Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 44

Salá boninga ya makasi na basusu liboso nsuka eya

Salá boninga ya makasi na basusu liboso nsuka eya

“Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso.”​—MAS. 17:17.

LOYEMBO 101 Tósala na bomoko

NA MOKUSE *

Tokozala na mposa ya baninga ya malamu na ntango ya “bolɔzi monene” (Talá paragrafe 2) *

1-2. Na kotalela 1 Petro 4:7, 8, nini ekosalisa biso tóyika mpiko na ntango ya mpasi?

LOKOLA tozali se kokóma na nsuka ya “mikolo ya nsuka,” tokoki kokutana na mikakatano ya makasi. (2 Tim. 3:1) Na ndakisa, nsima ya kampanye ya maponami na ekólo moko ya Afrika ya wɛsti, yikiyiki mpe mobulu makasi ekɔtaki mpe mboka ekabwanaki. Koleka sanza motoba, bandeko bazalaki na likama mpo bitumba ezalaki zingazinga na bango. Nini esalisaki bango báyika mpiko na ntango wana ya mpasi? Bandeko mosusu bakendaki kofanda na bandako ya bandeko oyo bazalaki na esika oyo bitumba ezalaki te. Ndeko mobali moko alobaki boye: “Na ntango wana, nazalaki na esengo mpo nazalaki elongo na baninga. Tozalaki kolendisana.”

2 Ntango “bolɔzi monene” ekobanda, tokozala na esengo soki tozali na baninga ya malamu oyo balingaka biso. (Em. 7:14) Na yango, sikoyo nde ntango ya kosala boninga ya makasi na basusu. (Tángá 1 Petro 4:7, 8.) Tokoki kozwa mateya mingi na ndakisa ya Yirimia, oyo baninga na ye basalisaki ye mpo abika na eleko ya mpasi oyo ezalaki liboso Yerusaleme ebebisama. * Ndenge nini tokoki komekola Yirimia?

ZWÁ LITEYA NA NDAKISA YA YIRIMIA

3. (a) Nini ekokaki kotinda Yirimia amitangola na basusu? (b) Yirimia ayebisaki Baruke nini, mpe yango ebotaki mbuma nini?

3 Na boumeli ya mbula 40 to koleka, Yirimia afandaki na bato oyo bazalaki sembo te, ezala bato oyo bazalaki kofanda zingazinga na ye, mpe mbala mosusu bato oyo bautaki na mboka na ye Anatote. (Yir. 11:21; 12:6) Kasi, amitangolaki te. Kutu, ayebisaki Baruke, sɛkrɛtɛrɛ na ye ya sembo, ndenge oyo azalaki komiyoka; biso mpe toyebi yango mpo nsukansuka akomaki makanisi na ye. (Yir. 8:21; 9:1; 20:14-18; 45:1) Na ntembe te, ntango Baruke azalaki kokoma makambo oyo ezalaki kokómela Yirimia, bakómaki kolingana makasi mpe kopesana limemya mingi.​—Yir. 20:1, 2; 26:7-11.

4. Yehova asɛngaki Yirimia asala nini, mpe ndenge nini mosala yango ekómisaki makasi boninga ya Yirimia ná Baruke?

4 Bambula ebele, Yirimia azalaki kokebisa Bayisraele na mpiko nyonso mpo na makambo oyo elingaki kosalema na Yerusaleme. (Yir. 25:3) Ntango Yehova alukaki lisusu kosalisa bato bábongola motema, asɛngaki Yirimia akoma makebisi na Ye nyonso na rulo. (Yir. 36:1-4) Ntango Yirimia ná Baruke bazalaki kosala elongo mosala yango oyo Nzambe apesaki bango, oyo mbala mosusu ezwaki basanza ebele, na ntembe te bazalaki kobɛta masolo oyo ekómisaki kondima na bango makasi.

