Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 29

Ozali komilɛngɛla mpo na bolɔzi monene?

Ozali komilɛngɛla mpo na bolɔzi monene?

“Bómilɛngɛla.”​—MAT. 24:44.

LOYEMBO 150 Bóluka Nzambe mpo bóbika

NA MOKUSE a

1. Mpo na nini ezali na ntina komibongisa liboso likama moko boye esalema?

 KOMILƐNGƐLA ebikisaka na bomoi. Na ndakisa, ntango likama moko esalemi, mbala mingi bato oyo bamibongisaka malamu bazalaka na likoki ya kobikisa bomoi na bango mpe oyo ya basusu. Ebongiseli moko na Mpoto oyo esalisaka bato elobi boye mpo na likambo yango: “Komibongisa malamu ekoki mpenza kobikisa bomoi ya bato.”

2. Na kotalela Matai 24:44, mpo na nini tosengeli komibongisa mpo na bolɔzi monene?

2 ‘Bolɔzi monene’ ekobanda na mbalakaka. (Mat. 24:21) Na kokesana na makama mosusu oyo esalemaka, bolɔzi monene ekosutukisa bato nyonso te. Eleki sikoyo mbula soki 2000, Yesu ayebisaki bayekoli na ye bámilɛngɛla mpo na mokolo yango. (Tángá Matai 24:44.) Soki tomibongisi malamu, ekozala mpasi te mpo tóyika mpiko na makambo oyo ekosalema na ntango yango ya mpasi mpe kosalisa basusu básala mpe bongo.​—Luka 21:36.

3. Ndenge nini koyika mpiko, motema mawa, mpe bolingo ekosalisa biso na ntango ya bolɔzi monene?

3 Tokolobela bizaleli misato oyo ekoki kosalisa biso tómilɛngɛla mpo na bolɔzi monene. Tokosala nini soki basɛngi biso tósakola nsango ya bitumbu ya nsɔmɔ to soki bato batɛmɛli biso? (Em. 16:21) Ekosɛnga tózala na ezaleli ya koyika mpiko mpo tótosa Yehova mpe tótya motema ete akobatela biso. Tokosala nini soki bandeko na biso babungisi biloko na bango ya kobikela? (Hab. 3:17, 18) Ekosɛnga tómonisa motema mawa mpo na kosunga bango. Tokosala nini soki bikólo esangani mpo na kobundisa basaleli ya Nzambe mpe esali ete tókóma kofanda esika moko na bandeko na biso bakristo mpo na ntango molai? (Ezk. 38:10-12) Ekosɛnga tómonisa bolingo makasi mpo na bango mpo biso nyonso tóyika mpiko na ntango yango ya mpasi.

4. Ndenge nini Biblia emonisi ete tosengeli kokoba kokolisa bizaleli lokola koyika mpiko, motema mawa, mpe bolingo?

4 Liloba ya Nzambe elendisaka biso ntango nyonso tókoba kokolisa ezaleli ya koyika mpiko, motema mawa, mpe bolingo. Luka 21:19 elobi: “Na ezaleli na bino ya koyika mpiko, bokobatela bomoi na bino.” Bakolose 3:12 elobi: “Bólata motema . . . mawa.” Mpe 1 Batesaloniki 4:9, 10 elobi: “Bino moko boteyami na Nzambe ete bólinganaka. . . . Kasi tozali kolendisa bino, bandeko, bókoba kosala bongo malamu koleka.” Maloba ya bavɛrsɛ nyonso oyo ekomamaki mpo na bayekoli oyo basilaki komonisa bizaleli lokola koyika mpiko, motema mawa, mpe bolingo. Kasi, basengelaki kokoba komonisa bizaleli yango. Yango ezali mpe bongo mpo na biso. Mpo na kosalisa biso na likambo yango, tokolobela ndenge bakristo ya liboso bamonisaki ezaleli mokomoko wana. Na nsima, tokomona ndenge nini tokoki komekola bakristo yango mpe ndenge oyo tokoki komibongisa mpo na bolɔzi monene.

