Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 37

LOYEMBO 118 “Bakiselá biso kondima”

Mokanda oyo ekoki kosalisa biso tóyika mpiko tii na nsuka

Mokanda oyo ekoki kosalisa biso tóyika mpiko tii na nsuka

“Tokangami makasi tii na nsuka na makambo oyo totyelaki motema banda na ebandeli.”EBR. 3:14.

NA MOKUSE

Na mokanda ya Baebre, tokozwa mateya oyo ekosalisa biso tóyika mpiko na bosembo nyonso tii na nsuka ya mokili oyo.

1-2. (a) Makambo ezalaki ndenge nini na Yudea ntango ntoma Paulo akomaki mokanda epai ya Baebre? (b) Na ndenge nini mokanda yango oyo ekomamaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe eyaki na ntango oyo ebongi mpenza?

 BAKRISTO Baebre oyo bazalaki kofanda na Yerusaleme mpe na Yudea bakutanaki na mikakatano ebele na bambula oyo elandaki liwa ya Yesu na mobu 33 T.B. Ntango lisangá ya bokristo esalemaki, mwa moke na nsima bakristo bakutanaki na botɛmɛli makasi. (Mis. 8:1) Mpe mbula soki 20 nsima na yango, bakristo bakutanaki na mokakatano ya kozanga biloko ya kobikela, mbala mosusu mpo na nzala oyo ebɛtaki mokili yango mwa moke liboso. (Mis. 11:​27-30) Kasi, na mobu soki 61 T.B., bakristo bazalaki na eleko ya mwa kimya na kotalela makambo oyo ezalaki koya liboso. Na ntango wana, bazwaki mokanda oyo ntoma Paulo akomaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe, mpe emonanaki ete eyaki na ntango oyo ebongi mpenza.

2 Mokanda epai ya Baebre eyaki mpenza na ntango oyo ebongi mpo kimya oyo bakristo yango bazalaki na yango na ntango wana eumelaki te. Ezalaki na toli ya sikisiki oyo esalisaki bango báyika mpiko na makambo ya mpasi oyo bakutanaki na yango mwa moke na nsima. Kobebisama ya ebongiseli ya Bayuda, ndenge Yesu asakolaki, ezalaki koya. (Luka 21:20) Nzokande, ata Paulo to bakristo ya Yudea bayebaki te ntango mpenza oyo libebi yango ekoya. Atako bongo, bakristo yango bakokaki kosalela ntango oyo etikalaki mpo na komibongisa; kokómisa makasi bizaleli lokola kondima mpe koyika mpiko.—Ebr. 10:25; 12:​1, 2.

3. Mpo na nini bakristo lelo basengeli kotyela mokanda ya Baebre likebi mingi?

3 Mosika te, tokokutana na bolɔzi monene koleka oyo bakristo Baebre bakutanaki na yango. (Mat. 24:21; Em. 16:​14, 16) Na yango, tótalela mwa batoli ya sikisiki oyo Yehova apesaki bakristo yango, oyo ekoki kosalisa biso mpe.

“TÓSALA MAKASI TÓKÓMA BATO OYO BAKƆMƐLI”

