Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 43

Kangamá kaka na Yehova

Kangamá kaka na Yehova

“Yehova azali Nzambe oyo asɛngaka kokangama kaka na ye.”​—NAH. 1:2.

LOYEMBO 51 Tomipesi na Nzambe!

NA MOKUSE *

1. Mpo na nini Yehova abongi tókangama kaka na ye?

YEHOVA abongi tókangama kaka na ye mpo azali Mozalisi na biso mpe Mopesi-bomoi. (Em. 4:11) Kasi, likama moko ezali. Atako tolingaka Yehova mpe tomemyaka ye, makambo mosusu ya bomoi ekoki kopekisa biso tókangama kaka na ye ndenge esengeli. Tosengeli koyeba ndenge likambo ya bongo ekoki kosalema. Kasi, tótalela naino soki kokangama kaka na Yehova elimboli mpenza nini.

2. Na kotalela Kobima 20:5, tokosala nini soki tokangami kaka na Yehova?

2 Ndenge Biblia emonisi yango, kokangama na Nzambe epesaka likanisi ya kolinga ye makasi. Soki tokangami kaka na Yehova, tokosambela kaka ye. Tokotika moto to eloko moko te ezwa esika na ye na motema na biso.​—Tángá Kobima 20:5.

3. Mpo na nini tolobi ete tokangami na Yehova kaka ngulungulu te?

3 Tokangami na Yehova kaka ngulungulu te. Mpo na nini tolobi bongo? Mpo makambo oyo toyekoli mpo na Yehova nde etindi biso tókangama na ye. Toyekoli kosepela mingi na bizaleli na ye. Toyebi makambo oyo alingaka mpe oyo aboyaka, mpe tondimi yango. Tokangi ntina ya mokano na ye mpo na bato mpe tosalaka na boyokani na mokano yango. Tomonaka ete ezali lokumu mpenza ndenge apesi biso libaku ya kozala baninga na ye. (Nz. 25:14) Likambo nyonso oyo toyekoli na ntina etali Mozalisi na biso esalisaka biso tópusana lisusu penepene na ye.​—Yak. 4:8.

4. (a) Zabolo asalelaka nini mpo na kopekisa biso tókangama kaka na Yehova? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

4 Zabolo azali kotambwisa mokili oyo, mpe asalelaka yango mpo na kolamusa bamposa na biso ya bomoto mpe bolɛmbu na biso. (Ef. 2:1-3; 1 Yoa. 5:19) Mokano na ye ezali ete tókóma kolinga mpe makambo mosusu mpo tókangama kaka na Yehova te. Tólobela ndenge mibale oyo Zabolo akoki kosala yango. Ya liboso, alingaka tókolisa mposa ya kokóma na bozwi mingi, mpe ya mibale, alukaka kosala ete tópona kominanola ya mabe.

KEBÁ NA BOLINGO YA MBONGO

5. Mpo na nini tosengeli kokeba mpo tókolisa bolingo ya mbongo te?

5 Moto nyonso alingaka kozwa bilei oyo ekoki, kozala na bilamba ya malamu, mpe esika malamu ya kofanda. Kasi, tosengeli kokeba mpo tókolisa bolingo ya mbongo te. Mokili ya Satana etondi na bato oyo “balingá mbongo” mpe biloko oyo mbongo ekoki kosomba. (2 Tim. 3:2) Yesu ayebaki ete bayekoli na ye bakoki koluka kokolisa bolingo yango. Yango wana, alobaki na bango: “Moto moko te akoki kozala moombo ya bankolo mibale; mpo to akoyina oyo mpe akolinga mosusu, to akokangama na oyo mpe akotyola mosusu. Bokoki te kozala baombo ya Nzambe mpe ya Bomɛngo.” (Mat. 6:24) Tokoki koloba ete soki moto oyo asambelaka Yehova azali mpe kopesa ntango mpe makasi na ye mingi na koluka bozwi ya mokili oyo, azali koluka kosalela bankolo mibale. Akomonisa ete akangami kaka na Yehova te.

