Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 45

Ndenge elimo santu esalisaka biso

Ndenge elimo santu esalisaka biso

“Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.”​—FLP. 4:13.

LOYEMBO 104 Elimo santu ezali likabo ya Nzambe

NA MOKUSE *

1-2. (a) Nini esalisaka biso tóyika mpiko na mikakatano mokolo na mokolo? Limbolá. (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

“SOKI nakanisi komekama oyo nayikeli mpiko, nayebi ete nakokaki kolonga te na makasi na ngai moko.” Ekómela yo mpe oloba likambo ya ndenge wana? Ekómela mingi na biso. Mbala mosusu olobaki bongo ntango okanisaki ndenge oyikaki mpiko na maladi moko ya makasi to na liwa ya moto oyo olingaki. Soki okanisi komekama yango, omonaka ete ozalaki kokanga motema mokolo na mokolo kaka mpo elimo santu ya Yehova epesaki yo “nguya oyo eleki makasi.”​—2 Ko. 4:7-9.

2 Tosengeli mpe na lisalisi ya elimo santu mpo na kotɛmɛla makambo mabe ya mokili oyo. (1 Yoa. 5:19) Lisusu, tosengeli mpe kobunda etumba na “mampinga ya bilimo mabe.” (Ef. 6:12) Na kotalela makambo nyonso wana, tólobela ndenge mibale oyo elimo santu esalisaka biso. Na nsima, tokolobela makambo oyo tokoki kosala mpo tózwa mpenza matomba ya elimo santu.

ELIMO SANTU EPESAKA BISO NGUYA

3. Wapi lolenge moko oyo Yehova asalisaka biso tólonga mikakatano?

3 Elimo santu ya Yehova esalisaka biso na ndenge epesaka biso nguya to makasi mpo tókokisa mikumba na biso atako tozali na mikakatano. Ntoma Paulo amonaki ete “nguya ya Kristo” nde esalisaki ye akoba kosalela Yehova ata na kati ya mikakatano. (2 Ko. 12:9) Na mobembo na ye ya mibale na mosala ya misionɛrɛ, Paulo alekisaki ntango mingi kaka na mosala ya kosakola te; asalaki mpe mosala ya mosuni mpo na kozwa eloko ya kobikela. Na Korinti, afandaki na ndako ya Akila ná Priska, oyo mosala na bango ezalaki ya kotonga bahema. Lokola Paulo mpe ayebaki mosala yango, mikolo mosusu azalaki kosala elongo na bango. (Mis. 18:1-4) Elimo santu epesaki Paulo nguya ya kosala mosala ya mosuni mpe ya komipesa na mosala ya kosakola.

4. Na kotalela 2 Bakorinti 12:7b-9, mokakatano nini Paulo azalaki na yango?

4 Tángá 2 Bakorinti 12:7b-9. Na vɛrsɛ yango, Paulo alingaki komonisa nini ntango alobaki ete azalaki na “nzubɛ moko na kati ya mosuni”? Nzubɛ eswaka mpenza soki ekɔti moto na nzoto. Na yango, Paulo alingaki komonisa ete azalaki na mokakatano oyo ezalaki kopesa ye mpasi mingi. Alobaki ete ezalaki lokola “anzelu moko ya Satana” azalaki kokoba ‘kobɛta ye mbata.’ Ntango mosusu ezalaki te Satana to bademo na ye nde babimiselaki Paulo mokakatano yango, oyo ezalaki lokola nzubɛ oyo bakɔtisi ye na nzoto. Kasi, ntango bilimo mabe yango bamonaki “nzubɛ” wana, ekoki kozala ete na ndenge ya elilingi, balukaki kokɔtisa yango malamumalamu mpo na kobakisela Paulo mpasi. Paulo asalaki nini?

5. Ndenge nini Yehova ayanolaki na mabondeli ya Paulo?

5 Liboso, Paulo alingaki ete “nzubɛ” yango elongwa. Alobi boye: “Nabondelaki Nkolo [Yehova] mbala misato mpo elongwa epai na ngai.” Kasi, atako Paulo abondelaki mbala mingi, nzubɛ yango ezalaki kaka. Yango elakisi ete Yehova ayanolaki te na mabondeli ya Paulo? Te, ezali bongo te. Yehova ayanolaki na mabondeli ya Paulo. Alongolaki mokakatano ya Paulo te, kasi apesaki ye makasi ya koyikela yango mpiko. Yehova alobaki: “Nguya na ngai ezali kokóma ya kokoka na kati ya bolɛmbu.” (2 Ko. 12:8, 9) Na yango, na lisalisi ya Nzambe, Paulo abatelaki esengo mpe kimya na ye ya motema!​—Flp. 4:4-7.

