LISOLO YA BOYEKOLI 33
Zwá mateya na ndakisa ya Danyele
“Ozali moto ya motuya mingi.”—DAN. 9:23.
LOYEMBO 73 Pesá biso mpiko
NA MOKUSE a
1. Mpo na nini likebi ya bakonzi ya Babilone ekendaki epai ya mosakoli Danyele?
MOSAKOLI Danyele azalaki naino elenge ntango bato ya Babilone bakangaki ye na etumba mpe bamemaki ye mosika ya mboka na ye. Kasi atako Danyele azalaki elenge, likebi ya bakonzi ya Babilone ekendaki epai na ye. Batalaki oyo ‘ezalaki komonana na miso’, ete Danyele azalaki ‘na mbeba ata moko te na nzoto, azalaki kitoko’ mpe autaki na libota moko ya lokumu. (1 Sa. 16:7) Yango wana, bato ya Babilone bapesaki ye formasyo mpo akóma kosala na ndako ya mokonzi.—Dan. 1:3, 4, 6.
2. Na boyokani na Ezekiele 14:14, ndenge nini Yehova azalaki kotalela Danyele?
2 Yehova azalaki kolinga Danyele, ezalaki te mpo azalaki kitoko na nzoto to mpo azalaki kosala na ndako ya mokonzi, kasi ezalaki mpo na lolenge ya moto oyo aponaki kozala. Na yango, ekoki kozala ete Danyele azalaki na mbula soki 20 ntango Yehova alobaki ete Danyele azalaki lokola Noa mpe Yobo. Yango wana, Yehova abengaki elenge Danyele moto ya sembo lokola Noa mpe Yobo, oyo basalelaki ye na bosembo na boumeli ya bambula mingi. (Eba. 5:32; 6:9, 10; Yobo 42:16, 17; tángá Ezekiele 14:14.) Lisusu, Yehova akobaki kolinga Danyele bomoi na ye mobimba mpe Danyele asalaki makambo mingi ya malamu na bomoi na ye.—Dan. 10:11, 19.
3. Tokolobela nini na lisolo oyo?
3 Na lisolo oyo, tokoyekola bizaleli mibale ya Danyele oyo esalaki ete azala moto ya motuya mingi na miso ya Yehova. Ya liboso, tokolobela mabaku oyo amonisaki ezaleli yango mokomoko. Ya mibale, tokomona makambo oyo esalisaki Danyele amonisa bizaleli yango. Ya misato, tokolobela ndenge oyo tokoki komekola ye. Atako lisolo oyo ekomami mpo na bilenge, biso nyonso tokoki kozwa mateya na ndakisa ya Danyele.
MEKOLÁ MPIKO YA DANYELE
4. Ndenge nini Danyele amonisaki mpiko? Pesá ndakisa.
4 Bato ya mpiko bakoki kobanga, kasi batikaka te kobanga epekisa bango básala oyo ezali malamu. Danyele azalaki elenge moko ya mpiko mpenza. Tótalela mabaku mibale oyo amonisaki mpiko. Ekoki kozala ete libaku ya liboso emonanaki mbula soki mibale na nsima ntango bato ya Babilone babebisaki Yerusaleme. Mokonzi Nebukadenezare ya Babilone alɔtaki ndɔtɔ moko ya nsɔmɔ ya ekeko moko monene. Alukaki koboma bato nyonso ya bwanya, ezala mpe Danyele, soki bakokaki te koyebisa ye ndɔtɔ oyo alɔtaki mpe lisusu kopesa ye ndimbola na yango. (Dan. 2:3-5) Danyele asengelaki kosala nokinoki; soki bongo te, bato mingi basengelaki kobomama. “Akɔtaki epai ya mokonzi mpe asɛngaki ye atikela ye mwa ntango mpo apesa ye ndimbola ya ndɔtɔ yango.” (Dan. 2:16) Yango esɛngaki kozala na mpiko mpe na kondima. Ezali na lisolo moko te oyo emonisi ete Danyele asilá kolimbola bandɔtɔ liboso. Asɛngaki baninga na ye, elingi koloba, baoyo bankombo na bango na monɔkɔ ya Babilone ezalaki Shadrake, Meshake, mpe Abedenego “bábondela Nzambe ya likoló, mpo ete na motema mawa na ye, ayebisa bango sekele yango.” (Dan. 2:18) Yehova ayanolaki na mabondeli yango. Na lisalisi ya Nzambe, Danyele alimbolaki ndɔtɔ ya Nebukadenezare. Yango wana, Danyele ná baninga na ye babomamaki te.