KOLISÁ EZALELI YA KOYIKA MPIKO

5. Nini esalisaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso báyikela mikakatano na bango mpiko?

5 Bakristo mingi na eleko ya ntoma Paulo basengelaki koyika mpiko. (Ebr. 10:36) Longola mikakatano oyo bato nyonso bazalaki kokutana na yango na ntango wana, bazalaki mpe na mikakatano mosusu oyo etali bango mpo bazalaki bakristo. Mingi na bango bazalaki konyokola bango, kaka na bakonzi ya Bayuda mpe ya Roma te kasi mpe na bato ya mabota na bango moko. (Mat. 10:21) Longola yango, na kati ya lisangá, ntango mosusu basengelaki kotɛmɛla bapɛngwi mpe mateya na bango oyo ekɔtisaka bokabwani. (Mis. 20:29, 30) Atako bongo, bakristo yango bayikaki mpiko. (Em. 2:3) Nini esalisaki bango? Bakanisaki na bandakisa ya basaleli mosusu ya Yehova oyo bayikaki mpiko, na ndakisa, Yobo. (Yak. 5:10, 11) Babondelaki mpo na kozwa makasi. (Mis. 4:29-31) Mpe batyaki makanisi na bango nyonso na mapamboli oyo bakozwa soki bakobi koyika mpiko.​—Mis. 5:41.

6. Makambo oyo Merita asalaki mpo na koyikela botɛmɛli mpiko eteyi yo nini?

6 Biso mpe tokoki koyikela mikakatano mpiko soki tozali koyekola mpe komanyola na bandakisa oyo ezali na Biblia mpe na mikanda na biso, oyo elobeli basaleli ya Yehova oyo bayikaki mpiko. Yango nde esalisaki Merita, ndeko mwasi moko na Albanie, oyo asengelaki koyikela botɛmɛli makasi ya libota na ye mpiko. Alobi boye: “Ntango natángaki lisolo ya Yobo, esimbaki mpenza motema na ngai. Anyokwamaki mingi kozanga koyeba soki nani azalaki kobimisela ye bampasi yango, atako bongo Yobo alobaki: ‘Tii nakokufa, nakotika te bosembo na ngai!’ (Yobo 27:5) Namonaki ete makambo oyo Yobo akutanaki na yango elekaki mosika oyo nazalaki kokutana na yango. Na kokesana na Yobo, nayebaki esika mitungisi na ngai ezalaki kouta.”

7. Ezala tokutani naino te na mokakatano moko ya makasi, tosengeli koyekola kosala nini?

7 Tokoki mpe kokolisa ezaleli na biso ya koyika mpiko soki tozali mbala na mbala koyebisa Yehova makambo nyonso oyo ezali kotungisa biso. (Flp. 4:6; 1 Tes. 5:17) Mbala mosusu okutani naino te na mikakatano ya makasi. Atako bongo, tosengeli ntango nyonso koluka litambwisi ya Yehova ata ntango tokutani na makambo oyo epesi biso nkanda, etungisi biso to elekeli biso motó. Soki ozali ntango nyonso koluka lisalisi ya Yehova sikoyo mpo na mikakatano oyo ozali kokutana na yango mokolo na mokolo, ekozala mpasi te oluka lisalisi na ye ntango okokutana na mikakatano ya makasi. Yango ekosalisa yo ozala na kondima ete Yehova ayebi ntango nini mpe ndenge nini akosalisa yo.​—Nz. 27:1, 3.

KOYIKA MPIKO

Mokakatano nyonso oyo tozali koyikela mpiko ekoki kokómisa biso makasi mpo na mokakatano mosusu oyo tokokutana na yango (Talá paragrafe 8)

8. Na kotalela Yakobo 1:2-4, ndenge nini ndakisa ya Mira emonisi ete koyikela mikakatano oyo tozali kokutana na yango mpiko ekoki kosalisa biso mpo na mikakatano oyo ekoya? (Talá mpe elilingi.)

8 Soki tozali koyika mpiko na mikakatano oyo tozali kokutana na yango lelo, ekozala mpasi te tóyika mpiko na bolɔzi monene. (Rom. 5:3) Mpo na nini tolobi bongo? Bandeko mingi bamoni ete kolonga mokakatano moko na bomoi ebongisaka bango mpo na mikakatano oyo ekoya. Ezaleli ya koyika mpiko ebongisaki bango mpe esalaki ete bákóma na kondima ete Yehova azali na mposa ya kosalisa bango. Mpe kondima esalisaki bango báyika mpiko na mokakatano oyo elandaki. (Tángá Yakobo 1:2-4.) Mira, oyo azali mobongisi-nzela na Albanie, amoni ete ndenge ayikaki mpiko esalisaki ye akoba koyika mpiko. Amoni ete na bantango mosusu amiyokaka lokola ye nde akutanaka na ebele ya mikakatano. Kasi, na nsima akanisaki ndenge Yehova asungaki ye na mbula 20 oyo euti koleka mpe amilobelaki boye: ‘Zalá na kondima. Kotika te bambula nyonso oyo Yehova asalisaki yo olonga bitumba ekende kaka mpamba.’ Yo mpe okoki kokanisa na ndenge Yehova asalisaki yo oyika mpiko. Zalá na kondima ete ayebi ntango nyonso oyo oyikelaka mokakatano mokomoko mpiko mpe akozanga te kopesa yo mbano. (Mat. 5:10-12) Na yango, ntango bolɔzi monene ekobanda, okozala na likoki ya koyika mpiko mpe okozala na ekateli ya kokoba kosala bongo.

