Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 31

LOYEMBO 12 Yehova, Nzambe monene

Oyo Yehova asalá mpo na kobikisa bato ya masumu

Oyo Yehova asalá mpo na kobikisa bato ya masumu

“Nzambe alingaki mokili mingi mpenza yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki.”YOA. 3:16.

NA MOKUSE

Ndenge Yehova asalisaka biso tóbundisa lisumu mpe ndenge azwi ebongiseli mpo na kosalisa biso tózwa bomoi ya seko, oyo ezangi lisumu.

1-2. (a) Lisumu ezali nini, mpe ndenge nini tokoki kolonga kobundisa yango? (Talá mpe “Ndimbola ya maloba.”) (b) Tokolobela nini na lisolo oyo mpe na masolo mosusu ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo? (Talá mpe “Epai ya batángi” na nimero oyo.)

 OKOLINGA koyeba ndenge oyo Yehova Nzambe alingaka yo mingi? Mpo ozwa eyano na motuna yango, yekolá likambo oyo asalá mpo na kobikisa yo na lisumu mpe na liwa. Lisumu a ezali monguna ya mabe mpenza, oyo okoki kolonga te na makasi na yo moko. Tosalaka masumu mokolo na mokolo, mpe lisumu ememelá biso liwa. (Rom. 5:12) Kasi nsango malamu ezali. Na lisalisi ya Yehova, tokoki kolonga lisumu. Kutu, tokolonga yango mpenza!

2 Esali bambula soki 6 000, Yehova Nzambe azali kosalisa bato bábundisa lisumu. Mpo na nini asalaka bongo? Mpo alingaka biso. Alingaka bato banda kaka ntango akelaki bango, yango wana asali makambo mingi mpo na kosalisa biso tóbundisa lisumu. Nzambe ayebi ete lisumu ememaka na liwa, mpe alingi te tókufa. Alingi tózwa bomoi ya seko. (Rom. 6:23) Yango nde alingi mpo na yo. Na lisolo oyo, tokotalela mituna misato: (1) Elikya nini Yehova apesi bato ya masumu? (2) Bato ya masumu na ntango ya kala basalaki nini mpo na kondimama na Yehova? (3) Yesu asalaki nini mpo na kobikisa bato ya masumu?

NDENGE NINI YEHOVA APESAKI BATO YA MASUMU ELIKYA?

3. Ndenge nini baboti na biso ya liboso bakómaki bato ya masumu?

3 Ntango Yehova akelaki mwasi ná mobali ya liboso, alingaki ete bázala na esengo. Atyaki bango na esika moko ya kitoko ya kofanda, abalisaki bango, mpe apesaki bango mokumba moko ya esengo mpenza. Basengelaki kobota bana mpo na kotondisa mabele, mpe kokómisa mabele mobimba paradiso lokola elanga ya Edene. Kasi, apesaki bango mobeko moko oyo ezalaki mindɔndɔ te. Mpe akebisaki bango ete soki babuki mobeko yango, oyo ekomonisa ete batombokeli ye na nko, lisumu na bango ekomema na liwa. Toyebi makambo oyo esalemaki. Ekelamu moko ya elimo, oyo azalaki kolinga Nzambe te mpe alingaka bato te, ayaki mpe amekaki bango mpo básala likambo oyo Nzambe apekisaki bango. Adama ná Eva bakweaki na komekama yango. Lokola batyelaki Tata na bango ya bolingo motema te, basalaki lisumu. Ndenge toyebi yango, maloba ya Yehova ekokisamaki. Banda wana, Adama ná Eva basengelaki komona mbuma mabe ya likambo oyo basalaki: bakómaki mibange, mpe nsukansuka bakufaki.—Eba. 1:​28, 29; 2:​8, 9, 16-18; 3:​1-6, 17-19, 24; 5:5.

