Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 38

LOYEMBO 25 Eloko ya Nzambe ye moko

Ozali koyoka mpenza makebisi?

Ozali koyoka mpenza makebisi?

“Moko akozwama mpe mosusu akosundolama.”MAT. 24:40.

NA MOKUSE

Tokotalela ndakisa misato oyo Yesu apesaki mpe tokomona ndenge oyo eyokani na ntango ya kosambisama oyo ekosalema na nsuka ya mokili oyo.

1. Yesu akosala nini mosika te?

 MAKAMBO minene ekosalema na ntango oyo tozali! Mosika te, Yesu akosambisa moto nyonso oyo azali na bomoi awa na mabele. Yesu alobelaki eleko oyo ekomema na lisambisi yango ntango apesaki bayekoli na ye “elembo” ya esakweli oyo ekomonisa kozala na ye mpe “eleko ya nsuka ya mokili.” (Mat. 24:3) Esakweli yango ezali na Matai mokapo 24 mpe 25, na Marko mokapo 13 mpe Luka mokapo 21.

2. Tokolobela nini na lisolo oyo, mpe mpo na nini yango ekosalisa biso?

2 Yesu apesaki makebisi ya polele na nzela ya bandakisa misato oyo tokolobela. Ezali ndakisa ya bampate ná bantaba, ya bangɔndɔ ya mayele mpe ya zoba, mpe ndakisa ya batalanta. Ndakisa mokomoko ekosalisa biso tóyeba ete Yesu akosambisa moto na moto na kolanda misala na ye. Na bandakisa yango, tokozwa mateya mpe tokomona ndenge ya kosalela yango. Tólobela liboso ndakisa ya bampate ná bantaba.

NDAKISA YA BAMPATE NÁ BANTABA

3. Ntango nini Yesu akosambisa bato?

3 Na ndakisa ya bampate ná bantaba, Yesu alobelaki lisambisi ya bato oyo bazwi libaku ya kondima nsango malamu mpe ya kopesa bandeko na ye oyo batyami mafuta mabɔkɔ. (Mat. 25:​31-46) Na ntango ya ‘bolɔzi monene,’ akosambisa bato mwa moke liboso Armagedone ebanda. (Mat. 24:21) Ndenge kaka mobateli ya mpate akabolaka bampate na bantaba, Yesu akokabola baoyo bapesaki bakristo oyo batyami mafuta mabɔkɔ na baoyo basalaki yango te.

4. Na kotalela Yisaya 11:​3, 4, mpo na nini tokoki kotya motema ete Yesu akosambisa bato na bosembo? (Talá mpe ezipeli.)

4 Biblia emonisi ete Yesu, Mosambisi oyo Yehova atyá, akosambisa na bosembo. (Tángá Yisaya 11:​3, 4.) Atalaka bizaleli, makanisi, mpe maloba oyo bato balobaka, ata mpe ndenge oyo basalelaka bakristo oyo batyami mafuta makambo. (Mat. 12:​36, 37; 25:40) Yesu akoyeba banani basungaki bandeko na ye oyo batyami mafuta mpe bapesaki bango mabɔkɔ na mosala na bango. a Lolenge moko ya libosoliboso oyo bato oyo bazali lokola bampate bapesaka bandeko ya Kristo mabɔkɔ ezali ya kosalisa bango na mosala ya kosakola. Baoyo basalaka bongo bakotalelama lokola “bato ya sembo” mpe bakozwa likoki ya kozala na “bomoi ya seko” na mabele. (Mat. 25:46; Em. 7:​16, 17) Ekozala mbano monene mpenza mpo na baoyo babatelaka bosembo na bango! Soki batikali sembo na ntango ya bolɔzi monene mpe nsima na yango, nkombo na bango ekotikala na “buku ya bomoi.”—Em. 20:15.