MONISÁ MOTEMA MAWA

9. Ndenge nini bakristo ya Antiokia ya Siri bamonisaki motema mawa?

9 Tótala likambo oyo esalemaki ntango nzala makasi ekómelaki bakristo ya Yudea. Na ntembe te, nsima ya koyoka nsango yango, bakristo ya Antiokia ya Siri bayokelaki bandeko na bango ya Yudea mawa. Mpe na nsima bamonisaki yango na misala. “Bazwaki mokano ya kotindela bandeko oyo bazalaki kofanda na Yudea biloko ya lisungi, moto na moto na kolanda oyo azalaki na yango.” (Mis. 11:27-30) Atako bandeko yango oyo nzala ebɛtaki engumba na bango bazalaki mosika, bakristo ya Antiokia bazwaki mokano ya kosalisa bango.​—1 Yoa. 3:17, 18.

MOTEMA MAWA

Tozwaka libaku ya komonisa motema mawa ntango makama oyo ebimaka yango moko esalemi (Talá paragrafe 10)

10. Ndenge nini tokoki komonisa motema mawa ntango toyoki ete bandeko na biso bakutani na makama oyo ebimaka yango moko? (Talá mpe elilingi.)

10 Lelo oyo, biso mpe tokoki komonisa motema mawa ntango toyoki ete bandeko na biso bakristo bakutani na makama oyo ebimaka yango moko. Tomonisaka ete tozali na mposa ya kosalisa ntango toyebisaka bankulutu ete tolingi kopesa mabɔkɔ mpo na kosalisa, kotya makabo mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola na mokili mobimba, mpe kobondela mpo na baoyo bakutani na makama yango. b (Mas. 17:17) Na ndakisa na 2020, Bakomite koleka 950 ya kopesa lisungi etyamaki mpo na kosunga bandeko na boumeli ya maladi ya Coronavirus. Bandeko oyo bapesaki mabɔkɔ na Bakomite yango ya kopesa lisungi babongi na longonya. Lokola bazalaki na mawa mpo na bandeko na bango, bakabolelaki bango biloko oyo bazalaki na yango mposa na mosuni, basalisaki bango na elimo mpe na mabaku mosusu, babongisaki mpe batongaki lisusu bandako ya bandeko ezala mpe bisika na bango ya losambo.​—Talá mpe 2 Bakorinti 8:1-4.

11. Ndenge nini misala ya motema mawa ekumisaka Tata na biso ya likoló?

11 Ntango tomonisaka motema mawa nsima ya likama moko, yango esimbaka mitema ya bato mosusu. Na ndakisa, na 2019, mopɛpɛ makasi oyo babengi Dorian ebebisaki Ndako ya Bokonzi moko na Bahamas. Wana bandeko bazalaki kotonga lisusu ndako yango, batunaki mokonzi ya kompanyi moko ya botongi soki ekosɛnga mosolo boni mpo aya kosala misala mosusu na Ndako ya Bokonzi. Mokonzi yango ayebisaki bango boye: “Nakosepela kopesa bino bisaleli mpo na mosala mpe bato oyo bakosala mosala . . . Nasepeli kosala yango mpo na ebongiseli na bino. Bolingo oyo bozalaka na yango mpo na bandeko na bino esimbaki motema na ngai.” Bato mingi na mokili bayebi Yehova te. Kasi mingi kati na bango bamonaka makambo oyo Batatoli ya Yehova basalaka. Ezali mpenza lokumu monene koyeba ete motema mawa oyo tomoniselanaka ekoki kobenda bato epai ya Nzambe oyo “atondi mpenza na motema mawa”!​—Ef. 2:4.

