LISOLO YA BOYEKOLI 36
Memá mokumba oyo osengeli komema, mpe longolá mosusu nyonso
“Tólongola mpe kilo nyonso . . . , mpe tóyika mpiko ntango tozali kopota mbangu na momekano oyo etyami liboso na biso.”—EBR. 12:1.
LOYEMBO 33 Bwakelá Yehova mokumba na yo
NA MOKUSE a
1. Na kotalela Baebre 12:1, tosengeli kosala nini mpo tópota mbangu mpo na bomoi tii na nsuka?
BIBLIA ekokanisi bomoi na biso bakristo na momekano ya kopota mbangu. Bapoti-mbangu oyo bakolonga kopota mbangu tii na nsuka bakozwa bomoi ya seko. (2 Tim. 4:7, 8) Tosengeli kosala makasi mpo tókoba kopota mbangu, mingimingi mpo momekano yango ekómi na nsuka mpenza. Ntoma Paulo, oyo alongaki kopota mbangu mpo na bomoi tii na nsuka, ayebaki makambo oyo ekosalisa biso tólonga momekano ya kopota mbangu. Yango wana, ayebisi biso “tólongola mpe kilo nyonso . . . , mpe tóyika mpiko ntango tozali kopota mbangu na momekano oyo etyami liboso na biso.”—Tángá Baebre 12:1.
2. ‘Kolongola kilo nyonso’ elimboli nini?
2 Ntango Paulo akomaki ete tosengeli ‘kolongola kilo nyonso,’ alingaki nde koloba ete mokristo asengeli te komema ata mokumba moko? Te, alingaki koloba bongo te. Kutu, alingaki koloba ete tosengeli kolongola kilo nyonso oyo ezangá ntina. Kilo ya lolenge wana ekoki kosala ete tótika mpe tólɛmba nzoto. Mpo tóyika mpiko, tosengeli koyeba nokinoki mpe kolongola kilo nyonso ezangá ntina oyo ekoki kolɛmbisa biso. Kasi, tolingaka mpe te kobwaka mikumba oyo tosengeli komema. Longola yango, soki totiki komema mikumba yango, tokotikala te na momekano ya kopota mbangu. (2 Tim. 2:5) Mikumba nini tosengeli komema?
3. (a) Na kotalela Bagalatia 6:5, eloko nini tosengeli komema? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo, mpe mpo na nini?
3 Tángá Bagalatia 6:5. Paulo ayebaki eloko oyo tosengeli komema. Akomaki ete “moto na moto akomema mokumba na ye moko.” Awa Paulo azalaki kolobela mokumba oyo mokomoko na biso azali na yango liboso ya Nzambe, eloko oyo biso moko tosengeli komema. Na lisolo oyo, tokolobela soki “mokumba” na biso moko ezali nini mpe ndenge nini tokoki komema yango. Lisusu, tokoyeba kilo ezangá ntina oyo tokoki komema mpe koluka koyeba ndenge oyo tokoki kolongola yango. Komema mokumba na biso moko mpe kolongola kilo oyo ezangá ntina ekosalisa biso tólonga ntango tozali kopota mbangu mpo na bomoi.
MIKUMBA OYO TOSENGELI KOMEMA
4. Mpo na nini elako na biso ya komipesa ezalaka kilo te? (Talá mpe elilingi.)
4 Elako na biso ya komipesa. Ntango tomipesaki na Yehova, tosalaki elako mpo na kosambela ye mpe mpo na kosala mokano na ye. Tosengeli kokokisa elako yango. Kokokisa elako na biso ya komipesa ezali mokumba moko monene, kasi ezalaka kilo te mpo tókokisa yango. Nyonso wana ezali mpo Yehova akelaki biso mpo na kosala mokano na ye. (Em. 4:11) Akelaki biso na mposa ya koyeba mpe kosambela ye, mpe akelaki biso na elilingi na ye. Yango wana, tozalaka na likoki ya kopusana penepene na ye mpe ya kosepela kosala mokano na ye. (Nz. 40:8) Longola yango, ‘topemaka’ ntango tosalaka mokano ya Nzambe mpe tolandaka Mwana na ye.—Mat. 11:28-30.
