Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 34

Zwá mateya na bisakweli ya Biblia

Zwá mateya na bisakweli ya Biblia

“Baoyo bazali na mayele ya kososola bakokanga ntina.”​—DAN. 12:10.

LOYEMBO 98 Makomami ekomami na elimo ya Nzambe

NA MOKUSE a

1. Nini ekoki kosalisa biso tókóma kosepela koyekola bisakweli ya Biblia?

 ELENGE mobali moko na nkombo Ben alobi: “Nalingaka koyekola bisakweli ya Biblia.” Yo mpe olingaka koyekola bisakweli ya Biblia? To okanisaka ete bisakweli ya Biblia ezalaka mpasi kokanga ntina na yango? Okoki kutu komona ete koyekola bisakweli ekoki kolɛmbisa. Kasi, soki ozali koluka koyeba ntina oyo Yehova akomisaki bisakweli yango na Liloba na ye, okoki kobongola makanisi na yo.

2. Tokolobela nini na lisolo oyo?

2 Na lisolo oyo, tokolobela kaka te ntina oyo tosengeli koyekola makambo etali bisakweli ya Biblia kasi mpe ndenge oyo tokoki koyekola yango. Na nsima, tokoyekola bisakweli mibale oyo ezali na mokanda ya Danyele mpo na komona ndenge kokanga ntina na yango ekoki kosalisa biso lelo oyo.

MPO NA NINI TOSENGELI KOYEKOLA BISAKWELI YA BIBLIA?

3. Tosengeli kosala nini soki tolingi kokanga ntina ya bisakweli ya Biblia?

3 Tosengeli koluka lisalisi soki tolingi kokanga ntina ya bisakweli ya Biblia. Tózwa ndakisa oyo: Kanisá ete ozali kokende kotala esika moko oyo oyebi te, kasi moninga moko oyo azali kosala mobembo elongo na yo ayebi malamu esika yango. Ayebi mpenza esika bozali mpe esika nzela mokomoko ezali komema. Na ntembe te, okosepela ete moninga yango akende kotika yo! Ndenge moko mpe, Yehova ayebi esika nini tokómi na eleko ya ntango oyo mpe makambo oyo ezali kozela biso. Yango wana, mpo tókanga ntina ya bisakweli ya Biblia, tosengeli kozala na komikitisa mpe kosɛnga Yehova asalisa biso.​—Dan. 2:28; 2 Pe. 1:19, 20.

Koyekola bisakweli ya Biblia ekoki kosalisa biso tómibongisa mpo na makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya (Talá paragrafe 4)

4. Na kotalela Yirimia 29:11, mpo na nini Yehova akomisaki bisakweli oyo ezali na Liloba na ye? (Talá mpe elilingi.)

4 Lokola moboti nyonso ya malamu, Yehova alingaka ete bana na ye bázala na esengo na mikolo ezali koya. (Tángá Yirimia 29:11.) Kasi na kokesana na moto nyonso oyo azali moboti, Yehova akoki koyebisa biso na bosikisiki makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya. Akomisaki bisakweli yango na Liloba na ye mpo tókoka koyeba makambo ya ntina liboso ete esalema. (Yis. 46:10) Bisakweli ya Biblia ezali makabo ya bolingo oyo euti na Tata na biso ya likoló. Kasi, ndenge nini okoki komindimisa ete makambo oyo Biblia esakoli ekosalema mpenza?

5. Lisolo ya Max ekoki koteya bilenge nini?

5 Na kelasi, mbala mingi bilenge na biso bazalaka elongo na bato oyo bazalaka na limenya mingi te mpo na Biblia to ata moke te. Na bantango mosusu makambo oyo balobaka mpe oyo basalaka ekoki kosala ete elenge Motatoli akóma na bantembe mpo na bindimeli na ye. Talá likambo oyo ekómelaki ndeko mobali moko na nkombo Max. Alobi: “Ntango nazalaki naino elenge, nakómaki komituna soki baboti na ngai bazalaki mpenza koteya ngai lingomba ya solo mpe soki Biblia ekomamaki mpenza na litambwisi ya elimo ya Nzambe.” Baboti na ye basalaki nini? Alobi: “Bafandaki nyɛɛ, atako nayebaki ete bazalaki komitungisa.” Baboti ya Max basalelaki Biblia mpo na koyanola na mituna na ye. Max mpe asalaki likambo moko. Alobi: “Nayekolaki bisakweli ya Biblia, mpe nazalaki koyebisa bilenge mosusu ya lisangá makambo oyo nazalaki koyekola.” Nini emonanaki na nsima? Max alobi: “Nsima na yango, nandimaki mpenza ete Biblia ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe!”

