Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tosengeli kokebisa bato ete “mbula ya mopɛpɛ makasi” ya Nzambe ezali koya!

Liboso Nzambe apesa etumbu​—Apesaka ntango nyonso makebisi oyo esengeli?

Liboso Nzambe apesa etumbu​—Apesaka ntango nyonso makebisi oyo esengeli?

KANISÁ ete moto oyo ayekolaka makambo ya klima azali kotala elilingi ya radar oyo ezali koningana. Amoni ete mbula moko ya mopɛpɛ makasi ekobɛta na mboka moko oyo ezalaka na bato ebele. Lokola azali komitungisa mpo na bolamu ya bato, abomi nzoto mpo na kokebisa bango liboso ete mbula yango ebɛta.

Ndenge moko mpe, Yehova azali sikoyo kokebisa bato awa na mabele ete “mopɛpɛ makasi” ya nsɔmɔ koleka nyonso oyo bakoki koyoka na nsango ezali koya. Ndenge nini azali kosala yango? Mpe mpo na nini tokoki kondima ete azali kotikela bato ntango oyo esengeli mpo bázwa ekateli? Mpo na kozwa biyano na mituna yango, tótalela naino mwa makebisi mosusu oyo Yehova apesaki na ntango ya kala.

MAKEBISI OYO NZAMBE APESAKI NA KALA

Na ntango ya kala, Yehova akebisaki bato mpo na ‘mipɛpɛ makasi,’ elingi koloba bitumbu ndenge na ndenge oyo alingaki kopesa na baoyo bazalaki kobuka mibeko na ye na nko. (Mas. 10:25; Yir. 30:23) Na mbala nyonso oyo alingaki kopesa bitumbu, akebisaki bato ntango mingi liboso mpe ayebisaki bango mbongwana oyo basengeli kosala mpo na kotosa ye. (2 Bak. 17:12-15; Neh. 9:29, 30) Mpo na kosalisa bato bázwa ekateli ya malamu, azalaki mbala mingi kosalela basaleli na ye ya sembo awa na mabele mpo na koyebisa bitumbu oyo akopesa mpe kosalisa bato bámona ete basengeli kosala mbongwana nokinoki.​—Amo. 3:7.

Noa azalaki moko ya bato ya sembo oyo Yehova asalelaki mpo na koyebisa bitumbu na ye. Na boumeli ya bambula mingi, Noa akebisaki na mpiko nyonso bato oyo bazalaki kosala makambo ya mbindo mpe ya mobulu ya ntango na ye ete Mpela ekoya na mokili. (Eba. 6:9-13, 17) Ayebisaki bango mpe nini basengeli kosala mpo bábika. Noa asakolaki na molende mpenza, yango wana na nsima abengamaki “mosakoli ya boyengebene.”​—2 Pe. 2:5.

Atako milende oyo Noa asalaki, bato yango baboyaki kotya likebi na nsango ya Nzambe. Bamonisaki ete bazalaki na kondima ata moke te. Na yango, bakufaki ntango Mpela “eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso.” (Mat. 24:39; Ebr. 11:7) Ntango bayaki koyeba ete nsuka na bango ekómi pene, bakokaki koloba te ete Nzambe akebisaki bango te.

Na mabaku mosusu, Yehova akebisaki bato ntango moke kaka liboso apesa etumbu. Atako bongo, asalaki ete bato yango bázala na ntango oyo esengeli mpo bázwa ekateli. Na ndakisa, ntango atindaki Malɔzi Zomi na Ezipito, azalaki kokebisa bato liboso atinda bolɔzi mokomoko. Na libaku moko, atindaki Moize ná Arona bákende kokebisa Farao mpe basaleli na ye mpo na bolɔzi ya nsambo, elingi koloba mbula ya mabanga oyo ekobebisa mpenza mboka. Lokola mbula yango esengelaki kobanda na mokolo oyo elandi, Nzambe apesaki bango mpenza ntango oyo esengeli mpo bázwa esika ya komibatela mpo na kokima mbula yango? Biblia elobi: “Moto nyonso oyo abangaki liloba ya Yehova kati na basaleli ya Farao akimisaki basaleli na ye mpe bibwɛlɛ na ye mpenza kati na bandako, kasi moto nyonso oyo atyaki motema na ye te na liloba ya Yehova, atikaki basaleli na ye mpe bibwɛlɛ na ye na elanga.” (Kob. 9:18-21) Ezali polele ete Yehova akebisaki moto nyonso, mpe bato oyo bazwaki ekateli nokinoki banyokwamaki mpenza te mpo na bolɔzi wana.

