Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 41

Tikalá sembo na ntango ya “bolɔzi monene”

Tikalá sembo na ntango ya “bolɔzi monene”

“Ee bino nyonso bato na ye ya sembo, bólinga Yehova. Yehova azali kobatela bato ya sembo.”​—NZ. 31:23.

LOYEMBO 129 Tokoyika mpiko tii na nsuka

NA MOKUSE *

1-2. (a) Mosika te bikólo ekoloba maloba nini? (b) Tosengeli kozwa biyano na mituna nini?

KANISÁ ete bikólo elobi maloba oyo tozelaka banda kala ete “kimya, likambo ya kobanga ezali te.” Mbala mosusu bakotuta ntolo ete mokili ezwi kimya oyo ezwá naino te. Bakolinga bato bákanisa ete bakoki sikoyo kosilisa mikakatano nyonso ya bato. Kasi, bakokoka kosala eloko moko te mpo na likambo oyo ekosalema na nsima. Mpo na nini? Mpo Biblia esakolaki ete “na ntango yango libebi ya mbalakaka ekoyela bango na mbala moko . . . mpe bakokima soki moke te.”​—1 Tes. 5:3.

2 Tosengeli kozwa biyano na mituna oyo ya ntina: Makambo nini ekosalema na ntango ya “bolɔzi monene”? Yehova akolinga tósala nini na ntango wana? Mpe ndenge nini tokoki komibongisa banda sikoyo mpo tótikala sembo na ntango ya bolɔzi monene?​—Mat. 24:21.

MAKAMBO NINI EKOSALEMA NA NTANGO YA “BOLƆZI MONENE”?

3. Na kotalela Emoniseli 17:5, 15-18, ndenge nini Nzambe akobebisa “Babilone Monene”?

3 Tángá Emoniseli 17:5, 15-18. “Babilone Monene” ekobebisama! Ndenge touti komona yango, bikólo ekosala eloko te mpo na likambo yango. Mpo na nini? Mpo “Nzambe [akotya] yango na mitema na bango mpo na kokokisa likanisi na ye.” Likanisi nini? Likanisi ya kobebisa lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba, kati na yango mangomba ya bokristo. * Nzambe akotya likanisi na ye na mitema ya “maseke zomi” ya “nyama mabe ya langi ya motane makasi.” Maseke zomi yango ezali komonisa baguvɛrnema nyonso oyo esungaka “nyama mabe,” elingi koloba ONU. (Em. 17:3, 11-13; 18:8) Ntango baguvɛrnema yango ekobalukela mangomba ya lokuta, yango nde ekozala elembo oyo ekomonisa ete bolɔzi monene ebandi. Ekozala likambo moko ya nsɔmɔ oyo ekosalema na mokili mobimba.

4. (a) Bikolo ekoki kopesa bantina nini ntango ekobebisa mangomba ya lokuta? (b) Mbala mosusu bato oyo bazalaki bandimi ya mangomba yango bakosala nini?

4 Toyebi te bantina oyo bikólo ekopesa mpo na kobebisa Babilone Monene. Mbala mosusu, bakoloba ete mangomba ezali kopekisa kimya ezala, mpe ete ekɔtaka ntango nyonso na makambo ya politiki. To mpe bakoki koloba ete mangomba enduki bozwi mpe biloko beboo. (Em. 18:3, 7) Emonani lokola ete ntango mangomba ya lokuta ekobebisama, bandimi na yango nyonso bakokufa te. Kasi, emonani ete bikólo ekobebisa nde bibongiseli ya losambo. Ntango bibongiseli yango nyonso ekolongwa, bato oyo bazalaki bandimi ya mangomba yango bakomona ete bakonzi na bango bakosaki bango mpe mbala mosusu bakokima mangomba yango.

5. Yehova alaki nini mpo na bolɔzi monene, mpe mpo na nini?

5 Biblia elobi te soki kobebisama ya Babilone Monene ekoumela ntango boni, kasi toyebi ete ekozwa ntango mingi mpenza te. (Em. 18:10, 21) Yehova alaki ete ‘akoyeisa mokuse mikolo’ ya bolɔzi yango mpo bato “oyo ye aponá” mpe bandimi ya lingomba ya solo bábika. (Mrk. 13:19, 20) Kasi, Yehova akolinga tósala nini banda na ebandeli ya bolɔzi monene tii na etumba ya Armagedone?