Ndenge bato mosusu ya laodikia bazalaki komimona . . . ndenge oyo yehova ná yesu bazalaki komona bango (talá paragrafe 6)

6. Liteya nini tokoki kozwa na maloba ya Yesu epai ya bato ya lisangá ya Laodikia?

6 Pene na nsuka ya siɛklɛ ya liboso, bato ya lisangá ya Laodikia bamikumisaki na maloba oyo: “Nazali mozwi mpe nanduki bomɛngo mpe nazali ata na mposa ya eloko moko te.” Kasi, na miso ya Yehova mpe ya Yesu, bazalaki lokola “moto ya mpasi mpe moto ya mawa mpe mobola mpe moto oyo akufá miso mpe bolumbu.” Soki Yesu apesaki bango toli, ezalaki te mpo bazalaki na bozwi, ezalaki nde mpo bolingo na bango ya mbongo ezalaki kobebisa boyokani na bango na Yehova. (Em. 3:14-17) Soki tomoni ete mposa ya koluka bozwi ebandi kokola na motema na biso, tosengeli kosala nokinoki mpo na kosembola makanisi na biso. (1 Tim. 6:7, 8) Soki te, motema na biso ekobanda kolinga mpe makambo mosusu mpe Yehova akondima losambo na biso te. Azali “Nzambe oyo asɛngaka kokangama kaka na ye.” (Mib. 4:24) Nini ekoki kosala ete tózanga bokatikati na ndenge na biso ya kotalela mbongo?

7-9. Ndakisa ya nkulutu moko na nkombo David eteyi yo nini?

7 Tótalela ndakisa ya nkulutu moko na nkombo David, oyo amipesaka na mosala mpe afandaka na États-Unis. Ye moko alobaka ete azalaki mosali ya molende. Bamatisaki ye mpɛtɛ na mosala, mpe azwaki kutu mbano mpo bakonzi ya ekólo bandimaki ete ayebi mosala na ye malamu. David alobi boye: Na ntango wana, nazalaki kokanisa ete mbano oyo nazwaki emonisaki ete Yehova azali kopambola ngai.” Kasi, ezalaki mpenza bongo?

8 David akómaki komona makambo oyo ezalaki kolakisa ete mosala na ye ezalaki kobebisa boyokani na ye na Yehova. Alobi boye: “Na makita, ata mpe na mosala ya kosakola, nazalaki kokanisa makambo ya mosala. Nazalaki kozwa mbongo mingi, kasi motungisi ezalaki se kobakisama mpe matata ekómaki kobima kati na ngai ná mwasi na ngai.”

9 David amonaki ete asengeli kotalela lisusu makambo oyo azalaki kotya na esika ya liboso. Alobi boye: “Nazwaki ekateli makasi ya kosembola makambo.” David alukaki ndenge ya kobongisa programɛ na ye ya mosala ya mosuni, mpe ayebisaki patrɔ na ye ekateli oyo azwaki. Esukaki ndenge nini? Balongolaki David na mosala! David asalaki nini? Alobi boye: “Mokolo oyo elandaki, natondisaki formilɛrɛ mpo nakóma mobongisi-nzela mosungi basanza mingi.” Mpo na kozwa mbongo ya kobikela, David ná mwasi na ye bakómaki kosala mosala ya kotya bopɛto. Mwa moke na nsima, akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza, mpe nsukansuka mwasi na ye mpe alandaki lokolo na ye. Ndeko yango ná mwasi na ye bandimaki kosala mosala oyo bato mingi bamonaka ete ezali ya lokumu te, kasi mosala yango ezali te likambo oyo eleki ntina mpo na bango. Atako mbongo oyo bazalaki kozwa liboso eleki mbala 10 mbongo oyo bazali kozwa sikoyo, sanza nyonso bazalaka na mbongo oyo ekoki mpo na kokokisa bamposa na bango. Balingaka kotya Yehova na esika ya liboso, mpe bamoni na miso ete akokisaka bamposa ya baoyo batyaka matomba ya Bokonzi na esika ya liboso.​—Mat. 6:31-33.

10. Ndenge nini tokoki kobatela motema na biso?

10 Tózala na biloko mingi ya mokili to te, biso nyonso tosengeli kobatela motema na biso. Ndenge nini? Kokolisa bolingo ya bomɛngo te. Mpe kotika te ete mosala na yo ya mosuni eleka liboso ya mosala na yo mpo na Yehova. Ndenge nini okoyeba soki obandi kokwea na motambo yango? Okoki komituna boye: ‘Nakanisaka makambo ya mosala na ngai ya mosuni ntango nazali na makita to na mosala ya kosakola? Nakanisaka ntango nyonso soki nakozala na mbongo mpo na bomoi na ngai na mikolo ezali koya? Mbongo ná biloko ya mosuni ebimisaka matata kati na ngai ná molongani na ngai? Nakondima kosala mosala ya mosuni oyo bato bamonaka ete ezali ya lokumu te, mpo epesa ngai nzela ya kolekisa ntango mingi na mosala ya Yehova?’ (1 Tim. 6:9-12) Ntango tozali kotalela mituna yango, tóbosana te ete Yehova alingaka biso mpe alaki baoyo bakangami na ye ete: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.” Yango wana, ntoma Paulo akomaki ete: “Bomoi na bino ezala na bolingo ya mbongo te.”​—Ebr. 13:5, 6.

