Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 32

LOYEMBO 44 Libondeli ya moto ya komikitisa

Yehova alingi ete bato nyonso bábongola motema

Yehova alingi ete bato nyonso bábongola motema

“Yehova . . . alingi moto ata moko te abomama, kasi alingi ete bato nyonso bábongola motema.”2 PE. 3:9.

NA MOKUSE

Tokomona soki kobongola motema elimboli nini, mpo na nini ezali na ntina mingi, mpe ndenge oyo Yehova asalisi bato ya ndenge nyonso bábongola motema.

1. Kobongola motema elimboli nini?

 NTANGO tosali likambo ya mabe, ezali na ntina tóbongola motema. Na Biblia, kobongola motema elimboli koyina likambo ya mabe oyo osalaki, kotika kosala yango, mpe kozwa ekateli ya kozongela yango lisusu te.—Mat. 3:8; Mis. 3:19; 2 Pe. 3:9.

2. Mpo na nini biso nyonso tosengeli koyeba makambo oyo etali kobongola motema? (Nehemia 8:​9-11)

2 Moto nyonso awa na mabele asengeli koyeba makambo oyo etali kobongola motema. Mpo na nini? Mpo biso nyonso tosalaka masumu mokolo na mokolo. Lokola tozali bakitani ya Adama ná Eva, mokomoko na biso azwá lisumu mpe liwa oyo batikelá biso. (Rom. 3:23; 5:12) Ezwá mpenza moto nyonso. Ata bato ya kondima makasi, lokola ntoma Paulo, bazalaki kobunda na lisumu. (Rom. 7:​21-24) Yango elingi nde koloba ete tosengeli kozala ntango nyonso bato ya mawa mpo na masumu na biso? Te, Yehova azali na motema mawa, mpe alingaka tózala na esengo. Tótalela ndakisa ya Bayuda ya mikolo ya Nehemia. (Tángá Nehemia 8:​9-11.) Yehova alingaki te ete bákoba koyoka motema mpasi mpo na masumu oyo basalaki kala, kasi alingaki nde básambela ye na esengo. Yehova ayebi ete kobongola motema ememelaka moto esengo. Yango wana ateyaka biso makambo etali kobongola motema. Soki tobongoli motema na masumu na biso, tokoki kozala na elikya ete Tata na biso ya motema mawa akolimbisa biso.

3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Tótalela makambo mosusu oyo etali kobongola motema. Na lisolo oyo, tokolobela makambo misato. Ya liboso, tokotalela makambo oyo Yehova ateyaki Bayisraele na oyo etali kobongola motema. Ya mibale, tokomona ndenge oyo Yehova asalisaki bato oyo basali lisumu bábongola motema. Ya misato, tokolobela makambo oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye na oyo etali kobongola motema.

MAKAMBO OYO YEHOVA ATEYAKI BAYISRAELE NA OYO ETALI KOBONGOLA MOTEMA

4. Yehova ateyaki ekólo Yisraele nini na oyo etali kobongola motema?

4 Ntango Yehova akómisaki Bayisraele ekólo, asalaki kondimana, to boyokani moko, elongo na bango. Alakaki bango ete soki batosi mibeko na ye, akobatela bango mpe akopambola bango. Alobaki na bango boye mpo na mibeko yango: “Mitindo oyo nazali kopesa yo lelo eleki makasi te mpo na yo, mpe ezali mosika mpenza te mpo ozwa yango.” (Mib. 30:​11, 16) Kasi, soki batombokeli ye, na ndakisa soki baponi kosambela banzambe mosusu, Yehova akolongola lipamboli na ye, mpe bakomona mpasi. Kasi ata soki esalemi bongo, bazalaki kaka na likoki ya kozongisa boyokani na bango na Nzambe. Bakokaki ‘kozongela Yehova Nzambe na bango mpe kotosa mongongo na ye.’ (Mib. 30:​1-3, 17-20) Na maloba mosusu, bakokaki kobongola motema. Soki basali yango, Yehova akopusana penepene na bango mpe akopambola bango lisusu.

5. Ndenge nini Yehova amonisaki ete asundolaki te bato na ye? (2 Bakonzi 17:​13, 14)

5 Bato ya ekólo oyo Yehova aponaki batombokelaki ye mbala na mbala. Bamipesaki na losambo ya bikeko mpe basalaki makambo mosusu ya nsɔni mpenza. Na yango, bakómaki komona mpasi. Kasi Yehova asundolaki te bato na ye oyo bazangaki botosi. Atindaki basakoli mbala na mbala mpo na kolendisa bango bábongola motema mpe bázongela ye.—Tángá 2 Bakonzi 17:​13, 14.

