Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 37

Mpo na nini mpe ndenge nini komikitisa liboso ya Yehova?

Mpo na nini mpe ndenge nini komikitisa liboso ya Yehova?

“Bongo Tata na biso tokomikitisa liboso na ye te koleka?”​—EBR. 12:9.

LOYEMBO 9 Yehova azali Mokonzi na biso!

NA MOKUSE *

1. Mpo na nini tosengeli komikitisa liboso ya Yehova?

TOSENGELI komikitisa liboso ya * Yehova mpo azali Mozalisi na biso. Na yango, azali na lotomo ya kotyela biso mibeko. (Em. 4:11) Kasi, ntina mosusu ya monene ya kotosa Yehova yango oyo: azali moyangeli oyo aleki malamu. Banda kala, bana ya bato bazwaka mwa bokonzi mpe bayangelaka basusu. Na bokeseni na bana ya bato, Yehova azali Moyangeli oyo aleki na bwanya, na bolingo, na motema mawa mpe na ngɔlu.​—Kob. 34:6; Rom. 16:27; 1 Yoa. 4:8.

2. Mpo na bantina nini oyo ezali na Baebre 12:9-11 tosengeli komikitisa liboso ya Yehova?

2 Yehova alingaka tótosa ye mpo tolingaka ye mpe tomonaka ete azali Tata na biso ya bolingo, kasi kaka te mpo tobangaka ye. Na mokanda oyo ntoma Paulo akomelaki Baebre, alobaki ete tosengeli ‘komikitisa liboso ya Tata na biso’ mpo ateyaka biso “mpo na bolamu na biso.”​—Tángá Baebre 12:9-11.

3. (a) Komikitisa liboso ya Yehova elimboli nini? (b) Tokozwa biyano na mituna nini?

3 Komikitisa liboso ya Yehova elimboli kosala makasi mpo na kotosa ye na makambo nyonso mpe kotɛmɛla mposa ya kondimela mayele na biso moko. (Mas. 3:5) Ekozala mpasi te tómikitisa liboso ya Yehova soki toyebi bizaleli na ye ya kokamwa. Mpo na nini? Mpo bizaleli yango emonanaka na makambo nyonso oyo asalaka. (Nz. 145:9) Soki toyekoli makambo mingi ya Yehova, tokolinga ye mpe mingi. Mpe soki tolingi Yehova, tokozala na mposa te báyebisaka biso ntango nyonso nini tósala mpe nini tósala te. Tokosala makasi mpo makanisi mpe ndenge na biso ya kotalela makambo eyokana na oyo Yehova alingi mpe tokoboya oyo ezali mabe. (Nz. 97:10) Kasi, mpo na nini na bantango mosusu ezalaka pɛtɛɛ te kotosa Yehova? Mpe mateya nini bankulutu, batata, mpe bamama bakoki kozwa na ndakisa ya Guvɛrnɛrɛ Nehemia, Mokonzi Davidi, mpe Maria, mama ya Yesu? Lisolo oyo ekopesa biyano na mituna yango.

MPO NA NINI KOMIKITISA LIBOSO YA YEHOVA EKOKI KOZALA MOKAKATANO?

4-5. Na kotalela Baroma 7:21-23, mpo na nini komikitisa liboso ya Yehova ekoki kozala mokakatano?

4 Ntina ya liboso oyo ekoki kozala mokakatano mpo tómikitisa liboso ya Yehova ezali ete tozali bana ya Adama mpe tozali bato ya kozanga kokoka. Na yango, na bantango mosusu tozalaka na mposa ya kotosa te. Ntango Adama ná Eva batombokelaki Nzambe mpe balyaki mbuma oyo epekisamaki, bamityelaki mibeko na oyo etali malamu ná mabe. (Eba. 3:22) Lelo oyo mpe, bato mingi baboyi kotosa Yehova mpe bazali komityela mibeko na oyo etali malamu ná mabe.