4. Mikakatano nini Bayuda oyo bakómaki bakristo bazalaki na yango? (Talá mpe elilingi.)

4 Bayuda oyo bakómaki bakristo basengelaki kosala bambongwana minene, mpe yango ezalaki pɛtɛɛ te. Kala, Bayuda nde bazalaki ekólo oyo Yehova aponaki. Yerusaleme ezalaki efandelo ya Bokonzi ya Nzambe awa na mabele, mpe tempelo ezalaki esika monene ya losambo ya pɛto. Bayuda nyonso ya sembo bazalaki kolanda Mobeko ya Moize, ndenge bakonzi ya mangomba bazalaki kolimbwela bango yango. Batyaki mibeko na makambo etali biloko ya kolya, ndenge ya kotalela kokatama ngenga, mpe ata kozala elongo na bato ya bikólo mosusu. Kasi, nsima ya liwa ya Yesu, Yehova azalaki kondima lisusu bambeka ya Bayuda te. Yango ezalaki mokakatano mpo na Bayuda oyo bakómaki bakristo mpo bamesanaki kolanda Mobeko. (Ebr. 10:​1, 4, 10) Ata bakristo oyo bakɔmɛli na elimo, lokola ntoma Petro, bazalaki kobunda mpo na komesana na bambongwana yango mosusu. (Mis. 10:​9-14; Gal. 2:​11-14) Bayuda oyo bakómaki bakristo bakómaki kokutana na botɛmɛli ya bakonzi ya mangomba ya Bayuda.

Bakristo basengelaki kokangama makasi na solo, mpe kobwaka makanisi ya lokuta ya bakonzi ya mangomba ya Bayuda (Talá paragrafe 4-5)


5. Likambo nini bakristo basengelaki kokeba na yango?

5 Botɛmɛli ya bakristo Baebre ezalaki kouta na bisika mibale. Ya liboso, bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazalaki kotalela bakristo lokola bapɛngwi. Ya mibale, bato mosusu oyo bazalaki komibenga bakristo bazalaki kotya bayekoli ya Kristo mbamba ete básalaka mwa makambo mosusu oyo ezalaki na Mobeko ya Moize, mbala mosusu mpo na kokima monyoko. (Gal. 6:12) Bakristo ya sembo basengelaki kosala nini mpo bákangama na solo?

6. Paulo alendisaki bakristo básala nini? (Baebre 5:14–6:1)

6 Na mokanda na ye epai ya Baebre, Paulo alendisaki bakristo báyekolaka Liloba ya Nzambe na mozindo. (Tángá Baebre 5:14–6:1.) Paulo asalelaki Makomami ya Ebre mpo na komonisa bandeko ete losambo ya bakristo eleki losambo ya Bayuda. a Paulo ayebaki ete soki bakristo yango bakómi na boyebi mingi mpe bakangi ntina ya solo malamu mpenza, ekosalisa bango báyeba makanisi ya lokuta oyo ekoki kobungisa bango nzela mpe bábwaka yango.

7. Mikakatano nini tozali na yango lelo?

7 Ndenge moko na bakristo Baebre, lelo oyo toyokaka makambo mpe makanisi oyo eyokani te na mibeko ya sembo ya Yehova. Mbala mingi, banguna balobaka mabe mpo tondimaka makambo oyo Biblia elobi na oyo etali bizaleli ya pɛto, balobaka ete tozali makambo makasi mpe motema mabe. Makanisi ya bato ya mokili ezali se kokesana mingi mpenza na ndenge oyo Nzambe atalelaka makambo. (Mas. 17:15) Na yango, tosengeli kokolisa mpenza likoki na biso ya koyeba komona makanisi oyo batɛmɛli basalelaka mpo na kolɛmbisa biso nzoto to ata kobungisa biso nzela; soki toyebi makanisi yango, tosengeli kobwaka yango.—Ebr. 13:9.

8. Nini ekoki kosalisa biso tókóma bakristo oyo bakɔmɛli na elimo?

8 Ekozala malamu tótya likebi na toli oyo Paulo apesaki bakristo Baebre, ete básala makasi bákóma bato oyo bakɔmɛli na elimo. Yango elimboli kokóma na boyebi mozindo ya mateya ya solo mpe kondima ndenge oyo Yehova atalelaka makambo. Tosengeli kokoba kosala yango ata nsima ya komipesa mpe kozwa batisimo. Ata soki tosali bambula mingi na kati ya solo, biso nyonso tosengeli kotángaka mpe koyekola Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo. (Nz. 1:2) Kozala na programɛ malamu ya koyekola biso moko ekosalisa biso tókómisa makasi ezaleli oyo Paulo alobelaki mingi na mokanda na ye epai ya Baebre: kondima.—Ebr. 11:​1, 6.