6. (a) Eyano nini Yehova akoki kopesa na mabondeli na yo? (b) Maloba nini ya bavɛrsɛ oyo etyami na paragrafe oyo ezali kopesa yo makasi?

6 Ndenge moko na Paulo, ekómelá yo osɛnga Yehova alongola mokakatano moko oyo ozalaki na yango? Soki obondelaki mingi kasi mokakatano yango elongwaki te, to eyaki kutu makasi, okanisaki ete mbala mosusu Yehova azalaki lisusu kosepela na yo te? Soki bongo, kanisá ndakisa ya Paulo. Ndenge kaka Yehova ayanolaki na mabondeli na ye, yebá ete akoyanola mpe na mabondeli na yo! Ntango mosusu Yehova akosilisa mokakatano na yo te. Kasi, na nzela ya elimo santu, akopesa yo makasi oyo osengeli na yango mpo na koyikela mokakatano yango mpiko. (Nz. 61:3, 4) Okoki “kobambama na nse,” kasi Yehova akotika yo te.​—2 Ko. 4:8, 9; Flp. 4:13.

ELIMO SANTU ESALISAKA BISO TÓKOBA KOSALELA YEHOVA

7-8. (a) Na ndenge nini elimo santu ezali lokola mopɛpɛ? (b) Ntoma Petro alobaki nini mpo na ndenge oyo elimo santu esalaka?

7 Wapi lolenge mosusu oyo elimo santu esalisaka biso? Ndenge moko na mopɛpɛ makasi oyo ezali kobɛta na ebale mpe ezali komema masuwa na nzela ya malamu, elimo santu esalisaka biso tókoba kosalela Yehova atako tozali na mikakatano tii tokokɔta na mokili ya sika oyo Nzambe alaki.

8 Ntoma Petro azalaki mobomi-mbisi mpe ayebaki malamu ndenge mobembo na masuwa ezalaka. Ekoki kozala mpo na yango nde, ntango alobelaki ndenge oyo elimo santu esalaka, asalelaki maloba oyo emonani ete etali mibembo na masuwa. Akomaki boye: “Esakweli eyá ata mbala moko te na mokano ya moto, kasi bato balobaki makambo oyo euti na Nzambe ndenge elimo santu ezalaki kotinda bango.” Liloba ya Grɛki oyo ebongolami “kotinda” elimboli mpenzampenza “komema; kopusa.”​—2 Pe. 1:21.

9. Petro alingaki bato bákanisa nini ntango akomaki ete elimo santu ‘ezalaki kotinda’ bakomi ya Biblia?

9 Ntoma Petro alingaki ete bato bákanisa nini ntango asalelaki liloba “kotinda”? Luka, oyo akomaki mokanda ya Misala, asalelaki mpe liloba yango ya Grɛki na ndenge wana mpo na kolobela masuwa oyo ‘ememamaki’ na mopɛpɛ. (Mis. 27:15) Na yango, moto moko ya mayele oyo alimbolaka maloba ya Biblia alobi ete ntango Petro alobaki ete elimo santu ‘etindaki’ to ‘ememaki’ bakomi ya Biblia, asalelaki maloba kitoko ya elilingi oyo eyokani na makambo ya masuwa. Na maloba mosusu, Petro alingaki komonisa ete ndenge kaka mopɛpɛ epusaka masuwa tii na libongo, elimo santu epusaki basakoli mpe bato mosusu oyo bakomaki Biblia mpo bákokisa mosala na bango. Moto yango ya mayele alobaki lisusu ete: “Na maloba ya elilingi, basakoli bamatisaki elamba ya masuwa na bango.” Yehova akokisaki mokumba na ye na ndenge apesaki elimo santu na ye. Bakomi ya Biblia mpe bakokisaki mokumba na bango na ndenge balandaki nzela oyo elimo yango ememaki bango.

LIKAMBO 1: Saláká makambo ya elimo mbala na mbala

LIKAMBO 2: Omipesa na makambo yango na kotalela makoki na yo (Talá paragrafe 11) *

10-11. Makambo nini mibale tosengeli kosala mpo tózwa matomba ya elimo santu? Pesá ndakisa.

10 Ya solo, ntango ya kokoma Biblia na lisalisi ya elimo santu esí eleká. Kasi, tii lelo oyo, elimo santu epesaka basaleli ya Nzambe nguya. Na yango, Yehova akokisaka kaka mokumba na ye. Bongo biso, tokoki kosala nini mpo tózwa matomba ya elimo santu? Tosengeli mpe kokokisa mokumba na biso. Ndenge nini tokoki kosala yango?