Na mikolo ezali koya, Yesu akosambisa bato mpo na kotala banani bazali lokola bampate to lokola bantaba (Talá paragrafe 4)


5. Liteya nini ezali na ndakisa ya bampate ná bantaba, mpe banani basengeli kotyela yango likebi?

5 Monisá ete ozali sembo. Ndakisa ya bampate ná bantaba etaleli mingimingi baoyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele. Bamonisaka kondima na bango kaka te ndenge bapesaka bandeko ya Yesu mabɔkɔ na mosala ya kosakola, kasi mpe na ndenge bandimaka na bosembo nyonso litambwisi ya etuluku moke ya bandeko mibali oyo batyami mafuta na elimo oyo Yesu atyá mpo na kotambwisa biso. (Mat. 24:45) Kasi ata baoyo bazali na elikya ya bomoi na likoló basengeli koyoka nsango ya likebisi oyo ezali na ndakisa ya bampate ná bantaba. Mpo na nini? Mpo Yesu atalaka mpe bizaleli na bango, makanisi na bango, mpe maloba na bango. Bango mpe basengeli kozala sembo. Kutu, Yesu apesaki bandakisa mosusu mibale oyo ezali na makebisi mingimingi mpo na bakristo oyo batyami mafuta. Bandakisa yango ezali mpe na Matai mokapo 25. Tólobela sikoyo ndakisa ya bangɔndɔ ya mayele mpe ya zoba.

NDAKISA YA BANGƆNDƆ YA MAYELE MPE YA ZOBA

6. Ndenge nini bangɔndɔ mitano bamonisaki ete bazali mayele? (Matai 25:​6-10)

6 Na ndakisa ya bangɔndɔ, Yesu alobelaki bangɔndɔ zomi oyo babimaki mpo na kokutana na mobali ya libala. (Mat. 25:​1-4) Bango nyonso bazalaki kolikya kokende elongo na mobali ya libala na fɛti na ye ya libala. Yesu abengaki bangɔndɔ mitano “mayele” mpe mitano “bazoba.” Bangɔndɔ ya mayele bamibongisaki mpe bazalaki ekɛngɛ. Bamibongisaki mpo na kozela mobali ya libala tii ntango akoya, ata soki akokóma na butu. Na yango, bamemaki miinda oyo batyaki mafuta mpo epesa bango pole na molili. Bazwaki kutu mafuta mosusu mpo esalisa soki mobali ya libala aumeli. Na yango bamibongisaki mpo miinda na bango ekoba kopela. (Tángá Matai 25:​6-10.) Ntango mobali ya libala akómaki, bangɔndɔ ya mayele bakɔtaki na ye elongo na fɛti ya libala. Ndenge moko mpe, bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bamibongisi na ndenge bazali ntango nyonso ekɛngɛ mpe sembo tii ntango Kristo akoya, bakotalelama ete babongi kozala elongo na Mobali ya libala, Yesu, na Bokonzi na ye ya likoló. b (Em. 7:​1-3) Bongo bangɔndɔ ya zoba basalaki nini?

7. Nini ekómelaki bangɔndɔ mitano ya zoba, mpe mpo na nini?

7 Na bokeseni na bangɔndɔ ya mayele, bangɔndɔ mitano ya zoba bazalaki pene te ya koyamba mobali ya libala ntango akómaki. Miinda na bango elingaki kokufa, mpe bamemaki mafuta te. Ntango bayokaki ete mobali ya libala alingi akóma, bakendaki kosomba mafuta. Ntango mobali ya libala ayaki, bango bazongaki naino te. Na ntango yango, “bangɔndɔ oyo bamibongisaki bakɔtaki na ye na fɛti ya libala, mpe porte ekangamaki.” (Mat. 25:10) Na nsima ntango bangɔndɔ ya zoba bayaki mpe balingaki kokɔta, mobali ya libala alobaki na bango: “Nayebi bino te.” (Mat. 25:​11, 12) Bangɔndɔ yango bamibongisaki te mpo na kozela mobali ya libala ata soki aumeli. Liteya ezali nini mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo?