5 Ata soki tozali lokola bango te mpo toyebi Yehova mpe tolingaka ye, na bantango mosusu ezalaka pɛtɛɛ te komikitisa liboso na ye. Ntoma Paulo azalaki na mokakatano yango. (Tángá Baroma 7:21-23.) Ndenge moko na Paulo, tolingaka kosala oyo ezali malamu na miso ya Yehova. Kasi, tosengeli ntango nyonso kobundisa mposa ya kosala makambo ya mabe.

6-7. Wapi ntina ya mibale oyo komikitisa liboso ya Yehova ekoki kozala mokakatano? Pesá ndakisa.

6 Ntina mosusu oyo ekoki kozala mokakatano mpo tómikitisa liboso ya Yehova ezali ete tolandaka mimeseno ya esika oyo tobɔkwamá. Mbala mingi, makanisi ya bato eyokanaka te na mokano ya Yehova, mpe ekoki kosɛnga ete tókoba kobunda mpo tólanda makanisi ya bato te. Tótalela kaka ndakisa moko.

7 Na bamboka mosusu, batyaka bilenge mbamba bámipesa na koluka mbongo mingi. Ndeko mwasi moko na nkombo Mary * akutanaki na mokakatano yango. Liboso ayeba Yehova, atángaki na moko ya biteyelo ya lokumu mingi ya ekólo na bango. Bato ya libota ya Mary bazalaki kotya ye mbamba azwa mosala ya mbongo mingi oyo ekosala ete bato bápesaka ye limemya. Ye moko mpe azalaki kolinga bongo. Kasi, ntango ayekolaki makambo ya Yehova mpe akómaki kolinga ye, abongolaki mikano na ye. Atako bongo, alobi boye: “Na bantango mosusu, nazwaka mabaku ya kosala mosala ya mbongo mingi, kasi oyo ekopekisa ngai kosalela Yehova malamu ndenge nazali kosala sikoyo. Na kotalela ndenge oyo nabɔkwamá, tii sikoyo nabundaka mpo naboya misala yango. Nasɛngaka Yehova asalisa ngai natɛmɛla mposa ya kondima mosala oyo ekoki kosala ete natika mosala na ye.”​—Mat. 6:24.

8. Tokotalela nini sikoyo?

8 Tomoni ete komikitisa liboso ya Yehova ezali mpo na bolamu na biso. Kasi, bato oyo bazali na mwa bokonzi, na ndakisa bankulutu, batata ya mabota, mpe bamama, bazali na ntina mosusu ya komikitisa liboso ya Nzambe; bakoki kosalisa basusu. Sikoyo, tótalela mwa bandakisa ya Biblia oyo emonisi ndenge oyo tokoki kosalela bokonzi na biso na ndenge oyo ekosepelisa Yehova.

LITEYA OYO BANKULUTU BAKOKI KOZWA NA NDAKISA YA NEHEMIA

Bankulutu bazali kosala mosala na Ndako ya Bokonzi, kaka ndenge Nehemia ye moko apesaki mabɔkɔ na kotonga lisusu bifelo ya Yerusaleme (Talá paragrafe 9-11) *

9. Mikakatano nini Nehemia akutanaki na yango?

9 Yehova apesi bankulutu mokumba monene ya kobatela basaleli na ye. (1 Pe. 5:2) Bankulutu bakoki kozwa mateya mingi na ndenge oyo Nehemia asalelaki bato ya Yehova makambo. Lokola Nehemia azalaki guvɛrnɛrɛ ya Yuda, azalaki na bokonzi mingi. (Neh. 1:11; 2:7, 8; 5:14) Kanisá mikakatano oyo Nehemia akutanaki na yango. Azwaki nsango ete bato bakómisaki tempelo mbindo mpe bazalaki kopesa makabo te mpo na Balevi, ndenge Mibeko esɛngaki. Bayuda bazalaki kotosa Sabata te, mpe mibali mosusu babalaki basi ya bikólo oyo ezalaki kosambela Yehova te. Guvɛrnɛrɛ Nehemia asengelaki kosembola makambo.​—Neh. 13:4-30.