11 Tózwa ndakisa. Mpo na kozwa matomba ya mopɛpɛ, matelo asengeli kosala makambo mibale. Ya liboso, asengeli kobalola masuwa na ye na ngámbo oyo mopɛpɛ ezali kokende. Soki afandi kaka na libongo, mosika na esika oyo mopɛpɛ ezali koleka, masuwa na ye ekokende liboso te. Ya mibale, asengeli komatisa mpe kofungola elamba ya masuwa malamu mpenza. Ata soki mopɛpɛ ezali koleka, masuwa ekotambola malamu kaka soki elamba ya masuwa ezali mpenza kotonda na mopɛpɛ. Ndenge moko mpe, tokokoba kosalela Yehova kaka soki tozali na lisalisi ya elimo santu. Mpo na kozwa matomba ya elimo yango, tosengeli mpe kosala makambo mibale. Ya liboso, tosengeli kosala makambo oyo esalaka ete tózwa elimo yango, na maloba mosusu, kozala esika oyo mopɛpɛ ezali koleka. Ya mibale, tosengeli komipesa mobimba na kosala makambo yango na kotalela makoki na biso, na maloba mosusu ‘komatisa elamba ya masuwa.’ (Nz. 119:32) Soki tosali makambo wana, elimo santu ekosalisa biso tókoba koyika mpiko na botɛmɛli mpe na komekama, mpe tótikala sembo tii na mokili ya sika ya Nzambe.

12. Tokotalela nini sikoyo?

12 Na baparagrafe oyo eleki, toyekoli ndenge mibale oyo elimo santu esalisaka biso. Ya liboso, epesaka biso nguya mpe esalisaka biso tótikala sembo ntango tokutani na komekama. Ya mibale, esalisaka biso tókende liboso na mosala ya Yehova mpe tótikala na nzela ya bomoi ya seko. Sikoyo, tótalela makambo minei oyo tosengeli kosala mpo tózwa mpenza matomba ya elimo santu.

NDENGE YA KOZWA MPENZA MATOMBA YA ELIMO SANTU

13. Na kotalela 2 Timote 3:16, 17, ndenge nini Makomami ekoki kosalisa biso, kasi tosengeli kosala nini?

13 Ya liboso, koyekola Liloba ya Nzambe. (Tángá 2 Timote 3:16, 17.) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe” elimboli mpenzampenza “epemami na Nzambe.” Nzambe asalelaki elimo na ye mpo na “kopema” to kokɔtisa makanisi na ye na oyo ya bakomi ya Biblia. Ntango tozali kotánga Biblia mpe komanyola makambo oyo totángi, mateya ya Nzambe ezali kokɔta na makanisi mpe mitema na biso. Mateya yango etindaka biso tósala mbongwana na bomoi na biso mpo tósepelisa Yehova. (Ebr. 4:12) Kasi, mpo tózwa mpenza matomba ya elimo santu, tosengeli kotya ntango mpo na koyekola Biblia mbala na mbala mpe kokanisa na mozindo makambo oyo tozali kotánga. Soki tosali bongo, Liloba ya Nzambe ekotambwisa maloba mpe misala na biso nyonso.

14. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete makita na biso ezali lokola esika oyo “mopɛpɛ ezali koleka”? (b) Na ndenge nini tokoki koya na makita wana ‘tomatisi elamba ya masuwa na biso’?

14 Ya mibale, koyangana elongo mpo na kosambela Nzambe. (Nz. 22:22) Tokoki koloba ete makita na biso ezali lokola esika oyo “mopɛpɛ ezali koleka.” Elimo ya Yehova ezalaka na makita na biso. (Em. 2:29) Mpo na nini tokoki koloba bongo? Mpo ntango toyangani na makita elongo na bandeko na biso bakristo, tosɛngaka Yehova elimo santu, toyembaka nzembo ya Bokonzi oyo maloba na yango euti na Liloba ya Nzambe, mpe toyokaka masolo ya Biblia ya bandeko mibali, oyo batyamaki bankulutu mpe basaleli na misala na nzela ya elimo santu. Lisusu, elimo santu esalisaka bandeko basi bábongisa masolo na bango mpe básala yango. Kasi, mpo tózwa mpenza matomba ya elimo santu, tosengeli kobongisaka makita liboso mpo tópesa biyano. Yango ekozala lokola ‘tomatisi elamba ya masuwa na biso.’

15. Ndenge nini tokoki kopesa elimo santu nzela esalisa biso na mosala ya kosakola?

15 Ya misato, mosala ya kosakola. Ntango totángelaka bato Biblia na mosala ya kosakola mpe ya koteya, topesaka elimo santu nzela esalisa biso na mosala yango. (Rom. 15:18, 19) Kasi, mpo tózwa mpenza matomba ya elimo santu, tosengeli kobimaka mosala ya kosakola mbala na mbala mpe kosala makasi tótángela bato Biblia ntango nyonso oyo tozwi libaku. Okoki kokolisa makoki na yo ya kosakola soki ozali kosalela makanisi mpo na kobanda lisolo, oyo ebimaka na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bokristo.

