Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 46

Ozali kobatela “nguba monene ya kondima” na yo?

Ozali kobatela “nguba monene ya kondima” na yo?

“Bókamata nguba monene ya kondima.”​—EF. 6:16.

LOYEMBO 119 Tosengeli kozala na kondima

NA MOKUSE *

1-2. (a) Na kotalela Baefese 6:16, mpo na nini tosengeli kozala na “nguba monene ya kondima”? (b) Tokotalela mituna nini?

OZALI na “nguba monene ya kondima”? (Tángá Baefese 6:16.) Tondimi ete ozali na yango. Ndenge moko na nguba ya soda oyo ebatelaka biteni mingi ya nzoto, kondima na yo ebatelaka yo na makambo ya pite, mobulu mpe makambo mosusu ya mabe ya mokili oyo.

2 Kasi, lokola tozali “na mikolo ya nsuka,” kondima na biso ekokoba komekama. (2 Tim. 3:1) Ndenge nini okoki koyeba soki kondima na yo ezali makasi? Mpe ndenge nini okoki kosimba makasi nguba ya kondima na yo? Tokotalela biyano na mituna yango.

TALAKÁ NGUBA YA KONDIMA NA YO NA LIKEBI

Nsima ya etumba, basoda bazali kobongisa nguba na bango (Talá paragrafe 3)

3. Basoda bazalaki kosala nini na nguba na bango, mpe mpo na nini?

3 Na ntango ya kala, mbala mingi basoda bazalaki na nguba ya ebende oyo bazipá yango mposo ya nyama. Basoda bazalaki kopakola nguba mafuta mpo na kobatela mposo ya nyama mpe biteni ya ebende mpo eguga te. Soki soda amoni ete nguba na ye ebebaki, azalaki kosala oyo esengeli mpo na kobongisa yango, mpo esalisa ye lisusu na etumba oyo ekoya. Ndenge nini ndakisa yango etali mpe kondima na yo?

4. Mpo na nini osengeli kotalaka nguba ya kondima na yo, mpe ndenge nini osengeli kosala yango?

4 Ndenge moko na basoda ya ntango ya kala, osengeli mbala na mbala kotala soki nguba ya kondima na yo ezali ya kobeba te mpo esalisa yo ntango nyonso na etumba. Biso bakristo tozali kobunda etumba ya elimo mpe banguna na biso mosusu ezali bilimo mabe. (Ef. 6:10-12) Moto moko te akoki kobongisela yo nguba ya kondima na yo. Ndenge nini okoki koyeba soki kondima na yo ekozala makasi soki omekami? Ya liboso, osengeli kobondela Nzambe asalisa yo. Na nsima, osengeli kosalela Liloba ya Nzambe mpo esalisa yo omimona ndenge Nzambe amonaka yo. (Ebr. 4:12) Biblia elobi: “Tyelá Yehova motema na yo mobimba mpe kondimela mayele na yo moko te.” (Mas. 3:5, 6) Na yango, kanisá naino makambo oyo okutanaki na yango na mikolo eleki mpe bikateli oyo ozwaki mpo na yango. Na ndakisa, okutanaki na mikakatano makasi ya mbongo? Okanisaki elaka ya Yehova oyo ezali na Baebre 13:5 ete: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te”? Elaka yango epesaki yo elikya ete Yehova akosalisa yo? Soki ezali bongo, yango emonisi ete nguba ya kondima na yo ezali ya kobeba te.

5. Makambo nini okoki komona soki otali kondima na yo na likebi?

5 Makambo oyo omoni ntango otali kondima na yo na likebi ekoki kokamwisa yo. Okoki komona ete okómá na bolɛmbu, kasi oyebaka te. Na ndakisa, okoki komona ete komitungisa koleka ndelo, bansango ya lokuta, mpe kolɛmba nzoto ebebisá kondima na yo. Soki likambo yango ekómeli yo, ndenge nini okoki kobatela kondima na yo mpo ekoba kobeba te?