KOBÁ KOLONGISA LOSAMBO YA PƐTO YA YEHOVA

6. Kokabwana na mangomba ya lokuta elimboli mpe nini?

6 Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, Yehova alingi ete basambeli na ye bákabwana na Babilone Monene. Kasi, yango elimboli kaka te kokata bansinga na mangomba ya lokuta. Elimboli mpe kozala na ekateli ya kokoba kolongisa lingomba ya solo, elingi koloba losambo ya pɛto ya Yehova. Tótala ndenge mibale oyo tokoki kosala yango.

Tótika ata moke te koyangana na makita, ata na ntango ya mpasi (Talá paragrafe 7) *

7. (a) Ndenge nini tokoki komonisa ete tokangami makasi na mibeko ya sembo ya Yehova oyo etali bizaleli malamu? (b) Ndenge nini Baebre 10:24, 25 emonisi ntina ya koyangana na makita, mingimingi sikoyo?

7 Ya liboso, tosengeli kokangama makasi na mibeko ya sembo ya Yehova oyo etali bizaleli malamu. Tosengeli te kondima bizaleli ya mbindo ya bato ya mokili oyo. Na ndakisa, tondimaka ata likambo moko te ya pite, kati na yango libala ya basi na basi to mibali na mibali, mpe makambo mosusu ya ndenge wana. (Mat. 19:4, 5; Rom. 1:26, 27) Ya mibale, tosengeli kokoba kosambela Nzambe elongo na bandeko na biso ya lisangá. Tosalaka yango esika nyonso oyo tokoki, ezala na Ndako ya Bokonzi, to soki esengeli, na bandako ya bandeko, ata mpe na ndenge ya kobombana. Ata soki makambo nini esalemi, tokotika te momeseno na biso ya koyangana na makita. Kutu, tosengeli kosala yango “mingi koleka awa tozali komona mokolo yango ezali kobɛlɛma.”​—Tángá Baebre 10:24, 25.

8. Ndenge nini nsango oyo tosakolaka ekoki kobongwana na mikolo oyo ezali koya?

8 Na ntango ya bolɔzi monene, mbala mosusu nsango oyo tosakolaka ekobongwana. Sikoyo, tozali kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe tozali kosala makasi tókómisa bato bayekoli. Kasi na ntango wana, mbala mosusu tokosakola nsango ya polele oyo ekozala lokola mbula ya mabanga minene. (Em. 16:21) Ntango mosusu tokosakola ete mokili ya Satana elingi kokufa. Na mikolo oyo ezali koya, tokoyeba na bosikisiki nsango oyo tokosakola mpe ndenge oyo tokosala yango. Tokosalela kaka mayele ya kosakola mpe ya koteya oyo tosalelaka banda mbula koleka nkama? To tokosalela mayele mosusu? Toyebi naino te. Ezala ndenge nini, emonani ete tokozwa libaku ya kosakola na mpiko nsango ya etumbu oyo Yehova akopesa!​—Ezk. 2:3-5.

9. Nsango na biso ekoki kotinda bikólo esala nini, kasi toyebi likambo nini?

9 Na ntembe te, nsango na biso ekoki kotinda bikólo eluka kosukisa mosala na biso ya kosakola mbala moko mpo na libela. Ndenge kaka totyelaka Yehova motema mpo asunga biso na mosala ya kosakola lelo oyo, tokozala mpe na mposa na ye na ntango wana. Toyebi ete Nzambe na biso akotondisa biso na nguya mpo tókokisa mokano na ye.​—Mika 3:8.

MIBONGISÁ MPO NA NTANGO OYO BAKOBUNDISA BASALELI YA YEHOVA

10. Ndenge esakolamaki na Luka 21:25-28, bato mingi bakosala nini mpo na makambo oyo ekosalema na ntango ya bolɔzi monene?

