Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 32

Mekolá Yehova​—Kozalaka makambo makasimakasi te

Mekolá Yehova​—Kozalaka makambo makasimakasi te

“Bato nyonso báyeba ete bozalaka makambo makasimakasi te.”​—FLP. 4:5.

LOYEMBO 89 Yoká, tosá, mpe pambwamá

NA MOKUSE a

Lolenge nini ya nzete okosepela kozala? (Talá paragrafe 1)

1. Na ndenge nini bakristo basengeli kozala lokola nzete? (Talá mpe elilingi.)

 “MOPƐPƐ ebukaka te nzete oyo ekoki kogumbama.” Maloba yango emonisi ete nzete esengeli kozalaka makasimakasi te, to kogumbama na pɛtɛɛ nyonso, ntango mopɛpɛ ezali kobɛta makasi mpo ekwea te. Biso mpe tosengeli kozalaka makambo makasimakasi te ntango makambo ya bomoi na biso ebongwani mpo tókoba kosalela Yehova na esengo. Na ndenge nini? Tosengeli kozalaka makambo makasimakasi te mpo tómesana ntango makambo ya bomoi na biso ebongwani, mpe tómemya makanisi mpe bikateli ya basusu.

2. (a) Bizaleli nini ekosalisa biso tómesana ntango makambo ya bomoi na biso ebongwani? (b) Tokomona nini na lisolo oyo?

2 Lokola tozali basaleli ya Yehova, tolingaka kozala makambo makasimakasi te. Tolingaka mpe kozala na komikitisa mpe boboto. Na lisolo oyo, tokomona ndenge bizaleli wana esalisaki bakristo mosusu bámesana ntango makambo ya bomoi na bango ebongwanaki. Tokomona mpe ndenge bizaleli yango ekoki kosalisa biso. Kasi, tiká tózwa naino mateya epai ya Yehova mpe Yesu, oyo bazali ndakisa ya kokoka na likambo etali kozala makambo makasimakasi te.

YEHOVA MPE YESU BAZALAKA MAKAMBO MAKASIMAKASI TE

3. Ndenge nini toyebi ete Yehova azalaka makambo makasimakasi te?

3 Yehova abengami “Libanga” mpo apikamá makasi, mpe aninganaka te. (Mib. 32:4) Kasi, azalaka mpe makambo makasimakasi te. Lokola makambo ezali kobongwana na mokili oyo, Nzambe na biso azali kokoba kobongola makambo mpe kosala ete makambo nyonso oyo alaki ekokisama. Yehova akelaki bato na elilingi na ye mpe apesaki bango makoki ya komesana na makambo ntango makambo ya bomoi na bango ebongwani. Apesi biso mitinda ya polele oyo ezali na Biblia oyo esalisaka biso tózwaka bikateli ya malamu, ata soki tokutani na mikakatano ya ndenge nini. Ndakisa ya Yehova mpe mitinda oyo apesi biso ezali komonisa ete atako azali “Libanga,” Yehova azalaka makambo makasimakasi te.

4. Na kotalela Balevi 5:7, 11, pesá ndakisa moko oyo emonisi ete Yehova azalaka makambo makasimakasi te.

4 Banzela ya Yehova ezalaka ya kokoka mpe ezalaka mpasi te. Asalelaka bato makambo na boboto. Na ndakisa, Yehova amonisaki ete azalaki makambo makasimakasi te na ndenge azalaki kosalela Bayisraele makambo. Asɛngaki te ete moto nyonso apesa mbeka ndenge moko na basusu. Na bantango mosusu, apesaki moto na moto nzela ya kopesa bambeka na kotalela makoki na ye.​—Tángá Balevi 5:7, 11.

5. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ete Yehova azalaka na komikitisa mpe na motema mawa.

