Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ozwaka Buku ya Yehova na motuya mingi?

Ozwaka Buku ya Yehova na motuya mingi?

“Ntango boyambaki liloba ya Nzambe, . . . bondimaki yango . . . ndenge yango ezali mpenza, lokola liloba ya Nzambe.”​—1 BATESALONIKI 2:13.

NZEMBO: 114, 113

1-3. (a) Mbala mosusu likambo nini ekómelaki Evodi ná Sɛntishe? (b) Ndenge nini tokoki kokima mikakatano ya ndenge wana? (Talá elilingi ya ebandeli.)

TOZWAKA Biblia na motuya mingi mpo toyebi ete ezali Buku ya Nzambe. Biblia ezali na toli oyo ekoki kosalisa biso tókima mikakatano, mpe ekoki kosembola biso ntango tosali mabunga. Na yango, tosalaka nini ntango tozwi toli oyo euti na Biblia? Tózwa ndakisa ya Evodi ná Sɛntishe, bandeko mibale ya basi oyo batyamaki mafuta na elimo na siɛklɛ ya liboso. Biblia elobi ete bawelanaki, kasi eyebisi te ntina ya matata na bango. Tómeka kokanisa likambo oyo ekokaki kosalema.

2 Ntango mosusu Evodi abengisaki mwa bandeko mibali mpe basi na ndako na ye mpo na kolya mwa eloko. Kasi abengisaki Sɛntishe te. Na nsima, ntango Sɛntishe ayokaki ndenge bandeko yango basepelaki na biloko oyo balyaki, asilikaki. Mbala mosusu akanisaki boye: ‘Nazali kondima te ete Evodi abengisa ngai te! Nakanisaki ete tozalaka baninga ya motema.’ Sɛntishe amonaki ete Evodi azali kosepela na ye lisusu te mpe alingi ete bákutanaka mingi te. Yango wana, Sɛntishe mpe abengisaki kaka bandeko wana epai na ye mpo na kolya mwa eloko, kasi abengisaki Evodi te! Ntango mosusu likambo yango etungisaki bandeko mosusu ya lisangá. Biblia emonisi ete ntoma Paulo asembolaki bandeko basi wana mibale mpe alendisaki bango bázongisa kimya. Ekoki kozala ete bayokelaki ye mpe bakobaki kosalela Yehova na esengo.​—Bafilipi 4:2, 3.

3 Lelo oyo na masangá na biso, ntango mosusu biso mpe tokoki kozala na mwa mokakatano ná ndeko mobali to ndeko mwasi moko. Kasi soki tolandi toli ya Biblia, tokoki kosilisa mikakatano ya ndenge wana. Kutu, tokoki ata kokima yango. Mpe ntango totosaka oyo Biblia elobi, tomonisaka ete tozwaka mpenza Buku ya Yehova na motuya.​—Nzembo 27:11.

BIBLIA ETEYAKA BISO TÓYEBA KOPEKISA MAYOKI NA BISO

4, 5. Toli nini Liloba ya Nzambe epesi biso na likambo etali kopekisa mayoki na biso?

4 Ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te kopekisa mayoki na biso. Tokoki koyoka mawa to nkanda makasi soki moto moko alobi likambo oyo ezokisi biso to asaleli biso makambo na bosembo te, mbala mosusu mpo na mimeseno ya mboka na biso, loposo na biso, to ndenge oyo tozali komonana. Mpe esalaka lisusu mpasi koleka soki moto oyo azokisi biso to azali kosala biso mabe azali ndeko na biso Motatoli ya Yehova. Toli nini ya Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa biso?

5 Yehova ayebi oyo ekoki kosalema soki bato bapekisi mayoki na bango te. Ntango tozali na nkanda to tosiliki, tokoki koloba to kosala likambo moko oyo tokoyoka mawa na nsima. Na Biblia, Yehova ateyaka biso tóyeba kopekisa mayoki na biso mpe ayebisi biso: “Elimo na yo esilika nokinoki te.” Tókanisa makambo boni tokoki kokima soki totosi toli wana mpe tosilikaka nokinoki te! (Tángá Mosakoli 7:9; Masese 16:32.) Lisusu, Biblia elendisaka biso tólimbisaka basusu. Kutu, Yesu alobaki ete soki tozali kolimbisa basusu te, Yehova mpe akolimbisa biso te. (Matai 6:14, 15) Omonaka ete osengeli komonisa lisusu motema molai mpe kondima kolimbisaka basusu?