5. Na libaku nini mosusu Danyele amonisaki mpiko?
5 Na ntango moko boye nsima ya kolimbola ndɔtɔ ya ekeko monene, Danyele amonisaki lisusu mpiko. Nebukadenezare alɔtaki lisusu ndɔtɔ moko ya nsɔmɔ. Ndɔtɔ yango ezalaki kolobela ebakata ya nzete moko. Na mpiko nyonso, Danyele apesaki mokonzi ndimbola ya ndɔtɔ yango, ayebisaki ye ete akokóma ligboma mpe akozala lisusu mokonzi te na ntango moko boye. (Dan. 4:25) Mokonzi akokaki kokanisa ete Danyele akómaki motomboki mpe akokaki koboma ye. Kasi Danyele amonisaki mpiko mpe alimbolaki ndɔtɔ yango.
6. Ekoki kozala nini esalisaki Danyele azala na mpiko?
6 Ekoki kozala nini esalisaki Danyele azala na mpiko bomoi na ye mobimba? Ntango azalaki elenge, na ntembe te Danyele azwaki mateya na ndakisa ya mama mpe tata na ye. Batosaki malako oyo Nzambe apesaki baboti ya Yisraele ya koteya bana na bango Mibeko ya Nzambe. (Mib. 6:6-9) Danyele ayebaki kaka te Mibeko ya miboko, na ndakisa Mibeko Zomi, kasi mpe makambo mikemike etali Mibeko yango. Na ndakisa, biloko oyo Moyisraele akokaki kolya to te. b (Lev. 11:4-8; Dan. 1:8, 11-13) Danyele ayekolaki mpe lisolo ya bato ya Nzambe mpe ayebaki makambo oyo ekómelaki bango ntango baboyaki kotosa mibeko ya Yehova. (Dan. 9:10, 11) Makambo oyo Danyele akutanaki na yango na bomoi na ye endimisaki ye ete Yehova mpe baanzelu na ye ya nguya bazalaki kosalisa ye.—Dan. 2:19-24; 10:12, 18, 19.
7. Likambo nini mosusu esalisaki Danyele azala na mpiko? (Talá mpe elilingi)
7 Danyele azalaki koyekola makomi ya basakoli ya Nzambe, ezala mpe bisakweli ya Yirimia. Boyekoli yango esalisaki Danyele na nsima asosola ete etikalaki moke bokangami molai ya Bayuda ekóma na nsuka. (Dan. 9:2) Danyele amonaki ete maloba ya Yehova ekokisamaka ntango nyonso, mpe yango esalaki ete akóma lisusu kotyela Yehova motema mingi, mpe baoyo bazali na kondima makasi epai ya Nzambe bákoka kozala na mpiko mpenza. (Talá mpe Baroma 8:31, 32, 37-39.) Likambo eleki ntina, Danyele azalaki kobondela Tata na ye ya likoló mbala na mbala. (Dan. 6:10) Ayambolaki masumu na ye epai ya Yehova mpe ayebisaki ye ndenge azalaki komiyoka. Lisusu, Danyele asɛngaki lisalisi. (Dan. 9:4, 5, 19) Azalaki moto lokola biso, abotamaki na mpiko te. Kasi, akolisaki ezaleli yango ntango azalaki koyekola, kobondela, mpe kotyela Yehova motema.
8. Ndenge nini tokoki kokóma na mpiko?
8 Mpo tómonisa mpiko, tosengeli kosala nini? Ekoki kozala ete baboti na biso balendisaka biso tózala na mpiko, kasi bakoki te kotikela biso ezaleli yango lokola nde ezali libula ya libota. Kozala na mpiko ezali lokola koyekola mayele ya sika. Lolenge moko oyo okoki kozwa mayele yango ezali ya kotala na likebi mpenza makambo oyo molakisi azali kosala mpe na nsima komekola ndakisa na ye. Ndenge moko mpe, toyekolaka kozala na mpiko ntango totalaka na likebi mpenza ndenge basusu bamonisaka ezaleli yango mpe komekola ndakisa na bango. Na yango, mateya nini tozwi epai ya Danyele? Lokola ye, tosengeli koyeba Liloba ya Nzambe malamumalamu. Tosengeli kozala na boyokani ya malamu elongo na Yehova ntango tozali kosolola na ye mpe koyebisa ye ndenge tozali komiyoka mbala na mbala na mabondeli na biso. Longola yango, tosengeli kotyela Yehova motema, mpe komindimisa ete akosunga biso ntango nyonso. Na yango, soki kondima na biso emekami, tokomonisa mpiko.