10 Tángá Luka 21:25-28. Na ntango ya bolɔzi monene, bato bakozala na nsɔmɔ ntango bakomona ete makambo nyonso ya mokili, oyo bazalaki kokanisa ete epikamá makasi, ebandi koningana. Bakozala na “bwale” mpe bakobanga ete bákufa na eleko yango ya mpasi mingi mpo na bato nyonso. (Sef. 1:14, 15) Na ntango wana, mbala mosusu bomoi ekobanda se kokóma mpasi, ata mpo na basaleli ya Yehova. Lokola tozalaka bato ya mokili te, tokoki kokutana na mikakatano mingi koleka. Tokoki kozanga ata biloko mosusu oyo tozalaka na bosɛnga na yango.

11. (a) Mpo na nini miso ya bato nyonso ekozala epai ya Batatoli ya Yehova? (b) Mpo na nini tosengeli kobanga bolɔzi monene te?

11 Na ntango moko boye, mbala mosusu bato oyo mangomba na bango ebebisamaki bakoyoka nkanda ntango bakomona ete Batatoli ya Yehova bazali kokoba na makambo ya losambo na bango. Na ntembe te, bakobimisa yikiyiki makasi, ata na basite ya Internet ya kosolola na baninga. Bikólo ná Satana mokonzi na bango bakoyina biso mpo kaka lingomba na biso nde etikali. Bakomona ete bakokisi te mokano na bango ya kobebisa mangomba nyonso awa na mabele. Yango wana, miso na bango nyonso ekozala epai na biso. Na ntango yango nde bikólo ekokokisa mokumba ya Goge ya Magoge. * Bakosangana mpe bakobundisa basaleli ya Yehova na nkanda nyonso. (Ezk. 38:2, 14-16) Tokoki kobanda komitungisa mpo na makambo oyo ekosalema na bolɔzi monene, mingimingi lokola toyebi na bosikisiki te ndenge ekosalema. Kasi, tóyeba likambo oyo: Tosengeli kobanga bolɔzi monene te. Yehova akopesa biso malako oyo ekobikisa bomoi na biso. (Nz. 34:19) Tokolonga ‘kotɛlɛma alima mpe kotombola mitó na biso’ mpo tokoyeba ete ‘kosikolama na biso ekómi pene.’ *

12. Ndenge nini “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kobongisa biso mpo na makambo oyo ezali koya?

12 “Moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kobongisa biso mpo tótikala sembo na ntango ya bolɔzi monene. (Mat. 24:45) Azali kosala yango na ndenge mingi, kasi tózwa kaka ndakisa moko: mateya oyo toyokaki na mayangani ya etúká ya 2016 tii 2018. Badiskur ya mayangani yango elendisaki biso tókolisa bizaleli oyo ekosalisa biso lokola mokolo ya Yehova ekómi pene. Tótalela lisusu mwa moke bizaleli yango.

KOBÁ KOZALA SEMBO, KOYIKA MPIKO MPE KOMONISA MPIKO

Omibongisa banda sikoyo mpo obika na “bolɔzi monene”

(Talá paragrafe 13-16) *

13. Nini ekosalisa biso tózala sembo epai ya Yehova, mpe mpo na nini tosengeli kosala yango banda sikoyo?

13 Kozala sembo: Liyangani ya etúká ya 2016 ezalaki na motó ya likambo “Tikalá sembo epai ya Yehova!” Na liyangani yango, toyekolaki ete kozala na boyokani ya malamu na Yehova ekosalisa biso tózala sembo epai na ye. Bakundwelaki biso ete tokoki kopusana penepene na Yehova soki tozali kobondela ye na motema moko mpe koyekola Liloba na ye na mozindo. Kosala bongo ekopesa biso makasi ya kolonga ata mikakatano ya makasi ndenge nini. Lokola nsuka ya mokili ya Satana ekómi pene, tóyeba ete bosembo na biso epai ya Nzambe mpe Bokonzi na ye ekomekama lisusu makasi koleka. Ntango mosusu bato bakokoba kotyola biso. (2 Pe. 3:3, 4) Yango ekozala mingimingi mpo tokɔtaka ata moke te na makambo ya mokili. Tosengeli koyekola kozala sembo banda sikoyo mpo tótikala sembo na ntango ya bolɔzi monene.