4. Mpo na nini Yehova ayinaka lisumu mpe asalisaka biso tóbundisa yango? (Baroma 8:​20, 21)

4 Yehova akomisaki lisolo yango ya mawa mpo na bolamu na biso. Esalisaka biso tómona ntina oyo ayinaka mpenza lisumu. Lisumu ekabolaka biso na Tata na biso, mpe ememaka na liwa. (Yis. 59:2) Ezali mpo na yango nde Satana, ekelamu ya elimo oyo atombokaki mpe abandisaki mabe, alingaka lisumu mpe akobaka komeka bato mpo básala lisumu. Mbala mosusu akanisaki ete alongaki mpenza na elanga ya Edene. Kasi, ayebaki te ndenge Yehova azali na bolingo mingi. Nzambe abongolaki te mokano na ye mpo na bakitani ya Adama ná Eva. Lokola alingaka bato, apesaki bango elikya mbala moko. (Tángá Baroma 8:​20, 21.) Yehova ayebaki ete bakitani yango mosusu bakopona kolinga ye mpe bakoluka lisalisi na ye mpo na kobundisa lisumu. Mpe lokola Yehova azali Tata mpe Mozalisi na bango, afungwelaki bango nzela ya kosikolama na lisumu mpe ya kopusana penepene na ye. Ebongiseli nini Yehova azwaki mpo na yango?

5. Ntango nini elikya emonanaki mwa moke mpo na bato ya masumu? Limbolá. (Ebandeli 3:15)

5 Tángá Ebandeli 3:15. Elikya emonanaki mwa moke ntango Yehova akatelaki Satana etumbu. Nzambe asakolaki ete “mwana” to momboto moko nde akoya na elikya yango. Nsukansuka mwana yango akopanza to akoboma Satana, mpo na kosilisa mabe nyonso oyo abandisaki na Edene. (1 Yoa. 3:8) Kasi, mwana yango mpe asengelaki komona mpasi. Satana asengelaki kozokisa mwana yango, kobomisa ye. Likambo yango esengelaki kopesa Yehova mpasi mingi. Kasi, mpasi oyo ayokaki ekobimisa litomba, mpo nsukansuka ebele ya bato bakobikisama na lisumu mpe na liwa!

NDENGE NINI BATO YA MASUMU NA NTANGO YA KALA BANDIMAMAKI NA NZAMBE?

6. Mibali ya kondima, lokola Abele mpe Noa, basalaki nini mpo na kopusana penepene na Yehova?

6 Na boumeli ya bankama ya bambula oyo elandaki, Yehova amonisaki mokemoke mpe polelepolele ndenge oyo bato ya masumu bakokaki kopusana penepene na ye. Abele, mwana mobali ya mibale ya Adama ná Eva, azalaki moto ya liboso oyo andimelaki Yehova nsima ya botomboki oyo ebimaki na Edene. Lokola Abele alingaki Yehova mpe alukaki kosepelisa Ye mpe kopusana penepene na Ye, apesaki mbeka. Lokola azalaki mobateli ya mpate, Abele azwaki mwa ndambo ya bana-mpate na etonga na ye, abomaki yango mpe atumbaki yango mbeka epai ya Yehova. Yehova asalaki nini? “Andimaki Abele ná likabo na ye.” (Eba. 4:4) Na nsima, Yehova andimaki mpe bambeka mosusu ya bato oyo balingaki ye mpe batyelaki ye motema, na ndakisa Noa. (Eba. 8:​20, 21) Ndenge Yehova andimaki bambeka yango, amonisaki ete bato ya masumu bakoki kondimama na ye mpe kopusana penepene na ye. b

7. Ndenge Abrahama andimaki kopesa mwana na ye mbeka eteyaka biso nini?

7 Abrahama azalaki na kondima ya kokamwa mpenza, mpe Yehova asɛngaki ye asala likambo moko ya mpasi mpenza: apesa mwana na ye moko Yisaka lokola mbeka. Na ntembe te, Abrahama amonaki ete kosala yango ezali mpasi mingi mpenza. Atako bongo, azwaki bibongiseli mpo na kosala likambo oyo Yehova asɛngaki. Kasi, ntango kaka alingaki koboma mwana na ye, Nzambe apekisaki ye. Atako bongo, ndakisa yango eteyaka bato nyonso oyo bazali na kondima likambo moko ya ntina mingi. Yehova akondima kopesa Mwana na ye ya bolingo lokola mbeka. Yehova alingaka bato mingi mpenza.—Eba. 22:​1-18.