8-9. Liteya nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakoki kozwa na ndakisa ya bangɔndɔ? (Talá mpe elilingi.)

8 Monisá ete omibongisi mpe ozali ekɛngɛ. Na ndakisa yango, Yesu alingaki koloba te ete ezali na bituluku mibale ya bakristo oyo batyami mafuta: ete moko emibongisaki mpo na kozela tii na nsuka ya mokili mpe ete mosusu emibongisaki te. Kasi, alingaki nde komonisa likambo oyo ekokómela bakristo oyo batyami mafuta na elimo soki bamibongisi te mpo na koyika mpiko na bosembo tii na nsuka. Soki esalemi bongo, bakozwa mbano na bango te. (Yoa. 14:​3, 4) Ezali likambo moke te! Ezala tozali na elikya ya bomoi na likoló to na mabele, biso nyonso tosengeli koyoka mpenza likebisi oyo ezali na ndakisa ya bangɔndɔ. Mokomoko na biso asengeli kokoba kosɛnzɛla mpe komibongisa, kozala pene ya koyika mpiko tii na nsuka.—Mat. 24:13.

9 Nsima ya kolobela ndakisa ya bangɔndɔ mpo na komonisa ntina ya komibongisa mpe kozala ekɛngɛ, Yesu alobelaki ndakisa ya talanta. Ndakisa yango emonisi ntina ya kozala makasi na mosala.

Mokomoko na biso asengeli koyoka mpenza likebisi oyo ezali na ndakisa ya bangɔndɔ, asengeli komibongisa mpe kozala ekɛngɛ, kozala pene ya koyika mpiko tii na nsuka (Talá paragrafe 8-9)


NDAKISA YA BATALANTA

10. Ndenge nini baombo mibale bamonisaki ete bazali sembo? (Mat. 25:​19-23)

10 Na ndakisa ya batalanta, Yesu alobelaki baombo mibale oyo bazalaki sembo epai ya nkolo na bango, mpe moombo moko oyo azalaki sembo te. (Mat. 25:​14-18) Baombo mibale bamonisaki bosembo na ndenge basalaki mosala makasi mpo na kobakisa bomɛngo ya nkolo na bango. Liboso nkolo na bango akende mobembo, apesaki bango batalanta, oyo ezali mbongo ebele mpenza. Baombo mibale ya sembo basalaki mosala makasi mpe basalelaki mbongo na bwanya. Ebimisaki mbuma nini? Ntango nkolo azongaki, motángo ya mbongo oyo nkolo apesaki bango ebakisamaki mbala mibale. Nkolo apesaki bango longonya, bakendaki “kosepela elongo na nkolo na [bango].” (Tángá Matai 25:​19-23.) Bongo moombo ya misato? Asalaki nini na mbongo oyo nkolo apesaki ye?

11. Nini ekómelaki moombo oyo azalaki “gɔigɔi,” mpe mpo na nini?

11 Moombo ya misato azwaki talanta moko kasi azalaki “gɔigɔi.” Nkolo alingaki ete asalela talanta na ye mpo ebimisa mbongo mosusu. Kasi, akundaki yango na mabele. Ntango nkolo azongaki, moombo yango abimisaki benefisi te. Moombo yango azalaki na ezaleli malamu te. Na esika asɛnga bolimbisi ndenge amatisaki te bomɛngo ya nkolo na ye, moombo yango alobaki ete nkolo azali “moto ya matata.” Nkolo asepelaki na moombo yango te. Kutu, azwaki talanta na ye mpe abwakaki ye libándá.—Mat. 25:​24, 26-30.