9. Matomba nini tozwaka ntango tomonisaka mpiko?
9 Tozwaka matomba mingi ntango tomonisaka mpiko. Tótalela ndakisa ya Ben. Azalaki kotánga na eteyelo moko na Allemagne epai moto nyonso azalaki kondimela evolisyo mpe komona lisolo ya bozalisi oyo Biblia elobeli lokola lisapo mpamba. Mokolo moko, Ben azwaki libaku ya koloba liboso ya baninga na ye ya kelasi mpe alimbolaki ntina oyo azalaki kondima ete bomoi ekelamaki. Azalaki na mpiko mpe ayebisaki moto nyonso makambo oyo azalaki kondima. Nini esalemaki na nsima? Ben alobi: “Molakisi na ngai azalaki koyoka na likebi mpenza, mpe asalaki bakopi ya makambo oyo nazalaki koloba mpo na kolimbola yango mpe apesaki mwana-kelasi nyonso kopi mokomoko.” Baninga ya kelasi ya Ben basalaki nini? Ben alobi: “Mingi na bango bazalaki kolanda na likebi makambo oyo nazalaki koloba, mpe balobaki ete bazalaki kosepela na ngai.” Ndenge ndakisa ya Ben emonisi yango, mbala mingi basusu bamemyaka bato ya mpiko. Bakoki mpe kosalisa basusu báluka koyeba Yehova. Na ntembe te, tozali na bantina mingi ya komonisa mpiko.
MEKOLÁ BOSEMBO YA DANYELE
10. Bosembo ezali nini?
10 Na Biblia, liloba ya Ebre oyo elimboli “bosembo,” to “bolingo ya sembo,” epesaka likanisi ete Nzambe amonisaka ezaleli yango kaka epai ya bato oyo balingaka ye mpe basalelaka ye. Kaka liloba yango mpe esalelamaka mpo na kolobela bolingo oyo basaleli ya Nzambe bamoniselanaka. (Tángá 2 Samwele 22:26.) Bosembo na biso ekoki kokóma lisusu makasi ntango nyonso. Talá ndenge Danyele akangamaki lisusu makasi na bosembo na ye.
11. Ndenge nini bosembo ya Danyele emekamaki ntango akómaki mobange? (Talá elilingi ya ezipeli.)
11 Bosembo ya Danyele epai ya Yehova emekamaki na boumeli ya bomoi na ye mobimba. Kasi emekamaki lisusu makasi koleka ntango akómaki na mbula koleka 90. Na mbala oyo, Bamede mpe bato ya Perse nde bazwaki Babilone mpe Mokonzi Dariuse nde azalaki koyangela yango. Bato oyo bazalaki kosala na ndako ya mokonzi bazalaki kosepela na Danyele te mpe bazalaki komemya ye mpenza te mpo na Nzambe oyo azalaki kosambela. Yango wana, basalaki mwango mabe mpo na koboma Danyele. Basalaki ete mokonzi atya sinyatire na mobeko moko oyo esengelaki komeka soki Danyele akotikala sembo epai ya Nzambe na ye to epai ya mokonzi. Mpo Danyele amonisa bosembo na ye epai ya Mokonzi mpe asala makambo lokola bato nyonso, asengelaki kotika kosambela Yehova na boumeli ya mikolo 30. Danyele aponaki kotikala sembo epai ya Yehova. Yango wana, babwakaki ye na libulu ya bankɔsi. Kasi, Yehova afutaki bosembo ya Danyele na ndenge abikisaki ye na monɔkɔ ya bankɔsi. (Dan. 6:12-15, 20-22) Ndenge nini tokoki kotikala sembo epai ya Yehova ndenge Danyele asalaki?
12. Ndenge nini Danyele atikalaki sembo epai Yehova?
12 Ndenge tomonaki yango liboso, mpo tózala sembo epai ya Yehova, tosengeli kolinga ye makasi. Danyele atikalaki sembo epai ya Yehova mpo azalaki kolinga Tata na ye ya likoló mingi mpenza. Na ntembe te, Danyele akolisaki bolingo yango na ndenge azalaki kokanisa bizaleli ya Yehova mpe kososola ndenge Yehova amonisaki bizaleli yango. (Dan. 9:4) Danyele amanyolaki mpe na makambo nyonso ya malamu oyo Yehova asalelaki ye mpe basaleli na ye.—Dan. 2:20-23; 9:15, 16.