6. Osengeli kosala nini soki ozali na bantembe, mpe mpo na nini?

6 Soki yo mpe okómi komituna lokola Max, soki Biblia elobaka mpenza solo, osengeli koyoka nsɔni te. Kasi osengeli kosala likambo moko mpo na yango. Ntembe ezali lokola koguga. Soki otiki yango kaka boye, ekoki kobebisa eloko moko ya motuya malɛmbɛmalɛmbɛ. Mpo olongola bantembe nyonso oyo ekoki kobebisa kondima na yo, osengeli komituna boye: ‘Nandimaka makambo oyo Biblia elobi mpo na mikolo oyo ezali koya?’ Soki ondimaka yango te, osengeli koyekola bisakweli ya Biblia oyo esilá kokokisama. Talá ndenge okoki kosala yango.

NDENGE YA KOYEKOLA BISAKWELI YA BIBLIA

Mpo tómonisa ete tozali kotyela Yehova motema ndenge Danyele atyelaki ye motema, tosengeli koyekola bisakweli ya Biblia na komikitisa, na mozindo, mpe na makanisi malamu (Talá paragrafe 7)

7. Na kotalela Danyele 12:10, ndakisa nini Danyele atiká na likambo etali koyekola bisakweli? (Talá mpe elilingi.)

7 Danyele atikelá biso nyonso ndakisa moko malamu na likambo etali koyekola bisakweli. Azalaki koyekola bisakweli na makanisi malamu, mpo ayeba solo. Danyele azalaki mpe na komikitisa. Ayebaki ete Yehova akosalisa ye akanga ntina ya bisakweli soki atikali penepene na ye mpe atosi ye. (Dan. 2:27, 28; Tángá Danyele 12:10.) Danyele amonisaki ete azalaki na komikitisa na ndenge atyaki motema ete Yehova akosalisa ye. (Dan. 2:18) Danyele azalaki mpe koyekola na mozindo. Azalaki kosala bolukiluki na Makomami oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe oyo ezalaki na ntango wana. (Yir. 25:11, 12; Dan. 9:2) Ndenge nini okoki komekola Danyele?

8. (a) Mpo na nini bato mosusu baboyaka kondima ete bisakweli ya Biblia ekokisamaka? (b) Tosengeli kosala nini?

8 Luká koyeba ntina oyo ozali koyekola bisakweli ya Biblia. Ozali koyekola bisakweli ya Biblia mpo ozali mpenza na mposa ya koyeba solo? Soki ezali bongo, Yehova akosalisa yo. (Yoa. 4:23, 24; 14:16, 17) Kasi bato mosusu bayekolaka Biblia mpo na bantina mosusu. Basusu batángaka Biblia mpo na koluka makambo oyo emonisi ete buku yango ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe te. Yango wana, bamonaka ete bango moko bakoki kokata nini ezali malamu mpe nini ezali mabe. Na yango, tosengeli koyekola na makanisi malamu. Longola yango, tosengeli na ezaleli moko ya ntina mingi mpo tókanga ntina ya bisakweli ya Biblia.

9. Ezaleli nini tosengeli na yango mpo tókanga ntina ya bisakweli ya Biblia? Limbolá.

9 Zalá na komikitisa. Yehova alaki kosalisa bato ya komikitisa. (Yak. 4:6) Na yango, tosengeli kobondela Nzambe asalisa biso mpo tókanga ntina ya bisakweli ya Biblia. Tosengeli mpe kondima lisalisi ya moombo ya sembo oyo azali kosalela mpo na kopesa biso bilei ya elimo na ntango oyo ebongi. (Luka 12:42) Yehova azali Nzambe ya mobulu te, yango wana ebongi ete asalela kaka moombo ya sembo mpo na kosalisa biso tókanga ntina ya mateya ya solo oyo ezali na Liloba na ye.​—1 Ko. 14:33; Ef. 4:4-6.

