Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 36

Armagedone ezali mpenza nsango malamu!

Armagedone ezali mpenza nsango malamu!

“Bayanganisaki bango na . . . Har–Magedone.”​EM. 16:16.

LOYEMBO 150 Bóluka Nzambe mpo bóbika

NA MOKUSE *

1-2. (a) Mpo na nini Armagedone ezali nsango malamu mpo na bato? (b) Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?

BATO mosusu balobaka ete “Armagedone” ezali etumba ya nikleere to kobebisama ya mabele. Nzokande, Biblia emonisi ete Armagedone ezali nsango malamu, mpe esengeli kozala likambo ya esengo! (Em. 1:3) Mpo na nini? Mpo Etumba ya Armagedone ekobebisa mokili te, kasi ekobikisa bato! Na ndenge nini?

2 Biblia emonisi ete etumba ya Armagedone ekobikisa bato na ndenge ekosukisa boyangeli ya bana bato. Lisusu, ekobikisa bato na ndenge ekoboma bato nyonso ya mabe mpe ekobatela bato ya sembo. Ekobikisa mpe bato na ndenge ekobatela planɛti na biso mpo ebebisama libela te. (Em. 11:18) Mpo tókanga malamu ntina ya makambo yango, tótalela mituna oyo minei: Armagedone ezali nini? Makambo nini ekosalema liboso na yango? Tokoki kosala nini mpo tózala na kati ya bato oyo bakobika na Armagedone? Mpe ndenge nini tokoki kotikala sembo lokola Armagedone ekómi pene?

ARMAGEDONE EZALI NINI?

3. (a) Liloba “Armagedone” elimboli nini? (b) Na kotalela Emoniseli 16:14, 16, mpo na nini tokoki koloba ete Armagedone ezali esika moko boye te na mabele?

3 Tángá Emoniseli 16:14, 16. Liloba “Armagedone” ezali kaka na esika moko na Biblia, mpe euti na liloba ya Ebre oyo elimboli “Ngomba ya Megido. (Em. 16:16) Megido ezalaki engumba moko na Yisraele ya kala. (Yos. 17:11) Kasi, Armagedone ezali te esika moko boye awa na mabele. Liloba yango esalelamaka mpo na kolobela ndenge makambo ekozala ntango “bakonzi ya mabele mobimba esika bato bafandi” bakoyanganisama mpo na kotɛmɛla Yehova. (Em. 16:14) Kasi, na lisolo oyo, tokosalela mpe liloba “Armagedone” mpo na kolobela etumba oyo ekosalema ntango bakonzi ya mabele bayanganisami. Ndenge nini toyebi ete Armagedone ezali esika ya elilingi? Ya liboso, ezali na ngomba moko te na nkombo Megido. Ya mibale, esika oyo Megido ezali, ezali moke mpenza mpe ekokoka te kosangisa “bakonzi ya mabele mobimba esika bato bafandi,” ná mampinga mpe bibundeli na bango. Ya misato, ndenge tokomona yango na lisolo oyo, etumba ya Armagedone ekobanda ntango “bakonzi” ya mokili bakobundisa basaleli ya Yehova, oyo bafandi na bisika ndenge na ndenge na mabele mobimba.

4. Mpo na nini Yehova abendi likebi na Megido mpo na kolobela etumba na ye monene?

4 Mpo na nini Yehova abendi likebi na Megido mpo na kolobela etumba na ye monene ya nsuka? Bazalaki kobunda bitumba mingi na Megido mpe na lobwaku ya Yizireele, oyo ezalaki pene na yango. Na bantango mosusu, Yehova azalaki kobundela basaleli na ye bitumba yango. Na ndakisa, “pene na mai ya Megido,” Nzambe asalisaki Barake, oyo azalaki mosambisi na Yisraele, alonga basoda ya Kanana, oyo Sisera azalaki kotambwisa. Barake ná mosakoli-mwasi Debora bapesaki Yehova matɔndi ndenge asalaki likamwisi mpo na kosalisa bango bálonga. Bayembaki ete: ‘Uta na likoló, minzoto ebundaki na Sisera. Mokɛli ya Kishone ekɔmbɔlaki bango.’​—Bas. 5:19-21.

5. Bokeseni nini ezali kati na etumba ya Armagedone mpe etumba oyo Barake abundaki?

5 Barake ná Debora basukisaki loyembo na bango na maloba oyo: “Tiká ete banguna na yo nyonso básila bongo, Ee Yehova, mpe tiká bato oyo balingaka yo bázala lokola moi ntango ebimaka na nguya na yango.” (Bas. 5:31) Ndenge moko mpe, na etumba ya Armagedone, banguna ya Nzambe bakosila, mpe bato oyo balingaka Nzambe bakobika. Kasi, ezali na bokeseni monene kati na bitumba yango mibale. Na etumba ya Armagedone, basaleli ya Nzambe bakobunda te. Kutu, bakozala ata na bibundeli te! ‘Nguya na bango ekomonana mpenza soki bafandi nyɛɛ mpe batye motema’ epai ya Yehova ná mampinga na ye ya likoló.​—Yis. 30:15; Em. 19:11-15.

