Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 36

LOYEMBO 89 Yoká, tosá mpe pambwamá

“Bótosaka ntango nyonso liloba ya Nzambe”

“Bótosaka ntango nyonso liloba ya Nzambe”

“Bózala kaka te bayoki, kasi bótosaka ntango nyonso liloba ya Nzambe.”YAK. 1:22.

NA MOKUSE

Lisolo oyo ekosalisa biso tókolisa mposa ya kotánga Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo, ya kokanisa makambo oyo totángi mpe kosalela yango mpenza.

1-2. Mpo na nini basaleli ya Nzambe bazalaka na esengo? (Yakobo 1:​22-25)

 YEHOVA ná Mwana na ye Yesu balingi tózala na esengo. Mokomi ya Nzembo 119:2 alobaki: “Esengo na baoyo bazali kotosa makundoli na ye, oyo bazali kolukaluka ye na motema na bango mobimba.” Yesu mpe alobaki: “Esengo . . . na baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kotosa yango!”Luka 11:28.

2 Biso basaleli ya Yehova tozali bato ya esengo. Mpo na nini? Mpo na bantina mingi, kasi moko ya bantina yango ezali ete totángaka Biblia mokolo na mokolo mpe tosalaka nyonso mpo na kosalela makambo oyo toyekoli.—Tángá Yakobo 1:​22-25.

3. Matomba nini tozwaka soki tozali kosalela makambo oyo totángaka na Biblia?

3 Tokoki kozwa matomba mingi soki tozali ntango nyonso ‘kotosa liloba ya Nzambe.’ Na ndakisa, kotosa liloba ekosala ete Yehova asepela, mpe yango ekopesa biso esengo. (Mos. 12:13) Ntango tozali kosalela makambo oyo totángaka na Liloba ya Nzambe, tozalaka na esengo na libota, mpe tokómaka na boninga makasi na bandeko na biso bakristo. Na ntembe te yo moko omoná ete ezali solo. Longola yango, tomibatelaka na ebele ya mikakatano oyo ekómelaka bato oyo batosaka mibeko ya Yehova te. Kutu tondimaka maloba ya Mokonzi Davidi. Na loyembo moko, alobelaki mobeko, bitinda, mpe bikateli ya lisambisi ya Yehova, na nsima alobaki: “Kobatela yango ezali na litomba monene.”—Nz. 19:​7-11.

4. Mpo na nini ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te kotosa Liloba ya Nzambe?

4 Nzokande, ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te kotosa Liloba ya Nzambe. Lokola tozalaka na makambo mingi ya kosala, esɛngaka tótya ngonga mpo na kotánga mpe koyekola Biblia mpo tóyeba makambo oyo Yehova alingi tósala. Na yango, tótalela mwa makanisi oyo ekoki kosalisa biso tótángaka Biblia mokolo na mokolo. Tokotalela mpe nini ekosalisa biso tókanisaka makambo oyo totángi mpe tómona ndenge ya kosalela yango na bomoi na biso.

TYÁ NGONGA YA KOTÁNGA BIBLIA

5. Mikumba nini ezwaka biso ntango mingi?

5 Biso basaleli ya Yehova tozalaka na makambo ebele ya kosala. Tolekisaka ntango mingi mpo na kokokisa mikumba ndenge na ndenge oyo Biblia epesi biso. Na ndakisa, mingi na biso tosalaka mosala ya mosuni mpo na kokokisa bamposa na biso mpe ya libota na biso. (1 Tim. 5:8) Bandeko mingi basalisaka bato ya libota na bango oyo bazali kobɛla to oyo bakómi mibange. Mpe biso nyonso tosengeli kobatela kolɔngɔnɔ ya nzoto na biso, mpe yango ezwaka ntango. Longola mikumba wana, tozalaka mpe na makambo ya lisangá. Mokumba moko ya ntina ezali ya kosakola nsango malamu na molende. Na kotalela makambo nyonso oyo ozali na yango, ndenge nini okoki kozwa ntango mpo na kotánga Biblia mokolo na mokolo, komanyola makambo oyo otángi, mpe kosalela makambo yango?