6. Ndenge nini Yehova asalelaki basakoli na ye mpo na koteya bato na ye ntina ya kobongola motema? (Talá mpe elilingi.)

6 Mbala mingi, Yehova asalelaki basakoli na ye mpo na kokebisa mpe kosembola bato na ye. Na ndakisa, na nzela ya Yirimia, Nzambe alobaki: “Zongá, Ee Yisraele mopɛngwi . . . Nakotala bino na nkanda te, mpo nazali sembo . . . Nakokanga nkanda mpo na libela te. [Ndimá kaka] ete omemi ngambo, mpo otombokeli Yehova Nzambe na yo.” (Yir. 3:​12, 13) Na nzela ya Yoele, Yehova alobaki: “Bózongela ngai na motema mobimba.” (Yoe. 2:​12, 13) Atindaki Yisaya aloba ete: “Bómipɛtola; bólongola liboso ya miso na ngai misala na bino ya mabe; bótika kosala mabe.” (Yis. 1:​16-19) Mpe na nzela ya Ezekiele, Yehova atunaki: “Nasepelaka nde na liwa ya moto mabe? Nasepelaka te ete atika etamboli na ye ya mabe mpe akoba kozala na bomoi? . . . Nasepelaka ata moke te na liwa ya moto. Na yango, bóbongwana mpe bózala na bomoi.” (Ezk. 18:​23, 32) Yehova asepelaka ete bato bábongola motema mpo alingi bákoba kozala na bomoi, libela na libela! Na yango Yehova akangaka kaka mabɔkɔ te afandi azali kozela ete bato ya masumu bábongwana nde na nsima aya kosalisa bango. Tótalela mwa bandakisa oyo emonisi yango.

Mbala mingi Yehova asalelaki basakoli na ye mpo na kolendisa bato na ye bábongola motema (Talá paragrafe 6-7)


7. Na nzela ya lisolo ya mosakoli Hosea ná mwasi na ye, Yehova ateyaki bato na ye nini?

7 Talá ndenge Yehova ateyaki bato na ye na nzela ya likambo oyo esalemaki mpenza na bomoi ya Gomere, mwasi ya mosakoli Hosea. Gomere asalaki ekobo, atikaki Hosea mpe azwaki mibali mosusu. Elikya ezalaki lisusu te mpo na Gomere? Yehova, oyo akoki kotánga mitema, alobaki na Hosea ete: “Kende kolinga lisusu mwasi oyo mobali mosusu alingi mpe oyo azali kosala ekobo, ndenge kaka Yehova alingi bato ya Yisraele atako bazali kokende epai ya banzambe mosusu.” (Hos. 3:1; Mas. 16:2) Simbá ete mwasi ya Hosea azalaki naino kosala lisumu ya monene. Kasi, Yehova alobaki na Hosea ete akende epai na ye, alimbisa ye mpe azongisa ye na libala. a Ndenge moko mpe, Yehova asundolaki te bato na ye ya mitó makasi. Atako bazalaki naino kosala masumu ya minene, Yehova azalaki kaka kolinga bango mpe alukaki kosalisa bango mpo bábongola motema mpe bábongisa bizaleli na bango. Ndakisa yango elingi nde komonisa ete Yehova, Nzambe oyo “atalatalaka mitema,” akoluka moto oyo azali naino kosala lisumu ya monene mpe akoluka kosalisa ye abongola motema? (Mas. 17:3) Tótalela yango.

NDENGE OYO YEHOVA ASALISAKA BASUMUKI BÁBONGOLA MOTEMA

8. Ndenge nini Yehova alukaki kosalisa Kaina abongola motema? (Ebandeli 4:​3-7) (Talá mpe elilingi.)

8 Kaina azalaki mwana mobali ya liboso ya Adama ná Eva. Asangolaki mposa ya kosala masumu epai ya baboti na ye. Lisusu, Biblia elobi mpo na ye ete: “Misala na ye moko ezalaki mabe.” (1 Yoa. 3:12) Mbala mosusu yango wana Yehova “andimaki ata moke te Kaina ná likabo na ye” ntango apesaki mbeka. Na esika abongola bizaleli na ye, “Kaina asilikaki makasi, mpe ayokaki mabe mpenza.” Yehova asalaki nini? Asololaki na Kaina. (Tángá Ebandeli 4:​3-7.) Simbá ete Yehova asololaki na Kaina na boboto, apesaki ye elikya, mpe akebisaki ye ete nkanda ekoki kotinda ye asala lisumu. Likambo ya mawa, Kaina aboyaki koyoka. Atikaki te ete Yehova asalisa ye abongola motema. Lokola Kaina ayokaki te, Yehova atikaki nde koluka kosalisa basumuki mosusu bábongola motema? Soki moke te!