5 Komikitisa mpe boboto ya Yehova etindaka biso tózalaka makambo makasimakasi te. Na ndakisa, komikitisa ya Yehova emonanaki ntango alingaki koboma bato mabe ya Sodoma. Na nzela ya anzelu na ye, Yehova apesaki moto ya sembo Lota mitindo ete akima na etúká ya ngombangomba. Lota abangaki kokende kuna. Yango wana, Lota asɛngaki ete ye ná libota na ye bákende na Zoare, engumba moko moke oyo Yehova akanaki kobebisa yango. Yehova akokaki kotingama ete Lota alanda malako na ye mokomoko kaka ndenge ezali. Kasi, Yehova atikaki Lota akende na Zoare, mpe abebisaki engumba yango te. (Eba. 19:18-22) Mwa basiɛklɛ na nsima, Yehova ayokelaki bato ya Ninive mawa. Atindaki mosakoli Yona akende koyebisa bato mabe ya Ninive ete bango ná engumba na bango bakobebisama. Kasi, ntango bato ya Ninive babongolaki motema, Yehova ayokelaki bango mawa mpe abebisaki engumba yango te.​—Yona 3:1, 10; 4:10, 11.

6. Pesá bandakisa oyo emonisi ete Yesu amekolaki Yehova na likambo etali kozala makambo makasimakasi te.

6 Yesu amekolaki Yehova na likambo etali kozala makambo makasimakasi te. Atindamaki awa na mabele mpo na kosakwela “bampate oyo ebungá ya ndako ya Yisraele.” Kasi amonisaki ete azalaki makambo makasimakasi te ntango azalaki kosakwela bato. Mokolo moko, mwasi moko oyo azalaki Moyisraele te asɛngaki ye abikisa mwana na ye ya mwasi oyo azalaki “konyokwama mpo demo akɔtelá ye.” Na boboto nyonso, Yesu asalaki likambo oyo mwasi yango asɛngaki ye mpe abikisaki mwana mwasi yango. (Mat. 15:21-28) Tótalela ndakisa mosusu. Na ebandeli mpenza ya mosala na ye, Yesu alobaki: “Moto oyo awangani ngai . . . , ngai mpe nakowangana ye.” (Mat. 10:33) Kasi, Yesu awanganaki Petro, oyo awanganaki ye mbala misato mobimba? Te. Yesu ayebaki ete Petro ayokaki mawa mpenza na makambo oyo asalaki mpe azalaki na kondima. Nsima ya lisekwa na ye, Yesu abimelaki Petro mpe andimisaki ye mpenza ete alimbisaki ye mpe alingaka ye.​—Luka 24:33, 34.

7. Na boyokani na Bafilipi 4:5, tolingaka basusu bátalela biso ndenge nini?

7 Tomoni ete Yehova mpe Yesu Kristo bazalaka makambo makasimakasi te. Bongo biso? Yehova asɛngi biso mpe tózalaka makambo makasimakasi te. (Tángá Bafilipi 4:5.) Libongoli moko ya Biblia ebongoli vɛrsɛ oyo boye: “Tika ete boboto na bino éyebana.” Tokoki komituna boye: ‘Bato bamonaka ete nazalaka makambo makasimakasi te, nabongolaka makanisi, mpe natingamaka na makambo te? To bamonaka ngai lokola moto ya makambo makasimakasi, moto ya boboto te to moto ya lolendo? Natingamaka ete basusu básala makambo kaka ndenge oyo nakanisi esengeli kosalema? To nayokaka basusu na likebi mpe nandimaka kosalela makanisi na bango soki esengeli?’ Soki tozalaka makambo makasimakasi te, tokomekola Yehova mpe Yesu lisusu mingi. Tiká tótalela makambo mibale oyo ekosɛnga biso tómonisa ete tozalaka makambo makasimakasi te, elingi koloba, ntango makambo ya bomoi na biso ebongwani mpe ntango makanisi mpe bikateli ya basusu ekeseni na oyo ya biso.