6. Ndenge nini okoki kotya botángi ya Biblia na esika ya liboso? (Talá mpe elilingi.)

6 Mpo na biso bakristo, kotánga Biblia ezali moko ya “makambo oyo eleki ntina,” yango wana tosengeli kotya yango na esika ya liboso. (Flp. 1:10) Bavɛrsɛ ya liboso ya Nzembo elobi mpo na moto ya esengo ete: “Asepelaka na mobeko ya Yehova, mpe atángaka mobeko na ye na mongongo ya nse butu moi.” (Nz. 1:​1, 2) Yango emonisi polele ete ebongi kotya ngonga ya kotánga Biblia. Eleki malamu kotánga Biblia na ngonga nini? Mokomoko na biso azali na eyano na ye. Kasi na mokuse, ngonga eleki malamu ezali oyo ekosalisa yo otángaka Biblia mokolo na mokolo. Ndeko mobali moko na nkombo Victor alobi boye: “Nasepelaka kotánga Biblia na ntɔngɔ. Atako nalingaka kolamuka ntɔngɔntɔngɔ te, natángaka Biblia na ntɔngɔ mpo makanisi na ngai eyengayengaka mingi te. Makanisi ezalaka esika moko mpe natyaka likebi na makambo oyo nazali kotánga.” Ekoki kozala mpe bongo mpo na yo? Omituna boye: ‘Mpo na kotánga Biblia, ngonga nini eleki malamu mpo na ngai?’

Eleki malamu kotánga Biblia na ngonga nini? Na ngonga nini okoki kotángaka yango mokolo na mokolo? (Talá paragrafe 6)


MANYOLÁ MAKAMBO OYO OZALI KOTÁNGA

7-8. Nini ekoki kosala ete tózwa litomba mpenza te ya makambo oyo tozali kotánga. Pesá ndakisa.

7 Kasi mpo na koloba solo, mbala mingi totángaka makambo ebele kozanga ekɔta biso mpenza. Esilá kokómela yo otánga likambo moko mpe nsima ya mwa ntango moke kaka ozali koyeba lisusu mpenza te makambo oyo otángaki? Esilá kokómela biso nyonso. Likambo ya mawa, ekoki kosalema bongo na botángi na biso ya Biblia. Mbala mosusu tomityelá mokano ya kotánga mikapo ebele ya Biblia mokolo nyonso. Ezali likambo ya malamu. Tosengeli komityela mikano mpe kokangama na yango. (1 Ko. 9:26) Kotánga Biblia ezali likambo ya malamu, kasi ezali kaka ebandeli. Mpo botángi ya Liloba ya Nzambe esalisa biso mpenza, tosengeli kosala likambo mosusu.

8 Tózwa ndakisa oyo: Milona ezalaka na mposa ya mai, mbala mingi mai ya mbula, mpo ekola malamu. Kasi soki mbula esopani ebele na ntango mokuse, mabele ekokoka komɛla mai yango te. Soki esalemi bongo, mbula yango ekozala na litomba te mpo na milona. Mabele esengeli na ntango mpo na komɛla mai ya mbula mpo milona ekola malamu. Ndenge moko mpe, tosengeli te kotánga Biblia mbangumbangu, elingi koloba, kozanga kokanisa makambo oyo tozali kotánga mpe kosalela yango.—Yak. 1:24.

Esɛngaka ntango mpo mabele emɛla mai ya mbula; tosengeli mpe na ntango mpo na kokanisa mpe kosalela makambo oyo totángi na Biblia (Talá paragrafe 8)


