LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Septembre 2019

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli mpo na 28/10–01/12/2019.

Yehova azwaka na motuya basaleli na ye ya komikitisa

Komikitisa ezali moko ya bizaleli ya ntina mingi oyo tosengeli kokolisa. Ndenge nini mbongwana oyo esalemi na bomoi na biso ekoki komeka komikitisa na biso?

Armagedone ezali mpenza nsango malamu!

Makambo nini ya minene ekomema na Armagedone? Ndenge nini tokoki kotikala sembo lokola nsuka ekómi pene?

Mpo na nini mpe ndenge nini komikitisa liboso ya Yehova?

Mateya oyo bankulutu bakoki kozwa epai ya Guvɛrnɛrɛ Nehemia, oyo batata bakoki kozwa epai ya Mokonzi Davidi, mpe oyo bamama bakoki kozwa epai ya Maria, mama ya Yesu.

“Bóya epai na ngai, . . . mpe ngai nakopemisa bino”

Kondima libyangi yango ya Yesu elimboli nini? Tokokoba kopema na nse ya ekanganeli ya Yesu soki tosali makambo misato.

“Talá! ebele mpenza ya bato”

Na emonaneli oyo Yoane amonaki, Yehova alakisaki ye soki “ebele mpenza ya bato” oyo bakobika na bolɔzi monene mpe oyo bakofanda libela na libela awa na mabele ezali banani, monene ya etuluku yango mpe bisika oyo bauti.