12. Baombo mibale ya sembo bazali komonisa banani lelo?

12 Baombo mibale ya sembo bazali komonisa bakristo ya sembo oyo batyami mafuta na elimo. Nkolo, elingi koloba Yesu, abengi bango ‘báya kosepela elongo na nkolo na bango.’ Bazwaka mbano na bango ya bomoi na likoló, lisekwa ya liboso. (Mat. 25:​21, 23; Em. 20:5b) Nzokande, ndakisa mabe ya moombo ya gɔigɔi ezali likebisi mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Na ndenge nini?

13-14. Liteya nini bakristo oyo batyami mafuta bakoki kozwa na ndakisa ya batalanta? (Talá mpe elilingi.)

13 Monisá ete ozali makasi na mosala mpe na molende. Ndenge moko na ndakisa ya bangɔndɔ, na ndakisa ya batalanta, Yesu alingaki koloba te ete bakristo oyo batyami mafuta bakokóma gɔigɔi. Kasi, azalaki nde komonisa likambo oyo ekosalema soki babungisi molende na bango. Soki molende na bango esili, bakolonga te kobatela ‘kobengama na bango mpe koponama na bango,’ mpe bakozwa ndingisa te ya kokɔta na Bokonzi ya likoló.—2 Pe. 1:10.

14 Ndakisa ya bangɔndɔ mpe ya batalanta ezali komonisa polele ete bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo basengeli komibongisa mpe kozala ekɛngɛ mpe kozala makasi na mosala mpe na molende. Kasi, Yesu alobaki nde likambo mosusu oyo ezali likebisi mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo? Ɛɛ! Maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 24:​40, 41 ezali mpe na boyokani na lisambisi ya nsuka ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo.

Yesu asepelaka ntango bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali makasi na mosala mpe na molende (Talá paragrafe 13-14) d


BANANI ‘BAKOZWAMA’?

15-16. Ndenge nini Matai 24:​40, 41 emonisi ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo basengeli kosɛnzɛla?

15 Liboso Yesu apesa ndakisa misato oyo tolobeli, alobelaki lisambisi ya nsuka ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo ekomonisa banani bandimami. Alobelaki mibali mibale oyo bazalaki kosala na elanga mpe basi mibale oyo bazalaki konika na enikelo ya mabɔkɔ. Emonanaki ete bango nyonso mibale bazali kosala mosala moko, kasi Yesu alobaki ete moko “akozwama mpe mosusu akosundolama.” (Tángá Matai 24:​40, 41.) Na nsima ayebisaki bayekoli na ye: “Bókoba kosɛnzɛla mpo boyebi te mokolo nini Nkolo na bino akoya.” (Mat. 24:42) Yesu alobaki mpe bongo nsima ya kopesa ndakisa ya bangɔndɔ. (Mat. 25:13) Makambo yango mibale ezali na boyokani? Emonani bongo. Kaka bakristo ya solosolo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazali sembo nde ‘bakozwama,’ bakoyambama epai ya Yesu na Bokonzi ya likoló.—Yoa. 14:3.

16 Monisá ete ozali kosɛnzɛla. Mokristo nyonso oyo atyami mafuta na elimo, oyo akobi te kosɛnzɛla na elimo akoyanganisama te elongo na “bato oyo ye aponá.” (Mat. 24:31) Tokoki koloba ete, basaleli nyonso ya Nzambe, bázala na elikya ya bomoi na likoló to na mabele, basengeli komona ete maloba ya Yesu ezali likebisi oyo esɛngi bango bákoba kosɛnzɛla mpe kotikala sembo.

17. Mpo na nini tosengeli komitungisa te mpo na ntango oyo Yehova aponi kotya bakristo mosusu mafuta na elimo santu na ye?