10. Nehemia asalaki nini mpo na mikakatano oyo akutanaki na yango?

10 Nehemia asalelaki bokonzi na ye malamu mpo aboyaki kotyela bato ya Nzambe mibeko na ndenge na ye moko. Kasi, alukaki litambwisi ya Yehova na nzela ya libondeli oyo eutaki na motema, mpe ateyaki bato Mibeko ya Yehova. (Neh. 1:4-10; 13:1-3) Lisusu, na komikitisa nyonso, Nehemia asalaki elongo na bato ya ekólo, asalisaki bango kutu na kotonga lisusu bifelo ya Yerusaleme.​—Neh. 4:15.

11. Na kotalela 1 Batesaloniki 2:7, 8, ndenge nini bankulutu basengeli kosalela bandeko ya lisangá makambo?

11 Mbala mosusu bankulutu bakokutana te na mikakatano oyo Nehemia akutanaki na yango, kasi bakoki komekola ye na ndenge mingi. Na ndakisa, basalaka mosala makasi mpo na bolamu ya bandeko ya lisangá. Mpe batikaka te ete bokonzi ematisa bango mapeka. Kasi, basalelaka bandeko ya lisangá makambo na boboto. (Tángá 1 Batesaloniki 2:7, 8.) Ndenge na bango ya koloba na basusu emonisaka bolingo mpe komikitisa na bango. Ndeko Andrew, oyo azali nkulutu bambula ebele, alobi boye: “Namoni ete mbala mingi, bandeko basepelaka soki nkulutu azali na boboto mpe alingaka bato. Bizaleli yango etindaka bandeko ya lisangá básala na bomoko elongo na bankulutu.” Tony, nkulutu mosusu oyo aumeli mingi, alobi boye: “Nasalaka makasi mpo nalanda toli ya Bafilipi 2:3 mpe namekaka ntango nyonso komona basusu ete baleki ngai. Yango esalisaka ngai naboya kokonza bandeko.”

12. Mpo na nini ezali na ntina bankulutu bázala na komikitisa?

12 Bankulutu basengeli kozala na komikitisa, kaka ndenge Yehova azali na komikitisa. Atako Yehova azali Nkolo-Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, amikitisaka mpo na ‘kolongola na putulu moto oyo azangá.’ (Nz. 18:35; 113:6, 7) Ya solo, Yehova ayinaka bato ya lolendo mpe oyo bamitombolaka.​—Mas. 16:5.

13. Mpo na nini nkulutu asengeli koyeba ‘kopekisa lolemo na ye’?

13 Nkulutu oyo amikitisaka liboso ya Yehova asengeli koyeba ‘kopekisa lolemo na ye.’ Soki te, akoki kozanga boboto na maloba na ye ntango moto moko apesi ye limemya te. (Yak. 1:26; Gal. 5:14, 15) Andrew, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Na bantango mosusu, soki namoni ete ndeko moko apesi ngai limemya te, nayokaka mposa ya koloba na ye na nkanda. Kasi, namanyolaka bandakisa ya mibali ya sembo oyo Biblia elobeli, mpe yango esalisi ngai namona ntina ya kozala na komikitisa.” Bankulutu bamonisaka ete bamikitisaka liboso ya Yehova soki bazali komonisa bolingo mpe boboto ntango bazali koloba na bandeko ya lisangá, ata mpe na baninga na bango bankulutu.​—Kol. 4:6.

BATATA BAKOKI KOZWA LITEYA NA NDAKISA YA MOKONZI DAVIDI

14. Mokumba nini Yehova apesi batata, mpe alingi básala nini?

14 Yehova apesi tata mokumba ya kozala mokonzi ya libota, mpe alingi ete ateya bana mpe apesa bango disiplini. (1 Ko. 11:3; Ef. 6:4) Kasi, bokonzi ya tata ezali na ndelo; akozongisa monɔkɔ epai ya Yehova, ‘oyo mpo na ye, libota nyonso ezwi nkombo.’ (Ef. 3:14, 15) Batata bakomonisa ete bamikitisaka liboso ya Yehova soki bazali kosalela bokonzi na bango na ndenge oyo esepelisaka Nzambe. Bakoki kozwa mateya mingi na ndakisa ya Mokonzi Davidi.