5. Na kotalela 1 Yoane 5:3, nini ekoki kosalisa yo osala makambo nyonso oyo olakaki Yehova ntango omipesaki na ye?
5 Ndenge nini okoki komema mokumba yango? Makambo mibale ekoki kosalisa yo. Ya liboso, kobá kokómisa makasi bolingo na yo mpo na Yehova. Okoki kosala yango soki ozali komanyola na makambo nyonso ya malamu oyo asalelá yo mpe mapamboli oyo akopesa yo. Wana bolingo na yo mpo na Nzambe ezali kokola, ekozala pɛtɛɛ mpo otosa ye. (Tángá 1 Yoane 5:3.) Ya mibale, mekolá Yesu. Alongaki kosala mokano ya Nzambe mpo azalaki kobondela Yehova asalisa ye mpe akobaki kotya makanisi na mbano oyo akozwa. (Ebr. 5:7; 12:2) Lokola Yesu, bondeláká Yehova apesa yo makasi mpe kobá kobatela na makanisi elikya ya bomoi ya seko. Lokola bolingo na yo mpo na Nzambe ezali kokola mpe ozali komekola Mwana na ye, okozala na likoki ya kosala makambo nyonso oyo olakaki Yehova ntango omipesaki na ye.
6. Mpo na nini tosengeli kokokisa mikumba na biso na kati ya libota? (Talá mpe elilingi.)
6 Mikumba na biso na kati ya libota. Na momekano na biso ya kopota mbangu mpo na bomoi, tosengeli kolinga Yehova mpe Yesu koleka bandeko na biso ya libota. (Mat. 10:37) Kasi yango elingi koloba te ete, tosengeli kosundola mikumba na biso na kati ya libota. Nzokande, mpo tóndimama na Nzambe mpe Yesu, tosengeli kokokisa mikumba na biso na kati ya libota. (1 Tim. 5:4, 8) Ntango tosalaka yango, tokómaka lisusu na esengo mingi. Oyo eleki ntina, Yehova ayebi ete libota ekozala na esengo ntango mwasi ná mobali bazali kolingana mpe komoniselana limemya, ntango baboti bazali kolinga mpe kobɔkɔla bana na bango, mpe ntango bana bazali kotosa baboti na bango.—Ef. 5:33; 6:1, 4.
7. Okoki kosala nini mpo okokisa mokumba na yo na kati ya libota?
7 Ndenge nini okoki komema mokumba yango? Ezala ozali na mokumba nini na libota, tyelá bwanya ya Biblia motema na esika ya kotya motema na mayoki, mimeseno, to makambo oyo bato ya mayele balobaka. (Mas. 24:3, 4) Saleláká malamu mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia. Mikanda yango ezalaka na batoli oyo esalisaka biso tósalela mitinda ya Biblia. Na ndakisa, masolo na eteni “Lisalisi mpo na libota” ezali na masolo ya ntina mingi oyo elobeli mikakatano ya sikisiki oyo babalani, baboti, mpe bilenge bakutanaka na yango lelo oyo. b Zalá na ekateli ya kosalela makambo oyo Biblia elobi, ata soki bato mosusu ya libota basalelaka yango te. Soki osali bongo, libota na yo ekozwa matomba, mpe Yehova akopambola yo.—1 Pe. 3:1, 2.
8. Bikateli na biso ekoki kobimisela biso nini?
8 Mokumba na biso mpo na bikateli oyo tozwaka. Yehova apesá biso bonsomi ya kozwaka bikateli biso moko, mpe alingaka ete bikateli ya malamu oyo tozwaka ememela biso esengo. Kasi soki tozwi bikateli ya mabe, atikaka nzela ete tóbuka mbuma mabe ya bikateli na biso. (Gal. 6:7, 8) Yango wana, tondimaka makama nyonso oyo ekómelaka biso, mpo tozwaki bikateli ya mabe, tolobaki to tosalaki likambo moko ya mabe. Lisosoli na biso ekoki kotungisama na kotalela likambo oyo tosalaki. Na yango, koyeba ete tozali na mokumba mpo na bikateli oyo tozwaka ekoki kotinda biso tóyambola masumu na biso, tósembola mabunga na biso, mpe tóboya kozongela mabunga oyo tosalaki. Kosala bongo ekoki kosalisa biso tótikala na momekano ya kopota mbangu mpo na bomoi.
9. Okoki kosala nini soki ozwaki ekateli ya mabe? (Talá mpe elilingi.)
9 Ndenge nini okoki komema mokumba yango? Soki ozwi ekateli ya mabe, osengeli kosala nini? Ndimá ete okoki te kobongola likambo oyo esí esalemi. Kolekisa te ntango mpe makasi na yo mpo na koluka komilongisa to kopesa basusu foti na bikateli ya mabe oyo ozwaki. Kasi, ndimá mabunga na yo mpe salá nyonso otya makanisi na makambo oyo okoki kosala sikoyo. Soki ozali komitungisa mpo na likambo oyo osalaki, bondelá Yehova na komikitisa nyonso, ndimá libunga na yo, mpe sɛngá ye alimbisa yo. (Nz. 25:11; 51:3, 4) Sɛngá bolimbisi epai ya baoyo osalaki bango mabe, soki esengeli, luká lisalisi ya bankulutu. (Yak. 5:14, 15) Zwá liteya na mabunga oyo osalaki, mpe salá makasi ozongela yango lisusu te. Soki osali bongo, okoki komindimisa ete Yehova akoyokela yo mawa mpe akopesa yo lisungi oyo osengeli na yango.—Nz. 103:8-13.
