Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 38

“Bóya epai na ngai, . . . mpe ngai nakopemisa bino”

“Bóya epai na ngai, . . . mpe ngai nakopemisa bino”

“Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe na kokumba mikumba, mpe ngai nakopemisa bino.”​—MAT. 11:28.

LOYEMBO 17 “Nalingi”

NA MOKUSE *

1. Ndenge Matai 11:28-30 emonisi yango, elaka nini Yesu apesaki?

YESU apesaki ebele ya bato oyo bayaki koyoka ye elaka moko ya malamu mingi. Alobaki na bango: “Bóya epai na ngai mpe ngai nakopemisa bino.” (Tángá Matai 11:28-30.) Yango ezalaki kaka maloba ya mpamba te. Na ndakisa, kanisá lisusu likambo oyo asalaki mpo na mwasi oyo azalaki konyokwama na maladi moko ya nsɔmɔ.

2. Yesu asalaki nini mpo na mwasi moko oyo azalaki na maladi?

2 Mwasi yango azalaki mpenza na mposa ya lisalisi. Akendaki epai ya minganga ndenge na ndenge, kasi moko te asalisaki ye. Nsima ya konyokwama mbula 12, abikaki kaka te. Na kolanda Mibeko ya Moize, mwasi yango azalaki mbindo. (Lev. 15:25) Na nsima, ayokaki ete Yesu azalaki kobikisa bato ya maladi, na yango akendaki koluka ye. Ntango amonaki Yesu, asimbaki nsɔngɛ ya elamba na ye ya likoló, mpe na mbala moko abikaki! Kasi, Yesu asukaki kaka te na kobikisa mwasi yango. Apesaki ye mpe lokumu. Na ndakisa, ntango asololaki na ye, asalelaki maloba ya boboto mpe ya limemya ete “mwana na ngai.” Na ntembe te, mwasi yango ayokaki ete Yesu apemisi ye, elingi koloba apesi ye makasi!​—Luka 8:43-48.

3. Tokozwa biyano na mituna nini?

3 Tomoni ete mwasi yango asalaki makasi mpo na kokende epai ya Yesu. Ezali mpe bongo lelo oyo: biso nde tosengeli kosala makasi mpo na kokende epai ya Yesu. Na mikolo na biso, Yesu akosala likamwisi te mpo na kobikisa maladi ya bato oyo ‘bayei epai na ye.’ Atako bongo, alobi na biso mpe: “Bóya epai na ngai, . . . mpe ngai nakopemisa bino.” Na lisolo oyo, tokozwa biyano na mituna oyo mitano: Ndenge nini tokoki kokende epai ya Yesu? Yesu alingaki koloba nini ntango alobaki: “Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino”? Makambo nini tokoki koyekola epai ya Yesu? Mpo na nini mosala oyo apesi biso epemisaka biso? Mpe tokoki kosala nini mpo tókoba kopema na nse ya ekanganeli ya Yesu?

“BÓYA EPAI NA NGAI”

4-5. Ndenge nini tokoki kokende epai ya Yesu?

4 Lolenge moko ya kokende epai ya Yesu ezali ya koyekola makambo oyo alobaki mpe asalaki. (Luka 1:1-4) Moto te akoki kosala yango mpo na biso; biso moko tosengeli koyekola makambo oyo Biblia elobi mpo na Yesu. Tokendaka mpe epai ya Yesu ntango tozwi ekateli ya kozwa batisimo mpe kokóma bayekoli ya Kristo.