Mabondeli ya tata oyo azali mokristo esengeli komonisa ete azali na komikitisa (Talá paragrafe 15-16) *

15. Mpo na nini ndakisa ya Mokonzi Davidi ebongi mpo na batata?

15 Yehova atyaki Davidi mokonzi kaka ya libota na ye te, kasi mpe ya ekólo mobimba ya Yisraele. Lokola azalaki mokonzi ya ekólo, Davidi azalaki na nguya mingi. Na bantango mosusu, asalelaki bokonzi na ye na ndenge ya mabe mpe asalaki mabunga minene. (2 Sa. 11:14, 15) Kasi, amikitisaki liboso ya Yehova na ndenge andimaki disiplini. Asopaki motema na ye liboso ya Yehova na nzela ya libondeli. Mpe asalaki makasi asalela toli ya Yehova. (Nz. 51:1-4) Longola yango, azalaki na komikitisa mingi mpe andimaki toli ya malamu oyo eutaki epai ya bana mibali, ata mpe epai ya bana basi. (1 Sa. 19:11, 12; 25:32, 33) Davidi azwaki mateya na mabunga oyo asalaki mpe atyaki mosala ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na ye.

16. Mateya nini batata bakoki kozwa epai ya Davidi?

16 Talá mwa mateya oyo batata bakoki kozwa epai ya Mokonzi Davidi: Kolekisa ndelo te na ndenge na yo ya kosalela bokonzi oyo Yehova apesi yo. Ndimáká mabunga oyo osali mpe toli ya Biblia oyo basusu bapesi yo. Soki osali bongo, bato ya libota na yo bakopesa yo limemya mpo bakomona ete ozali na komikitisa. Ntango ozali kobondela elongo na bato ya libota na yo, yebisáká Yehova makambo oyo euti mpenza na motema; na yango, bakomona ete otyelaka ye motema mobimba. Oyo eleki ntina, tyá mosala ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na yo. (Mib. 6:6-9) Ndakisa na yo ya malamu ezali moko ya makabo ya motuya oyo okoki kopesa libota na yo.

BAMAMA BAKOKI KOZWA LITEYA NA NDAKISA YA MARIA

17. Mokumba nini Yehova apesi bamama?

17 Yehova apesi bamama mokumba ya lokumu na kati ya libota, mpe mwa bokonzi likoló ya bana. (Mas. 6:20) Kutu, makambo oyo mama asalaka mpe alobaka ekoki kotambwisa bana na ye bomoi na bango mobimba. (Mas. 22:6) Tótala makambo oyo bamama bakoki koyekola epai ya Maria, mama ya Yesu.

18-19. Mateya nini bamama bakoki kozwa epai ya Maria?

18 Maria ayebaki Makomami malamu mpenza. Azalaki komemya Yehova na motema mobimba mpe azalaki moninga na ye ya penepene. Andimaki komikitisa liboso ya Yehova mpo na kosala mokano na ye, atako yango esɛngaki ete bomoi na ye mobimba ebongwana.​—Luka 1:35-38, 46-55.

Soki mama alɛmbi to asiliki, ekoki kosɛnga asala milende mingi mpo amonisela bato ya libota na ye bolingo (Talá paragrafe 19) *

19 Bamama, bokoki komekola Maria na makambo mingi. Makambo nini? Ya liboso, bosengeli kobatela makasi boninga na bino na Yehova na nzela ya koyekola Biblia mpe kobondela bino moko. Ya mibale, bosengeli kondima kosala mbongwana na bomoi na bino mpo na kosepelisa Yehova. Na ndakisa, mbala mosusu baboti na yo bazalaki kosilika mpambampamba mpe kokatela bana mangala. Lokola okolá na libota ya ndenge wana, mbala mosusu okanisaka ete babɔkɔlaka bana bongo. Ata nsima ya koyekola mibeko ya Yehova, ekoki kozala ete okokaka te kofanda kimya mpe komonisela bana na yo motema molai, mingimingi soki basali mabe na ntango oyo ozali ya kolɛmba. (Ef. 4:31) Na ntango yango, ezali na ntina mingi obondela Yehova asalisa yo. Mama moko na nkombo Lydia alobi boye: “Na bantango mosusu, esɛngaki nabondela na etingya mpo naloba na nkanda te ntango mwana na ngai ya mobali azangi botosi. Kutu, nasukisaki maloba na nzela, mpo nabondela Yehova na nse ya motema ete asalisa ngai. Libondeli esalisaka ngai nazala kimya.”​—Nz. 37:5.