9. Tosengeli kosala nini soki tokómá na momeseno ya kotánga Biblia kaka mbangumbangu?

9 Soki na bantango mosusu omonaka ete otángaka Biblia mbangumbangu, osengeli kosala nini? Tángáká malɛmbɛmalɛmbɛ. Salá makasi okanisaka makambo oyo ozali kotánga to oyo outi kotánga. Ezali likambo ya mindɔndɔ te. Soki omonaka ete komanyola ezali likambo ya mpasi, yebá ete komanyola elingi kaka koloba kokanisa malamumalamu makambo oyo otángi. Mbala mosusu okoki kobakisa mwa ntango na botángi na yo mpo osalela ndambo ya ntango yango mpo na kokanisa, to komanyola. To, okoki komona malamu otánga bavɛrsɛ mingi te mpo osalela ndambo ya ntango mpo na kokanisa makambo oyo otángi. Victor, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Botángi na ngai ya Biblia ezalaka molai te, mbala mosusu natángaka kaka mokapo moko. Lokola natángaka na ntɔngɔ, nakanisaka makambo yango mokolo mobimba.” Ata soki okosalela mayele nini, ezali na ntina otángaka na ndenge oyo ekosalisa yo ozwa litomba na makambo oyo otángi.—Nz. 119:97; talá etanda “ Mituna ya kotalela.”

10. Monisá ndenge oyo okoki kokanisa mpo na kosalela makambo oyo otángi. (1 Batesaloniki 5:​17, 18)

10 Ezala otángaka Biblia na ngonga nini mpe ntango boni olekisaka na kosala yango, salá makasi omona ndenge ya kosalela makambo oyo otángi. Wana ozali kotánga, okoki komituna boye: ‘Ndenge nini nakoki kosalela makambo yango sikoyo to na mikolo ekoya?’ Na ndakisa, kanisá ete eteni oyo ozali kotánga ezali na 1 Batesaloniki 5:​17, 18. (Tángá.) Nsima ya kotánga bavɛrsɛ yango mibale, okoki kotɛlɛma mpe kokanisa soki mbala boni obondelaka mpe soki mabondeli na yo ezalaka mpenza ya mozindo. Okoki mpe kokanisa makambo oyo okoki komonisa botɔndi mpo na yango. Mbala mosusu okosepela kopesa Yehova matɔndi mpo na makambo misato ya sikisiki. Ata soki ozwi kaka miniti moke mpo na kokanisa, ekosalisa yo okóma mwa moke moto oyo ayokaka mpe atosaka Liloba ya Nzambe. Kanisá sikoyo matomba oyo okozwa soki ozali kosala bongo mokolo na mokolo na biteni mosusu ya Biblia oyo otángi! Okokóma mpenza moto oyo atosaka ntango nyonso Liloba ya Nzambe. Bongo soki emonani ete ezali na makambo mingi oyo osengeli kobongisa, okosala nini?

ZALÁ NA BOPƆLƆ

11. Nini ekoki kolɛmbisa biso nzoto na bantango mosusu? Pesá ndakisa.

11 Ntango ozali kotánga Biblia mpe omoni ndenge oyo osengeli kosalela makambo yango, okoki kolɛmba nzoto. Kanisá ete ozali kotánga mokanda ya Yakobo: Lelo otángi toli oyo elobi ete esengeli te kozala na ezaleli ya kopona bilongi. (Yak. 2:​1-8) Omoni ete osengeli kobongisa ndenge na yo ya kosalela basusu makambo; na yango ozwi ekateli ya kobongola mwa makambo mosusu. Ezali likambo ya malamu! Lobi, otángi eteni oyo emonisi ntina ya kopekisa lolemo na yo. (Yak. 3:​1-12) Ntango okanisi, omoni ete na bantango mosusu maloba na yo ezalaka ya boboto te. Na yango, ozwi ekateli ya kolendisaka basusu na maloba na yo. Mokolo oyo elandi, otángi likebisi oyo elobi ete tosengeli te kokóma baninga ya mokili. (Yak. 4:​4-12) Omoni ete osengeli koponaka malamu kominanola na yo. Na mokolo ya minei, okoki komona ete makambo oyo osengeli kobongisa eleki ebele.