KEBÁ NA KOMITUNGISA KOLEKA NDELO, NA BANSANGO YA LOKUTA, MPE NA KOLƐMBA NZOTO

6. Bandakisa nini emonisi ete komitungisa mosusu ezalaka mabe te?

6 Komitungisa mosusu ezalaka mabe te. Na ndakisa, tomitungisaka mpo na ndenge oyo tokoki kosepelisa Yehova mpe Yesu. (1 Ko. 7:32) Soki tosali lisumu ya monene, tomitungisaka mpo na koluka ndenge ya kobongisa boyokani na biso na Nzambe. (Nz. 38:18) Tomitungisaka mpe mpo na ndenge oyo tokoki kosepelisa molongani na biso mpe ndenge oyo tokoki kosalisa bato ya libota na biso mpe bandeko na biso bakristo.​—1 Ko. 7:33; 2 Ko. 11:28.

7. Na kotalela Masese 29:25, mpo na nini tosengeli kobanga bato te?

7 Nzokande, komitungisa koleka ndelo ekoki kobebisa kondima na biso. Na ndakisa, tokoki komitungisa mingi mpo na kozwa bilei mpe bilamba oyo esengeli. (Mat. 6:31, 32) Yango ekoki kotinda biso tótya makanisi nyonso na koluka biloko ya mokili. Tokoki kutu kokóma na bolingo ya mbongo. Soki totiki likambo yango esalema, kondima na biso epai ya Yehova ekolɛmba mpe boninga na biso na ye ekobeba. (Mrk. 4:19; 1 Tim. 6:10) Tokoki mpe komitungisa koleka ndelo mpo na likambo mosusu: koluka kaka ete bato bándima biso. Na ntango yango, kobanga ete bato bátyola biso to bányokola biso ekoki kokóma makasi koleka kobanga kobuka mibeko ya Yehova. Mpo tókima likama yango, tosengeli kosɛnga Yehova apesa biso kondima mpe mpiko oyo tosengeli na yango mpo tóbanga bato te.​—Tángá Masese 29:25; Luka 17:5.

(Talá paragrafe 8) *

8. Tosengeli kosala nini mpo na bansango ya lokuta?

8 Satana, oyo azali “tata ya lokuta,” asalelaka bato na ye mpo na kopanza bansango ya lokuta na ntina etali Yehova mpe bandeko na biso bakristo. (Yoa. 8:44) Na ndakisa, bapɛngwi balobaka lokuta mpe babalolaka makambo oyo etali ebongiseli ya Yehova na nzela ya Internet, baemisyo ya televizyo, bazulunalo, mpe bongo na bongo. Makambo yango ya lokuta ezali na kati ya ‘mbanzi ya Satana oyo ezali kopela.’ (Ef. 6:16) Tosengeli kosala nini soki moto moko abandi koloba na biso makambo ya ndenge wana? Tokoboya koyoka yango! Mpo na nini? Mpo tozali na kondima epai ya Yehova mpe totyelaka bandeko na biso motema. Kutu, toboyaka na motema moko kosolola na bapɛngwi. Tolingaka te ete moto to eloko moko boye, ata mpe mposa na biso ya koluka koyeba makambo, etinda biso tóbendana na bango.

9. Kolɛmba nzoto ekoki kosala biso nini?

9 Kolɛmba nzoto ekoki kobebisa kondima na biso. Na bantango mosusu tolɛmbaka nzoto mpo tozali na mikakatano. Ya solo, tosengeli te kozala mafumafu mpo ekomonana lokola nde tokimaka mikumba na biso. Kasi tosengeli te kokanisakanisa mikakatano na biso ntango nyonso. Soki tosali bongo, tokoki kobosana elikya kitoko oyo Yehova apesi biso. (Em. 21:3, 4) Na ntango yango, kolɛmba nzoto ekoki kosilisa biso makasi mpe kotinda biso tótika kosalela Yehova. (Mas. 24:10) Kasi tólinga te makambo ya bongo esalema.

10. Mokanda oyo ndeko mwasi moko akomaki eteyi yo nini?

10 Tótala ndenge ndeko mwasi moko na États-Unis abatelaka kondima na ye, nzokande asalisaka mpe mobali na ye oyo azali na maladi ya makasi. Na mokanda oyo akomelaki biro monene, alobaki boye: “Na bantango mosusu, likambo yango etungisaka mingi mpe elɛmbisaka biso nzoto, kasi elikya na biso ezali makasi. Nazali na botɔndi mingi mpo na makambo nyonso oyo Yehova apesaka biso mpo na kokómisa kondima na biso makasi mpe kolendisa biso. Tozali mpenza na mposa ya toli mpe bilendiseli yango. Esalisaka biso tókoba kosalela Yehova mpe tóyika mpiko na mikakatano oyo Satana azali kobakisela biso.” Maloba ya ndeko mwasi wana emonisi ete tokoki kosala makasi mpo tólɛmba nzoto te! Ndenge nini? Moná ete mikakatano na yo ezali libaku oyo ozwi mpo na kotɛmɛla Satana. Tyá motema ete Yehova akobɔndisa yo. Mpe zalá na botɔndi mpo na bilei ya elimo oyo apesaka biso.