17 Lokola toyebi Yehova malamu, tondimaka ete lisambisi na ye ezalaka sembo. Tomitungisaka te soki Yehova atye bakristo mosusu mafuta na mikolo na biso. c Tomikundwelaka makambo oyo Yesu alobaki mpo na basali oyo babandaki mosala na ngonga ya mitano nsima ya midi na ndakisa na ye ya elanga ya mbuma ya vinyo. (Mat. 20:​1-16) Baoyo babandaki mosala na mpokwa bazwaki lifuti ndenge moko na baoyo babandaki na ntɔngɔ. Ndenge moko mpe, ata soki bakristo batyami mafuta na elimo na eleko nini, bakozwa mbano na bango na likoló soki batikali sembo.

KOBÁ KOYOKA MAKEBISI

18-19. Mateya mpe makebisi nini tozwi na lisolo oyo?

18 Makambo nini toyekoli? Mpo na baoyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele, ndakisa ya bampate ná bantaba emonisi ntina ya kokoba kozala sembo epai ya Yehova, sikoyo mpe na ntango ya bolɔzi monene oyo ezali koya. Na bolɔzi monene na mikolo ekoya, Yesu akotalela bato ya sembo ete babongi kozwa “bomoi ya seko.”—Mat. 25:46.

19 Tolobeli mpe bandakisa mibale oyo ezali makebisi mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Na ndakisa ya bangɔndɔ ya mayele mpe ya zoba, bangɔndɔ mitano bazalaki na bwanya. Bamibongisaki mpe bazalaki ekɛngɛ, bazalaki pene mpo na kozela mobali ya libala tii ntango nyonso oyo akoya. Kasi, bangɔndɔ ya zoba bamibongisaki te. Na yango, mobali ya libala aboyaki bákɔta na fɛti na ye ya libala. Biso mpe tosengeli komibongisa mpo na kozela Yesu tii ntango akoya kobebisa mokili oyo. Lisusu, na ndakisa ya batalanta, totaleli baombo mibali ya sembo oyo bazalaki makasi na mosala mpe na molende. Basalaki mosala makasi mpo na bolamu ya nkolo na bango mpe nkolo na bango andimaki bango. Kasi, nkolo aboyaki moombo ya gɔigɔi. Liteya nini tozwi? Tosengeli kokoba komipesa mobimba na mosala ya Yehova tii na nsuka. Na nsima, totalelaki ndenge bakristo oyo batyami mafuta na elimo basengeli kokoba kosɛnzɛla mpo ‘bázwama’ epai ya Yesu mpo na mbano na bango na likoló. Bazali kozela mpenza ntango oyo ‘bakoyanganisama elongo’ na Yesu na likoló. Nsima ya etumba ya Armagedone, bakozala mwasi ya Yesu na libala ya Mwana-Mpate.—2 Tes. 2:1; Em. 19:9.

20. Yehova akosala nini mpo na baoyo bayokaka mpenza makebisi na ye?

20 Ata soki lisambisi ekómi pene mpenza, tozali na ntina ya kobanga te. Soki totikali sembo, Tata na biso ya bolingo akopesa biso “nguya oyo eleki makasi” mpo ‘tókoka kotɛlɛma liboso ya Mwana ya moto.’ (2 Ko. 4:7; Luka 21:36) Tózala na elikya ya bomoi na likoló to na mabele, tokosepelisa Tata na biso soki toyoki makebisi oyo ezali na bandakisa ya Yesu. Na boboto monene ya Yehova, nkombo na biso ‘ekokomama na buku’ ya bomoi.—Dan. 12:1; Em. 3:5.

LOYEMBO 26 Bosalelaki nde ngai

a Talá lisolo “Toyebi nini mpo na lisambisi ya Yehova na mikolo ezali koya?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 05/2024.

b Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo “Okokoba ‘kosɛnzɛla’?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/03/2015.

[Maloba na nse ya lokasa]

d NDIMBOLA YA BILILINGI Ezipeli: Na mikolo ezali koya, Yesu akosambisa bato mpo na kotala banani bazali lokola bampate to lokola bantaba. Ndeko mwasi moko oyo azali mokristo oyo atyami mafuta azali koyekola Biblia na elenge mwasi moko.