12. Mpo na nini osengeli kolɛmba nzoto te soki botángi na yo ya Biblia emonisi ete osengeli kosala bambongwana? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

12 Soki ozali na makambo ebele ya kobongola to ya kobongisa, kolɛmba nzoto te. Yango ezali komonisa ete motema na yo ezali malamu. Moto ya komikitisa mpe oyo azali sembo na motema na ye atángaka Biblia mpo na komona makambo oyo asengeli kobongisa. a Kobosana mpe te ete kolata “bomoto ya sika” ezali likambo ya mokolo moko te. (Kol. 3:10) Nini ekosalisa yo okoba kotosa ntango nyonso Liloba ya Nzambe?

13. Ndenge nini okoki komonisa bopɔlɔ? (Talá mpe elilingi.)

13 Osengeli te koluka kosalela na mbala moko makambo nyonso oyo otángi; zalá na bopɔlɔ na mikano oyo okomityela. (Mas. 11:2) Meká kosala boye: Komá makambo nyonso oyo osengeli kobongisa, mpe na nsima poná likambo moko to mibale oyo okosala liboso, mpe mosusu tiká okosala nsima. Osengeli kobanda na nini?

Koluka te kosalela na mbala moko makambo nyonso oyo otángi; zalá na bopɔlɔ! Salelá naino ata likambo moko to mibale (Talá paragrafe 13-14)


14. Okoki kobanda na mikano nini?

14 Okoki kobanda na likambo oyo omoni ete ezali mpasi te okokisa yango. To okoki kopona kosala mbongwana na likambo oyo omoni ete ezali na ntina mingi. Nsima ya komityela mokano, salá bolukiluki na mikanda na biso; okoki kosalela Index des publications des Témoins de Jéhovah to mpe Buku ya bolukiluki mpo na Batatoli ya Yehova. Bondelá mpo na mokano oyo omityeli, sɛngá Yehova apesa yo “mposa mpe nguya ya kosala” mpo okokisa yango. (Flp. 2:13) Na nsima, luká kosalela makambo oyo oyekolaki. Soki ozali kokokisa malamu mokano na yo ya liboso, na ntembe te okolinga kokokisa mokano mosusu. Kutu, soki obongisi likambo moko na bomoto na yo ya bokristo, to okolisi ezaleli moko, okoki komona ete ezali mpasi te obongisa mpe makambo mosusu.

TIKÁ LILOBA YA NZAMBE ‘ESALA MOSALA KATI NA YO’

15. Ndenge nini basaleli ya Yehova bakeseni na bato mingi oyo batángaka Biblia? (1 Batesaloniki 2:13)

15 Bato mosusu batángá Biblia mobimba mbala ebele. Kasi, bandimaka mpenza makambo oyo ezali na kati? Basalelaka yango to batikaka yango etambwisa bomoi na bango? Likambo ya mawa ezali ete mbala mingi esalaka bango eloko te. Bokeseni ezali makasi na biso basaleli ya Yehova! Ndenge moko na bakristo ya siɛklɛ ya liboso, tondimaka Biblia “ndenge yango ezali mpenza, lokola liloba ya Nzambe.” Longola yango, tosalaka makasi tómonisa ete esalaka mosala na bomoi na biso.—Tángá 1 Batesaloniki 2:13.

16. Nini ekoki kosalisa biso tótosaka ntango nyonso Liloba?

16 Ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te kotánga Liloba ya Nzambe mpe kosalela yango. Ekoki kozala mpasi tózwa ngonga ya kotánga. To tokoki kozala na momeseno ya kotánga kaka mbangumbangu mpe kokanisa mpenza te makambo oyo totángi. Mbala mosusu mpe tokoki komona ete tosengeli kobongisa makambo ebele mpe yango ekoki kolɛmbisa biso nzoto. Ata soki tozali na mokakatano nini na oyo etali kotánga Biblia, tokoki kolonga yango. Yehova akoki kosalisa biso. Tiká ete tózala na ekateli ya kondima lisalisi na ye mpe tózala te bayoki oyo babosanaka, kasi nde baoyo batosaka Liloba ntango nyonso. Kozanga ntembe, soki tozali kotánga Liloba ya Nzambe mingi mpe tozali kosalela yango na bomoi na biso, tokozala na esengo mingi.—Yak. 1:25.

LOYEMBO 94 Botɔndi mpo na Liloba ya Nzambe