8. Bambeka mingi oyo Mobeko esɛngaki ezalaki komonisa nini? (Balevi 4:​27-29; 17:11)

8 Bankama ya bambula na nsima, Mobeko oyo Yehova apesaki ekólo Yisraele esɛngaki bambeka mingi mpo na kozipa masumu ya bato na ye. (Tángá Balevi 4:​27-29; 17:11.) Bambeka yango ezalaki mpo na komonisa mbeka ya monene koleka oyo esengelaki kopesama mpo na kolongola bato na lisumu mpo na libela. Elimo ya Nzambe esalisaki basakoli bákoma makambo etali momboto oyo alakamaki. Balimbolaki ete Mwana oyo Nzambe azalaki kolinga mingi akomona mpasi mpe akobomama. Asengelaki kobomama lokola mwana-mpate oyo bapesi mbeka. (Yis. 53:​1-12) Kanisá naino: Yehova asengelaki kozwa bibongiseli mpo Mwana na ye ya bolingo apesama mbeka mpo na kolongola bato, ata mpe yo, na boombo ya lisumu mpe ya liwa!

YESU ASALAKI NINI MPO NA KOBIKISA BATO NA MASUMU?

9. Yoane Mobatisi alobaki nini mpo na Yesu? (Baebre 9:22; 10:​1-4, 12)

9 Na siɛklɛ ya liboso T.B., Yoane Mobatisi amonaki Yesu moto ya Nazarete mpe alobaki: “Talá, Mwana-Mpate ya Nzambe oyo azali kolongola lisumu ya mokili!” (Yoa. 1:29) Maloba yango oyo alobaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe emonisaki ete Yesu nde mwana to momboto oyo alakamaki banda kala. Asengelaki kopesa bomoi na ye mbeka. Na ntango yango, elikya ekómaki makasi mpo na bato ya masumu, moto oyo alingaki kolonga lisumu mpo na libela ayaki.—Tángá Baebre 9:22; 10:​1-4, 12.

10. Ndenge nini Yesu amonisaki ete ‘ayaki kobenga’ basumuki?

10 Yesu atyaki likebi mingi epai ya bato oyo bazalaki komona mpasi mpo na lisumu mpe abengaki bango bákóma bayekoli na ye. Yesu ayebaki ete lisumu nde ememelá bato mpasi. Yango wana asalisaki mingimingi mibali mpe basi oyo bayebanaki ete bazali basumuki. Alobaki boye: “Bato oyo bazali nzoto malamu bazalaka na mposa ya monganga te, kasi nde bato oyo bazali kobɛla.” Abakisaki: “Nayaki kobenga bato ya sembo te, kasi basumuki.” (Mat. 9:​12, 13) Yesu asalaki mpenza ndenge alobaki. Na boboto nyonso, alimbisaki masumu ya mwasi oyo asukolaki makolo na ye na mai ya miso. (Luka 7:​37-50) Na libulu moko ya mai, Yesu ateyaki mwasi Mosamaria makambo ya ntina mingi, atako ayebaki ete azalaki na bomoi ya mbindo. (Yoa. 4:​7, 17-19, 25, 26) Nzambe apesaki Yesu nguya ya kolongola ata eloko ya nsuka oyo lisumu nyonso ememaka: liwa. Na ndenge nini? Yesu azwaki nguya ya kosekwisa bato, mibali mpe basi, bana mpe mikóló.—Mat. 11:5.

11. Mpo na nini bato ya masumu bazalaki kolinga kozala elongo na Yesu?

11 Ezali likambo ya kokamwa te ete ata bato oyo bamipesaki mpenza na lisumu bazalaki kolinga kozala elongo na Yesu. Azalaki koyokela bango mawa mpe komitya na esika na bango. Bazalaki kobanga te kopusana penepene na ye. (Luka 15:​1, 2) Mpe Yesu apesaki bango longonya mpe mbano mpo bazalaki komonisa kondima epai na ye. (Luka 19:​1-10) Amonisaki polele mpe na ndenge ya kokoka motema mawa ya Tata na ye. (Yoa. 14:9) Na maloba mpe na misala na ye, Yesu amonisaki ete Tata na ye ya motema mawa alingaka bato mpe alingi kosalisa mokomoko alonga etumba ya kobundisa lisumu. Yesu asalisaki bato ya masumu bálinga kobongola bomoi na bango mpe kolanda ye.—Luka 5:​27, 28.