16. Ndenge nini tokoki kozwa elimo santu na mbala moko?

16 Ya minei, kobondela Yehova. (Mat. 7:7-11; Luka 11:13) Ndenge ya kozwa elimo santu na mbala moko ezali ya kosɛnga yango Yehova na libondeli. Eloko moko te ekoki kopekisa mabondeli na biso ekómela Yehova to kopekisa likabo ya Nzambe ya elimo santu ekómela biso, ezala bolɔkɔ to ata Satana. (Yak. 1:17) Ndenge nini tosengeli kobondela mpo tózwa mpenza matomba ya elimo santu? Mpo na kozwa eyano, tólobela makambo mosusu oyo etali libondeli, oyo ezali na ndakisa moko oyo ezali kaka na Evanzile ya Luka. *

TYÁ MBAMBA NTANGO OZALI KOBONDELA

17. Ndakisa ya Yesu oyo ezali na Luka 11:5-9, 13 ekoki koteya biso nini mpo na libondeli?

17 Tángá Luka 11:5-9, 13. Ndakisa yango ya Yesu emonisi ndenge oyo tosengeli kobondela mpo na kosɛnga elimo santu. Na ndakisa yango, mobali wana azwaki eloko oyo asengelaki na yango ‘mpo atyaki mbamba makasi.’ Abangaki te kosɛnga moninga na ye lisalisi atako ekómaki butu makasi. Ndenge nini Yesu ayokanisaki ndakisa yango na libondeli? Alobaki boye: “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino; bókoba koluka, mpe bokomona; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino.” Yango ezali koteya biso nini? Ezali koteya biso ete mpo tózwa matomba ya elimo santu, tosengeli kotya mbamba ntango tozali kobondela mpo na kosɛnga yango.

18. Na kotalela ndakisa ya Yesu, mpo na nini tokoki kozala na elikya ete Yehova akopesa biso elimo santu na ye?

18 Ndakisa ya Yesu ezali mpe kosalisa biso tómona ntina oyo Yehova akopesa biso elimo santu. Mobali wana azalaki na mposa ayamba mopaya na ye malamu. Amonaki ete atako ezalaki butu makasi, asengeli kopesa mopaya na ye bilei, kasi azalaki na eloko te. Yesu alobaki ete moninga yango apesaki mobali wana mampa mpo atyaki ye mbamba makasi. Yesu alingaki komonisa nini? Soki moto ya kozanga kokoka akoki kondima kosalisa moninga na ye mpo atye ye mbamba, bongo Tata na biso ya likoló, oyo atondi na boboto akosalisa te bato oyo batyaka ye mbamba mpo na kosɛnga elimo santu? Yango wana, tokoki kozala na elikya ete Yehova akoyanola na libondeli na biso ntango tosɛngi ye apesa biso elimo santu nokinoki.​—Nz. 10:17; 66:19.

19. Mpo na nini toyebi ete tokolonga?

19 Tóyeba ete atako Satana azali kolɛmba te kosala milende mpo na kokweisa biso, tokolonga ye. Mpo na nini? Mpo elimo santu esalisaka biso na ndenge mibale. Ya liboso, epesaka biso nguya ya koyika mpiko na mikakatano. Ya mibale, lokola mopɛpɛ oyo ‘etondisaka elamba ya masuwa,’ elimo santu esalisaka biso tókoba kosalela Yehova kino tokokɔta na mokili ya sika ya Nzambe. Na yango, tózala na ekateli ya kozwa mpenza matomba ya elimo santu!

LOYEMBO 41 Yoká libondeli na ngai

^ par. 5 Lisolo oyo elimboli ndenge elimo santu ya Nzambe ekoki kosalisa biso tóyika mpiko. Elobeli mpe makambo oyo tokoki kosala mpo tózwa mpenza matomba ya elimo santu.

^ par. 16 Luka nde amonisi ete libondeli ezalaki na esika monene na bomoi ya Yesu, koleka bakomi mosusu ya Baevanzile.​—Luka 3:21; 5:16; 6:12; 9:18, 28, 29; 18:1; 22:41, 44.

^ par. 59 ELILINGI: LIKAMBO 1: Ndeko mobali moko ná ndeko mwasi bayei na Ndako ya Bokonzi. Lokola bayangani na makita elongo na bandeko mosusu, bazali kozwa elimo ya Yehova oyo ezali wana. LIKAMBO 2: Bamibongisi mpo na kopesa biyano na makita. Makambo yango mibale etali mpe makambo mosusu oyo toyekoli na lisolo oyo: koyekola Biblia, kobima na mosala ya kosakola, mpe kobondela Yehova.