14. (a) Mbongwana nini ekosalema na oyo etali kotambwisa ebongiseli ya Yehova awa na mabele? (b) Mpo na nini tosengeli kozala sembo na ntango wana?

14 Na ntango ya bolɔzi monene, mbongwana ekosalema na oyo etali kotambwisa ebongiseli ya Nzambe awa na mabele. Na ntango moko boye, bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo, oyo bakozala naino awa na mabele, bakoyanganisama na likoló mpo bábunda na etumba ya Armagedone. (Mat. 24:31; Em. 2:26, 27) Yango elakisi ete Lisangani ya Mikóló-Bakambi ekozala lisusu elongo na biso te awa na mabele. Atako bongo, basaleli ya Yehova bakozala kaka na litambwisi ya malamu. Bandeko mibali oyo babongisami malamu, oyo bazali na etuluku ya bampate, mosusu bakotambwisa makambo. Tokomonisa ete tozali sembo epai ya Yehova soki topesi bandeko yango mabɔkɔ mpe tolandi litambwisi na bango oyo ekouta epai ya Nzambe. Kolanda litambwisi yango nde ekosala ete tóbika!

15. Ndenge nini tokoki kokolisa ezaleli ya koyika mpiko, mpe mpo na nini tosengeli kosala yango banda sikoyo?

15 Koyika mpiko: Liyangani ya etúká ya 2017 ezalaki na motó ya likambo “Kotika te!” Liyangani yango esalisaki biso tókolisa makoki na biso ya kokanga motema ntango tokutani na komekama. Toyekolaki ete soki toyikaka mpiko, ezalaka te mpo makambo etamboli malamu. Tokoki kokolisa ezaleli ya koyika mpiko soki totyelaka Yehova motema. (Rom. 12:12) Tóbosana ata mokolo moko te elaka ya Yesu oyo ete: “Moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka ye nde akobika.” (Mat. 24:13) Maloba yango elimboli ete tosengeli kotikala sembo ata soki tokutani na mikakatano ya ndenge nini. Soki tozali koyika mpiko na komekama banda sikoyo, kondima na biso ekokóma makasi mpenza liboso ete bolɔzi monene ebanda.

16. Nini esalisaka biso tózala na mpiko, mpe ndenge nini tokoki kozala na mpiko banda sikoyo?

16 Mpiko: Liyangani ya etúká ya 2018 ezalaki na motó ya likambo “Zalá na mpiko!” Liyangani yango ekundwelaki biso ete makoki na biso moko te nde esalaka ete tózala na mpiko. Ndenge moko na ezaleli ya koyika mpiko, tozalaka na mpiko ya solosolo soki totyeli Yehova motema. Nini ekosalisa biso tótyela Yehova motema mingi koleka? Kotánga Liloba na ye mikolo nyonso mpe komanyola ndenge oyo abikisaki bato na ye na ntango ya kala. (Nz. 68:20; 2 Pe. 2:9) Ntango bikólo ekobundisa biso na ntango ya bolɔzi monene, tokozala na mposa ya mpiko mpe kotyela Yehova motema na ndenge oyo tosalá naino te. (Nz. 112:7, 8; Ebr. 13:6) Soki toyekoli kotyela Yehova motema banda sikoyo, tokozala na mpiko oyo esengeli na ntango ya etumba ya Goge. *

ZELÁ LOBIKO NA YO NA MPOSA MAKASI

Yesu ná mampinga na ye ya likoló bamati na bampunda ya mpɛmbɛ na ntango ya etumba ya Armagedone mpo na koboma banguna ya Nzambe! (Talá paragrafe 17)

17. Mpo na nini tosengeli kobanga Armagedone te? (Talá elilingi ya ezipeli.)

17 Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, biso nyonso tolekisi bomoi na biso mobimba na eleko ya mikolo ya nsuka. Kasi, tozali mpe na elikya ya kobika na bolɔzi monene. Etumba ya Armagedone nde ekosukisa mpenza mokili oyo. Kasi, tosengeli kobanga te. Mpo na nini? Mpo ekozala nde etumba ya Nzambe. (Mas. 1:33; Ezk. 38:18-20; Zek. 14:3) Ntango Yehova akopesa mitindo, Yesu Kristo akokamba mampinga ya Nzambe na etumba yango. Akozala elongo na bato 144000 kuna na likoló mpe ebele ya baanzelu. Bango nyonso bakobundisa Satana, bademo na ye, mpe mampinga na bango oyo ezali awa na mabele.​—Dan. 12:1; Em. 6:2; 17:14.