PONÁKÁ MALAMU KOMINANOLA NA YO

11. Kominanola oyo moto aponi ekoki kosala ye nini?

11 Yehova alingi tósepela na bomoi, mpe kominanola ekoki kosalisa biso tókokisa mposa yango. Kutu, Liloba ya Nzambe elobi ete “eloko oyo eleki malamu mpo na moto ezali te, longola kaka kolya mpe komɛla mpenza mpe komonisa molimo na ye bolamu mpo na mosala na ye ya makasi.” (Mos. 2:24) Kasi, kominanola mingi oyo ezali na mokili lelo ekoki kotinda biso na makambo ya mabe. Ebebisaka bizaleli ya bato, elendisaka bango bándima, to kutu bálinga, makambo oyo Liloba ya Nzambe epekisi.

Kominanola na yo eutaka wapi? (Talá paragrafe11-14) *

12. Na kotalela 1 Bakorinti 10:21, 22, mpo na nini tosengeli kopona malamu kominanola na biso?

12 Lokola tolingi kokangama kaka na Yehova, tokoki te kolya na “mesa ya Yehova” mpe “na mesa ya bademo.” (Tángá 1 Bakorinti 10:21, 22.) Mbala mingi, kolya elongo na moto emonisaka ete tozali baninga. Soki toponaka kominanola oyo elakisaka mobulu, misala ya bilimo mabe, makambo ya pite, to makambo mosusu ya mosuni, ezali lokola tozali kolya elongo na banguna ya Nzambe bilei oyo babongisi. Na yango, tozali kobebisa kaka bizaleli na biso moko te, kasi mpe boninga na biso na Yehova.

13-14. Na kotalela Yakobo 1:14, 15, mpo na nini tosengeli kokeba na kominanola oyo toponaka? Pesá ndakisa.

13 Na ndenge nini kominanola ezali lokola bilei? Ntango tozali kolya, tokoki kopona biloko oyo tokokɔtisa na monɔkɔ. Kasi, ntango kaka tomɛli biloko yango, ebandaka mbala moko konikama mpe nsukansuka bavitami oyo ezalaki na bilei yango ekɔtaka na nzoto. Bilei ya malamu ekosalisa nzoto na biso; bilei ya mabe ekopesa biso maladi. Mbuma na yango ekomonana kaka mbala moko te, kasi ekomonana na nsima.

14 Ndenge moko mpe, ntango tozali kominanola, tokoki kopona makambo oyo tokokɔtisa na bɔɔngɔ na biso. Kasi, soki esí ekɔti, ekobanda mbala moko kosala mpe ekokɔta na makanisi mpe motema na biso. Kominanola ya malamu ekoki kopesa biso makasi, kasi kominanola ya mabe ekobebisa biso. (Tángá Yakobo 1:14, 15.) Mbuma ya kominanola ya mabe ekomonana mbala moko te, kasi nsukansuka emonanaka. Yango wana Biblia ekebisi biso boye: “Bómikosa te: Nzambe azali moto ya kotyola te. Mpo nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka; mpo moto oyo azali kolona mpo na nzoto na ye akobuka libebi oyo euti na nzoto na ye.” (Gal. 6:7, 8) Ezali mpenza na ntina ete tóboya kominanola nyonso oyo elendisaka makambo oyo Yehova ayinaka!​—Nz. 97:10.

15. Likabo nini Yehova apesi biso mpo na bolamu na biso?

15 Basaleli mingi ya Yehova basepelaka kotala TV JW, oyo elakisaka makambo ya malamu mpe elekaka na nzela ya Internet. Ndeko mwasi moko na nkombo Marilyn alobaki boye: “TV JW esalisaka ngai nazala na makanisi ya malamu, mpe ntina ya kolongola makambo mosusu ezalaka te. Ntango namiyoki lokola mwana etike to nalɛmbi nzoto, nalukaka kotala diskur moko ya kolendisa to ndenge balimbolaki mokapo ya mokolo moko. Yango esalisaka ngai namiyoka penepene na Yehova mpe ya ebongiseli na ye. TV JW ebongoli mpenza bomoi na ngai.” Yo mpe osepelaka na likabo yango ya Yehova? Longola baemisyo ya sanza na sanza, okokuta biloko ya koyoka, bavideo, mpe miziki kitoko oyo yo moko okoki kopona.