Yehova asololaki na Kaina na boboto, apesaki ye elikya, mpe akebisaki ye ete nkanda ekoki kotinda ye asala lisumu (Talá paragrafe 8)


9. Ndenge nini Yehova asalisaki Davidi abongola motema?

9 Yehova alingaki Mokonzi Davidi mingi mpenza. Abengaki ye kutu “moto oyo azali kosepelisa motema na ngai.” (Mis. 13:22) Kasi, Davidi asalaki masumu ya minene, na ndakisa asalaki ekobo mpe abomaki moto. Na kotalela Mobeko ya Moize, Davidi asengelaki kokufa. (Lev. 20:10; Mit. 35:31) Kasi, na boboto na ye, Yehova alingaki kosalisa Davidi abongola motema. b Atindaki mosakoli Natane akende epai ya Mokonzi Davidi, atako na ntango yango amonisaki naino ata moke te ete abongoli motema. Natane apesaki ndakisa moko mpo na kosimba motema ya Davidi. Ndakisa yango ekɔtaki Davidi mpe etindaki ye abongola motema. (2 Sa. 12:​1-14) Akomaki loyembo moko oyo eutaki na motema oyo emonisaki ete abongolaki motema. (Nz. 51, maloba oyo ezali likoló) Loyembo yango ebɔndisaka bato ebele ntango basali lisumu, mpe etindaka bango bábongola motema. Tosepelaka mpenza ndenge Yehova amonisaki bolingo mpe asalisaki mosaleli na ye Davidi abongola motema!

10. Lokola Yehova amonisaka motema molai mpe alimbisaka bato ya masumu etindi yo omiyoka ndenge nini?

10 Yehova ayinaka lisumu, mpe andimaka ata lolenge moko te ya lisumu. (Nz. 5:​4, 5) Kasi, ayebi ete biso nyonso tozali bato ya masumu, mpe lokola alingaka biso, asepelaka kosalisa biso tóbundisa lisumu. Alukaka ntango nyonso kosalisa ata basumuki oyo baleki mabe bábongola motema mpe bápusana penepene na ye. Koyeba bongo ezali mpenza likambo ya kobɔndisa! Ntango tokanisaka ndenge Yehova amonisaka motema molai mpe ndenge alimbisaka biso, etindaka biso tótikala sembo epai na ye mpe tóbongola motema nokinoki ntango tosali lisumu. Tótalela sikoyo makambo oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye na oyo etali kobongola motema.

MAKAMBO OYO YESU ATEYAKI BAYEKOLI NA YE NA OYO ETALI KOBONGOLA MOTEMA

11-12. Ndakisa nini Yesu apesaki mpo na koteya bato ndenge Tata na ye azalaka pene ya kolimbisa? (Talá ezipeli.)

11 Na siɛklɛ ya liboso T.B., ntango ekokaki mpo Masiya aya. Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, Yehova asalelaki Yoane Mobatisi mpe Yesu Kristo mpo na koteya bato ete kobongola motema ezali na ntina.—Mat. 3:​1, 2; 4:17.

12 Na boumeli ya mosala na ye, Yesu ateyaki bato ete Tata na ye azalaka pene ya kolimbisa. Yesu amonisaki yango malamu mpenza na ndakisa ya mwana ya kilikili. Na ntango moko boye, elenge mobali yango aponaki bomoi ya masumu. Kasi na nsima “makanisi malamu ezongelaki ye” mpe azongaki na ndako. Tata na ye asalaki nini? Yesu alobaki ete ntango mwana yango “azalaki naino mosika, tata na ye amonaki ye mpe ayokaki mawa; apotaki mbangu, ayambaki ye makasi mpe apesaki ye lipwɛpwɛ na boboto.” Mwana yango akanaki kosɛnga soki akoki kokóma mosali ya tata na ye, kasi tata na ye abengaki ye “mwana na ngai” mpe azongisaki ye na libota. Tata alobaki: “Abungaki mpe amonani.” (Luka 15:​11-32) Ntango Yesu azalaki na likoló liboso aya awa na mabele, na ntembe te amonaki ndenge Tata na ye alimbisaki ebele ya basumuki oyo babongolaki motema. Na nzela ya ndakisa wana ya kosimba motema mpe ya kobɔndisa, Yesu amonisaki ndenge Tata na biso Yehova atondi na motema mawa!

Tata ya ndakisa oyo Yesu apesaki akei mbangu koyamba mwana na ye oyo abungaki nzela, azongi ndako (Talá paragrafe 11-12)


13-14. Ntoma Petro ayekolaki nini na oyo etali kobongola motema, mpe ateyaki basusu nini mpo na yango? (Talá mpe elilingi.)