TÓZALA “NA KONDIMA MPO NA KOBATELA BOMOI NA BISO”

9. Mpo na nini bakristo Baebre basengelaki kozala na kondima makasi?

9 Esɛngaki bakristo Baebre bázala na kondima makasi mpo bábika na bolɔzi oyo ezalaki koya na Yudea. (Ebr. 10:​37-39) Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete ntango bakomona mampinga ya basoda ezingi Yerusaleme, basengeli kokima na bangomba. Toli ya Yesu etalaki bakristo nyonso, ezala baoyo bafandaki na kati ya engumba to na bamboka ya pembenipembeni. (Luka 21:​20-24) Na ntango wana, soki banguna bayei kobundisa mboka, bato bazalaki kokima na kati ya engumba oyo ezalaki na bifelo lokola Yerusaleme mpo bábatelama. Kokima na bangomba emonanaki ete ezali likambo oyo ebongi te mpe esɛngaki kozala na kondima monene mpo na kosala yango.

10. Kozala na kondima makasi elingaki kosalisa bakristo básala nini? (Baebre 13:17)

10 Bakristo Baebre basengelaki mpe kolanda litambwisi ya bandeko oyo Yesu azalaki kosalela mpo na kokamba lisangá. Ekoki kozala ete bandeko yango bapesaki malako ya sikisiki mpo na kosalisa moto nyonso na lisangá alanda etinda ya Yesu na ntango oyo ebongi mpe asala yango na molɔngɔ. (Tángá Baebre 13:17.) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami “bótosaka” na Baebre 13:17 epesaka likanisi ya moto oyo andimi kotosa mpo azali kotyela moto oyo apesi litambwisi motema. Yango esuki kaka te na kotosa moto yango mpo azali na bokonzi ya kopesa litambwisi. Na yango, bakristo Baebre basengelaki koyekola kotyela baoyo bazalaki kokamba motema liboso bolɔzi eya. Soki na ntango ya kimya bakristo yango bazali kotosa malako ya baoyo bazali kokamba, ekozala mpasi te básala mpe bongo na ntango ya likama.

11. Mpo na nini ezali na ntina bakristo bázala na kondima makasi lelo oyo?

11 Lelo oyo mpe, tosengeli kozala na kondima lokola bakristo oyo bazwaki mokanda ya Paulo na siɛklɛ ya liboso. Tozali kobika na eloko oyo bato mingi bazali koboya, ata mpe kotyola, likebisi ya Biblia oyo elobeli nsuka ya mokili oyo. (2 Pe. 3:​3, 4) Lisusu, atako Biblia elobeli mwa makambo oyo ekosalema na ntango ya bolɔzi monene, ezali na makambo mingi oyo toyebi te. Tosengeli kozala na kondima makasi ete nsuka ya mokili oyo ekoya mpenza na ntango oyo Yehova atyá mpe ete akobatela biso.—Hab. 2:3.

12. Nini ekosalisa biso tóbika na bolɔzi monene?

12 Tosengeli mpe kozala na kondima makasi na nzela oyo Yehova azali kosalela mpo na kotambwisa biso lelo, “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45) Ntango bolɔzi monene ekobanda, mbala mosusu tokozwa malako ya sikisiki mpo na lobiko na biso, ndenge ezalaki mbala mosusu mpo na bakristo Baebre ntango basoda ya Roma bayaki. Sikoyo nde ntango ya koyekola kotyela baoyo bazali kobamba ebongiseli ya Yehova motema mingi mpe ya kolanda malako oyo bapesaka. Tókanisa te ete tokolanda litambwisi na bango malamu na ntango ya bolɔzi monene soki sikoyo tokakatanaka mpo na kolanda yango.