13. (a) Ndenge nini bosembo ya bilenge na biso emekamaka? Pesá ndakisa. (Talá mpe elilingi.) (b) Ndenge video emonisi yango, okoki kopesa eyano nini ntango basusu batuni yo soki Batatoli ya Yehova bapesaka mabɔkɔ na bato oyo baponi kozala bato oyo basangisaka nzoto mibali na mibali to basi na basi?
13 Lokola Danyele, bilenge na biso bazingami na bato oyo bamemyaka Yehova te mpe batosaka mibeko na ye te. Bato ya ndenge wana bakoki koyina moto nyonso oyo alobaka ete alingaka Nzambe. Basusu kutu bamekaka kotumola bilenge na biso mpo na kobebisa bosembo na bango epai ya Yehova. Na ndakisa, talá likambo oyo ekómelaki elenge mobali moko na nkombo Graeme, oyo afandaka na Australie. Akutanaki na mokakatano moko ntango azalaki na eteyelo ya ntei. Molakisi atunaki bana-kelasi ete balingaki kosala nini soki moninga moko ayebisi bango ete azali moto oyo asangisaka nzoto mibali na mibali to basi na basi? Molakisi alobaki ete bana-kelasi nyonso oyo bakosepela na lolenge ya bomoi ya ndenge wana báleka na ngámbo moko; baoyo bakosepela te na lolenge ya bomoi yango, báleka na ngámbo mosusu. Graeme alobi: “Kelasi mobimba basepelaki na lolenge wana ya bomoi, longola kaka ngai ná mwana-kelasi mosusu oyo azali Motatoli ya Yehova.” Likambo oyo esalemaki na nsima emekaki mpenza bosembo ya Graeme epai ya Yehova. Alobi: “Na boumeli ya ngonga mobimba oyo elandaki, bana-kelasi mosusu mpe molakisi bakómaki kotyola mpe kofinga biso. Nasalaki makasi mpo nakɔtela kondima na ngai na kimya nyonso mpe na lolenge oyo ebongi, kasi baboyaki koyoka ata liloba moko oyo nazalaki koloba.” Graeme amiyokaki ndenge nini? Alobi: “Nasepelaki te na lolenge ya maloba oyo balobelaki ngai, kasi nazalaki na esengo mpo natikalaki sembo epai ya Yehova mpe nakɔtelaki bindimeli na ngai.” c
14. Tokoki kosala nini mpo tókolisa bolingo na biso epai ya Yehova?
14 Lokola Danyele, soki tozali kolinga Yehova mingi, tokozala na ekateli ya kotikala sembo epai na ye. Tokolisaka bolingo yango ntango toyekolaka bizaleli ya Yehova. Na ndakisa, tokoki koyekola biloko oyo asalá. (Rom. 1:20) Soki olingi kokómisa bolingo mpe limemya na yo makasi epai ya Yehova, okoki kotánga masolo ya mikuse na eteni “Ebimá kaka yango moko?” to kotala bavideo yango. Okoki mpe kotánga makambo oyo ezali na mwa buku La vie a-t-elle été créée ? mpe Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie. Yoká oyo elenge mwasi moko na Danemark na nkombo Esther alobi mpo na mikanda yango: “Makanisi oyo ezali na kati ezali kitoko mpenza. Mwa babuku yango eyebisi yo te makambo oyo osengeli kondima; emonisi kaka makambo ndenge ezali mpe etiki yo moko ozwa ekateli.” Ben, oyo tolobelaki liboso, alobi: “Mwa buku yango ekómisaki kondima na ngai makasi. Endimisaki ngai ete Nzambe nde akelaki bomoi.” Nsima ya koyekola liteya yango, okondima mpenza makambo oyo Biblia elobi: “Yehova, Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpo yo ozalisaki biloko nyonso.”—Em. 4:11. d
