama ayebisaki baninga na ye ya motema makambo oyo ayekolaki, ezalaki Bob ná Marion Hutcheson, bango mpe bandimaki koyekola Biblia. Na mobu 1958, ndeko mwasi ná ndeko mobali Hutcheson bamemaki ngai ná bana na bango misato ya mibali na liyangani oyo esangisaka bato ya mikili mingi ya mikolo mwambe oyo esalemaki na engumba New York, ezalaki na motó ya likambo: “Mokano ya Nzambe.” Sikoyo nde nayei koyeba ete esɛngaki bango milende mingi mpo bámema ngai elongo na bana na bango na liyangani yango, kasi liyangani yango ezalaki ntango moko eleki malamu nalekisá na bomoi na ngai.

BANDEKO BASALISAKI NGAI NASALA MINGI NA MOSALA YA YEHOVA

Ntango nazalaki elenge, tozalaki kofanda na ferme moko epai nazalaki kosepela kobɔkɔla banyama. Nazalaki kokanisa kokóma monganga oyo asalisaka banyama (vétérinaire). Mama ayebisaki yango nkulutu moko na lisangá. Nkulutu yango amonisaki ngai ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka” mpe atunaki ngai soki kokende na iniversite ekobebisa te boyokani na ngai ná Yehova. (2 Tim. 3:1) Yango wana, nazwaki ekateli ya koboya kokende na iniversite.

Kasi nazalaki kaka komituna soki nakosala nini nsima ya kozwa diplome. Atako nazalaki kosakola pɔsɔ nyonso, kasi nazalaki kolinga mosala ya kosakola te mpe likanisi ya kokóma mobongisi-nzela etikalá koyela ngai te. Kaka na ntango yango, tata mpe noko na ngai oyo bazalaki Batatoli ya Yehova te bazalaki kotinda ngai nandima kosala na kompanyi moko ya monene na Toronto. Noko na ngai azalaki moto monene na kompanyi yango, yango wana nandimaki kosala kuna.

Kuna na Toronto, lokola nazalaki kosala mbala mingi na nsima ya ngonga ya mosala mpe kolekisa ntango mingi na bato oyo bayebaki Yehova te, nazalaki kokipe lisusu mingi te makambo ya elimo. Liboso nazalaki kofanda na nkɔkɔ na ngai ya mobali oyo azalaki Motatoli te, kasi ntango akufaki, nasengelaki koluka esika mosusu ya kofanda.

Ndeko mwasi ná ndeko mobali Hutcheson, oyo bamemaki ngai na liyangani oyo esalemaki na mobu 1958 na New York, bazalaki lokola baboti na ngai. Basɛngaki ngai nakende kofanda epai na bango mpe basalisaki ngai nakola na elimo. Na mobu 1960, ngai ná mwana na bango ya mobali John, tozwaki batisimo. John akómaki mobongisi-nzela, yango esalisaki ngai nakóma kosakola mingi. Bandeko na lisangá bamonaki bokoli na ngai, mpe kendekende nakómaki mokɛngɛli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. a

MOSUNGI MALAMU MPE MOSALA YA SIKA

Mokolo ya libala na biso na mobu 1966

Na mobu 1966, nabalanaki na Randi Berge, azalaki mobongisi-nzela ya molende mpe azalaki na mposa makasi ya kosala na esika oyo mposa ya basakoli ezalaki mingi. Mokɛngɛli ya zongazonga na biso atyelaki biso likebi mingi, alendisaki biso tókende kopesa mabɔkɔ na lisangá moko na Orillia, na engumba Ontario. Yango wana, tokangaki biloko na biso mpe tokendaki.

Ntango kaka tokómaki na Orillia, ngai mpe nakómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza lokola Randi. Lokola ye, ngai mpe nakómaki kosepela mingi na mosala ya kosakola! Ntango kaka mosala ya kosakola ezwaki esika na motema na ngai, nakómaki koyoka esengo ya kosalela Biblia mpe komona ndenge bato bazali kokanga ntina ya makambo oyo ezali na kati. Nasepelaki mingi kosalisa mwasi moko ná mobali na ye na Orillia básala bambongwana na bomoi na bango mpe bákóma basaleli ya Yehova.

