LISOLO YA BOYEKOLI 33
LOYEMBO 130 Tólimbisaka
Ndenge oyo lisangá emekolaka lolenge oyo Yehova atalelaka basumuki
“Soki moto asali lisumu, tozali na mosungi.”—1 YOA. 2:1.
NA MOKUSE
Mateya oyo tokoki kozwa na ndenge basalaki makambo ntango ndeko moko asalaki lisumu ya monene na lisangá ya Korinti na siɛklɛ ya liboso.
1. Yehova alingi nini mpo na bato nyonso?
YEHOVA akelá bato na bonsomi ya kopona. Osalelaka likabo yango mingi ntango ozwaka bikateli. Ekateli ya ntina mingi oyo moto akoki kozwa ezali ya komipesa na Yehova mpe kokɔta na libota ya basambeli na Ye. Yehova alingi ete moto nyonso asala yango. Mpo na nini? Mpo alingaka bato mpe alingaka oyo eleki malamu mpo na bango. Alingi bázala baninga na ye mpe bázala na bomoi libela na libela.—Mib. 30:19, 20; Gal. 6:7, 8.
2. Yehova alingi nini mpo na baoyo basali lisumu ya monene mpe babongoli motema te? (1 Yoane 2:1)
2 Kasi, Yehova atindaka moto na makasi te ete asalela ye. Atikaka moto na moto apona oyo akosala. Bongo soki mokristo oyo azwá batisimo abuki mobeko ya Nzambe, asali lisumu moko ya monene? Soki abongoli motema te, asengeli kolongolama na lisangá. (1 Ko. 5:13) Atako bongo, Yehova alingaka mpenza ete moto azongela Ye. Kutu, yango nde ntina monene oyo apesaki lisiko—mpo basumuki oyo babongoli motema bákoka kolimbisama. (Tángá 1 Yoane 2:1.) Nzambe na biso ya bolingo abondelaka baoyo basali lisumu ya monene, alendisaka bango ete bábongola motema.—Zek. 1:3; Rom. 2:4; Yak. 4:8.
3. Tokolobela nini na lisolo oyo?
3 Yehova alingi ete tómekola lolenge oyo atalelaka lisumu ya monene mpe baoyo basali yango. Lisolo oyo ekolobela ndenge oyo tokoki kosala yango. Wana ozali koyekola lisolo oyo, luká komona (1) ndenge basalaki makambo ntango ndeko moko asalaki lisumu ya monene na lisangá ya Korinti na siɛklɛ ya liboso, (2) malako oyo ntoma Paulo apesaki ntango moto yango abongolaki motema, mpe (3) oyo lisolo yango ya Biblia emonisi mpo na ndenge oyo Yehova atalelaka mokristo oyo asali lisumu ya monene.
NDENGE BASALAKI MAKAMBO NTANGO NDEKO MOKO ASALAKI LISUMU YA MONENE NA SIƐKLƐ YA LIBOSO
4. Likambo nini ezalaki kosalema na lisangá ya Korinti na siɛklɛ ya liboso? (1 Bakorinti 5:1, 2)
4 Tángá 1 Bakorinti 5:1, 2. Na mobembo na ye ya misato ya misionɛrɛ, Paulo azwaki nsango moko ya mabe mpo na lisangá oyo eutaki kofungwama na Korinti. Ndeko mobali moko azalaki kosangisa nzoto na mwasi ya tata na ye. Ezalaki likambo ya mabe mpenza mpe ezalaki kosalema “ata kutu te epai ya bikólo”! Kasi lisangá ezalaki komona malamu ete ndeko mobali oyo azalaki kosala makambo yango atikala kaka na lisangá. Ekoki kozala ete basusu bakanisaki ete yango ezalaki komonisa motema mawa ya Nzambe mpe ndenge amityaka na esika ya bato ya kozanga kokoka. Nzokande Yehova asepelaka te komona lisumu ya monene na kati ya basaleli na ye. Etamboli mabe ya mobali yango ezalaki kobebisa mpenza lokumu ya lisangá. Akokaki mpe kobebisa bakristo mosusu oyo bazalaki elongo na ye. Na yango, Paulo ayebisaki lisangá esala nini?
5. Paulo ayebisaki lisangá esala nini, mpe yango elimbolaki nini? (1 Bakorinti 5:13) (Talá mpe elilingi.)
5 Tángá 1 Bakorinti 5:13. Na litambwisi ya elimo ya Nzambe, Paulo akomaki mokanda oyo elobaki ete bálongola na lisangá mosumuki yango oyo abongolaki motema te. Ndenge nini bakristo ya sembo basengelaki kotalela moto yango? Paulo ayebisaki bango ‘bákata boninga’ na ye. Yango elingaki koloba nini? Paulo alimbolaki ete mobeko yango esangisaki mpe koboya ‘kolya kutu esika moko na moto ya ndenge wana.’ (1 Ko. 5:11) Kofanda mpo na kolya esika moko na moto ekoki komema na kolekisa ntango mingi mpe kobɛta masolo. Na yango, ezali polele ete Paulo alingaki koloba ete lisangá esengeli te kolekisa ntango elongo na mobali yango. Yango elingaki kobatela lisangá na etamboli mabe ya moto yango. (1 Ko. 5:5-7) Lisusu, koboya kozala na boninga na mobali yango ekokaki kotinda ye amona ete atikaki mpenza banzela ya Yehova, akokaki koyoka nsɔni mpe kobongola motema.