6. Yehova akoki kosalela nini mpo na koboma banguna na ye na Armagedone?

6 Ndenge nini Nzambe akolonga banguna na ye na Armagedone? Akoki kosalela biloko ndenge na ndenge. Na ndakisa, akoki kosalela koningana ya mabele, mbula ya mabanga, mpe mikalikali. (Yobo 38:22, 23; Ezk. 38:19-22) Lisusu, akoki kosala ete banguna na ye bábomana bango na bango. (2 Nt. 20:17, 22, 23) Akoki mpe kosalela baanzelu na ye mpo báboma bato mabe. (Yis. 37:36) Ata soki Nzambe asaleli mayele nini, akolonga banguna na ye nyonso. Bango nyonso bakobomama. Mpe bato nyonso ya sembo bakobika.​—Mas. 3:25, 26.

MAKAMBO NINI EKOMEMA NA ARMAGEDONE?

7-8. (a) Na kotalela 1 Batesaloniki 5:1-6, liyebisi nini ya kokamwisa bakonzi ya mokili bakopesa? (b) Mpo na nini lokuta yango ekozala likama monene mpenza?

7 Liyebisi “kimya, likambo ya kobanga ezali te” ekopesama liboso ya “mokolo ya Yehova.” (Tángá 1 Batesaloniki 5:1-6.) “Mokolo ya Yehova” oyo 1 Batesaloniki 5:2 elobeli ezali “bolɔzi monene.” (Em. 7:14) Ndenge nini tokoyeba ete bolɔzi monene elingi kobanda? Biblia elobi ete ekozala na liyebisi moko ya kokamwisa mpenza. Yango nde elembo oyo ekomonisa ete bolɔzi monene elingi kobanda.

8 Liyebisi yango nde maloba “kimya, likambo ya kobanga ezali te,” oyo Biblia esakolaki. Mpo na nini bakonzi ya mokili bakoloba bongo? Bakonzi ya mangomba mpe bakoloba yango? Ntango mosusu. Nzokande, liyebisi yango ekozala kaka lokuta mosusu oyo ekouta epai ya bademo. Kasi, lokuta yango ekozala likama monene mpenza mpo ekotinda bato bákanisa ete bazwi kimya, nzokande bolɔzi oyo eleki monene na lisolo ya bato ezali kobanda. Ndenge Biblia elobi, “libebi ya mbalakaka ekoyela bango na mbala moko ndenge mpasi ya kobota eyelaka mwasi ya zemi.” Ekozala boni mpo na basaleli ya Yehova ya sembo? Bakoki kokamwa ndenge mokolo ya Yehova ekobanda na mbalakaka, kasi ekokuta bango bazali kozela yango.

9. Yehova akobebisa mokili ya Satana na mbala moko? Limbolá.

9 Yehova akobebisa te mokili ya Satana na mbala moko, ndenge asalaki na mikolo ya Noa. Akobebisa yango ndambondambo. Ya liboso, akobebisa naino Babilone Monene, elingi koloba mangomba nyonso ya lokuta. Na nsima, na etumba ya Armagedone, akobebisa ndambo mosusu ya mokili ya Satana, ezala ebongiseli na yango ya politiki, mampinga ya basoda, mpe ebongiseli ya mombongo. Tólobela malamumalamu makambo yango mibale ya minene.

10. Na kotalela Emoniseli 17:1, 6 mpe 18:24, mpo na nini Yehova akobebisa Babilone Monene?

10 “Lisambisi ya mwasi ya ndumba monene.” (Tángá Emoniseli 17:1, 6; 18:24.) Mwasi yango ya ndumba, elingi koloba Babilone Monene efingisi nkombo ya Nzambe mingi mpenza. Eteyi bato makambo ya lokuta mpo na Nzambe. Esali bondumba ya elimo na ndenge epesaka bakonzi ya mokili mabɔkɔ. Esaleli nguya mpe bokonzi na yango mpo na kolya bato mbongo. Mpe esopi makila ya bato ebele, ata mpe ya basaleli ya Yehova. (Em. 19:2) Ndenge nini Yehova akobebisa Babilone Monene?

11. ‘Nyama mabe ya langi ya motane makasi’ ezali nini, mpe ndenge nini Nzambe akosalela yango?