6. Nini ekoki kosalema soki tozali te kopekisa mayoki na biso?

6 Soki toyebi kopekisa mayoki na biso te, tokoki kokoba kokangela basusu nkanda, ata mpe kobanda koyina bango. To mpe tokoki kotinda bandeko mosusu ya lisangá básala mpe bongo. Ata soki tomonisi nkanda to koyina polele te, nsukansuka basusu bakomona yango. Mpe bandeko na biso bakoki kokima biso. (Masese 26:24-26) Bankulutu bakosalela Biblia mpo na kosalisa biso tólongola nkanda to koyina mpe tóyeba kolimbisa basusu. (Balevi 19:17, 18; Baroma 3:11-18) Soki bankulutu basalisi biso, tokolanda litambwisi ya Buku ya Yehova?

YEHOVA AZALI KOKAMBA BISO

7, 8. (a) Ndenge nini Yehova akambaka basaleli na ye? (b) Wapi malako mosusu oyo tozwaka na nzela ya Biblia, mpe mpo na nini tosengeli kotosa yango?

7 Lelo oyo, Yehova azali kokamba mpe koteya baoyo bazali na kati ya eteni ya ebongiseli na ye awa na mabele. Na ndenge nini? Yehova atyá Yesu mpo azala “mokonzi ya lisangá,” Yesu mpe atyá “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na koteya mpe kotambwisa basaleli ya Nzambe. (Baefese 5:23; Matai 24:45-47) Kaka ndenge lisangani ya mikóló-bakambi ya siɛklɛ ya liboso ezalaki kosala, lelo oyo moombo yango azwaka Biblia na motuya mingi mpo ezali Liloba ya Nzambe. (Tángá 1 Batesaloniki 2:13.) Wapi malako mosusu oyo tozwaka na nzela ya Biblia?

8 Biblia epesi biso etinda ya koyangana na makita mbala na mbala. (Baebre 10:24, 25) Elendisaka biso nyonso tóndima mateya kaka moko ya Biblia. (1 Bakorinti 1:10) Eyebisaka mpe biso tókoba “koluka liboso bokonzi.” (Matai 6:33) Biblia epesi biso etinda ya kosakola ndako na ndako, na bisika ya bato nyonso, mpe na bisika nyonso oyo tokoki kokuta bato. (Matai 28:19, 20; Misala 5:42; 17:17; 20:20) Epesi bankulutu malako mpo bábatela bopɛto ya masangá. (1 Bakorinti 5:1-5, 13; 1 Timote 5:19-21) Eyebisi mpe biso ete tosengeli kobatela nzoto na biso pɛto mpe koboya makanisi mpe bizaleli oyo Yehova ayini.​—2 Bakorinti 7:1.

9. Yesu atyá nani mpo asalisa biso tókanga ntina ya Liloba ya Nzambe?

9 Bato mosusu bakoki kokanisa ete bazali na mposa te ete moto mosusu alimbolela bango Biblia. Kasi kobanda 1919, Yesu azali kosalela “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na kosalisa basaleli ya Nzambe bákanga ntina ya mateya ya Biblia mpe bálanda oyo yango elobi. Soki totosi oyo Biblia elobi, tokobatela lisangá pɛto, tokotya kimya, mpe tokozala na bomoko. Omituna boye: ‘Nakozala sembo epai ya Yesu mpe nakolanda malako ya moombo ya sembo?’

LIKALO YA YEHOVA EZALI KOTAMBOLA MBANGO!

10. Ndenge nini mokanda ya Ezekiele elobeli eteni ya ebongiseli ya Yehova na likoló?

10 Na nzela ya Biblia, toyebi ete basaleli ya Yehova na likoló mpe babongisami. Na ndakisa, mosakoli Ezekiele amonaki na emonaneli moko Yehova azali kotambwisa likalo moko oyo ekokaki kobaluka mbangu epai nyonso oyo Yehova alingi ete ekende. (Ezekiele 1:4-28) Likalo yango ezali elilingi ya eteni ya ebongiseli ya Nzambe na likoló, oyo elandaka nokinoki malako na ye. Yango mpe ezali kosala ete eteni ya ebongiseli na ye awa na mabele esala mpe bongo. Kanisá mbongwana ndenge na ndenge oyo esalemi na ebongiseli ya Nzambe na boumeli ya mbula zomi oyo euti koleka. Kobosana te ete Yehova nde azali kosala ete mbongwana wana esalema. Mosika te, Kristo mpe baanzelu bakoboma mokili oyo mabe. Na ntango yango, moto moko te akozanga kokumisa Yehova mpe nkombo na ye to koloba mabe mpo na bokonzi na ye!

Tozali na botɔndi mingi mpo na ebele ya bandeko oyo bamipesi na mosala makasi ya kotonga! (Talá paragrafe 11)

11, 12. Makambo nini ebongiseli ya Yehova ezwi likoki ya kosala na mikolo oyo ya nsuka?