15. Okoki kosala nini mpo okómisa lisusu boninga na yo ná Yehova makasi?
15 Lolenge mosusu ya kokolisa bolingo na biso mpo na Yehova ezali ya koyekola malamumalamu bomoi ya Mwana na ye, Yesu. Elenge mwasi moko na nkombo Samira, oyo afandaka na Allemagne, asalaki bongo. Alobi: “Nayaki koyeba Yehova malamumalamu na nzela ya Yesu.” Ntango azalaki naino mwana, Samira asalaki makasi aluka koyeba ete Yehova alingaka biso. Kasi akokaki koyeba ndenge Yesu azalaki komiyoka. Abakisi boye: “Nakómaki kolinga Yesu mpo azalaki na boboto mpe azalaki kolinga bana.” Lokola akobaki koyekola makambo mingi etali Yesu, ayekolaki koyeba Yehova mpe kolinga ye mingi. Mpo na nini? Alobi: “Mokemoke nayaki komona ete Yesu amekolaka Tata na ye na ndenge ya kokoka. Bakokani mpenza. Nayaki komona ntina oyo Yehova atindaki Yesu awa na mabele, mpo na kopesa bato likoki ya koyekola koyeba Yehova malamu.” (Yoa. 14:9) Soki olingi kokómisa boyokani na yo ná Yehova makasi, mpo na nini te olekisaka ntango mingi mpo na koyekola makambo nyonso oyo okoki koyeba mpo na Yesu? Soki osali bongo, okolinga lisusu Yehova mingi mpe okotikala sembo epai na ye.
16. Na kotalela Nzembo 18:25 mpe Mika 6:8, mpo na nini tosengeli kozala sembo?
16 Soki tozali sembo epai ya basusu, tokozala na baninga ya motema oyo bakozala sembo epai na biso ntango nyonso. (Ruta 1:14-17) Longola yango, bato oyo bazalaka sembo epai ya Yehova bazalaka na kimya ya motema. Mpo na nini? Mpamba te Yehova alaki ete akozala sembo epai ya baoyo bazali sembo epai na ye. (Tángá Nzembo 18:25; Mika 6:8.) Kanisá naino: Mozalisi oyo azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alingaka kosala boyokani ya makasi elongo na biso! Mpe ntango asalaka yango, ezala komekama, botɛmɛli, to liwa ekoki te kokabola biso ná ye. (Dan. 12:13; Luka 20:37, 38; Rom. 8:38, 39) Yango wana, ezali na ntina ete tómekola Danyele mpe tótikala sembo epai ya Yehova!
KOBÁ KOZWA MATEYA NA NDAKISA YA DANYELE
17-18. Makambo nini mosusu tokoki koyekola epai ya Danyele?
17 Na lisolo oyo, toyekoli kaka bizaleli mibale ya Danyele. Kasi ezali na makambo mingi oyo tokoki koyekola epai na ye. Na ndakisa, Yehova alakisaki ye bimonaneli mpe bandɔtɔ, mpe apesaki ye likoki ya kolimbola maloba ya bisakweli. Mingi ya bisakweli yango esili kokokisama. Bisakweli mosusu elobeli makambo mikemike etali makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya oyo ekobongola bomoi ya bato nyonso awa na mabele.
18 Na lisolo oyo elandi, tokolobela bisakweli mibale oyo Danyele akomaki. Kokanga ntina na yango ekoki kosalisa biso nyonso, bilenge mpe mikóló, tózwa bikateli ya bwanya banda sikoyo. Bisakweli yango ekoki mpe kosalisa biso tókóma lisusu na mpiko mpe tóbatela bosembo na biso mpo tómibongisa mpo na mikakatano oyo tokokutana na yango na mikolo ezali koya.
LOYEMBO 119 Tosengeli kozala na kondima
a Bilenge oyo bazali kosalela Yehova lelo oyo bakutanaka na mikakatano oyo emekaka mpiko mpe bosembo na bango epai ya Yehova. Baninga na bango ya kelasi bakoki kosɛka bango mpo bandimelaka bozalisi. To bilenge mosusu bakoki komona bango bazoba mpo bazali kosalela Nzambe mpe kotosa mibeko na ye. Kasi ndenge lisolo oyo ekomonisa yango, baoyo bamekolaka mosakoli Danyele mpe baoyo basalelaka Yehova na mpiko mpe na bosembo bazalaka mpenza na bwanya.
b Ekokaki kozala na ntina misato oyo etindaki Danyele aboya kolya bilei ya bato ya Babilone: (1) Ekoki kozala ete mosuni yango ezalaki kouta na banyama oyo Mibeko epekisaki kolya. (Mib. 14:7, 8) (2) Ekoki kozala ete bazalaki kokata banyama yango malamu te. (Lev. 17:10-12) (3) Kolya bilei yango ekokaki kotalelama lokola eteni ya losambo ya nzambe moko ya lokuta.—Talá mpe Balevi 7:15 mpe 1 Bakorinti 10:18, 21, 22.
c Talá na jw.org video ‘Mosala ya boyengebene ya solo ememaka kimya.’
d Mpo okómisa makasi bolingo na yo mpo na Yehova, okoki mpe koyekola buku Pusaná penepene na Yehova, oyo ekosalisa yo oyeba makambo mingi etali bizaleli mpe bomoto ya Yehova.