13 Ntoma Petro ayekolaki makambo mingi na oyo etali kobongola motema mpe kolimbisa epai ya Yesu. Mbala mingi Petro azalaki na mposa bálimbisa ye, mpe Yesu azalaki kolimbisa ye. Na ndakisa, ntango Petro awanganaki mbala misato ete ayebi Nkolo na ye te, ayokaki mawa makasi mpo na libunga yango. (Mat. 26:​34, 35, 69-75) Kasi, ntango Yesu asekwaki, abimelaki Petro, emonani ete ntango azalaki ye moko. (Luka 24:​33, 34; 1 Ko. 15:​3-5) Na ntembe te na libaku yango, Yesu alimbisaki ye na bolingo nyonso mpe abɔndisaki ntoma yango oyo abongolaki motema.—Talá Marko 16:7.

14 Lokola Petro ye moko akutanaki na likambo yango, akokaki sikoyo koteya basusu makambo etali kobongola motema mpe kolimbisa. Mwa moke nsima ya fɛti ya Pantekote, asalaki diskur liboso ya ebele ya Bayuda oyo bazalaki bandimi te, alimbwelaki bango ete babomaki Masiya. Kasi, na bolingo nyonso alobaki na bango: “Bóbongola mitema mpe bóbongwana mpo masumu na bino ebomama, mpo bileko ya kopema euta epai ya Yehova ye moko.” (Mis. 3:​14, 15, 17, 19) Na ndenge yango, Petro amonisaki ete kobongola motema esɛngaka kobongwana, elingi koloba kotika kokanisa mpe kosala makambo ya mabe, mpe kobanda kosala makambo ya malamu, oyo esepelisaka Nzambe. Petro amonisaki mpe ete Yehova akoboma masumu na bango, to akolongola yango mpo na libela. Mpe bambula mingi na nsima, Petro akomelaki bakristo ete: “Yehova . . . azali nde komonisela bino motema molai mpo alingi moto ata moko te abomama, kasi alingi ete bato nyonso bábongola motema.” (2 Pe. 3:9) Koyeba yango epesaka bakristo elikya ntango basali lisumu, ata ya monene!

Yesu alimbisaki Petro oyo abongolaki motema mpe abɔndisaki ye (Talá paragrafe 13-14)


15-16. (a) Ndenge nini ntoma Paulo ayekolaki likambo etali kolimbisa? (1 Timote 1:​12-15) (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

15 Saulo moto ya Tarse asengelaki mpenza kobongola motema mpe kolimbisama koleka bato mingi. Anyokolaki bayekoli ya Kristo mingi mpenza! Na ntembe te bakristo mingi bazalaki kokanisa ete esili mpo na ye, elikya ezali lisusu te ete akoki kobongola motema. Kasi, Yesu azalaki na makanisi wana ya bomoto te. Ye ná Tata na ye bamonaki bizaleli malamu ya Saulo. Yesu alobaki: “Mobali wana azali mbɛki oyo naponi.” (Mis. 9:15) Yesu asalelaki kutu likamwisi moko mpo na kosalisa Saulo abongola motema. (Mis. 7:58–8:3; 9:​1-9, 17-20) Nsima ya kokóma mokristo, Saulo, oyo na nsima ayebanaki lokola ntoma Paulo, azalaki komonisa mbala mingi botɔndi na ye mpo na boboto mpe motema mawa oyo bamoniselaki ye. (Tángá 1 Timote 1:​12-15.) Ntoma yango oyo azalaki na botɔndi, alobaki: “Nzambe, na boboto na ye alingi komema yo obongola motema.”—Rom. 2:4.

16 Ntango Paulo ayokaki nsango ya nsɔmɔ mpo na pite oyo ezalaki kosalema na lisangá ya Korinti, asalaki nini mpo na yango? Makambo oyo alobaki eteyaka biso ndenge Yehova amonisaka bolingo ntango apesi disiplini mpe ntina ya komonisa motema mawa. Na lisolo oyo elandi, tokolobela na mozindo likambo oyo esalemaki na Korinti.

LOYEMBO 33 Bwakelá Yehova mokumba na yo

a Likambo wana ezalaki ndenge mosusu. Lelo oyo, Yehova asɛngi te ete moto akoba kaka kofanda na libala na molongani oyo azali kosala ekobo. Kutu, Yehova atindaki Mwana na ye amonisa ete moto oyo molongani na ye asali ekobo akoki koboma libala soki alingi.—Mat. 5:32; 19:9.

b Talá lisolo “Osengeli kosala nini mpo Yehova alimbisa yo?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/11/2012, nk. 21-23, par. 3-10.