LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Novembre 2016

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli mpo na 26/12/2016 tii na 29/01/2017.

Liloba moko oyo ezalaki na ndimbola monene!

Ebengeli nini Yesu asalelaki ezalaki komonisa limemya mingi koleka?

“Bókoba kolendisana mokolo na mokolo”

Mpo na nini malendisi ezali na ntina mingi? Mateya nini okoki kozwa na ndenge oyo Yehova, Yesu, mpe ntoma Paulo balendisaki basusu? Mpe ndenge nini okoki kolendisa moto na ndenge ebongi?

Babongisami na boyokani na Buku ya Nzambe

Yehova ayebi malamu kobongisa makambo. Tosengeli kotya motema ete basambeli na ye bázala bato oyo babongisami.

Ozwaka Buku ya Yehova na motuya mingi?

Basaleli ya Nzambe bazwaka matomba ntango basalaka makasi mpo na kosalela batoli ya Liloba ya Nzambe mpe kopesa mabɔkɔ na ebongiseli na ye.

“Mosala ezali monene”

Ozali na libaku malamu ya kopesa mabɔkɔ na mosala yango.

Balongwaki na molili

Na ndenge nini basaleli ya Nzambe bakómaki na molili na siɛklɛ ya mibale ya ntango na biso? Ndenge nini mpe ntango nini babandaki kongɛngisama mokemoke?

Balongwaki na boombo ya mangomba ya lokuta

Ntango nini basaleli ya Nzambe balongwaki mpenza na boombo ya Babilone?

“Basakoli ya Bokonzi na Grande-Bretagne—Bólamuka!!”

Motángo ya basakoli ya Bokonzi ezalaki komata te na boumeli ya mbala zomi! Nsukansuka, nini esalaki ete makambo ebongwana?