11 Kanisá makambo oyo ebongiseli ya Yehova ezwi likoki ya kosala na mikolo oyo ya nsuka. Mosala ya kotonga. Bankama ya bandeko mibali mpe basi basali mosala makasi ya kotonga biro monene ya Batatoli ya Yehova na Warwick, na etúká ya New York, na États-Unis. Na mokili mobimba, bankóto ya bandeko mosusu oyo bamipesi na bolingo na bango moko bazali kotonga Bandako ya Bokonzi mpe babiro ya filiale. Departema ya kosala baplan mpe ya kotonga na mokili mobimba (WDC) nde etambwisaka misala ya bandeko yango. Tozali na botɔndi mingi mpo na ebele ya bandeko oyo bazali kosala mosala makasi mpo na kotonga bandako wana! Mpe bisika nyonso, basaleli ya Yehova bapesaka makabo na kotalela makoki na bango mpo na kotonga bandako wana nyonso. Yehova apambolaka basaleli na ye mpo na komikitisa mpe bosembo na bango.​—Luka 21:1-4.

12 Mateya. Yehova alingaka koteya basaleli na ye. (Yisaya 2:2, 3) Kanisá biteyelo ndenge na ndenge oyo tozali na yango: Eteyelo ya babongisi-nzela, Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi, Eteyelo ya Gileade, Eteyelo ya bandeko oyo bakɔti sika na Betele, Eteyelo mpo na bakɛngɛli-batamboli ná basi na bango, mpe Eteyelo ya bandeko ya Komite ya filiale ná basi na bango. Longola yango, na site Internet na biso, jw.org, tokoki kokuta Biblia mpe mikanda mosusu na bankama ya minɔkɔ. Site yango ezali na eteni moko oyo elobeli bana, mosusu elobeli mabota, mpe eteni mosusu ezali na makambo ya sika. Osalelaka jw.org na mosala ya kosakola mpe na losambo na kati ya libota?

ZALÁ SEMBO EPAI YA YEHOVA MPE PESÁ EBONGISELI NA YE MABƆKƆ

13. Mokumba nini basaleli ya Yehova bazali na yango?

13 Ya solo, kozala na kati ya ebongiseli ya Yehova mpe koyeba makambo oyo esɛngaka biso ezali lokumu monene! Lokola toyebi makambo oyo esepelisaka Nzambe, tozali na mokumba ya kotosa ye mpe ya kosala makambo ya malamu. Lisusu, atako bato mingi balingaka kosala makambo ya mabe, biso tosengeli ‘koyina oyo ezali mabe,’ ndenge Yehova ayinaka yango. (Nzembo 97:10) Tosengeli soki moke te kozala lokola baoyo bakanisaka ete “malamu ezali mabe mpe mabe ezali malamu.” (Yisaya 5:20) Tolingaka kosepelisa Yehova, yango wana tozali na ekateli ya kozala pɛto na makambo nyonso. (1 Bakorinti 6:9-11) Makambo oyo Yehova eyebisaka biso na Biblia ezali mpo na bolamu na biso moko. Tolingaka ye mpe tolingi kozala sembo epai na ye. Yango wana, tolandaka malako na ye na ndako, na lisangá, na esika ya mosala, na eteyelo, to na esika mosusu nyonso oyo tokoki kozala. (Masese 15:3) Kanisá na makambo nini mosusu tosengeli kozala sembo epai ya Nzambe.

14. Ndenge nini baboti bakoki kozala sembo epai ya Yehova?

14 Ndenge oyo toteyaka bana na biso. Na Biblia, Yehova alakisá baboti ndenge ya koteya bana na bango. Bakristo basengeli kokeba ete bákanisaka te ndenge bato mosusu na mokili oyo bakanisaka. (Baefese 2:2) Na ndakisa, na bisika mosusu, tata ya libota akoki kokanisa boye: ‘Na mboka na biso, basi nde bateyaka bana.’ Nzokande, Biblia emonisi polele ete batata nde bazali na mokumba ya koteya bana na bango makambo ya Yehova. (Baefese 6:4) Batata mpe bamama oyo balingaka Yehova bazalaka na mposa ete bana na bango bázala baninga na ye, kaka ndenge Samwele azalaki ntango azalaki mwana moke.​—1 Samwele 3:19.

15. Ndenge nini tokoki kozala sembo epai ya Yehova ntango tozali kozwa bikateli ya minene?

15 Ndenge oyo tozwaka bikateli. Liboso ya kozwa bikateli ya minene na bomoi, tolingaka koyeba oyo Yehova akanisaka mpo tókoka kozala sembo epai na ye. Biblia mpe ebongiseli na ye ekoki kosalisa biso. Na ndakisa, lelo oyo baboti mosusu oyo batiká mboka na bango mpe bakendá kofanda na mboka mopaya bazwaka ekateli ya kotinda mwana na bango oyo abotami sika epai na bandeko na bango ya libota na mboka na bango. Soki basali bongo, tata ná mama bakokoba kosala mosala mpo na koluka mbongo. Ya solo, yango ezali ekateli oyo etali moto na moto, kasi babalani basengeli komituna boye: ‘Yehova akokanisa nini na ekateli oyo tozwi?’ (Tángá Baroma 14:12.) Ekozala likambo ya bwanya kokanisa liboso oyo Biblia elobi liboso ya kozwa ekateli moko ya monene mpo na libota mpe mosala na biso. Tozali na mposa ya lisalisi ya Tata na biso ya likoló mpo tokoki te komitambwisa biso moko.​—Yirimia 10:23.