5 Lolenge mosusu ya kokende epai ya Yesu ezali ya koluka bankulutu ya lisangá ntango tozali na mposa ya lisalisi. Yesu asalelaka “makabo [yango] oyo ezali bato” mpo na kobatela bampate na ye. (Ef. 4:7, 8, 11; Yoa. 21:16; 1 Pe. 5:1-3) Biso nde tosengeli koluka lisalisi na bango. Tóyeba ete bankulutu bakoki te koyeba makambo oyo tozali kokanisa to oyo tozali na mposa na yango. Talá makambo oyo ndeko mobali moko na nkombo Julian alobi: “Ntango esɛngaki ete natika mosala na ngai na Betele mpo na maladi oyo nazalaki na yango, moninga na ngai moko ayebisaki ngai nasɛnga bankulutu básolola na ngai mpo bálendisa ngai. Na ebandeli, namonaki ete nazali na mposa na yango te. Kasi na nsima, ntango nasɛngaki lisalisi yango, namonaki ete ndenge bayaki kolendisa ngai ezali moko ya makabo kitoko oyo nazwá na bomoi na ngai.” Bankulutu ya sembo, lokola bankulutu mibale oyo bakendaki kotala Julian, bakoki kosalisa biso tóyeba “makanisi ya Kristo,” elingi koloba tósosola ndenge na ye ya kotalela makambo mpe tómekola yango. (1 Ko. 2:16; 1 Pe. 2:21) Soki basalisi biso ndenge wana, ezali mpenza moko ya makabo eleki malamu oyo bakoki kopesa biso.

“BÓKAMATA EKANGANELI NA NGAI LIKOLÓ NA BINO”

6. Ntango Yesu alobaki: “Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino,” alingaki koloba nini?

6 Ntango Yesu alobaki ete: “Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino,” mbala mosusu alingaki koloba ete: “Bótosa bokonzi na ngai.” Ekoki mpe kozala alingaki koloba ete: “Bóya na nse ya ekanganeli na ngai, mpe tósalela Yehova elongo.” Ezala ndenge nini, maloba yango epesaka likanisi ya kosala mosala.

7. Na kotalela Matai 28:18-20, mosala nini bapesi biso, mpe tokoki kotya motema na likambo nini?

7 Tondimaka kokamata ekanganeli ya Yesu ntango tomipesi na Yehova na libondeli mpe tozwi batisimo. Libyangi yango epesami epai ya moto nyonso; Yesu akoboya ata moto moko te oyo alingi mpenza kosalela Nzambe. (Yoa. 6:37, 38) Yehova apesaki Yesu mosala ya kosakola nsango malamu, mpe bayekoli nyonso ya Kristo bazwi lokumu ya kopesa mabɔkɔ na mosala yango. Tokoki kotya motema ete Yesu akozala elongo na biso ntango nyonso mpo na kosalisa biso tósala mosala yango.​—Tángá Matai 28:18-20.

“BÓYEKOLA EPAI NA NGAI”

Pemisá basusu ndenge Yesu asalaki (Talá paragrafe 8-11) *

8-9. Mpo na nini bato ya komikitisa bazalaki kolinga kokende epai ya Yesu, mpe mituna nini tosengeli komituna?

8 Bato ya komikitisa bazalaki kolinga kokende epai ya Yesu. (Mat. 19:13, 14; Luka 7:37, 38) Mpo na nini? Mpo Yesu azalaki ndenge moko te na Bafarisai. Bakonzi yango ya mangomba bazalaki kolinga bato te mpe bazalaki na lolendo. (Mat. 12:9-14) Yesu azalaki kolinga bato mpe azalaki na komikitisa. Bafarisai bazalaki na lokoso ya bokonzi mpe ya lokumu. Yesu atɛmɛlaki ezaleli ya koluka lokumu, mpe ateyaki bayekoli na ye bázala na komikitisa mpe básalelaka basusu. (Mat. 23:2, 6-11) Bafarisai bazalaki kobangisa bato mpo na kokonza bango. (Yoa. 9:13, 22) Yesu azalaki kosala mpe koloba makambo ya boboto mpo na kopemisa basusu.

9 Omoni mateya oyo okoki kozwa na ndakisa ya Yesu? Omituna boye: ‘Bato bayebi ngai lokola moto ya motema pɛtɛɛ mpe ya komikitisa? Nandimaka kosala misala oyo ezangi lokumu mpo na kosalisa basusu? Nazalaka na boboto epai ya basusu?’