11 Mpo na kobebisa “mwasi ya ndumba monene,” Yehova akosalela nyama mabe ya “langi ya motane makasi” oyo ezali na “maseke zomi.” Nyama mabe yango ya elilingi ezali komonisa ONU. Maseke zomi ezali komonisa baguvɛrnema ya mokili oyo epesaka ebongiseli ya ONU mabɔkɔ. Na ntango oyo Nzambe atyá, baguvɛrnema yango ekobalukela Babilone, to mwasi ya ndumba monene. “Ekopanza ye mpe ekotika ye bolumbu” na ndenge ekopunza bomɛngo na ye mpe ekobimisa polele misala mabe na ye. (Em. 17:3, 16) Libebi yango ya nokinoki, oyo ekosalema lokola na mokolo moko, ekopesa nsɔmɔ na bato oyo bapesaka Babilone monene mabɔkɔ. Ekozala likambo mpenza, mpo banda kala amikumisaka ete: “Nazali mokonzi, mpe nazali te mwasi oyo mobali akufá, mpe nakomona mawa ata moke te.”​—Em. 18: 7, 8.

12. Yehova akotika nzela te ete bikólo esala nini, mpe mpo na nini?

12 Nzambe akotika nzela te ete bikólo esilisa basaleli na ye. Bazali bato oyo babengami na nkombo na ye, mpe batosi etinda oyo apesaki bango ete bábima na Babilone Monene. (Mis. 15:16, 17; Em. 18:4) Basali mpe makasi básalisa bato mosusu bábima na Babilone. Na yango, basaleli ya Yehova bakozwa te “ndambo ya malɔzi” ya Babilone monene. Atako bongo, kondima na bango ekomekama.

Esika nyonso oyo bazali, basaleli ya Yehova bakotyela ye motema ntango Goge akobundisa bango (Talá paragrafe 13) *

13. (a) Goge ezali nini? (b) Na kotalela Ezekiele 38:2, 8, 9, nini ekosala ete Goge akóma na esika ya elilingi oyo ebengami Armagedone?

13 Etumba ya Goge. (Tángá Ezekiele 38:2, 8, 9.) Nsima ya kobebisama ya mangomba nyonso ya lokuta, basaleli ya Yehova bakotikala bango moko lokola nzete oyo epikami ngwi nsima ya mbula ya mopɛpɛ makasi. Na yango, Satana akozala na nkanda makasi. Akomonisa nkanda yango na ndenge akosalela ‘maloba ya elimo ya mbindo,’ elingi koloba makanisi oyo ekouta epai ya bademo, oyo ekotinda etuluku ya bikólo oyo esangani ebundisa basaleli ya Yehova. (Em. 16:13, 14) Etuluku yango ya bikólo oyo esangani nde ebengami “Goge ya mokili ya Magoge.” Ntango bikólo yango ekobanda kobundisa basaleli ya Yehova nde ekokóma na esika ya elilingi oyo ebengami Armagedone.​—Em. 16:16.

14. Likambo nini Goge akoyeba?

14 Goge akotya motema na “lobɔkɔ ya moto,” elingi koloba mampinga na ye ya basoda. (2 Nt. 32:8) Biso tokotya motema epai ya Yehova Nzambe na biso, mpe bato ya bikólo bakomona ete ezali bozoba. Mpo na nini? Mpo Babilone Monene ezalaki na nguya, kasi banzambe na yango elongaki te kobikisa yango ntango “nyama mabe” mpe “maseke [na yango] zomi” ebundisaki yango! (Em. 17:16) Na yango, Goge akokanisa ete akolonga biso na pɛtɛɛ nyonso. Akobundisa basaleli ya Yehova ‘lokola mapata oyo ezipi mokili.’ (Ezk. 38:16) Kasi, ekoumela te, Goge akomona ete akangami na motambo. Ndenge moko na Farao na Mbu Motane, Goge akoyeba ete azali nde kobundisa Yehova.​—Kob. 14:1-4; Ezk. 38:3, 4, 18, 21-23.

15. Yesu akosala nini na etumba ya Armagedone?

15 Kristo ná mampinga na ye ya likoló bakobundela basaleli ya Yehova mpe bakobebisa bikólo oyo esangani ná mampinga na yango. (Em. 19:11, 14, 15) Bongo nini ekokómela monguna monene ya Yehova, Satana, oyo asalelaki lokuta mpo na kotinda bikólo na Armagedone? Yesu akobwaka ye ná bademo na ye na libulu mozindo, epai bakokangama mpo na mbula nkóto moko.​—Em. 20:1-3.

OKOKI KOSALA NINI MPO OBIKA NA ARMAGEDONE?

16. (a) Ndenge nini tomonisaka ete ‘toyebi Nzambe’? (b) Na etumba ya Armagedone, nini ekokómela bato oyo bayebi Yehova?