13. Mpo na nini toli oyo ezali na Baebre 13:5 ebongaki mpenza?

13 Wana bakristo Baebre bazalaki kozela elembo oyo ekosalisa bango bákima, basengelaki mpe kozala na bomoi ezangi mindɔndɔ, koboya “bolingo ya mbongo.” (Tángá Baebre 13:5.) Basusu kati na bango bazalaki liboso kokufa nzala mpe bazalaki babola. (Ebr. 10:​32-34) Atako na ntango wana bandimaki koyika mpiko mpo nsango malamu ekende liboso, ekoki kozala ete basusu bakómaki sikoyo komona ete bomɛngo ekobatela bango. Kasi, ata mbongo ebele ndenge nini ekokaki te kobatela bango na libebi oyo ezalaki koya. (Yak. 5:3) Kutu, moto nyonso oyo alingaki biloko ya mosuni akokaki komona ete ezali mpasi mingi kokima mpe kotika ndako ná bozwi na ye.

14. Ndenge nini kozala na kondima makasi ekoki kosalisa biso na bikateli oyo tozali kozwa mpo na biloko ya mosuni?

14 Tokozwa makasi ya koboya bolingo ya biloko ya mokili soki tozali mpenza na kondima ete nsuka ya mokili oyo ekómi pene. Kutu, bato “bakobwaka palata na bango na babalabala,” mpo bakomona ete “ezala palata na bango to wolo na bango ekokoka te kobikisa bango na mokolo ya nkanda makasi ya Yehova.” (Ezk. 7:19) Na esika tótya makanisi nyonso na koluka mbongo ebele, tosengeli kozwa bikateli oyo ekosalisa biso tózala na bomoi ezangi mindɔndɔ, kasi oyo ezali mpe na bokatikati. Yango elimboli mpe kotɛmɛla komekama ya kokɔta banyongo ezangi ntina to koboma nzoto mpo na kobatela ebele ya biloko oyo tozali na yango. Tokokeba mpe ete tókangama koleka ndelo te na biloko na biso ya mosuni. (Mat. 6:​19, 24) Kondima na biso ekoki komekama na oyo etali biloko ya mosuni mpe makambo mosusu wana tozali kozela ete nsuka ya mokili oyo eya.

“BOSENGELI KOZALA NA EZALELI YA KOYIKA MPIKO”

15. Mpo na nini bakristo Baebre basengelaki mpenza na ezaleli ya koyika mpiko?

15 Bakristo Baebre basengelaki koyika mpiko na makambo oyo ezalaki komeka kondima na bango wana makambo ezalaki se kobeba na Yudea. (Ebr. 10:36) Atako bakristo yango mosusu basilaki kokutana na monyoko ya makasi, mingi bandimaki solo na eleko oyo mwa kimya ezalaki. Paulo amonisaki ete atako bayikaki mpiko na makambo oyo emekaki kondima na bango, banyokwamaki naino te lokola Yesu, elingi koloba, tii na liwa. (Ebr. 12:4) Kasi, Bayuda oyo bazalaki batɛmɛli bazalaki se kokóma na nkanda mpe mobulu mingi mpo bato mingi bazalaki kokóma bakristo. Bambula moke kaka liboso, mobulu ebimaki ntango Paulo ayaki kosakola na Yerusaleme. Bayuda koleka 40 “balapaki ndai ete mabe ekómela bango soki balei mpe bamɛli liboso ete báboma Paulo.” (Mis. 22:22; 23:​12-14) Atako makambo ya mobulu mpe koyina wana, bakristo yango basengelaki kokoba koyangana mpo na kosambela elongo, kosakola nsango malamu, mpe kobatela kondima na bango makasi.

16. Ndenge nini mokanda epai ya Baebre ekoki kosalisa biso tótalela monyoko na ndenge oyo ebongi? (Baebre 12:7)

16 Nini elingaki kosalisa bakristo Baebre báyika mpiko na botɛmɛli? Paulo ayebaki ete basengelaki kotalela mikakatano na bango na ndenge oyo ebongi. Yango wana ayebisaki bango ete ntango bakristo bakutani na komekama, Nzambe akoki kosalela yango mpo na kopesa bango formasyo. (Tángá Baebre 12:7.) Formasyo yango ekoki kosalisa moto alona mpe amonisa lisusu mingi bizaleli ya ntina mingi mpo na mokristo. Soki bakristo yango batye makanisi na mbuma malamu oyo komekama ekobimisa, ekozala mpasi te mpo báyika mpiko.—Ebr. 12:11.