6. Lisangá esalaki nini ntango ezwaki mokanda ya Paulo, mpe mosumuki yango asalaki nini na nsima?
6 Nsima ya kotindela bakristo ya Korinti mokanda, Paulo akómaki komituna soki lisangá ekotalela mokanda yango ndenge nini. Nsukansuka, Tito amemelaki ye nsango oyo esepelisaki ye mingi. Lisangá esalelaki makambo oyo Paulo akomaki na mokanda na ye. (2 Ko. 7:6, 7) Balandaki malako oyo apesaki, babimisaki moto yango na lisangá. Lisusu, na basanza oyo elekaki kobanda ntango oyo Paulo atindaki mokanda yango, moto oyo asalaki lisumu ya monene abongolaki motema! Atikaki etamboli na ye mpe ezaleli na ye ya mabe mpe akómaki kotosa mibeko ya sembo ya Yehova. (2 Ko. 7:8-11) Paulo asengelaki sikoyo koyebisa lisangá esala nini?
NDENGE OYO LISANGÁ ETALELAKI MOSUMUKI OYO ABONGOLAKI MOTEMA
7. Kolongola mosumuki na lisangá ebimisaki litomba nini? (2 Bakorinti 2:5-8)
7 Tángá 2 Bakorinti 2:5-8. Paulo amonaki ete “mpamela oyo bato mingi [bapesaki ekokaki] bongo mpo na moto wana.” Na maloba mosusu, disiplini yango ekokisaki mokano na yango epai na ye. Mokano nini? Komema ye na kobongola motema.—Ebr. 12:11.
8. Na nsima Paulo ayebisaki lisangá esala nini?
8 Na yango Paulo apesaki lisangá malako ete ‘bálimbisa na boboto mpe bábɔndisa’ ndeko yango oyo abungaki nzela, mpe ‘bálakisa ye ete balingaka ye.’ Tósimba ete Paulo alingaki ete lisangá esuka kaka te na kozongisa mobali yango na kati ya basaleli ya Yehova. Kasi Paulo alingaki ete bandeko bámonisa na maloba, na misala, mpe na ndenge na bango ya kosala makambo ete balingaka mobali yango oyo abongolaki motema mpe balimbisi ye mpenza. Na ndenge yango, balingaki komonisa polele ete basepeli ndenge azongi na lisangá.
9. Ekoki kozala mpo na nini basusu bakakatanaki mpo na kolimbisa mosumuki oyo abongolaki motema?
9 Bandeko mosusu na lisangá yango bakakatanaki mpo na koyamba lisusu mosumuki oyo abongolaki motema mpe azongaki na lisangá? Lisolo elobeli yango te, kasi ekoki kozala bongo. Mpo na koloba solo, makambo oyo asalaki ekɔtisaki mobulu na kati ya lisangá mobimba mpe mbala mosusu eyokisaki basusu nsɔni. Ekoki kozala ete bandeko mosusu bamonaki ete ebongi te mobali yango andimama lisusu lokola ndeko na lisangá, nzokande bango babundaki mpenza mpo na kotikala pɛto na miso ya Yehova. (Talá mpe Luka 15:28-30.) Kasi, mpo na nini ezalaki na ntina ete lisangá emonisa bolingo ya solosolo epai ya ndeko oyo azongaki na lisangá?
10-11. Nini ekokaki kosalema soki bankulutu baboyaki kolimbisa mosumuki oyo abongolaki motema?
10 Kanisá oyo ekokaki kosalema soki bankulutu báboyaka kozongisa na lisangá mobali yango oyo abongolaki mpenza motema, to soki nsima ya kozonga na lisangá, bandeko báboyaka komonisela ye bolingo. Akokaki kozinda na “mawa na ye oyo eleki ndelo.” Akokaki komona ete elikya ezali lisusu te mpo na ye. Akokaki kotika kosala milende ya kobongisa boyokani na ye na Nzambe.
11 Ya mabe koleka, soki bandeko na lisangá báboyaka kolimbisa mosumuki yango oyo abongolaki motema, balingaki mpe kobebisa boyokani na bango na Yehova. Mpo na nini? Mpo balingaki komekola te Yehova, Nzambe oyo alimbisaka basumuki oyo babongoli motema, kasi nde Satana, moto ya motema makasi mpe oyo azangá mawa. Balingaki kokóma bisaleli oyo Zabolo akokaki kosalela mpo na koboma mobali yango na elimo.—2 Ko. 2:10, 11; Ef. 4:27.