12. Yesu ayebisaki bayekoli na ye nini mpo na liwa na ye?

12 Yesu ayebaki makambo oyo ezalaki kozela ye. Ayebisaki bayekoli na ye mbala ebele ete akotɛkama mpe akobakama na nzete. (Mat. 17:22; 20:​18, 19) Ayebaki ete mbeka oyo akopesa ekolongola lisumu ya mokili, ndenge Yoane Mobatisi mpe basakoli balobaki yango. Yesu alobaki mpe ete nsima ya kopesa bomoi na ye mbeka, ‘akobenda bato ya ndenge nyonso’ epai na ye. (Yoa. 12:32) Bato ya masumu bakokaki kosepelisa Yehova soki bandimi Yesu lokola Nkolo na bango mpe balandi ndakisa na ye. Soki básalaka bongo, nsukansuka balingaki ‘kosikolama na lisumu.’ (Rom. 6:​14, 18, 22; Yoa. 8:32) Yango wana Yesu amonisaki mpiko mpe andimaki kokufa liwa ya mpasi mingi.—Yoa. 10:​17, 18.

13. Yesu akufaki ndenge nini, mpe liwa na ye eteyi biso nini mpo na Yehova? (Talá mpe elilingi.)

13 Batɛkaki Yesu, bakangaki ye, bafingaki ye, bakoselaki ye makambo, bakatelaki ye etumbu, mpe banyokolaki ye makasi. Basoda bamemaki ye na esika oyo basengelaki koboma ye mpe babakaki ye na nzete na bansɛtɛ. Ntango Yesu azalaki koyika mpiko na bampasi wana na bosembo nyonso, ezalaki na Moto oyo azalaki na mpasi makasi koleka. Ezalaki Yehova Nzambe. Aboyaki kosalela nguya na ye oyo ezangi nsuka mpe amipekisaki mpo asalisa Yesu te. Mpo na nini? Nini etindaki Tata oyo atondi na bolingo asala ndenge wana? Na mokuse, bolingo. Yesu alobaki: “Nzambe alingaki mokili mingi mpenza yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo akomonisa kondima epai na ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.”—Yoa. 3:16.

Ndenge Yehova atikaki Mwana na ye abomama, andimaki koyoka mpasi oyo eleki nyonso mpo na kosikola biso na lisumu mpe na liwa (Talá paragrafe 13)


14. Mbeka ya Yesu emonisaka yo nini?

14 Mbeka ya Yesu ezali elembeteli eleki monene oyo emonisaka ete Yehova alingaka mpenza bato ya masumu, bakitani ya Adama ná Eva. Emonisaka ndenge Yehova alingaka yo mingi mpenza. Akendaki mosika mpenza, andimaki komona mpasi oyo eleki nyonso mpo na kobikisa yo na lisumu mpe na liwa. (1 Yoa. 4:​9, 10) Ya solo, alingaka kosalisa mokomoko na biso abundisa lisumu, mpe alonga!

15. Tosengeli kosala nini mpo tózwa litomba ya mbeka ya lisiko ya Yesu, oyo ezali likabo ya Nzambe?

15 Likabo ya Nzambe, elingi koloba mbeka ya lisiko oyo Mwana na ye se moko oyo abotamaki apesaki, esalaka ete masumu na biso elimbisama. Kasi, mpo Nzambe alimbisa biso, tosengeli kosala likambo moko. Likambo yango nini? Yoane Mobatisi mpe na nsima Yesu Kristo ye moko bapesaki eyano, ete: “Bóbongola mitema, mpo Bokonzi ya likoló ekómi pene.” (Mat. 3:​1, 2; 4:17) Na yango, kobongola motema nde likambo oyo tosengeli kosala soki tolingi mpenza kobundisa lisumu mpe kopusana penepene na Tata na biso ya bolingo. Kasi, kobongola motema elimboli nini, mpe ndenge nini esalisaka biso tósepelisa Yehova atako tozali bato ya masumu? Tokozwa biyano na lisolo oyo elandi.

LOYEMBO 18 Tózala na botɔndi mpo na lisiko

a NDIMBOLA YA MALOBA: Na Biblia, liloba “lisumu” emonisaka mbala mosusu makambo ya mabe, kozanga kotosa mibeko ya Yehova oyo etali bizaleli. Kasi, liloba “lisumu” ekoki mpe komonisa ezaleli na biso ya bato ya masumu, to kozanga kokoka oyo tozwá epai ya Adama. Lisumu oyo tozwá epai ya Adama nde ememelá biso nyonso liwa.

b Yehova azalaki kondima bambeka ya bato ya sembo na ntango ya kala mpo ayebaki ete na mikolo ezali koya, Yesu Kristo akopesa mbeka, oyo ekobikisa bato na lisumu mpe na liwa mpo na libela.—Rom. 3:25.