10. Liteya nini ozwi na ndakisa ya Esther?

10 Yekoláká na mozindo. Poná esakweli moko oyo osepelaka na yango mingi mpe salá bolukiluki mpo na yango. Yango nde ndeko mwasi moko na nkombo Esther asalaki. Alingaki koyeba makambo mingi oyo etali bisakweli oyo elobelaki koya ya Masiya. Alobi boye: “Ntango nazalaki na mbula 15, nabandaki koluka bilembeteli oyo emonisi ete bisakweli yango ekomamaki liboso Masiya abotama.” Makambo oyo ayekolaki na lisolo ya Barulo ya Mbu Ekufá endimisaki ye bosolo ya likambo yango. Abakisi boye: “Makambo yango mosusu ekomamaki liboso Kristo aya, na yango bisakweli oyo ezalaki na kati esengelaki kouta kaka epai ya Nzambe.” Esther alobi lisusu boye: “Nasengelaki kotánga makambo yango mbala mingi mpo nakanga ntina na yango.” Kasi azali na esengo na milende oyo asalaki. Nsima ya koyekola na mozindo ebele ya bisakweli ya Biblia, alobi boye: “Namonaki polelepolele ete Biblia elobaka solo!”

11. Matomba nini tozwaka ntango tomindimisaka ete Biblia elobaka solo?

11 Ntango tomonaka ndenge bisakweli mosusu ya Biblia ezali kokokisama, tokómaka kotyela lisusu Yehova motema mpe tondimaka litambwisi na ye na motema moko. Longola yango, bisakweli ya Biblia esalisaka biso tóbatela elikya na biso mpo na mikolo ezali koya, ezala tozali kokutana na komekama ya ndenge nini lelo oyo. Na yango, tiká tólobela na mokuse bisakweli mibale oyo ezali na mokanda ya Danyele oyo ezali kokokisama lelo oyo. Soki tokangi ntina na yango, tokoki kozwa bikateli ya bwanya.

MPO NA NINI OSENGELI KOYEBA MAKAMBO ETALI MAKOLO YA EBENDE MPE MABELE?

12. Na kotalela Danyele 2:41-43, makolo ya “ebende [oyo] esangisami na mabele ya pɛtɛpɛtɛ” ezali komonisa nini?

12 Tángá Danyele 2:41-43. Na ndɔtɔ oyo Danyele alimbolelaki Mokonzi Nebukadenezare, makolo ya ekeko yango oyo mokonzi amonaki esalemaki na “ebende [oyo] esangisami na mabele ya pɛtɛpɛtɛ.” Soki tokokanisi esakweli yango na bisakweli mosusu oyo ezali na mokanda ya Danyele mpe ya Emoniseli, tokoki koloba ete makolo yango ezali komonisa bokonzi ya Anglo-Américain, yango ezali bikólo mibale esangani oyo eleki na nguya na mokili mobimba. Mpo na bokonzi yango oyo eleki na nguya na mokili mobimba, Danyele alobi boye: “Bokonzi yango ekozala ndambo makasi mpe ndambo makasi te.” Mpo na nini eteni mosusu ezali makasi te? Lokola bato ya bikoló yango bamonisami na mabele ya pɛtɛpɛtɛ, yango ezali kosala ete bokonzi yango ezala makasi te lokola ebende. b    

13. Mateya nini ya ntina tozwi na esakweli oyo?

13 Toyekolaka mateya mingi ya ntina na ekeko oyo Danyele alobeli, mingimingi na makolo ya ekeko yango. Ya liboso, bokonzi ya Anglo-Américain, oyo eleki na nguya na mokili mobimba emonisaki ete ezali na nguya. Na ndakisa, bokonzi yango esalaki mingi mpo na kosilisa Etumba ya Liboso ya mokili mobimba mpe Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Kasi, bato ya bikólo yango bazali kolɛmbisa bokonzi yango mpe kobunda bango na bango. Ya mibale, bokonzi yango ya Anglo-Américain ekozala bokonzi ya nsuka oyo eleki na nguya na mokili mobimba oyo ekoyangela liboso ete Bokonzi ya Nzambe etya nsuka na baguvɛrnema nyonso ya bato. Ata soki bikólo mosusu ekoki kotɛmɛla bokonzi ya Anglo-Américain, ekólo moko te ekozwa esika na yango. Toyebi yango mpo “libanga” oyo ezali komonisa Bokonzi ya Nzambe ekotuta makolo, elingi koloba, eteni ya ekeko yango oyo ezali komonisa bokonzi ya Anglo-Américain.​—Dan. 2:34, 35, 44, 45.

