Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Kotya moto elembo oyo 2 Batesaloniki 3:14 elobeli, bankulutu nde basengeli kosala yango to bandeko ya lisangá?

Ntoma Paulo akomelaki bakristo na Tesaloniki ete: “Soki moto moko atosi te makambo oyo tolobi na mokanda oyo, bótya moto yango elembo.” (2 Tes. 3:14) Liboso, tozalaki koloba ete apesaki malako yango epai ya bankulutu. Soki moto azali se kotyola mitinda ya Biblia atako bapesi ye toli mbala na mbala, bankulutu bakoki kosala diskur mpo na kokebisa lisangá. Na nsima, bandeko bakokangama lisusu na moto yango te oyo atyami elembo.

Kasi, mbongwana moko esalemi. Emonani ete toli ya Paulo ezali kolobela ekateli oyo bandeko ya lisangá basengeli kozwa na makambo mosusu. Na yango ezali na ntina te bankulutu básala diskur mpo na kokebisa lisangá. Mpo na nini mbongwana oyo? Tótalela makambo oyo Paulo alobelaki ntango apesaki toli yango.

Paulo amonaki ete bato mosusu na lisangá ya Tesaloniki bazalaki “kotambola na mobulu.” Bazalaki kotyola toli oyo epesamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Na viziti na ye ya liboso, apesaki mitindo oyo: “Soki moto alingi kosala mosala te, alya mpe te.” Atako bongo, bato mosusu bazalaki kaka koboya kosala mosala mpo na kokokisa bamposa na bango, atako bazalaki na likoki ya kosala yango. Lisusu, bazalaki komikɔtisa na makambo ya basusu. Ndenge nini bakristo basengelaki kotalela bato yango oyo bazalaki kotambola na mobulu?—2 Tes. 3:​6, 10-12.

Paulo alobaki: “Bótya moto yango elembo.” Liloba yango ya Grɛki epesaka likanisi ete koyeba moto yango mpe kokeba na ye. Paulo apesaki mitindo yango na lisangá mobimba, kaka epai ya bankulutu te. (2 Tes. 1:1; 3:6) Na yango bandeko ya lisangá oyo bamoni ete ndeko moko azali kotosa te toli oyo euti na Liloba ya Nzambe nde bakopona soki ‘bakotika kosangana na’ moto yango ya mobulu.

Elingaki koloba ete esengelaki kotalela moto yango lokola moto oyo alongolami na lisangá? Te, mpo Paulo abakisaki: “Bókoba . . . kokebisa ye lokola ndeko.” Na yango, bandeko bakokoba kozala elongo na moto oyo atyami elembo ntango bazali na makita mpe na mosala ya kosakola, kasi bakopona ete bázala elongo na ye te ntango bazali kolekisa ntango elongo to na ntango ya kominanola. Mpo na nini? Paulo alobaki “mpo [moto yango] ayoka nsɔni.” Ntango mokristo atyami elembo ndenge wana mpo azali kotambola na mobulu, akokaki koyoka nsɔni mpo na etamboli na ye mpe kotika yango.—2 Tes. 3:​14, 15.

Ndenge nini bakristo bakoki kosalela toli yango lelo oyo? Ya liboso, tosengeli komindimisa ete etamboli ya moto yango ezali mpenza “mobulu,” ndenge Paulo amonisaki yango. Azalaki kolobela te baoyo bazali kosala makambo ndenge mosusu mpo lisosoli na bango to makambo oyo balingaka ekeseni na oyo ya biso. Mpe alingaki kolobela te baoyo bazokisi mayoki na biso. Paulo azalaki kolobela nde baoyo baponaki na nko koboya kotosa toli ya polele oyo euti na Liloba ya Nzambe.

Lelo oyo, soki tomoni ete mokristo moko azali na ezaleli ya kozanga botosi, a tokozwa ekateli biso moko ya koboya kozala elongo na moto yango ntango tozali kolekisa ntango na baninga to ntango tozali kominanola. Lokola ezali ekateli oyo moto ye moko asengeli kozwa, tokolobela yango te na bato oyo bafandaka te na ndako na biso. Mpe tokokoba kozala elongo na moto yango na makita mpe na mosala ya kosakola. Soki abongisi etamboli na ye, tokozongela kozala elongo na ye ndenge ezalaki liboso.

a Na ndakisa, mokristo akoki koboya kosala mosala mpo na kokokisa bamposa na ye atako azali na likoki ya kosala yango, kokoba kolingana na moto oyo azali Motatoli te, kokɔtisa bokabwani to kotɔnga basusu. (1 Ko. 7:39; 2 Ko. 6:14; 2 Tes. 3:​11, 12; 1 Tim. 5:13) Baoyo bazali kokoba kosala makambo ya ndenge wana bazali “kotambola na mobulu.”