16 Ata soki tosali bambula mingi na lisangá to te, mpo na kobika na Armagedone, tosengeli komonisa ete ‘toyebi Nzambe’ mpe ete ‘totosaka nsango malamu oyo etali Nkolo na biso Yesu.’ (2 Tes. 1:7-9) ‘Koyeba Nzambe’ elimboli koyeba makambo oyo alingaka, makambo oyo alingaka te, mpe mibeko na ye. Tomonisaka mpe ete toyebi Nzambe soki tozali kolinga ye, kotosa ye, mpe tokangami kaka na ye. (1 Yoa. 2:3-5; 5:3) Ntango tomonisi ete toyebi Nzambe, ye mpe akoyeba biso, elingi koloba akondima biso. (1 Ko. 8:3) Yango ekosala ete tóbika na etumba ya Armagedone!

17. ‘Kotosa nsango malamu oyo etali Nkolo na biso Yesu’ elakisi nini?

17 “Nsango malamu oyo etali Nkolo na biso Yesu” esangisi makambo nyonso oyo Yesu ateyaki, oyo totángaka na Liloba ya Nzambe. Kotosa nsango malamu yango elakisi kosalela mateya nyonso ya Yesu na bomoi na biso. Na ndakisa, tosengeli kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso, kotosa mibeko ya sembo ya Nzambe mokolo na mokolo, mpe kosakola Bokonzi na ye. (Mat. 6:33; 24:14) Tosengeli mpe kosalisa bandeko ya Kristo oyo batyami mafuta na elimo na mosala monene oyo bazali na yango.​—Mat. 25:31-40.

18. Ndenge nini bandeko ya Kristo oyo batyami mafuta na elimo bakozongisa bolamu oyo bazali kosalela bango?

18 Mosika te, basaleli ya Nzambe oyo batyami mafuta na elimo bakozongisela “bampate mosusu” bolamu oyo bazali kosalela bango. (Yoa. 10:16) Ndenge nini? Liboso etumba ya Armagedone ebanda, ndambo ya bato 144 000 oyo bakozala naino awa na mabele bakokende na likoló mpo na kokóma bikelamu ya elimo oyo ekufaka te. Na nsima, bango nyonso 144 000 bakozala na kati ya mampinga ya likoló oyo ekoboma Goge mpe ekobatela “ebele mpenza ya bato,” oyo bazali basaleli ya Yehova. (Em. 2:26, 27; 7:9, 10) Ebele mpenza ya bato bakozala na esengo mingi ndenge bazwaki libaku ya kosalisa basaleli ya Yehova oyo batyami mafuta na elimo, ntango bazalaki naino na mabele!

NDENGE NINI TOKOKI KOTIKALA SEMBO LOKOLA NSUKA EKÓMI PENE?

19-20. Atako komekama oyo tozali kokutana na yango, ndenge nini tokoki kotikala sembo lokola Armagedone ekómi pene?

19 Na mikolo ya nsuka oyo ya mpasi, basaleli mingi ya Yehova bazali kokutana na komekama. Atako bongo, tokoki koyika mpiko na esengo. (Yak. 1:2-4) Mpo na yango, tosengeli kokoba kobondela na motema mobimba. (Luka 21:36) Longola libondeli, tosengeli mpe koyekola Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpe komanyola makambo oyo toyekoli, ata mpe bisakweli ya kokamwa oyo etali mikolo na biso. (Nz. 77:12) Kosala bongo, bakisá mpe komipesa na mosala ya kosakola, ekosala ete kondima mpe elikya na biso ezala kaka makasi!

20 Kanisá esengo oyo okozala na yango ntango Babilone Monene ekobebisama mpe ntango Armagedone ekoleka! Oyo eleki ntina, kanisá esengo makasi oyo okozala na yango ntango nkombo ya Nzambe mpe lotomo na ye ya koyangela ekolongisama malamumalamu! (Ezk. 38:23) Ya solo, Armagedone ezali nsango malamu mpo na bato oyo bayebi Nzambe, batosaka Mwana na ye, mpe bazali koyika mpiko tii na nsuka.​—Mat. 24:13.

LOYEMBO 143 Kobá kosala, kokɛngɛla mpe kozela

^ par. 5 Basaleli ya Yehova bazelaka Armagedone banda kala. Na lisolo oyo, tokomona soki Armagedone ezali nini, makambo nini ekosalema liboso na yango, mpe ndenge oyo tokoki kotikala sembo lokola nsuka ekómi pene.

^ par. 71 ELILINGI: Ntango makambo minene ezali kosalema, tokokoba (1) kobima na mosala ya kosakola soki likoki ezali, (2) koyekola Biblia biso moko, mpe (3) kotya motema ete Yehova akobatela biso.

^ par. 85 ELILINGI: Bapolisi balingi kokɔta na ndako ya libota moko ya bakristo, oyo bandimi ete Yesu ná baanzelu na ye bayebi makambo oyo ezali kosalema.