18. (a) Ndanga nini Yehova apesi biso? (b) Ndenge nini Emoniseli 7:9, 13-17 ezali kosalisa yo ondima ete okobika?

18 Yehova apesi biso ndanga oyo: “Ebundeli nyonso oyo ekosalema mpo na kobunda na yo ekolonga te.” (Yis. 54:17) “Ebele mpenza ya bato,” oyo bazali basaleli ya sembo ya Yehova bakobika na “bolɔzi monene”! Na nsima, bakokoba kosalela ye mosala mosantu. (Tángá Emoniseli 7:9, 13-17.) Biblia elobeli makambo mingi oyo ezali kondimisa biso ete tokobika na mikolo oyo ezali koya! Toyebi ete “Yehova azali kobatela bato ya sembo.” (Nz. 31:23) Moto nyonso oyo alingaka Yehova mpe asanzolaka ye akosepela komona ndenge Yehova akolongisa nkombo na ye mosantu.​—Ezk. 38:23.

19. Bomoi ya ndenge nini tokozala na yango mosika te?

19 Kanisá ndenge 2 Timote 3:2-5 ekoki kotángama mpo na kolobela bato na mokili ya sika, kasi te bato oyo balandaka makanisi ya Satana. (Talá etanda “ Ndenge oyo bato bakozala na ntango wana.”) Ndeko George Gangas, * oyo azalaká na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, alobelaki yango na maloba oyo: “Mokili ekozala esika ya malamu mpenza ntango bato nyonso bakozala bandeko! Mosika te, okozwa libaku ya kofanda na mokili ya sika. Okozala na bomoi libela na libela lokola Yehova. Tokozala na bomoi ya seko.” Ezali elikya moko kitoko mpenza!

LOYEMBO 122 Tópikama makasi, tóninganaka te!

^ par. 5 Toyebi ete mosika te, “bolɔzi moko monene” ekoyela bato nyonso awa na mabele. Nini ekokómela biso basaleli ya Yehova na ntango yango? Yehova akolinga tósala nini? Bizaleli nini tosengeli kokolisa banda sikoyo mpo tótikala sembo na ntango ya bolɔzi monene? Tokozwa biyano na lisolo oyo.

^ par. 3 NDIMBOLA YA MALOBA: Mangomba ya bokristo ezali mangomba oyo bandimi na yango bamibengaka bakristo, kasi eteyaka bato te ndenge ya kosambela Yehova na kolanda mibeko na ye.

^ par. 11 NDIMBOLA YA MALOBA: Goge ya Magoge (mpe ebengeli na yango ya mokuse, Goge) esalemaka mpo na kolobela etuluku ya bikólo oyo ekosangana mpo na kobundisa losambo ya pɛto na ntango ya bolɔzi monene.

^ par. 11 Mpo na koyeba malamu makambo oyo ekomema na etumba ya Armagedone, talá mokapo 21 ya buku Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela! Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali Goge ya Magoge mpe ndenge Yehova akobatela bato na ye na Armagedone, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2013, nkasa 3-8, mpe ya 15/07/2015, nkasa 9-15.

^ par. 16 Liyangani ya etúká ya 2019 oyo ezali na motó ya likambo “Bolingo esilaka soki moke te” endimisi biso ete tokoki kozala na kimya mpo Yehova alingaka biso mpe abatelaka biso.​—1 Ko. 13:8.

^ par. 19 Talá lisolo ‘Misala na ye mizali kolanda ye,’ na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/12/1994.

^ par. 65 ELILINGI: Na ntango ya bolɔzi monene, mwa Batatoli bamonisi mpiko mpe bayangani na zamba mpo na kosala makita.

^ par. 68 ELILINGI: Ebele mpenza ya bato oyo bazali basaleli ya sembo ya Yehova bakobika na bolɔzi monene, mpe bakozala na esengo!