14. Ndenge nini kokanga ntina ya esakweli etali makolo ya ebende mpe ya mabele ekoki kosalisa biso tózwa bikateli ya bwanya?

14 Ondimi ete esakweli ya Danyele oyo etali makolo ya ebende mpe mabele ezali solo? Soki ezali bongo, yango ekotinda yo otalela ndenge oyo ozali kotambwisa bomoi na yo. Okotyela ebongiseli ya mokili oyo motema te mpo oyebi ete etikali moke ebebisama. (Luka 12:16-21; 1 Yoa. 2:15-17) Koyeba ndimbola ya esakweli yango ekosalisa yo mpe omona ntina ya mosala ya kosakola mpe ya koteya. (Mat. 6:33; 28:18-20) Nsima ya koyekola esakweli oyo, mpo na nini te omituna motuna oyo: ‘Bikateli oyo nazwaka emonisaka ete nandimaka ete etikali moke Bokonzi ya Nzambe etya nsuka na baguvɛrnema nyonso ya bato?’

MPO NA NINI OSENGELI KOYEBA MAKAMBO ETALI “MOKONZI YA NƆRDI” MPE “MOKONZI YA SUDI”?

15. Na kotalela Danyele 11:40, nani azali “mokonzi ya nɔrdi” mpe nani azali “mokonzi ya sudi” lelo oyo?

15 Tángá Danyele 11:40. Danyele mokapo 11 elobeli bakonzi mibale, to baguvɛrnema mibale oyo ezali kobunda mpo na koyangela mokili. Soki tokokanisi esakweli oyo na bisakweli mosusu oyo ezali na Biblia, tokomona ete “mokonzi ya nɔrdi” ezali Russie ná bikólo oyo epesaka yango mabɔkɔ mpe “mokonzi ya sudi” ezali bokonzi ya Anglo-Américain, oyo eleki na nguya na mokili mobimba. c

Tokoki kokómisa kondima na biso makasi mpe koboya komitungisa koleka ndelo ntango tozali komona ndenge botɛmɛli oyo ezali kouta na “mokonzi ya nɔrdi” mpe na “mokonzi ya sudi” ezali kokokisa bisakweli ya Biblia (Talá paragrafe 16-18)

16. Ndenge nini “mokonzi ya nɔrdi” azali kosalela basaleli ya Nzambe makambo?

16 Basaleli ya Nzambe oyo bafandi na nse ya boyangeli ya “mokonzi ya nɔrdi” bazali koyika mpiko na minyoko oyo ezali kouta epai ya mokonzi yango. Batatoli mosusu bazali kobɛtama mpe bakangami mpo na kondima na bango. Na esika ebangisa bandeko na biso, makambo oyo “mokonzi ya nɔrdi” azali kosala bango ezali nde kokómisa kondima na bango makasi. Mpo na nini? Mpo bandeko na biso bayebi ete minyoko oyo basaleli ya Nzambe bazali kokutana na yango ezali kokokisa maloba ya bisakweli oyo ezali na mokanda ya Danyele. d (Dan. 11:41) Koyeba yango ekoki kosalisa biso tóbatela elikya na biso makasi mpe bosembo na biso etengatenga te.

17. Mikakatano nini basaleli ya Nzambe bazali kokutana na yango na nse ya boyangeli ya “mokonzi ya sudi”?

17 Na ntango ya kala, “mokonzi ya sudi” anyokolaki mpe basaleli ya Yehova. Na ndakisa, na ebandeli ya siɛklɛ ya 20, bandeko mingi bakangamaki na babolɔkɔ mpo baboyaki kokɔta na makambo ya politiki mpe babenganaki bana mosusu ya Batatoli ya Yehova na biteyelo kaka mpo na ntina moko wana. Na bambula oyo eleki, bosembo ya basaleli ya Yehova oyo bazali kofanda na nse ya boyangeli ya mokonzi ya sudi emekamaki na lolenge mingi. Na ndakisa, na eleko ya maponami, mokristo akoki komekama mpo na kopesa mabɔkɔ na parti politiki moko to na kandida moko. Atako akoki te kopona moto yango na ntango ya maponami; kasi na makanisi mpe na motema na ye, akoki kokanisa ete moto boye to boye abongi bápona ye. Kasi, mpo tóboya kokɔta mpenza na makambo ya politiki, tosengeli kozala ekɛngɛ na makambo oyo tosalaka mpe oyo tokanisaka mpe mayoki na biso!​—Yoa. 15:18, 19; 18:36.