12. Na kotalela Emoniseli 13:16, 17, ndenge nini kokolisa motema mawa sikoyo ebongisaka biso mpo na bolɔzi monene?

12 Mpo na nini ekosɛnga tómonisa motema mawa na ntango ya bolɔzi monene? Biblia emonisi ete baoyo bakoboya kopesa mabɔkɔ na bibongiseli ya politiki bakokutana na komekama lelo oyo mpe na ntango ya bolɔzi monene. (Tángá Emoniseli 13:16, 17.) Bandeko na biso bakoki kozala na mposa ya lisalisi mpo bázwa biloko ya kobikela. Tiká ete ntango Mokonzi na biso, Yesu Kristo akoya kopesa lisambisi akuta biso tozali komonisa motema mawa mpe apesa biso “libula ya Bokonzi.”​—Mat. 25:34-40.

KÓMISÁ BOLINGO NA YO MAKASI

13. Ndenge emonisami na Baroma 15:7, ndenge nini bakristo ya siɛklɛ ya liboso bakómisaki bolingo na bango makasi?

13 Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bayebanaki mpo na bolingo na bango. Kasi ezalaki ntango nyonso pɛtɛɛ bámonisa bolingo yango? Tótala bato ya ndenge na ndenge oyo bazalaki na masangá ya Roma. Na kati na bango, ezalaki kaka te na Bayuda oyo bayekolaki kotosa Mibeko ya Moize, kasi mpe bato ya bikólo mosusu oyo bazalaki na mimeseno ekeseni. Ekoki kozala ete bakristo mosusu bazalaki baombo mpe basusu bazalaki na bonsomi mpe mbala mosusu basusu mpe bazalaki na baombo na bango moko. Ndenge nini bakristo yango bakokaki kokolisa bolingo na bango atako bakesanaki? Ntoma Paulo alendisaki bango “bóyambanaka.” (Tángá Baroma 15:7.) Alingaki mpenza koloba nini? Liloba oyo ebongolami na ‘koyamba’ elimboli komonisela moto boboto mpe ezaleli ya koyamba bapaya, na ndakisa, kobengisa ye na ndako to kobengisa ye bólekisa ntango elongo na baninga mosusu. Na ndakisa, ntoma Paulo ayebisaki Filemo ndenge ya koyamba Onezime, moombo oyo akimaki, alobaki boye: “Yambá ye na boboto.” (Flm. 17) Mpe Akila ná Prisile bayambaki Apolosi oyo ayebaki makambo mingi ya bokristo te, na ndenge “bazwaki ye elongo na bango.” (Mis. 18:26) Na esika bátika ete makambo oyo ekesenisaki bango ekabola bango, bakristo yango balongaki mokakatano yango mpe bazalaki koyambana.

BOLINGO

Tosengeli kolinga bandeko na biso nyonso ya basi mpe ya mibali (Talá paragrafe 15)

14. Ndenge nini Anna ná mobali na ye bamonisaki bolingo?

14 Biso mpe tokoki komonisa bolingo mpo na bandeko na biso soki tozali kokómisa bango baninga na biso. Bango mpe na ngala na bango, bakomonisela biso bolingo. (2 Ko. 6:11-13) Tótalela ndakisa ya Anna ná mobali na ye. Mwa moke nsima ya kotinda bango lokola bamisionɛrɛ na Afrika ya wɛsti, maladi ya coronavirus ebandaki. Ntango bakómaki, bakokaki te koyangana elongo na bandeko ya lisangá na bango. Ndenge nini babalani yango bakokaki komonisela bandeko bolingo? Bazalaki kosolola na bandeko na nzela ya video mpe koyebisa bango ndenge bazalaki na mposa makasi ya koyeba mokomoko na bango malamu. Bandeko basepelaki na bolingo oyo bamisionɛrɛ yango bamoniselaki bango, bakómaki kobenga mpe kotindela bango bamesaje mbala na mbala. Mpo na nini bamisionɛrɛ wana basalaki makasi báluka koyebana na bandeko? Anna alobi boye: “Nabosanaka te bolingo oyo bandeko bamoniselaki ngai ná bato ya libota na ngai, ezala na ntango ya mpasi to na ntango ya bisengo, yango etindaka ngai mpe namonisela basusu bolingo.”