KOZALAKA MAKAMBO MAKASIMAKASI TE NTANGO MAKAMBO YA BOMOI NA YO EBONGWANI

8. Nini ekoki kosalisa biso tózalaka makambo makasimakasi te ntango makambo ebongwani? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

8 Tosengeli kozalaka makambo makasimakasi te, ntango makambo ya bomoi na biso ebongwani. Bambongwana ya ndenge wana ekoki kobimisela biso mpasi oyo tokanaki te. Tokoki kokutana na mikakatano ya nzoto. To bambongwana ya mbalakaka na makambo ya nkita to ya politiki epai tozali kofanda ekoki kosala ete bomoi na biso ekóma mpasi. (Mos. 9:11; 1 Ko. 7:31) Ekoki kozala ata mpasi mpo na biso soki ebongiseli ya Yehova esɛngi biso tósalela ye na lolenge mosusu to na esika mosusu. Tokoki kolonga mikakatano nyonso ntango tozali komesana na makambo oyo ekómeli biso sikoyo soki tosali makambo oyo minei: (1) kondima likambo oyo ebongwani, (2) kokanisa makambo oyo ezali liboso, (3) kotya makanisi na makambo ya malamu, mpe (4) kosalisa basusu. b Tiká tótala ndenge bandeko na biso mosusu ya basi mpe ya mibali bazwaki matomba mpo basalaki makambo yango.

9. Ndenge nini babalani oyo bazali bamisionɛrɛ bayikaki mpiko na komekama oyo ekómelaki bango na mbalakaka?

9 Ndimá likambo oyo ebongwani. Batindaki Emanuele ná Francesca lokola bamisionɛrɛ na ekólo mosusu. Kaka ntango babandaki koyekola monɔkɔ ya sika mpe koluka koyeba bandeko na lisangá na bango ya sika, maladi ya Coronavirus ebandaki mpe basengelaki kofanda mosika na basusu. Na nsima, mama ya Francesca akufaki na mbalakaka. Francesca azalaki na mposa ya kozala elongo na bandeko na ye ya libota, kasi akokaki te kosala mobembo mpo na maladi ya Coronavirus. Nini esalisaki ye ayikela mikakatano wana nyonso mpiko? Ya liboso, Emanuele ná Francesca babondelaki elongo mpo na kosɛnga bwanya mpo báyika mpiko mokolo na mokolo mpe bámitungisa te koleka ndelo. Yehova ayanolaki na mabondeli na bango na ntango oyo ebongi na nzela ya ebongiseli na ye. Na ndakisa, balendisamaki na nzela ya makambo oyo ndeko moko alobaki na video moko: “Ntango tondimaka noki makambo ya sika oyo ekómeli biso, esengo na biso ezongaka noki mpe na nsima tokoki komesana na makambo ya sika oyo ekómeli biso.” c Ya mibale, bazwaki ekateli ya kokolisa makoki na bango na mosala ya kopesa litatoli na telefone mpe babandaki kutu koyekola Biblia na moto moko. Ya misato, bandimaki na botɔndi nyonso malendisi ya bolingo mpe lisungi ya bandeko ya mboka yango. Ndeko mwasi moko ya boboto azalaki kotindela bango mesaje moko ya mokuse elongo na vɛrsɛ moko mokolo nyonso na boumeli ya mbula moko. Soki biso mpe tozali kondima makambo ya nsika oyo ekómeli biso, tokosepela na makambo oyo tokoki kosala.

