Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Mosala ezali monene”

“Mosala ezali monene”

EZALI ntango ya likita moko ya ntina mingi na Yerusaleme. Mokonzi Davidi ayanganisi bankumu na ye nyonso, bakapita, mpe mibali nyonso ya nguya. Basepeli mingi koyoka liyebisi moko ya ntina mingi: Yehova apesi Salomo, mwana ya Davidi, mokumba ya kotonga tempelo moko monene mpo na losambo ya Nzambe ya solo. Na nzela ya elimo santu, Davidi, mokonzi ya Yisraele oyo akómi mobange, azwaki plan ya kotonga mpe apesaki yango Salomo. Davidi alobi: “Mosala ezali monene; mpo ndako yango monene ezali ya moto te, kasi ya Yehova Nzambe.”​—1 Nt. 28:1, 2, 6, 11, 12; 29:1.

Na nsima, Davidi atuni motuna oyo: “Nani akomipesa na bolingo mpo na kotondisa lobɔkɔ na ye lelo na likabo mpo na Yehova?” (1 Nt. 29:5) Soki ozalaki wana, olingaki kosala nini? Olingaki kondima kopesa mabɔkɔ na mosala wana monene? Bayisraele bamipesaki na mosala yango. “Basepelaki . . . kopesa makabo ya bolingo, mpo ezalaki na motema mobimba nde bazalaki kopesa Yehova makabo ya bolingo.”​—1 Nt. 29:9.

Bankama ya bambula na nsima, Yehova atyaki ebongiseli moko ya monene koleka tempelo wana. Atyaki tempelo monene ya elimo, ebongiseli oyo na nzela na yango bato bakoki kopusana penepene na ye mpo na kosambela ye na nzela ya mbeka ya Yesu. (Ebr. 9:11, 12) Ndenge nini Yehova azali kosalisa bato bázongisa boyokani elongo na ye lelo oyo? Ezali na nzela ya mosala ya kokómisa bato bayekoli. (Mat. 28:19, 20) Na nzela ya mosala yango, mbula na mbula, tozali koyekola Biblia na bamilio ya bato, bankóto ya bayekoli bazali kozwa batisimo, mpe bankama ya masangá ya sika ezali kofungwama.

Bokoli wana ezali kosɛnga ete tóbimisa mikanda mingi koleka, tótonga mpe tóbatela Bandako ya Bokonzi, mpe tózwa bandako to bisika ya kosala mayangani ya mike mpe ya minene. Ondimi te ete mosala ya kosakola nsango malamu oyo tozali kosala ezali mosala monene mpe oyo ezali kopesa biso matomba?​—Mat. 24:14.

Bolingo oyo tolingaka Nzambe mpe bazalani na biso, mpe koyeba ete mosala ya kosakola Bokonzi esengeli kosalema nokinoki, ezali kotinda basaleli ya Nzambe ‘bámipesa . . . mpo na kotondisa lobɔkɔ na likabo mpo na Yehova’ mpe bápesaka makabo ya bolingo malamu. Ezali mpenza esengo ‘kokumisa Yehova na biloko na biso ya motuya’ mpe komona ndenge oyo mbongo yango ezali kosalelama na bosembo mpe na ekɛngɛ mpo ete mosala oyo eleki monene na lisolo ya bato esalema.​—Mas. 3:9.