16. (a) Ekateli nini mwasi moko asengelaki kozwa ntango mwana na ye ya mobali abotamaki? (b) Nini esalisaki ye azwa ekateli ya malamu?

16 Mwasi moko ná mobali na ye bakendaki kofanda na mboka mopaya; ntango mwana na bango ya mobali abotamaki, bakanaki kotinda ye na mboka na bango mpo bankɔkɔ na ye bábɔkɔla ye. Kasi na ntango wana, mwasi yango abandaki koyekola Biblia na Motatoli ya Yehova moko. Ayekolaki ete mokumba ya koteya mwana na ye makambo ya Yehova ezali ya ye. (Nzembo 127:3; Masese 22:6) Mwasi yango abondelaki Yehova ndenge Biblia elendisaka biso tósala, mpe asɛngaki ye asalisa ye asala oyo ezali malamu. (Nzembo 62:7, 8) Ayebisaki mpe ndeko mwasi oyo azalaki koyekola na ye Biblia mpe asololaki na bandeko mosusu ya lisangá mpo na mokakatano na ye. Atako bandeko na ye ya libota mpe baninga na ye bakobaki koyebisa ye ete asengeli kotinda bebe yango epai ya bankɔkɔ na ye, azwaki ekateli ya kosala bongo te. Mobali na ye amonaki ndenge bandeko ya lisangá bazalaki kosalisa mwasi na ye mpe bebe na bango. Mobali yango akamwaki mingi, yango wana abandaki koyekola Biblia mpe koyangana na makita ná libota na ye. Kanisá esengo oyo mwasi yango ayokaki ntango amonaki ndenge oyo Yehova ayanolaki na libondeli na ye!

17. Malako nini tosengeli kotosa ntango tozali koyekola na moto Biblia?

17 Ndenge oyo totosaka malako. Soki tozali sembo epai ya Nzambe, tokotosa malako oyo tozwaka na ebongiseli na ye. Na ndakisa, tosengeli kosala nini ntango kaka tobandi koyekola na moto buku Biblia eteyaka mpenza nini? Tozwaki malako ete tosengeli kozwaka mwa miniti nsima ya boyekoli mpo na kosalisa moyekoli ayeba malamu ebongiseli ya Yehova. Tokoki kosalela video Makambo esalemaka ndenge nini na Ndako ya Bokonzi? mpe mwa buku Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo? Soki tosilisi koyekola na moto buku Biblia eteyaka, mpo na kosalisa moyekoli yango ‘atɛlɛma ngwi na kondima,’ tosengeli kokoba koyekola na ye buku Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe,” ata soki asili kozwa batisimo. (Bakolose 2:7) Otosaka malako wana oyo tozwaka na ebongiseli ya Yehova?

18, 19. Makambo nini esengeli kotinda biso tópesaka Yehova matɔndi?

18 Ezali na makambo mingi oyo esengeli kotinda biso tópesaka Yehova matɔndi! Na ndakisa, “na nzela na ye nde tozali na bomoi.” (Misala 17:27, 28) Apesá mpe biso Buku na ye, Biblia. Lokola bakristo ya Tesaloniki, tosepelaka na likabo yango mpo ezali na nsango oyo euti epai na ye.​—1 Batesaloniki 2:13.

19 Biblia esalisi biso tópusana penepene na Yehova, mpe esali ete ye apusana penepene na biso. (Yakobo 4:8) Tozali na botɔndi mingi ndenge Tata na biso ya likoló abengi biso tókɔta na ebongiseli na ye! Tomiyokaka lokola mokomi ya nzembo oyo akomaki: “Bópesa Yehova matɔndi, mpo azali malamu: mpo motema boboto [to bolingo ya sembo] na ye ezali seko na seko.” (Nzembo 136:1) Na vɛrsɛ nyonso ya nzembo yango, mokomi ya nzembo azongeli maloba “motema boboto [to bolingo ya sembo] na ye ezali seko na seko.” Ya solo, soki tozali sembo epai ya Yehova mpe totosi malako oyo apesaka biso na nzela ya ebongiseli na ye, akopesa biso bomoi ya seko mpe akozala sembo epai na biso seko na seko!