10. Yesu asalaki ete bato oyo bazali kosala elongo na ye bámiyoka ndenge nini?

10 Yesu asalaki ete bato oyo bazali kosala elongo na ye bámiyoka ete bazali na kimya, mpe azalaki kosepela kolakisa bango makambo. (Luka 10:1, 19-21) Alendisaki bayekoli na ye bátunaka mituna, mpe azalaki kotuna bango mituna mpo na koyeba makanisi na bango. (Mat. 16:13-16) Na yango, bayekoli bazalaki komiyoka malamu, kaka lokola milona oyo ebatelami malamu mpo moi ebebisa yango te. Bakangaki ntina ya makambo oyo Yesu ateyaki bango mpe babotaki mbuma ya malamu.

Salá ete bato bakimaka yo te

Zalá na molende

Zalá na komikitisa mpe makasi na mosala *

11. Mituna nini tosengeli komituna?

11 Yo mpe ozali na mwa bokonzi likoló ya basusu? Soki bongo, omituna boye: ‘Nasalaka ete bato oyo bazali kosala elongo na ngai, na mosala to na ndako, bámiyoka ete bazali na kimya? Nalendisaka basusu bátunaka mituna? Mpe nandimaka koyoka makanisi na bango?’ Tólinga ata moke te kozala lokola Bafarisai. Bazalaki kosilika ntango bato bazali kotuna mituna mpo bakangaki ntina te, mpe bazalaki konyokola baoyo bazalaki kopesa makanisi oyo ekeseni na oyo ya bango.​—Mrk. 3:1-6; Yoa. 9:29-34.

“NAKOPEMISA BINO”

12-14. Mpo na nini mosala oyo Yesu apesi biso epemisaka biso?

12 Mpo na nini kosala mosala oyo Yesu apesi biso epemisaka biso? Mpo na bantina mingi, kasi tólobela kaka mwa ndambo.

13 Ya liboso, tozali na bakɛngɛli ya malamu mpenza. Atako Yehova azali Mokɛngɛli oyo aleki likoló, azali makambo makasimakasi te mpe azangá botɔndi te. Asepelaka na mosala oyo tosalaka. (Ebr. 6:10) Mpe apesaka biso nguya oyo tosengeli na yango mpo na kosala mosala oyo apesi biso. (2 Ko. 4:7; Gal. 6:5) Yesu, oyo azali Mokonzi na biso, atikelá biso ndakisa malamu na oyo etali kosalela basusu makambo. (Yoa. 13:15) Lisusu, bankulutu oyo babatelaka biso basalaka makasi bámekola Yesu, “mobateli monene ya bampate.” (Ebr. 13:20; 1 Pe. 5:2) Basalaka oyo bakoki mpo bázala na boboto, balendisaka biso, mpe bamonisaka mpiko ntango bazali koteya biso mpe kobatela biso.

14 Ya mibale, tozali na baninga ya malamu mpenza. Ezali na ekólo mosusu te oyo bato na yango balinganaka mpe bazali na esengo lokola biso. Kanisá naino: Tozali na libaku malamu ya kosala elongo na bandeko na biso, oyo bazali na bizaleli ya malamu kasi bamimonaka sembo te koleka basusu. Bayebi kosala makambo mingi, kasi bayebi ete bakoki kosala nyonso te, mpe bamonaka ete basusu baleki bango. Bamonaka ete tozali kaka te bato oyo bazali kosala elongo, kasi tozali mpe baninga. Mpe bolingo na bango epai na biso ezali mpenza makasi mpe bakoki ata kondima kokufa mpo na biso!

15. Ndenge nini tosengeli kotalela mosala oyo tozali kosala?

15 Ya misato, tozali na mosala ya malamu mpenza. Toteyaka bato solo ya Yehova mpe tomonisaka lokuta ya Zabolo. (Yoa. 8:44) Satana anyokoli bato na lokuta na ye mpe bakómi lokola bamemi kilo. Na ndakisa, Satana alingi bato bándima ete soki tosali masumu Yehova akolimbisa biso te mpe ete akoki kolinga biso te. Lokuta ya ndenge wana esalaka ete bato bálɛmba nzoto, lokola nde bamemi kilo! Ntango tondimi libyangi ya Kristo ete “bóya epai na ngai,” masumu na biso elimbisamaka. Mpe tóyeba ete Yehova alingaka mpenza mokomoko na biso. (Rom. 8:32, 38, 39) Ezali esengo mingi kosalisa bato báyekola kotyela Yehova motema mpe komona ndenge bomoi na bango ezali kobongwana!