Ndenge moko mpe, akebisaki Farao ná basaleli na ye liboso atinda bolɔzi ya zomi. Kasi, basalaki bozoba ndenge baboyaki koyoka. (Kob. 4:22, 23) Na yango, bana na bango ya liboso ya mibali bakufaki. Ezalaki mawa mpenza! (Kob. 11:4-10; 12:29) Bazalaki na likoki ya koyoka liboso likama ekómela bango? Ɛɛ! Liboso bolɔzi ya zomi eya, Moize akebisaki Bayisraele nokinoki mpe ayebisaki bango oyo basengelaki kosala mpo na kobikisa bato ya mabota na bango. (Kob. 12:21-28) Bato boni basalaki likambo oyo Moize alobaki? Bato mosusu balobaka ete bato milio misato bazwaki etumbu te mpe babimaki na Ezipito, kati na bango Bayisraele, “etuluku monene ya bato ndenge na ndenge” oyo bazalaki Bayisraele te mpe Baezipito.​—Kob. 12:38.

Ndenge bandakisa yango emonisi, Yehova azangaki te kopesa bato ntango oyo esengeli mpo báyoka makebisi na ye. (Mib. 32:4) Mpo na nini azalaki kosala bongo? Ntoma Petro alobi ete Yehova “alingi moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.” (2 Pe. 3:9) Ya solo, Nzambe azalaki kotyela bato likebi. Alingaki ete bábongola mitema mpe básala mbongwana oyo esengeli liboso apesa etumbu.​—Yis. 48:17, 18; Rom. 2:4.

TÓYOKA LIKEBISI OYO NZAMBE AZALI KOPESA LELO OYO

Lelo oyo mpe, bato nyonso basengeli kozwa ekateli mpo na likebisi moko ya ntina oyo ezali kopesama lelo na mokili mobimba. Ntango Yesu azalaki awa na mabele alobaki ete nsukansuka mokili oyo ekobebisama na ntango ya “bolɔzi moko monene.” (Mat. 24:21) Mpo na etumbu yango oyo ekopesama na mikolo ezali koya, Yesu apesaki esakweli moko oyo elobelaki makambo ya sikisiki oyo bayekoli na ye bakomona mpe bakokutana na yango liboso bolɔzi yango ebanda. Na yango, Yesu alobelaki makambo minene oyo tozali komona lelo na mokili.​—Mat. 24:3-12; Luka 21:10-13.

Ndenge emonisami na esakweli yango, Yehova azali sikoyo kosɛnga na moto nyonso andima kosalela ye mpe amitya na ngámbo ya boyangeli na ye. Mposa na ye ezali ete bato nyonso ya botosi bázala na bomoi ya malamu sikoyo mpe bázwa mapamboli oyo akopesa na mokili na ye ya sika ya boyengebene. (2 Pe. 3:13) Mpo na kosalisa bato bámonisa kondima na makambo oyo alaki, Yehova apesi bango nsango oyo ebikisaka bato: “nsango malamu ya bokonzi,” oyo Yesu alobaki ete “ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso.” (Mat. 24:14) Nzambe abongisi basambeli na ye mpo bápesa “litatoli” yango, elingi koloba básakola nsango na ye, mpe bazali kosala yango na mikili soki 240. Yehova alingi ete ebele ya bato báyoka likebisi yango mpo bábika na “mbula ya mopɛpɛ makasi” oyo ezali koya, elingi koloba ntango akopesa bato mabe etumbu.​—Sef. 1:14, 15; 2:2, 3.

Na yango, motuna ya ntina mingi ezali te ya koyeba soki Yehova apesaka bato ntango oyo esengeli mpo bázwa ekateli. Tomoni polele ete asalaka yango ntango nyonso. Kasi, motuna ya ntina mingi ezali nde: Bato bakoyoka likebisi ya Nzambe lokola mwa ntango ezali naino? Tiká ete biso bamemi-nsango ya Nzambe, tókoba kosalisa ebele ya bato mpo bábika na nsuka ya mokili oyo.