KILO OYO TOSENGELI ‘KOLONGOLA’
10. Na kotalela Bagalatia 6:4, mpo na nini kozala na bilikya oyo ezali mpasi mpo ekokisama ezali komimemisa kilo mpamba?
10 Bilikya oyo ezali mpasi mpo ekokisama. Tokoki komimemisa kilo mpamba ntango tozali komikokanisa na basusu. (Tángá Bagalatia 6:4.) Soki tozali ntango nyonso komikokanisa na basusu, tokoki kobanda koyokela basusu likunya mpe kowelana na bango. (Gal. 5:26) Soki toluki kosala makambo oyo basusu bazali kosala atako tokoki kosala yango te, tokomisala mabe. Lisusu, soki “eloko ya kozelisazelisa ebɛlisaka motema,” ezali boni na kozela eloko oyo tokoki kozwa te! (Mas. 13:12) Kosala bongo ekoki kolɛmbisa biso nzoto mpe kosala ete tótika kopota mbangu mpo na bomoi.—Mas. 24:10.
11. Nini ekoki kosalisa yo oboya kozala na bilikya oyo ezali mpasi mpo ekokisama?
11 Ndenge nini okoki kolongola kilo yango? Koluka te kosala mingi koleka oyo Yehova asɛngaka. Asɛngaka yo soki moke te opesa eloko oyo ozali na yango te. (2 Ko. 8:12) Yebá ete Yehova akokanisaka te makambo oyo osalaka na oyo ya basusu. (Mat. 25:20-23) Azwaka na motuya mosala oyo osalelaka ye na motema na yo mobimba, bosembo na yo, mpe ezaleli na yo ya koyika mpiko. Zalá na komikitisa mpe ndimá ete okoki te kosala makambo nyonso olingi sikoyo mpo na mbula na yo, bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto, to makambo mosusu ya bomoi. Lokola Barazilai, boyá kondima mikumba mosusu ntango nzoto ezali kopesa yo nzela te ya kosala yango. (2 Sa. 19:35, 36) Lokola Moize, ndimáká lisalisi mpe pesáká basusu mikumba soki esengeli. (Kob. 18:21, 22) Soki ozali na komikitisa, okotika nzela te ete bilikya oyo ezali mpasi mpo ekokisama elongola yo na nzela ya kopota mbangu mpo na bomoi.
12. Mpo na nini tosengeli te komipesa foti mpo na bikateli ya mabe oyo basusu bazwaka?
12 Komipesa foti mpo na bikateli oyo basusu bazwaka. Tokoki te kozwa bikateli mpo na basusu; tokoki mpe te ntango nyonso kobatela bango na makama oyo bikateli na bango ya mabe ekoki kobimisa. Na ndakisa, mwana moko ya mobali to ya mwasi akoki kozwa ekateli ya kotika kosalela Yehova. Ekateli yango ekoki kopesa baboti mpasi mingi. Nzokande, baboti oyo bamipesaka foti mpo na bikateli mabe ya bana na bango bamimemisaka kilo kaka mpamba. Ezali te mokumba oyo Yehova azelaka ete bámema.—Rom. 14:12.
13. Moboti akoki kosala nini ntango mwana azwi ekateli ya mabe?
13 Ndenge nini okoki kolongola kilo yango? Kobosana te ete Yehova apesá biso nyonso bonsomi ya kopona. Atikaka moto na moto azwa ekateli ye moko. Yango esangisi mpe bonsomi ya kopona kosalela ye to te. Yehova ayebi ete ozali te moboti ya kokoka; alingi kaka osala oyo okoki kosala. Mwana na yo asengeli komema mokumba ya bikateli oyo azwi, kasi yo te. (Mas. 20:11) Kasi, soki ozali kaka kokanisa mabunga oyo osalaki lokola ozali moboti, yebisá Yehova ndenge ozali komiyoka mpe sɛngá ye alimbisa yo. Ayebi ete okoki te kozongisa lisusu makambo oyo esí esalemá mpe kobongola yango. Lisusu, alingi te obatela mwana na yo mpo akima kobuka oyo alonaki. Kobosana te ete soki mwana na yo asali milende ya kozongela Yehova, akosepela mingi koyamba ye lisusu.—Luka 15:18-20.