10. Ndenge nini ndeko mwasi moko amesanaki na mbongwana moko monene esalemaki na bomoi na ye?

10 Kanisáká makambo oyo ezali liboso, mpe tyáká makanisi na makambo ya malamu. Christina, ndeko mwasi moko ya Roumanie oyo afandaka na Japon, atungisamaki mingi ntango lisangá ya monɔkɔ ya Anglais oyo azalaki koyangana ebomamaki. Kasi, akobaki te kokanisa makambo oyo ezalaki kosalema kala. Kutu, azwaki ekateli ya kokende na lisangá ya monɔkɔ ya Japonais mpe asalaki nyonso mpo asakolaka na monɔkɔ yango. Asɛngaki mwasi moko oyo bazalaki kosala elongo alakisa ye koloba monɔkɔ ya Japonais malamu. Mwasi yango andimaki kosalela Biblia mpe mwa buku Sepelá na bomoi libela na libela! mpo na koteya Christina monɔkɔ ya Japonais. Na yango, Christina ayekolaki koloba monɔkɔ ya Japonais malamu, kasi likambo eleki ntina mwasi yango alingaki koyeba makambo mingi etali Biblia. Ntango totalaka liboso mpe makambo ya malamu, bambongwana oyo ekanami te ekoki komemela biso mapamboli na ndenge oyo tokanisaki te.

11. Nini esalisaki mobali moko ná mwasi na ye oyo bazalaki na mikakatano ya mbongo?

11 Salisáká basusu. Ndeko mobali moko ná mwasi na ye oyo bafandaka na ekólo oyo mosala na biso epekisami bakómaki na mikakatano ya mbongo ntango nkita ya ekólo yango ebebaki. Basalaki nini mpo bámesana? Ya liboso, bayeisaki bomoi na bango pɛpɛlɛ. Na nsima, na esika bátya makanisi na makambo na bango moko, bazwaki ekateli ya kolekisa ntango mingi na mosala ya kosakola mpo na kosalisa bato. (Mis. 20:35) Ndeko mobali yango alobi boye: “Lokola tozalaki na makambo mingi na mosala ya kosakola, tozalaki na ntango moke mpo na kokanisa mikakatano na biso moko, yango nde esalaki ete tózala na ntango mingi ya kosala makambo oyo Nzambe alingaka.” Ntango makambo ya bomoi na biso ebongwani, tosengeli kobosana te ntina ya kokoba kosalisa basusu, mingimingi na nzela ya mosala na biso ya kosakola.

12. Ndenge nini ndakisa ya ntoma Paulo ekoki kosalisa biso tózala makambo makasimakasi te na mosala ya kosakola?

12 Ntango tozali kosakola, tosengeli kozalaka makambo makasimakasi te. Tokutanaka na bato oyo bazali na bindimeli mpe bizaleli ekeseni mpe oyo bauti na mimeseno ndenge na ndenge. Ntoma Paulo azalaki makambo makasimakasi te, mpe tokoki kozwa mateya na ndakisa na ye. Yesu aponaki Paulo azala “ntoma ya bikólo.” (Rom. 11:13) Yango wana, Paulo asakwelaki Bayuda, Bagrɛki, bato batángá kelasi, basali-bilanga, bakonzi ya Leta, mpe bakonzi. Mpo na kosimba mitema ya bato ya ndenge wana, Paulo akómaki “makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso.” (1 Ko. 9:19-23) Akanisaki na mozindo bisika oyo bato yango bautaki mpe makambo oyo bazalaki kondima. Yango esalisaki ye azala makambo makasimakasi te mpe asolola na moto nyonso na lolenge oyo ekobenda moto yango epai ya Nzambe. Biso mpe tokoki kosala ete mosala na biso ya kosakola ebota mbuma malamu soki tozali makambo makasimakasi te mpe tozali komeka kokanisa lolenge eleki malamu ya kosalisa moto nyonso.