18. Tosalaka nini ntango tomonaka kowelana oyo ezali kati na “mokonzi ya nɔrdi” mpe “mokonzi ya sudi”? (Talá mpe elilingi.)

18 Baoyo bandimelaka bisakweli ya Biblia te bakoki komitungisa mingi ntango bazali komona “mokonzi ya sudi” ‘azali kobɛtana na mokonzi ya nɔrdi maseke.’ (Dan. 11:40, msl.) Bakonzi yango mibale bazali na mindoki mingi ya nguya oyo ekoki kobebisa bomoi nyonso awa na mabele. Kasi toyebi ete Yehova akopesa nzela te likambo ya bongo esalema. (Yis. 45:18) Na yango, na esika kowelana oyo tozali komona kati na “mokonzi ya nɔrdi” mpe “mokonzi ya sudi” ebangisa biso, yango ekómisaka nde kondima na biso makasi. Emonisaka ete nsuka ya mokili oyo ekómi pene.

KOBÁ KOTYA LIKEBI NA BISAKWELI

19. Likambo nini tosengeli koyeba na ntina etali bisakweli ya Biblia?

19 Toyebi te ndenge bisakweli mosusu ya Biblia ekokokisama. Mosakoli Danyele mpe akangaki te ndimbola ya makambo nyonso oyo akomaki. (Dan. 12:8, 9) Kasi lokola toyebi mpenza te ndenge esakweli moko ekokokisama, yango elakisi nde ete ekokokisama te? Ezali bongo te! Tokoki kotya motema ete Yehova akosalisa biso tókanga ntina ya makambo oyo tosengeli koyeba na ntango oyo ebongi mpenza, kaka ndenge asalaki na ntango ya kala.​—Am. 3:7.

20. (a) Bisakweli nini ya Biblia ekokokisama mosika te? (b) Tosengeli kokoba kosala nini?

20 Bato ya bikólo bakosakola “kimya, likambo ya kobanga ezali te.” (1 Tes. 5:3) Na nsima, baguvɛrnema ya mokili oyo ekobalukela mangomba ya lokuta mpe ekobebisa yango nyɛɛ. (Em. 17:16, 17) Na nsima, bakobundisa basaleli ya Nzambe. (Ezk. 38:18, 19) Makambo wana ekomema mbala moko na etumba ya nsuka, elingi koloba, Armagedone. (Em. 16:14, 16) Tokoki komindimisa ete makambo wana ekosalema mosika te. Lokola makambo yango esalemi naino te, tiká tókoba komonisa botɔndi epai ya Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo wana tozali kotya likebi na bisakweli ya Biblia mpe kosalisa basusu básala mpe bongo.

LOYEMBO 95 Pole ezali kongɛnga se kongɛnga

a Ata soki makambo ya mokili oyo ezali kobeba se kobeba, tokoki kozala na elikya ete makambo ya malamu ezali kozela biso na mikolo ezali koya. Koyekola bisakweli ya Biblia epesaka biso elikya yango. Lisolo oyo ekolobela bantina ya sikisiki oyo tosengeli koyekola makambo oyo Biblia esakoli. Tokolobela mpe na mokuse bisakweli mibale na kati ya bisakweli oyo ezali na mokanda ya Danyele mpe tokomona ndenge biso moko tokoki kozwela yango matomba soki tokangi ntina na yango.

b Talá lisolo “Yehova amonisi makambo oyo ‘ekosalema nsima ya mwa ntango moke,’” par. 7-9, na nimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/06/2012.

c Talá lisolo “Nani nde ‘mokonzi ya nɔrdi’ lelo oyo?” par. 3-4, na nimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 05/2020.

d Talá lisolo “Nani nde ‘mokonzi ya nɔrdi’ lelo oyo?” par. 7-9, na nimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 05/2020.