MONƆKƆ YA SIKA MPE NDENGE MOSUSU YA KOKANISA

Na viziti moko tosalaki na Toronto, nakutanaki na Arnold MacNamara, azalaki moko ya bandeko oyo bazalaki kokamba misala ya Betele. Atunaki ngai soki nakosepela kokóma mobongisi-nzela monene. Mbala moko nayanolaki: “Ɛɛ! Nakoki kokende esika nyonso kasi na Québec te!” Nazalaki na makanisi ya mabe oyo bato mingi ya Canada oyo balobaka Anglais bazalaki na yango mpo na bato oyo bazalaki na etúká ya Québec epai balobaka Français. Na ntango yango, bato na Québec bazalaki kotomboka mpo etúká ya Québec ekóma kotambwisama na guvɛrnema na yango moko.

Arnold ayebisaki ngai ete: “Mikolo oyo, filiale ezali kotinda babongiseli-nzela monene kaka na Québec.” Na yango, nandimaki mbala moko kokende. Nayebaki ete Randi azalaki kosepela kosala kuna. Na nsima, nayaki komona ete ezalaki ekateli moko ya malamu oyo tozwaki na bomoi na biso!

Nsima ya kolekisa bapɔsɔ mitano mpo na koyekola Français, ngai, Randi mpe ndeko mwasi moko ná mobali na ye tokendaki na Rimouski, oyo ezalaki na ntaka ya bakilomɛtrɛ soki 540 na nɔrdi-ɛsti ya Montréal. Ntango natángaki mwa mayebisi mbala ya liboso na makita ya lisangá, emonanaki polele ete tozalaki naino na makambo mingi ya koyekola na Français. Nalobaki ete na liyangani oyo ezali koya tokozala na bandɛkɛ ebele oyo babengi “maligbanga to Autruche” na esika naloba tokozala na bandeko ebele oyo “bakouta na ekólo Autruche.”

“Maison blanche” na Rimouski

Bandeko basi minzemba minei ya molende mpe libota ya ndeko Huberdeau ná bana na bango mibale ya basi bayaki kopesa mabɔkɔ na Rimouski. Bato ya libota ya ndeko Huberdeau bazwaki ndako ya monene mpo na kofutela mpe babongisi-nzela nyonso oyo tozalaki wana tozalaki kosangisa mbongo mpo na kofuta ndako yango, tozalaki kobenga yango “Maison blanche” mpo liboso na yango mpe makonzí na yango ezalaki na langi ya mpɛmbɛ. Mbala mingi tozalaki bato 12 to 14 oyo bazalaki kofanda kuna. Ngai ná Randi tozalaki kosakola na ntɔngɔ nyonso, na nsima ya midi nyonso mpe na mpokwa nyonso. Yango wana, tozalaki kosepela ntango nyonso kozala elongo na ndeko moko mpo tóbima na ye na mosala ya kosakola, ezala na mpokwa nyonso na eleko ya malili.

Tomesanaki mpenza na babongisi-nzela mosusu wana mpe bakómaki lokola bandeko na biso ya libota. Na bantango mosusu tozalaki koyɔta mɔtɔ elongo, mpe mikolo mosusu tozalaki kolamba biso nyonso esika moko. Ndeko mobali moko azalaki alanga-nzembo, yango wana mikolo nyonso ya pɔsɔ na mpokwa tozalaki koyemba mpe kobina.

Bato mingi na Rimouski basepelaki koyekola Biblia! Nsima ya bambula mitano, tosepelaki mingi komona bayekoli mingi ya Biblia bakolaki na elimo mpe bazwaki batisimo. Lisangá ekómaki na basakoli soki 35.

Na Québec, tozwaki formasyo ya malamu ya bapalanganisi ya nsango malamu. Tomonaki ndenge Yehova apambolaki mosala na biso ya kosakola mpe akokisaki bamposa na biso ya mosuni. Longola yango, toyekolaki kolinga bato oyo balobaka Français, lokota na bango mpe mimeseno na bango, yango esalisaki biso mpe tókóma kolinga mimeseno ya bato mosusu.​—2 Ko. 6:13.

Kasi na mbalakaka, filiale esɛngaki biso tókende na engumba ya Tracadie, na ɛsti ya New Brunswick. Yango ebimiselaki biso mokakatano mosusu mpo toutaki kondima kokɔta na ndako moko mpo na kofutela mpe nalingaki kobanda kotángisa na eteyelo moko mpo na mwa ntango. Longola yango, bayekoli na biso mosusu ya Biblia bautaki kokóma basakoli mpe tozalaki kotonga Ndako ya Bokonzi.