MEMYÁKÁ MAKANISI YA BASUSU

Soki tozali makambo makasimakasi te, tokomemya makanisi ya basusu (Talá paragrafe 13)

13. Na kotalela 1 Bakorinti 8:9, likama nini tokoki kokima soki tozali komemya makanisi ya basusu?

13 Ezaleli ya kozalaka makambo makasimakasi te esalisaka mpe biso tómemyaka makanisi ya basusu. Na ndakisa, bandeko na biso mosusu ya basi balingaka kosala monzɛlɛ, kasi basusu balingaka yango te. Bakristo mosusu basepelaka komɛla masangá oyo elangwisaka na bokatikati, kasi basusu bazwá ekateli ya koboya komɛla yango. Bakristo nyonso balingaka kozala na nzoto kolɔngɔnɔ kasi moto na moto aponaka mayele nini ya lisalisi ya monganga ebongi na ye. Soki tokanisi ete makambo oyo tolobaka ezalaka ntango nyonso solo mpe tolukaka kondimisa bandeko na biso ya basi mpe ya mibali básala makambo oyo tosalaka, tokoki kobɛtisa basusu mabaku mpe kosala ete bokabwani ekɔta na lisangá. Na ntembe te, tokolinga te kosala yango! (Tángá 1 Bakorinti 8:9; 10:23, 24) Tiká tólobela bandakisa mibale oyo emonisi ndenge kosalela mitinda ya Biblia ekoki kosalisa biso tózala na bokatikati mpe tóbatela kimya.

Soki tozali makambo makasimakasi te, tokomemya makanisi ya basusu (Talá paragrafe 14)

14. Mitinda nini ya Biblia tosengeli kobosana te ntango tozali kozwa bikateli na likambo etali molato mpe kosala monzɛlɛ?

14 Molato mpe kosala monzɛlɛ. Yehova ayebisi biso te bilamba nini tosengeli kolata, kasi apesi biso mitinda ya kolanda. Tosengeli kolata na ndenge oyo ebongi na baministre ya Nzambe, komonisa ete tozalaka makambo makasimakasi te, tolekisaka ndelo te, mpe na “makanisi malamu.” (1 Tim. 2:9, 10; 1 Pe. 3:3) Yango wana, tolingaka te kobenda likebi ya bato epai na biso mpo na molato na biso. Mitinda ya Biblia ekosalisa mpe bankulutu báboya kotya mibeko na bango moko na likambo etali molato mpe kosala monzɛlɛ. Na ndakisa, bankulutu na lisangá moko balingaki kosalisa bilenge mibali oyo bakómaki kokata nsuki lokola bilenge oyo bazalaki zingazinga na bango bazalaki kokata, nsuki yango ezalaki mokuse kasi elíngalíngamá. Ndenge nini bankulutu yango bakokaki kosalisa bilenge yango kozanga kotya mibeko na bango moko? Mokɛngɛli ya zongazonga apesaki bankulutu yango toli báyebisa bandeko mibali yango boye: “Soki ozali na estrade mpe bayoki bazali kotya likebi mingi na molato mpe monzɛlɛ na yo koleka makambo oyo ozali koloba, elingi koloba, mokakatano ezali mpo na molato na yo mpe monzɛlɛ oyo osali.” Mwa toli oyo esalisaki bilenge yango bákanga ntina ya makambo oyo basengelaki kosala mpe bankulutu batyelaki bango mibeko te. d

Soki tozali makambo makasimakasi te, tokomemya makanisi ya basusu (Talá paragrafe 15)

15. Na kotalela Baroma 14:5, ndenge nini mibeko mpe mitinda ya Biblia esalisaka biso ntango tozwaka bikateli na oyo etali lisalisi ya monganga?