16-17. Mpo na nini tosengeli koyeba ntango boni tolekisaka na kominanola, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?

16 Tosengeli kokeba kaka te na lolenge ya kominanola oyo toponaka, kasi tosengeli mpe kokeba na ntango oyo tolekisaka na yango. Soki tokebi te, ntango oyo tozali kolekisa na kominanola ekoki koleka ntango oyo tolekisaka na mosala ya Yehova. Bato mingi bazalaka na mokakatano mpo na ntango oyo balekisaka na kominanola. Ndeko mwasi Abigail oyo azali na mbula 18 alobi boye: “Nsima ya kosala mokolo mobimba, natalaka televizyo mpo namiyoka malamu. Kasi, soki nakebi te, nakoki kolekisa bangonga ebele kaka liboso ya televizyo.” Ndeko mobali moko na nkombo Samuel alobi boye: “Ekómelaka ngai nalekisa ntango mingi na kotala ebele ya bavideo ya mikusemikuse na Internet. Nabandaka kaka na moko, na nsima, kozanga ete nayeba, okomona ngonga misato to minei eleki kaka boye.”

17 Okoki kosala nini mpo olekisaka ntango mingi te na kominanola? Ya liboso, osengeli koyeba ntango boni mpenza olekisaka na kominanola. Landelá ntango oyo olekisaka na kominanola na pɔsɔ moko. Zwá kalandriye mpe komáká bangonga oyo olekisi na kotala televizyo, na koyengayenga na Internet, mpe na kobɛta masano na telefone to na tablɛti na yo. Soki omoni ete ntango yango eleki mingi, meká kosala programɛ. Pesá liboso ntango na makambo oyo eleki ntina, mpe na nsima tyá ntango mpo na kominanola. Na nsima, sɛngá Yehova asalisa yo osala makambo oyo okani. Na ndenge yango, okozala na ntango mpe makasi oyo esengeli mpo na boyekoli ya Biblia ya yo moko, losambo na kati ya libota, makita, mpe kobima na mosala ya kosakola mpe ya koteya. Soki osali bongo, okoyoka mabe te mpo na ntango yo olekisi na kominanola.

KOBÁ KOKANGAMA KAKA NA YEHOVA

18-19. Ndenge nini tokoki komonisa ete tokangami kaka na Yehova?

18 Nsima ya kokoma makambo etali nsuka ya mokili ya Satana mpe mokili ya sika oyo ekoya, ntoma Petro alobaki boye: “Bandeko ya bolingo, lokola bozali kozela makambo wana, bósala nyonso oyo ekoki na bino mpo nsukansuka akuta bino na litɔnɔ te mpe na mbeba te mpe na kimya.” (2 Pe. 3:14) Ntango totosi toli yango mpe tosali nyonso oyo tokoki mpo na kozala pɛto na bizaleli mpe na elimo, tomonisaka ete tokangami kaka na Yehova.

19 Satana ná mokili na ye bakokoba komeka biso mpo tótika kotya makambo ya Yehova na esika ya liboso. (Luka 4:13) Kasi, ata soki tokutani na komekama ya ndenge nini, tokotika moto to eloko moko te ezwa esika ya Yehova na motema na biso. Tozali na ekateli ya kokangama kaka na Yehova, mpo abongi tósalela ye bongo!

LOYEMBO 30 Tata na ngai, Nzambe na ngai, mpe moninga na ngai

^ par. 5 Na ntembe te, olingaka kosalela Yehova. Kasi, okangami kaka na ye? Bikateli oyo ozwaka nde ekopesa eyano na motuna yango. Tólobela makambo mibale ya bomoi na biso oyo ekoki kosalisa biso tóyeba soki tokangami kaka na Yehova to te.

^ par. 53 ELILINGI: Tolingaka te kolya bilei oyo balambi na esika ya mbindo mpe oyo ekɔti mikrobe. Bongo mpo na nini tóndima kotala kominanola oyo ezali kolakisa mobulu, misala ya bilimo mabe, to makambo ya pite?