Tozalaki kobondela na mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo nyonso mpo na mobembo yango mpe tokendaki kotala engumba yango ya Tracadie, oyo ekesanaki mpenza na engumba Rimouski. Kasi lokola Yehova alingaki ete tókende kuna, tozwaki ekateli ya kokende. Tomekaki Yehova mpe tomonaki ndenge asalisaki biso na makambo nyonso. (Mal. 3:10) Lokola Randi azalaki makasi na elimo, azalaki na elimo ya komipimela mpe ayebaki kosɛkisa, yango esalaki ete mobembo wana eleka na kimya.

Robert Ross azalaki kaka ye moko nkulutu na lisangá na biso ya sika. Ye ná mwasi na ye Linda, bazalaki babongisi-nzela, mpe ntango babotaki mwana na bango ya liboso, basepelaki kotikala kuna. Atako bazalaki kobɔkɔla mwana na bango ya mobali, balendisaki ngai ná Randi mingi na boyambi na bango, na ekateli makasi oyo bazalaki na yango mpe molende na mosala ya kosakola.

MAPAMBOLI YA KOSALA ESIKA MPOSA EZALI

Eleko ya malili na mosala ya zongazonga

Nsima ya kolekisa mbula mibale na Tracadie na mosala ya mobongisi-nzela, tozwaki mokumba moko oyo tokanisaki te, elingi koloba, babengaki biso na mosala ya bakɛngɛli batamboli. Tosalaki na zongazonga oyo bato balobaka monɔkɔ ya Anglais mbula nsambo, mpe na nsima batindaki biso lisusu na zongazonga oyo bato balobaka monɔkɔ ya Français na Québec. Léonce Crépeault, oyo azalaki mokɛngɛli ya etúká na biso na Québec, azalaki mbala mingi kopesa ngai longonya nsima ya kosala badiskur. Kasi na nsima azalaki kotuna ngai boye: “Okoki kosala nini mpo ezala lisusu malamu koleka?” b Ndenge atyelaki ngai likebi esalisaki ngai nasala ete mateya na ngai ezala polele mpe pɛtɛɛ.

Moko ya mikumba oyo nabosanaka te ezali oyo nazwaki na mobu 1978 na liyangani oyo esangisaka mikili mingi, oyo esalemaki na Montréal, oyo ezalaki na motó ya likambo: “Kondima oyo elongaka.” Nasalaki na departema ya kolamba. Bato 80000 basengelaki koya, mpe bibongiseli ya sika ezwamaki mpo na ndenge ya koleisa bandeko. Makambo nyonso ezalaki sika: bisaleli, biloko ya kolamba, mpe ndenge ya kolamba yango. Tozalaki na bafrigo ya minene soki 20, mpe na bantango mosusu ezalaki kosala malamu te. Mokolo moko liboso liyangani ebanda, tozalaki na likoki te ya kokɔta na stade mpo na lisano ya ndembo oyo esalemaki kuna, kasi toyaki kokɔta na midi ya butu. Mpe kaka na butu wana, tosengelaki kopelisa ba-four mpo na kolamba bilei ya ntɔngɔ! Tolɛmbaki mpenza, kasi makoki oyo bandeko bazalaki na yango, mosala makasi oyo basalaki mpe ndenge bazalaki kosala masɛki eteyaki ngai makambo mingi. Tozalaki na bomoko mpe boninga na biso ezali kokoba tii sikoyo. Ezalaki mpenza esengo kozala na liyangani wana oyo etiká nsango na Québec, engumba oyo ezalaki na botɛmɛli makasi na bambula kobanda 1940 tii na 1960.

Ngai ná Randi liboso liyangani ebanda na Montréal, na mobu 1985

Nayekolaki makambo mingi epai ya baninga na ngai bakɛngɛli ntango mayangani ya minene ezalaki kosalema na Montréal. Na liyangani moko, ndeko David Splane, oyo azali sikoyo na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, azalaki mokambi ya biro ya liyangani. Na liyangani moko oyo eleká, ntango basɛngaki ngai nakokisa mokumba yango, ndeko David asungaki ngai mingi.