15. Ndakisa ya Vanessa eteyi yo nini na oyo etali kolinga bandeko na biso? (Talá mpe elilingi.)

15 Mingi kati na biso tozali na masangá oyo esangisi bandeko oyo bauti bisika ekeseni mpe bazali na bomoto ekeseni. Tokoki kokómisa makasi bolingo na biso mpo na bango soki tozali kotya likebi mingi na bizaleli na bango ya malamu. Ndeko mwasi moko na nkombo Vanessa, oyo asakolaka na Nouvelle-Zélande, azalaka na mokakatano ya koyokana malamu ná bandeko ya lisangá. Kasi na nsima, azwaki mokano ya kolekisaka ntango mingi ná bato oyo bizaleli na bango esepelisaka ye te na esika ya kokima bango. Kosala bongo esalisaki ye amona makambo ya malamu oyo Yehova asepelaka na yango epai ya bandeko yango. Alobi boye: “Banda mobali na ngai akómá mokɛngɛli ya zongazonga, tokómá kolekisa ntango na bandeko mingi oyo bazali na bomoto ekeseni mpe ezalaka lisusu mpasi te koyokana na bango. Sikoyo, nakómá kosepela na bato ya ndenge na ndenge. Na ntembe te, Yehova mpe asepelaka na ndenge wana ya kotalela makambo mpo abendaka bato ya ndenge na ndenge epai na ye.” Soki tozali koyekola kotalela bato ndenge Yehova atalelaka bango, yango ekomonisa ete tolingaka bango.​—2 Ko. 8:24.

Na ntango ya bolɔzi monene, Yehova alaki ete akobatela biso soki tokobi kosala elongo na bandeko na biso bakristo na bomoko (Talá paragrafe 16)

16. Mpo na nini bolingo ekozala na ntina mingi na ntango ya bolɔzi monene? (Talá mpe elilingi.)

16 Bolingo ekozala na ntina mingi na ntango ya bolɔzi monene. Ntango bolɔzi monene ekobanda, epai wapi tokoluka libateli? Tótala oyo Yehova ayebisaki bato na ye básala ntango bayaki kobundisa Babilone na ntango ya kala: “Kende, ekólo ya bato na ngai, kɔtá na bashambrɛ na yo ya kati, mpe kangá baporte na yo. Omibomba kaka mpo na mwa ntango tii nkanda ekosila.” (Yis. 26:20) Mbala mosusu ekosɛnga biso mpe tótosa maloba yango na ntango ya bolɔzi monene. ‘Bashambre ya kati’ oyo balobeli ekoki komonisa masangá na biso. Na ntango ya bolɔzi monene, Yehova alaki ete akobatela biso soki tokobi kosala elongo na bandeko na biso bakristo na bomoko. Yango wana, kobanda sikoyo, tosengeli kosala makasi mpo tólinga bango. Yango nde ekoki kosalisa biso mpo tóbika!

OMIBONGISA BANDA SIKOYO

17. Komibongisa banda sikoyo ekosalisa biso tósala nini na ntango ya bolɔzi monene?

17 “Mokolo monene ya Yehova” ekomemela bato mpasi mingi. (Sef. 1:14, 15) Basaleli ya Yehova mpe bakokutana na makambo ya mpasi. Kasi soki tomibongisi banda sikoyo, tokozala na likoki ya kofanda kimya mpe ya kosalisa basusu. Tokoyika mpiko na mikakatano nyonso oyo tokokutana na yango. Ntango bandeko na biso bakristo bazali konyokwama, motema mawa ekotinda biso tósala nyonso oyo tokoki mpo na kosunga bango mpe kokokisa bamposa na bango. Mpe soki toyekoli komonisela bandeko na biso bolingo sikoyo, yango ekosalisa biso tómonisela bango bolingo na mikolo ezali koya. Yango ekosala ete Yehova apesa biso bomoi ya seko na mokili epai tokobosana bampasi mpe minyoko nyonso.​—Yis. 65:17.

LOYEMBO 144 Tyá miso na yo na mbano!

a Mosika te bolɔzi monene ekobanda. Bizaleli lokola koyika mpiko, motema mawa, mpe bolingo ekosalisa biso tómilɛngɛla mpo na makambo ya nsɔmɔ oyo ekosalema. Talá ndenge bakristo ya liboso bamonisaki bizaleli yango, ndenge tokoki komonisa yango lelo oyo, mpe ndenge oyo bizaleli yango ekosalisa biso tómilɛngɛla mpo na bolɔzi monene.

b Baoyo balingi kopesa mabɔkɔ na mosala ya kopesa lisungi na ntango ya makama basengeli liboso kotondisa formilɛrɛ DC-50 (Demande d’admission comme volontaire local développement/construction) to A-19 (Demande d’admission comme volontaire) na nsima basengeli kozela tii ntango bakobenga bango.