KOBÁ KOPEMA NA NSE YA EKANGANELI YA YESU

16. Na ndenge nini mokumba oyo Yesu asɛngi biso tómema ekeseni na mikumba mosusu nyonso oyo tokoki komema?

16 Mokumba oyo Yesu asɛngi biso tómema ekeseni na mikumba mosusu nyonso oyo tokoki komema. Na ndakisa, nsima ya kosala mosala ya mosuni mokolo mobimba, mingi kati na biso toyokaka ete makasi esili biso mpe tozalaka na esengo te. Nzokande, nsima ya kosala mosala mpo na Yehova mpe Kristo, tozalaka na esengo makasi. Mikolo mosusu nsima ya mosala, tolɛmbaka makasi mpe esɛngaka tóbunda mpo na kokende na makita na mpokwa yango. Kasi, mbala mingi ntango tozongi ndako nsima ya makita, toyokaka ete tozwi makasi. Ezali mpe bongo mpo na mosala ya kosakola mpe boyekoli na biso moko ya Biblia. Ntango tosali makasi mpo na kosala makambo yango, toyokaka ete topemi mpe tozwi makasi!

17. Mpo na nini tosengeli kozala na bokatikati mpe kokeba?

17 Tosengeli kozala na bokatikati. Biso nyonso tozali na makasi ndenge moko te. Na yango, tosengeli kokeba na mikumba oyo tozali komema. Na ndakisa, mbala mosusu tobimisaka makasi mingi mpo na koluka biloko ya mokili. Talá oyo Yesu alobaki na elenge mozwi moko oyo atunaki ye: “Nasengeli kosala nini mpo nazwa libula ya bomoi ya seko?” Elenge mobali yango azalaki kotosa Mibeko banda kala. Na ntembe te azalaki moto malamu mpo Evanzile ya Marko elobi ete Yesu “atalaki ye na bolingo.” Yesu asɛngaki elenge mozwi yango eloko moko. Alobaki na ye: “Kende, tɛká biloko nyonso oyo ozali na yango mpe yaká, landá ngai.” Mobali yango azalaki na mposa ya kolanda Yesu. Kasi emonani ete akokaki te kotika “biloko mingi” oyo azalaki na yango. (Mrk. 10:17-22) Na yango, aboyaki ekanganeli oyo Yesu asɛngaki ye azwa mpe akobaki kozala moombo “ya Bomɛngo.” (Mat. 6:24) Soki ezalaki yo, olingaki kopona nini?

18. Likambo nini tosengeli kosala mbala na mbala, mpe mpo na nini?

18 Tosengeli kozwaka ntango mbala na mbala mpo na kotalela lisusu makambo oyo totyaka na esika ya liboso na bomoi na biso. Mpo na nini? Mpo tóyeba soki tozali kosalela makasi na biso malamu to te. Tózwa ndakisa ya ndeko mobali moko ya elenge na nkombo Mark; alobi boye: “Banda bambula ebele, nazalaki kokanisa ete nazalaka na bomoi ezangi mindɔndɔ. Nazalaki mobongisi-nzela, kasi nazalaki ntango nyonso kokanisa mbongo mpe ndenge ya kozala na bomoi ya malamu koleka. Nazalaki koyeba te ntina oyo bomoi na ngai ekómaki kilo. Na nsima, namonaki ete nazalaki koluka mingimingi kotya matomba na ngai na esika ya liboso, mpe nazalaki kopesa Yehova ntango mpe makasi oyo etikali.” Mark asembolaki makanisi na ye, atalelaki bomoi oyo azalaki na yango mpe amipesaki mingi na mosala ya Yehova. Alobi boye: “Na bantango mosusu namitungisaka mpo na mbongo, kasi na lisalisi ya Yehova mpe ya Yesu, nalongi mikakatano na ngai.”