Ozali kobatela “nguba monene ya kondima” na yo? (Talá paragrafe 11) *

11. Mpo na koyeba soki kondima na biso ezali ya kobeba te, mituna nini tosengeli komituna?

11 Omoni mwa bisika oyo osengeli kobongisa na nguba ya kondima na yo? Na basanza oyo euti koleka, osalaki makasi mpo oboya komitungisa koleka ndelo? Oboyaki koyoka to kobendana na bapɛngwi mpo na bansango ya lokuta oyo bapanzaka? Mpe osalaki makasi mpo olɛmba nzoto te na likambo moko boye? Soki bongo, yebá ete kondima na yo ezali ya kobeba te. Kasi, tosengeli kozala ekɛngɛ mpo Satana azali mpe na bibundeli mosusu oyo asalelaka mpo na kobundisa biso. Tótalela moko na yango.

KEBÁ NA BOLINGO YA BILOKO YA MOKILI

12. Bolingo ya biloko ya mokili ekoki kosala biso nini?

12 Bolingo ya biloko ya mokili ekoki kolongola likebi na biso na mosala ya Yehova mpe kolɛmbisa kondima na biso. Ntoma Paulo alobaki boye: “Moto oyo azali kosala mosala ya soda amikɔtisaka na mimbongo te lokola bato oyo bazali basoda te, mpo moto oyo azwaki ye na mosala ya soda andima ye.” (2 Tim. 2:4) Basoda ya Roma bazalaki na ndingisa ata moke te ya kosala mosala mosusu. Nini ekokaki kosalema soki soda atosi mobeko yango te?

13. Mpo na nini ebongaki te soda amikɔtisa na makambo ya mombongo?

13 Tózwa ndakisa. Etuluku moko ya basoda balekisi ntɔngɔ mobimba mpo na komekameka kosalela mipanga na bango, kasi moninga na bango moko azali te. Akei kotɛka biloko ya kolya na zando. Na mpokwa, basoda bazali kotalatala molato na bango ya etumba mpe kopelisa mipanga na bango. Kasi soda oyo atɛkaka azali kobongisa biloko oyo akotɛka lobi. Mokolo oyo elandi na ntɔngɔ, monguna moko ayei kobundisa bango na mbalakaka. Okanisi ete soda nini akobunda malamu mpe akondimama epai ya komanda na bango? Soki ozalaki na etumba yango, olingaki kosepela ete soda nini atɛlɛma pene na yo, oyo amibongisaki to oyo azalaki kosala makambo mosusu?

14. Lokola tozali basoda ya Kristo, tomonaka ete nini nde ezali na motuya mingi?

14 Ndenge moko na basoda ya malamu, tolingaka te kolongola makanisi na mokano na biso ya libosoliboso: kondimama epai ya bakomanda na biso, Yehova mpe Kristo. Tomonaka ete yango ezali na motuya mingi koleka eloko nyonso oyo tokoki kozwa na mokili ya Satana. Tolingaka kozala na ntango mpe makasi oyo esengeli mpo tósalela Yehova mpe tóbatela malamu nguba ya kondima na biso mpe biloko mosusu ya molato ya etumba na biso ya elimo.

15. Likebisi nini Paulo apesi biso, mpe mpo na nini?

15 Tosengeli ntango nyonso kozala ekɛngɛ! Mpo na nini? Ntoma Paulo alobaki ete “bato oyo balingaka kaka kozala bazwi” ‘bakobunga nzela.’ (1 Tim. 6:9, 10) Liloba oyo ebongolami na ‘kobunga nzela’ emonisi ete tokoki kotya makanisi mingi na koluka biloko oyo tozali mpenza na bosɛnga na yango te. Yango ekoki kosala ete motema na biso ekolisa “bamposa mingi ya bozoba mpe oyo eyokisaka mpasi.” Na esika tótika bamposa yango efanda na mitema na biso, tosengeli kobosana te ete Satana asalelaka bamposa yango lokola bibundeli mpo na kolɛmbisa kondima na biso.