14. Mpo na nini komipesaka foti koleka ndelo ezali kilo oyo tosengeli kolongola?
14 Komipesaka foti koleka ndelo. Ntango tosali lisumu, ebongi tómiyoka ete tomemi ngambo. Kasi, komipesa foti koleka ndelo ezali kilo oyo tosengeli te komema. Ezali kilo oyo tosengeli kolongola. Ndenge nini toyebaka soki tozali komipesa foti koleka ndelo? Soki toyamboli lisumu na biso, tobongoli mpenza motema, mpe tosali nyonso mpo tózongela yango lisusu te, tokoki kondima ete Yehova alimbisi biso. (Mis. 3:19) Soki tosali makambo wana nyonso, Yehova alingaka te tókoba komiyoka ete tomemi ngambo. Ayebi ete ekozala likama mpo na biso soki tosali bongo. (Nz. 31:10) Soki tokómi na mawa koleka ndelo, tokoki kotika kopota mbangu mpo na bomoi.—2 Ko. 2:7.
15. Na kotalela 1 Yoane 3:19, 20, okoki kosala nini mpo omipesa foti koleka ndelo te? (Talá mpe elilingi.)
15 Ndenge nini okoki kolongola kilo yango? Soki ozali kokoba komitungisa koleka ndelo, tyá makanisi na ndenge Nzambe ‘alimbisaka mpenza.’ (Nz. 130:4) Ntango alimbisaka baoyo babongolaka mpenza motema, alaki boye: “Nakokanisa lisumu na bango lisusu te.” (Yir. 31:34) Yango elimboli ete Yehova akokanisa lisusu te masumu oyo así alimbisá yo. Na yango, kokanisa te ete mikakatano oyo ozali kokutana na yango sikoyo mpo na lisumu oyo osalaki emonisi ete Nzambe alimbisá yo te. Longola yango, komipesa foti te mpo obungisi mikumba oyo ozalaki na yango na lisangá. Yehova akanisaka lisusu te masumu na yo, yo mpe osengeli kosala bongo.—Tángá 1 Yoane 3:19, 20.
POTÁ MBANGU MPO OLONGA
16. Lokola tozali bapoti-mbangu, tosengeli koyeba nini?
16 Lokola tozali kopota mbangu mpo na bomoi, tosengeli ‘kopota mbangu na ndenge oyo ekosala ete tózwa yango.’ (1 Ko. 9:24) Tokoki kosala yango soki toyebi kokesenisa mikumba oyo tosengeli komema mpe kilo oyo tosengeli kolongola. Na lisolo oyo, tolobeli kaka mwa bandakisa ya mikumba oyo tosengeli komema mpe mwa bandakisa ya kilo oyo tosengeli kolongola. Kasi tokoki mpe kolobela makambo yango mosusu. Yesu alobaki ete tokoki ‘kokóma kilo na kolekisa ndelo na kolya, na komɛla mingi mpe na mitungisi ya bomoi.’ (Luka 21:34) Bavɛrsɛ oyo mpe mosusu ekoki kosalisa yo oyeba bisika nini osengeli kobongisa wana ozali kopota mbangu mpo na bomoi.
17. Mpo na nini tokoki komindimisa ete tokolonga kopota mbangu mpo na bomoi?
17 Tokoki komindimisa ete tokolonga kopota mbangu mpo na bomoi mpo Yehova akopesa biso makasi oyo tosengeli na yango. (Yis. 40:29-31) Yango wana, kotika te! Mekolá ntoma Paulo, oyo asalaki nyonso mpo na kozwa mbano oyo etyamaki liboso na ye. (Flp. 3:13, 14) Moto moko te akoki kopota mbangu na esika na yo, kasi na lisalisi ya Yehova okoki kolonga. Yehova akoki kosalisa yo omema mikumba na yo mpe olongola kilo oyo ezangá ntina. (Nz. 68:19) Na lisalisi na ye, okozala na likoki ya koyika mpiko ntango ozali kopota mbangu mpe okolonga!
LOYEMBO 65 Kende liboso!
a Lisolo oyo ekosalisa biso tópota mbangu mpo na bomoi. Lokola tozali bapoti-mbangu, tosengeli komema mikumba mosusu. Yango esangisi makambo lokola, elako na biso ya komipesa, mikumba na biso na kati ya libota mpe mokumba na biso mpo na bikateli oyo tozwaka. Kasi tosengeli kolongola kilo nyonso ezangá ntina oyo ekoki kolɛmbisa biso. Yango esangisi makambo nini? Lisolo oyo ekoyanola na motuna oyo.
b Okoki kozwa masolo na eteni “Lisalisi mpo na libota” na jw.org. Ndambo ya masolo oyo etali babalani yango oyo: “Ndenge ya komoniselana limemya” mpe “Kokumisa molongani na yo”; mpo na baboti, “Teyá bana ndenge malamu ya kosalela telefone” mpe “Ndenge ya kosolola ná mwana na yo oyo akómi elenge”; mpe mpo na bilenge, “Ndenge ya kolonga komekama” mpe “Ndenge ya kosala ntango ozali komiyoka lokola ozangá baninga.”