Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Toli mpo na koyekola

Toli mpo na koyekola

Yebá makambo oyo eleki ntina

Biso nyonso tozalaka na mwa ntango mpo na koyekola biso moko. Ndenge nini tokoki kosalela yango malamu? Ya liboso, lekisáká ntango mingi na makambo oyo ozali na yango mposa. Okozwa mpenza matomba soki ozali koyekola makambo moke malamumalamu na esika ya kotánga makambo mingi mbangumbangu.

Na nsima, yebá mwa makambo oyo eleki ntina. (Ef. 5:15, 16) Yango oyo mwa makambo yango oyo eleki ntina:

  • Tángáká Biblia mokolo na mokolo. (Nz. 1:2) Ekoki kozala malamu kobanda na mikapo oyo toyekolaka na likita ya kati ya pɔsɔ.

  • Bongisáká Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya boyekoli mpe likita ya kati ya pɔsɔ. Omibongisa mpo na kopesa biyano na makita.​—Nz. 22:22.

  • Soki ozali na ntango, luká koyeba bilei mosusu ya sika ya elimo, na ndakisa bazulunalo ya bato nyonso, bavideo, mpe masolo oyo ebimi na jw.org.

  • Saláká bolukiluki na makambo oyo osepelaka na yango. Okoki kosala bolukiluki mpo na mikakatano oyo ozali kokutana na yango, mituna oyo omitunaka, to masolo ya Biblia oyo okosepela kokanga ntina na yango malamu.