16. Lisolo oyo ezali na Marko 10:17-22 esengeli kotinda biso tókanisa mituna nini?

16 Kanisá ete ozali na mbongo ebele mpe okoki kosomba biloko mingi. Ezali mabe kosomba biloko oyo olingi ata soki ozali mpenza na bosɛnga na yango te? Mpenza te. Kasi kanisá naino mituna oyo: Ata soki nazali na likoki ya kosomba eloko moko boye, nazali mpenza na ntango mpe na makasi ya kosalela mpe kobatela eloko yango malamu? Mpe nakokóma kokangama mingi na biloko yango ya mosuni? Mokolo mosusu bolingo na ngai mpo na biloko ya mosuni ekoki kotinda ngai naboya komipesa mingi na mosala ya Nzambe, ndenge elenge mozwi moko aboyaki kondima libyangi oyo Yesu apesaki ye? (Tángá Marko 10:17-22.) Eleki malamu tózala na bomoi ya pɛpɛlɛ mpe tósalela ntango mpe makasi na biso mpo na kosala mokano ya Nzambe!

SIMBÁ MAKASI NGUBA YA KONDIMA NA YO

17. Likambo nini tosengeli kobosana te?

17 Tosengeli kobosana te ete tozali na etumba mpe ete mokolo na mokolo tosengeli kozala bato oyo babongami mpo na kobunda. (Em. 12:17) Ndeko moko te ya lisangá nde akomemela biso nguba ya kondima na biso. Biso moko tosengeli kosimba makasi nguba ya kondima na biso.

18. Mpo na nini basoda ya ntango ya kala bazalaki kosimba nguba na bango makasi?

18 Na ntango ya kala, soda azalaki kozwa lokumu mingi soki amonisi mpiko na etumba. Kasi, soki azongi ndako kozanga nguba na ye ezalaki likambo ya nsɔni. Tacite, moto ya istware ya Roma, akomaki boye: “Soki soda asundoli nguba na ye na etumba ezalaki nsɔni monene mpenza.” Yango nde ntina mosusu oyo basoda bazalaki kosimba nguba na bango makasi.

Mpo na kosimba makasi nguba ya kondima na ye, ndeko mwasi moko atángaka Biblia, ayanganaka na makita mpe abimaka na mosala ya kosakola (Talá paragrafe 19)

19. Nini ekosalisa biso tósimba makasi nguba ya kondima na biso?

19 Tokosimba makasi nguba ya kondima na biso soki tozali koyangana na makita nyonso mpe soki tozali koyebisa basusu makambo ya Yehova mpe ya Bokonzi na ye. (Ebr. 10:23-25) Longola yango, totángaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpe tosɛngaka Yehova asalisa biso mpo tósalela makambo oyo toyekoli. (2 Tim. 3:16, 17) Na ntango yango, ebundeli moko te oyo Satana asalelaka ekosala biso mabe mpo na libela. (Yis. 54:17) “Nguba monene ya kondima” na biso ekobatela biso. Tokopikama makasi, mpe tokosala na bomoko elongo na bandeko na biso. Tokolonga etumba oyo tobundaka mokolo na mokolo mpo na kobatela makasi kondima na biso, mpe oyo eleki ntina, tokozwa lokumu ya kozala na ngámbo ya Yesu ntango akolonga Satana na bato na ye.​—Em. 17:14; 20:10.

LOYEMBO 118 “Bakiselá biso kondima”

^ par. 5 Basoda bazalaki kosalela nguba mpo ebatela bango. Kondima na biso mpe ezali lokola nguba. Mpe ndenge kaka soda abongisaka nguba na ye, tosengeli kobatela kondima na biso. Lisolo oyo elobeli makambo oyo tokoki kosala mpo “nguba monene ya kondima” na biso ezala ntango nyonso malamu.

^ par. 58 ELILINGI: Ntango bato ya libota moko ya Batatoli bayoki makambo ya lokuta oyo bapɛngwi bazali koloba mpo na Batatoli ya Yehova na TV, bakangi yango mbala moko.

^ par. 60 ELILINGI: Na nsima, na ntango ya losambo na kati ya libota, tata atángi vɛrsɛ moko ya Biblia mpo na kolendisa bato ya libota na ye.