19. Mpo na nini kozala na makanisi oyo ebongi ezali na ntina mingi?

19 Tokokoba kopema na nse ya ekanganeli ya Yesu soki tosali makambo misato. Ya liboso, kozala na makanisi oyo ebongi. Lokola tozali kosala mosala ya Yehova, tosengeli kosala yango ndenge ye moko alingi. Biso tozali basali, mpe Yehova azali Nkolo-mosala. (Luka 17:10) Soki tomeki kosala mosala ya Yehova na ndenge na biso moko, tokomona mpasi mpo tokozala na ekanganeli moko te na Yesu. Ata ngɔmbɛ oyo ezali na makasi mingi ekoki komizokisa to kolɛmba soki ezali ntango nyonso koluka kokende esika yango moko elingi mpe eboyi kolanda ekanganeli oyo nkolo na yango azali kotambwisa. Nzokande, tokoki kosala makambo ya kokamwa mpe kolonga ata mokakatano nini soki tolandi litambwisi ya Yehova. Tóbosana te, moto te akoki kopekisa mokano ya Yehova esalema!​—Rom. 8:31; 1 Yoa. 4:4.

20. Mokano nini tosengeli kozala na yango ntango tondimi ekanganeli ya Yesu?

20 Ya mibale, koluka liboso matomba na yo te. Mokano na biso ezali ya kokumisa Yehova, Tata na biso ya bolingo. Na siɛklɛ ya liboso, bato oyo bazalaki na lokoso mpe oyo bazalaki koluka liboso matomba na bango baumelaki te mpo na kolɛmba nzoto mpe batikaki ekanganeli ya Yesu. (Yoa. 6:25-27, 51, 60, 66; Flp. 3:18, 19) Nzokande, baoyo balingaki mpenza Nzambe mpe bazalani na bango bazalaki na esengo ya komema ekanganeli ya Yesu bomoi na bango mobimba awa na mabele, mpe bazwaki elikya ya kosala elongo na Kristo na likoló. Lokola bango, tokobatela esengo soki tozali koluka liboso matomba na biso moko te, ntango tomemi ekanganeli ya Yesu.

21. Na kotalela Matai 6:31-33, tokoki kozala na elikya ete Yehova akosala nini?

21 Ya misato, kobatela elikya. Bomoi na biso bakristo esɛngaka tómipimela makambo mosusu mpe tósala mosala makasi. Yesu alobaki ete bakonyokola biso. Kasi, tokoki kozala na elikya ete Yehova akopesa biso makasi ya koyikela ata mokakatano nini mpiko. Ntango tozali koyika mpiko, tozali mpe kokóma makasi mingi. (Yak. 1:2-4) Tokoki mpe kozala na elikya ete Yehova akopesa biso biloko oyo tosengeli na yango, ete Yesu akobatela biso, mpe ete bandeko na biso ya lisangá bakolendisa biso. (Tángá Matai 6:31-33; Yoa. 10:14; 1 Tes. 5:11) Tozali mpenza na nyonso oyo esengeli!

22. Tokoki kozala na botɔndi mpo na likambo nini?

22 Mwasi oyo Yesu abikisaki apemaki kaka na mokolo oyo maladi na ye esilaki. Kasi, akokaki kopema mpo na libela kaka soki akómaki moyekoli ya sembo ya Kristo. Okanisi ete asalaki nini? Soki aponaki kozwa ekanganeli ya Yesu, kanisá mbano oyo alingaki kozwa: akokaki kosala elongo na Yesu na likoló! Makambo nyonso oyo amipimelaki mpo na kolanda Kristo ekokaki kokokana ata moke te na lipamboli yango. Ezala tozali na elikya ya kozwa bomoi ya seko na likoló to awa na mabele, tokoki kozala na botɔndi ndenge tondimi libyangi ya Yesu oyo ete: “Bóya epai na ngai!”

LOYEMBO 13 Kristo, ndakisa na biso

^ par. 5 Yesu abengi biso tókende epai na ye. Kondima libyangi yango elimboli nini? Lisolo oyo ekopesa eyano na motuna yango, mpe ekokundwela biso ndenge oyo kosala elongo na Kristo ekoki kopemisa biso.

^ par. 60 ELILINGI: Yesu apemisaki basusu na makambo mingi.

^ par. 66 ELILINGI: Ndenge moko na Yesu, ndeko mobali moko azali kosala makambo ndenge na ndenge mpo na kopemisa basusu, to kopesa bango makasi.