Na 2011, nsima ya kolekisa bambula 36 na mosala ya mokɛngɛli motamboli, babengaki ngai nazala molakisi na Eteyelo mpo na bankulutu ya masangá. Na boumeli ya mbula mibale, ngai ná Randi tolakia na bambeto 75 ekeseni, kasi esɛngaki tómipimela bongo. Na nsuka ya pɔsɔ nyonso, bankulutu bazalaki kopesa matɔndi mpo bamonaki ndenge Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezalaki kosala nyonso mpo bankulutu bázala na boyokani makasi ná Yehova.

Na nsima, nazalaki molakisi na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi. Mbala mingi bana-kelasi bazalaki kolɛmba mpo ezalaki na makambo mingi ya kosala, na ndakisa, kofanda esika moko na boumeli ya bangonga 7 na mokolo, kosala badevuare na boumeli ya bangonga soki misato mpokwa nyonso, mpe kokokisa mikumba minei to mitano pɔsɔ nyonso. Ngai ná molakisi mosusu tomonisaki bango ete bakokaki te kosala nyonso wana soki Yehova asalisaki bango te. Nabosanaka te ndenge bana-kelasi bakamwaki komona ndenge Yehova asalisaki bango básala makambo oyo bakanisaki te ete bakokoka kosala, nyonso wana mpo batyelaki ye motema.

KOTYELA BASUSU LIKEBI EMEMAKA MAPAMBOLI OYO EUMELAKA

Likebi oyo mama na ngai azalaki kotyela basusu esalisaki bayekoli na ye ya Biblia bákola na elimo mpe esalisaki ata tata na ngai akóma kotalela solo na ndenge ya malamu. Mikolo misato nsima ya liwa ya mama na ngai, tokamwaki ndenge tata na ngai ayaki koyoka diskur ya bato nyonso na Ndako ya Bokonzi, mpe akobaki koyangana na makita na boumeli ya mbula 26 oyo elandaki. Atako tata azwaki batisimo te, bankulutu bayebisaki ngai ete azalaki moto ya liboso oyo azalaki kokóma na makita pɔsɔ nyonso.

Mama azalaki ndakisa malamu mpo na ngai mpe bandeko na ngai ya basi. Bandeko na ngai nyonso misato ya basi ná mibali na bango bazali kosalela Yehova na bosembo nyonso. Mibale kati na bango bazali kosala na Betele, moko na Portugal mpe mosusu na Haiti.

Ngai ná Randi tozali sikoyo babongisi-nzela monene na Hamilton, na engumba Ontario. Ntango tozalaki na mosala ya zongazonga, tozalaki kosepela kokende na bandeko mpo na kozongela bato oyo basepelaki mpe koyekola na bato Biblia. Kasi sikoyo biso moko tozali kosepela komona ndenge bayekoli na biso ya Biblia bazali kokola na elimo. Mpe lokola tosali boninga na bandeko na lisangá na biso ya sika, tozali kolendisama komona ndenge Yehova azali kosunga bango ezala na ntango ya mpasi to ya bisengo.

Soki tokanisi, tozalaka na botɔndi mingi mpo na likebi oyo bandeko batyelaki biso. Na ngala na biso, tomekaka kotyela basusu “likebi,” kolendisa bango básalela Yehova na kotalela makoki na bango. (2 Ko. 7:6, 7) Na ndakisa, na libota ya ndeko mobali moko, mwasi na ye, mwana na bango ya mobali mpe ya mwasi bazalaki bango nyonso na mosala ya ntango nyonso. Natunaki ndeko mobali yango soki asilá kokanisa kosala mosala ya mobongisi-nzela. Ayanolaki ete azalaki kosunga babongisi-nzela misato. Na yango, natunaki ye lisusu boye: “Okoki kosunga bango koleka Yehova?” Nalendisaki ye ameka koluka koyoka esengo oyo bato ya libota na ye bazalaki koyoka. Nsima ya sanza motoba, akómaki mobongisi-nzela.

Ngai ná Randi tokokoba ‘koyebisa misala ya kokamwa ya Yehova’ na “baoyo nyonso bazali koya,” mpe tozali kolikya ete bakosepela na mosala yango ndenge moko na biso.​—Nz. 71:17, 18.

a Lelo tobengaka ye mokɛngɛli ya likita Bomoi mpe mosala.

b Talá lisolo ya bomoi ya Léonce Crépeault na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 02/2020 nk. 26-30.