12. Ndenge nini lisangá ekokaki komekola Yehova?
12 Sikoyo ndenge nini lisangá ya Korinti ekokaki komekola Yehova, kasi Satana te? Na kolanda ndenge oyo Yehova asalelaka basumuki oyo babongoli motema makambo. Talá oyo bakomi mosusu ya Biblia balobi mpo na Yehova. Davidi alobaki ete azali ‘malamu mpe asepelaka kolimbisa.’ (Nz. 86:5) Mika akomaki: “Nani azali Nzambe lokola yo, oyo alimbisaka libunga mpe atyaka likebi te na kobuka mibeko?” (Mika 7:18) Mpe Yisaya alobaki: “Moto mabe atika mabe na ye, mpe mosali mabe atika makanisi na ye; azongela Yehova mpe akoyokela ye mawa, azongela Nzambe na biso, mpo akolimbisa mpenza.”—Yis. 55:7.
13. Mpo na nini ebongaki ete bázongisa mosumuki oyo abongolaki motema na lisangá? (Talá etanda “ Ntango nini mobali ya lisangá ya Korinti azongisamaki na lisangá?”)
13 Mpo na komekola Yehova, lisangá ya Korinti esengelaki koyamba lisusu mobali oyo abongolaki motema mpe kolakisa ete balingaka ye. Lokola bandeko ya lisangá basalelaki malako ya Paulo ya koyamba lisusu mosumuki oyo abongolaki motema, bamonisaki ete ‘batosaka na makambo nyonso.’ (2 Ko. 2:9) Ya solo, mobali yango alongolamaki na lisangá elekaki kaka mwa basanza moke, kasi disiplini yango ememaki ye mpenza na kobongola motema. Yango wana ezalaki na ntina te ete aumela mpo bázongisa ye na lisangá.
NDENGE YA KOMEKOLA BOSEMBO MPE MOTEMA MAWA YA YEHOVA
14-15. Liteya nini tozwi na ndenge lisangá ya Korinti etalelaki likambo oyo esalemaki na lisangá yango? (2 Petro 3:9) (Talá mpe elilingi.)
14 Lisolo oyo emonisi ndenge likambo oyo esalamaki na lisangá ya Korinti etalelamaki, ekomamaki mpe ebatelamaki “mpo na koteya biso.” (Rom. 15:4) Lisolo yango eteyi biso ete Yehova atikelaka masumu ya minene nzela te na kati ya basaleli na ye. Aboyaka komonisa “motema mawa” epai ya basumuki oyo babongoli motema te mpe atikaka te ete bákoba kosangana na basaleli na ye ya sembo. Yehova azali Nzambe ya motema mawa, kasi akangaka miso na mabe te; akakolaka mpe mibeko na ye te. (Yuda 4) Kutu, soki asali bongo, akomonisa motema mawa te mpo lisangá mobimba ekobeba.—Mas. 13:20; 1 Ko. 15:33.
15 Nzokande, tomoni ete Yehova alingi ata moto moko te abomama. Alingi nde kobikisa bato soki esengeli. Amonisaka motema mawa epai ya bato oyo babongoli motema mpe balingi kobongisa boyokani na bango na ye. (Ezk. 33:11; tángá 2 Petro 3:9.) Yango wana, ntango mobali ya Korinti abongolaki motema mpe atikaki kosala lisumu, Yehova asalelaki Paulo mpo na kolimbwela lisangá ya Korinti ete basengeli kolimbisa mobali yango mpe koyamba ye lisusu na lisangá.
16. Komona ndenge lisangá ya Korinti esalaki mpo na lisumu monene oyo esalemaki etindi yo na nini?
16 Komona ndenge lisangá ya korinti esalaki mpo na lisumu monene oyo esalemaki esalisi biso tómona bolingo, boyengebene, mpe bosembo ya Yehova. (Nz. 33:5) Yango etindi yo te osanzola lisusu Nzambe mpo na bizaleli na ye wana ya malamu? Kutu, biso nyonso tozali bato ya masumu mpe tozalaka na mposa ete alimbisa biso. Mokomoko na biso azali na ntina ya kozala na botɔndi epai ya Yehova mpo na lisiko, oyo esali ete tókoka kolimbisama. Ezali mpenza kobɔndisa mpe kokitisa motema koyeba ete Yehova alingaka mpenza basaleli na ye mpe alingaka oyo eleki malamu mpenza mpo na bango!
17. Tokolobela nini na masolo oyo elandi?
17 Bongo, ndenge nini lisumu ya monene esengeli kotalelama lelo oyo? Ndenge nini bankulutu ya lisangá bakoki komekola mposa ya Yehova ya komema mosumuki na kobongola motema? Lisangá esengeli kosala nini ntango bankulutu bazwi ekateli ya kolongola to kozongisa moto na lisangá? Tokozwa biyano na mituna yango na masolo oyo elandi.
LOYEMBO 109 Tólingana makasi, na motema moko