17. Paulo ayebaki nini na oyo etali koyika mpiko na monyoko?

17 Paulo alendisaki bakristo Baebre bákoba ntango nyonso koyikela mikakatano mpiko. Paulo ayebaki makambo oyo azalaki koloba. Lokola ye moko azalaki kala konyokola bakristo, ayebaki ndenge epesaki bango mpasi. Ayebaki mpe ndenge ya koyikela monyoko mpiko. Ye moko akutanaki na monyoko ya ndenge na ndenge nsima ya kokóma mokristo. (2 Ko. 11:​23-25) Na yango, Paulo ayebaki malamu makambo oyo esengeli kosala mpo na koyika mpiko. Akundwelaki bakristo yango ete ntango bazali koyika mpiko, basengeli te komityela motema; basengeli nde kotyela Yehova motema. Yango wana Paulo alobaki na mpiko ete: “Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te.”—Ebr. 13:6.

18. Nini ekoki kosalisa biso tóyika mpiko na mikolo ezali koya?

18 Ndenge tozali koloba boye, bandeko mosusu bazali koyika mpiko na monyoko. Tokoki kobondela ntango nyonso mpo na bango, mpe na bantango mosusu kopesa bango lisungi ya sikisiki. (Ebr. 10:33) Kasi, Biblia elobi polele ete “baoyo nyonso balandaka Yesu mpe balingi kosalela Nzambe na bosembo nyonso bango mpe bakonyokwama.” (2 Tim. 3:12) Yango wana, biso nyonso tosengeli komibongisa mpo na makambo oyo ezali koya liboso. Tókoba kotyela Yehova motema mobimba, tózala na elikya ete akosalisa biso tóyika mpiko na komekama nyonso oyo ekoki koyela biso. Na ntango oyo atyá, akosikola basaleli na ye nyonso ya sembo.—2 Tes. 1:​7, 8.

19. Tokoki kosala nini mpo tómibongisa mpo na bolɔzi monene? (Talá mpe elilingi.)

19 Na ntembe te, mokanda ya Paulo epai ya Baebre esalisaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso bámibongisa mpo na bolɔzi oyo ezalaki koya. Paulo asɛngaki bandeko bákolisa boyebi mpe bákanga malamu ntina ya Makomami. Yango elingaki kosalisa bango báyeba mateya oyo ekokaki kobebisa kondima na bango mpe bábwaka yango. Alendisaki bango bákómisa kondima na bango makasi mpo bálanda mbala moko litambwisi ya Yesu mpe ya baoyo bazalaki kokamba lisangá. Asalisaki mpe bakristo yango bákolisa ezaleli ya koyika mpiko; bátalela mikakatano na ndenge oyo ebongi mpe bámona ete ezali libaku oyo Tata na bango ya bolingo akoki kosalela mpo na kopesa bango formasyo. Tiká ete biso mpe tósalela toli yango oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Soki tosali bongo, tokokoka koyika mpiko na bosembo tii na nsuka.—Ebr. 3:14.

Bakristo ya sembo bazwaki mbano mpo bayikaki mpiko. Nsima ya kokima Yudea, bakobaki kosala makita. Yango ezali koteya biso nini? (Talá paragrafe 19)

LOYEMBO 126 Kɛngɛláká, tɛlɛmá ngwi, zalá makasi

a Kaka na mokapo ya liboso, Paulo atángi ata mikapo nsambo ya Makomami ya Ebre mpo na komonisa ete losambo ya bakristo eleki ya Bayuda.—Ebr. 1:​5-13.