LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Octobre 2016

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli mpo na 28/11 tii 25/12/2016.

LISOLO YA BOMOI

Nasalaki makasi nalanda bandakisa ya malamu

Kolendisama na bakristo oyo bakomeli ekoki kosalisa basusu bázwa ndakisa mpe bákokisa mikano na bango. Thomas McLain azali kolobela ndenge basusu bazalaki bandakisa malamu mpo na ye, mpe ndenge oyo asalaki makasi azala ndakisa malamu mpo na kosalisa basusu.

“Bóbosana te ezaleli ya koyamba bapaya”

Ndenge nini Nzambe atalelaka bapaya? Okoki kosala nini mpo osalisa baoyo bauti na mboka mopaya bamiyoka malamu na lisangá?

Kobá kozala makasi na elimo ntango okei na lisangá ya monɔkɔ ya bapaya

Kobatela elimo na yo mpe ya libota na yo esengeli kozala likambo ya liboso mpo na bakristo nyonso. Kutu, soki ozali kosakola na teritware ya bapaya, okutanaka na mikakatano.

Ozali ‘kobatela bwanya’?

Nini ezali kokesenisa bwanya na boyebi mpe mayele? Koyeba bokeseni ekoki kopesa mpenza matomba.

Kómisá kondima na yo makasi na biloko oyo ozali kolikya kozwa

Tokoki kozwa mateya na bandakisa ya kondima, ya ntango ya kala mpe ya mikolo na biso. Ndenge nini okoki kobatela kondima na yo makasi?

Monisá kondima na bilaka ya Yehova

Kondima elimboli mpenza nini? Mpe, likambo eleki ntina, ndenge nini okoki komonisa yango?

Oyebaki yango?

Bonsomi nini Roma epesaki bakonzi ya Bayuda na Yudea na siɛklɛ ya liboso? Mpe na ntango ya kala, ekokaki kosalema ete moto moko alona matiti mabe na elanga ya moto mosusu?