15 Lisalisi ya monganga. Mokristo mokomoko asengeli kopona ndenge ya kobatela nzoto na ye kolɔngɔnɔ. (Gal. 6:5) Ntango bakristo baponaka lisalisi ya minganga, bazalaka na mposa ya mibeko ya Biblia mpo na kokoba koboya makila mpe misala ya bilimo mabe. (Mis. 15:20; Gal. 5:19, 20) Kasi na makambo mosusu, bakoki kopona bango moko lisalisi nini ya minganga bakondima kozwa. Basusu balukaka lisalisi kaka epai ya minganga mpo na kobatela bokɔlɔngɔnɔ na bango ya nzoto, kasi basusu basepelaka na mitindo mosusu ya lisalisi. Ata soki tondimaka lolenge nini ya lisalisi, tosengeli komemya lotomo ya bandeko na biso ya kozwa bango moko bikateli na oyo etali bokɔlɔngɔnɔ na bango ya nzoto. Mpo na yango, tosengeli kobosana te makambo oyo minei: (1) Kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa maladi nyonso mpo na libela. (Yis. 33:24) (2) Mokristo nyonso asengeli ‘komindimisa mpenza’ nini eleki malamu mpo na ye. (Tángá Baroma 14:5.) (3) Tosambisaka basusu te to totyaka eloko moko te oyo ekobɛtisa bango libaku. (Rom. 14:13) (4) Bakristo bamonisaka bolingo mpe bamonaka ete bomoko ya lisangá ezali na ntina mingi koleka makambo oyo basepelaka na yango. (Rom. 14:15, 19, 20) Soki tobosani makambo wana te, tokobatela boyokani na biso ná bandeko na biso mpe tokosala ete kimya ezala na lisangá.

Soki tozali makambo makasimakasi te, tokomemya makanisi ya basusu (Talá paragrafe 16)

16. Ndenge nini nkulutu moko akoki komonisa ete azalaka makambo makasimakasi te na likambo etali boyokani na ye ná bankulutu mosusu? (Talá mpe bililingi.)

16 Bankulutu basengeli kopesa ndakisa malamu na likambo ya kozala makambo makasimakasi te. (1 Tim. 3:2, 3) Na ndakisa, nkulutu asengeli te kokanisa ete makanisi na ye ekondimama ntango nyonso kaka mpo azali mokóló koleka bankulutu mosusu. Ayebi ete elimo ya Yehova ekoki kosala epai ya nkulutu nyonso aloba likambo moko oyo ekosalisa bango bázwa ekateli ya bwanya. Lisusu, soki bankulutu nyonso bandimi ekateli moko oyo ebuki mitinda ya Biblia te, nkulutu oyo azalaka makambo makasimakasi te apesaka ekateli yango mabɔkɔ, ata soki ekateli yango ekeseni na oyo ya ye.

MAPAMBOLI YA KOZALA MAKAMBO MAKASIMAKASI TE

17. Bakristo oyo bazalaka makambo makasimakasi te bazwaka mapamboli nini?

17 Ntango tozalaka makambo makasimakasi te, tozwaka mapamboli. Tozalaka na boyokani malamu elongo na bandeko na biso ya basi mpe ya mibali, mpe lisangá ezalaka na kimya. Tosepelaka na bizaleli mpe mimeseno ndenge na ndenge oyo basaleli ya Yehova bazalaka na yango. Mpe ezali kokamwisa koyeba ete atako biso nyonso tokeseni, tosambelaka ye na bomoko lokola libota moko. Oyo eleki nyonso, tosepelaka koyeba ete tozali komekola Yehova, Nzambe na biso oyo azalaka makambo makasimakasi te.

LOYEMBO 90 Tólendisanaka

a Yehova mpe Yesu bazalaka makambo makasimakasi te, mpe balingaka ete tómonisa ezaleli yango. Soki tozali makambo makasimakasi te, tokomona ete ezali mpasi te tómesana na mbongwana oyo esalemi na bomoi na biso, na ndakisa, na likambo etali bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto to mokakatano ya mbongo. Tokosala mpe ete kimya ná bomoko ezala na lisangá.

b Talá lisolo “Ntango makambo ebongwani” na Lamuká! No. 4 2016.

c Talá video Mituna-lisolo elongo na ndeko Dmitriy Mikhaylov oyo ezalaki na lisolo “Yehova akómisi monyoko libaku ya kopesa litatoli” na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo ya sanza ya 03 mpe ya 04/2021.

d Mpo na koyeba makambo mosusu mpo na molato mpe kosala monzɛlɛ, Talá liteya 52 ya buku Sepelá na bomoi libela na libela!