20. Mokakatano nini bamama mosusu bazalaka na yango, mpe ndenge nini bakoki kolonga yango?

20 Bamama mosusu bakoki kozala na mokakatano mosusu: bakokaka te koyebisa bana na bango ete balingaka bango. (Tito 2:3, 4) Basi mosusu babɔkwamá na libota oyo baboti bazalaki na boyokani ya malamu te na bana na bango. Soki obɔkwamá na libota ya ndenge wana, kosala te libunga oyo baboti na yo basalá. Mama oyo amikitisaka liboso ya Yehova mpo na kosala mokano na ye akoki komona ete ebongi ayekola ndenge ya koyebisa bana ete alingaka bango. Ekoki kozala mpasi abongola ndenge na ye ya kokanisa mpe ya kosala makambo. Kasi, akoki kosala yango, mpe mbongwana yango ekozala malamu mpo na ye moko mpe libota na ye mobimba.

KOBÁ KOMIKITISA LIBOSO YA YEHOVA

21-22. Na kotalela Yisaya 65:13, 14, matomba nini tokozwa soki tomikitisi liboso ya Yehova?

21 Mokonzi Davidi ayebaki ete komikitisa liboso ya Yehova epesaka matomba. Akomaki boye: “Bitinda ya Yehova ezali alima, esepelisaka motema; mitindo ya Yehova ezali pɛto, engɛngisaka miso. Lisusu, ekebisi mosaleli na yo; kobatela yango ezali na litomba monene.” (Nz. 19:8, 11) Lelo oyo, tokoki komona bokeseni kati na bato oyo bamikitisaka liboso ya Yehova mpe baoyo baboyaka toli na ye ya bolingo. Bato oyo bamikitisaka liboso ya Yehova ‘bagangaka na esengo na ndenge bayokaka malamu na motema.’​—Tángá Yisaya 65:13, 14.

22 Ntango bankulutu, batata, mpe bamama bazali komikitisa liboso ya Yehova, bazalaka na bomoi ya kimya, mabota na bango ezalaka na esengo mingi, mpe lisangá mobimba ezalaka na bomoko. Oyo eleki ntina, basepelisaka motema ya Yehova. (Mas. 27:11) Yango nde litomba oyo eleki monene!

LOYEMBO 123 Tótosaka ebongiseli ya Teokrasi

^ par. 5 Lisolo oyo elobeli ntina oyo tosengeli komikitisa liboso ya Yehova. Elobeli mpe liteya oyo bankulutu bakoki kozwa epai ya Guvɛrnɛrɛ Nehemia, oyo batata bakoki kozwa epai ya Mokonzi Davidi, mpe oyo bamama bakoki kozwa epai ya Maria, mama ya Yesu.

^ par. 1 NDIMBOLA YA MALOBA: Bato mosusu basepelaka te soki bayebisi bango ete basengeli komikitisa liboso ya moto mosusu. Kasi, basaleli ya Yehova basepelaka kotosa ye na motema moko, mpe bamonaka ete komikitisa liboso na ye ezali malamu.

^ par. 7 Topesi bango bankombo mosusu.

^ par. 62 ELILINGI: Nkulutu moko azali kosala mosala na Ndako ya Bokonzi elongo na mwana na ye, kaka ndenge Nehemia ye moko mpe apesaki mabɔkɔ na kotonga lisusu bifelo ya Yerusaleme.

^ par. 64 ELILINGI: Tata moko azali kobondela Yehova elongo na libota na ye.

^ par. 66 ELILINGI: Mwana moko azali kobɛta masano ya video kasi asilisi misala ya ndako te mpe badevuare na ye. Mama na ye, oyo auti mosala mpe alɛmbi, apesi mwana yango disiplini kasi na boboto mpe alobeli ye mabe te.