5. Ndenge nini Baruke amonisaki ete azali mpenza moninga ya Yirimia?

5 Ntango basilisaki kokoma rulo yango mpe esɛngaki ete bato báyeba makambo oyo ezalaki na kati, Yirimia asɛngaki moninga na ye Baruke ayebisa bato nsango yango. (Yir. 36:5, 6) Na mpiko nyonso, Baruke akokisaki mokumba yango oyo ezalaki likama mpo na ye. Kanisá ndenge Yirimia asepelaki ntango Baruke akendaki na lopango ya tempelo mpe asalaki likambo oyo asɛngaki ye! (Yir. 36:8-10) Ntango bankumu ya Yuda bayokaki likambo oyo Baruke asalaki, basɛngaki ye atángela bango rulo yango na mongongo makasi. (Yir. 36:14, 15) Bankumu bazwaki ekateli ya koyebisa Mokonzi Yehoyakime makambo oyo Yirimia alobaki. Bamoniselaki Baruke boboto mpe balobaki na ye: “Kende komibomba, yo ná Yirimia, mpo ete moto moko te ayeba esika bozali.” (Yir. 36:16-19) Ezalaki toli ya malamu mpenza!

6. Yirimia ná Baruke basalaki nini ntango bakutanaki na botɛmɛli?

6 Mokonzi Yehoyakime asilikaki makasi ntango ayokaki maloba oyo Yirimia akomaki, atumbaki rulo yango, mpe apesaki mitindo ete bákanga Yirimia ná Baruke. Kasi, Yirimia azongaki nsima te. Azwaki rulo mosusu, apesaki yango Baruke, mpe ntango azalaki koyebisa ye nsango ya Yehova, Baruke akomaki ‘maloba nyonso oyo ezalaki na rulo ya liboso, oyo Yehoyakime mokonzi ya Yuda atumbaki.’​—Yir. 36:26-28, 32.

7. Ekoki kozala ete nini esalemaki ntango Yirimia ná Baruke bazalaki kosala elongo?

7 Mbala mingi, bato oyo bayiki mpiko elongo na komekama moko boye bakómaka na boninga ya makasi. Na yango, wana Yirimia ná Baruke bazalaki kosala elongo mpo na kokoma rulo mosusu na esika ya rulo oyo mokonzi mabe Yehoyakime atumbaki, ekoki kozala ete mokomoko akómaki kosepela lisusu mingi na bizaleli malamu ya moninga. Ndenge nini ndakisa ya mibali yango ya sembo ekoki kosalisa biso?

KOSOLOLA POLELE

8. Nini ekoki kopekisa biso tósala boninga ya makasi na basusu, mpe mpo na nini tosengeli kolɛmba te?

8 Ntango mosusu tozalaka na mokakatano ya kofungwela basusu motema mpo moto moko apesaki biso mpasi na kala. (Mas. 18:19, 24) To mpe tomonaka ete tozali na ntango te mpe makasi te ya kosala boninga ya makasi na basusu. Kasi, tosengeli kolɛmba te. Mpo bandeko bázala elongo na biso ntango tokutani na mikakatano, tosengeli koyekola kotyela bango motema banda sikoyo, koyebisaka bango makanisi mpe mayoki na biso. Yango nde esalaka ete bato bákóma baninga ya solosolo.​—1 Pe. 1:22.

9. (a) Ndenge nini Yesu amonisaki ete atyelaki baninga na ye motema? (b) Ndenge nini kosolola polele na basusu ekoki kosala ete boninga na bino ekóma makasi? Pesá ndakisa.

9 Yesu azalaki kosolola na baninga na ye polele mpo na komonisa ete atyelaki bango motema. (Yoa. 15:15) Tokoki komekola ye soki tozali koyebisa basusu makambo oyo esepelisi biso, oyo ezali kotungisa biso to mpe kolɛmbisa biso nzoto. Soki ozali koyoka na likebi ntango moto azali koyebisa yo makambo na ye, okoki komona ete makanisi, mayoki, mpe mikano na bino mingi ezali ndenge moko. Tózwa ndakisa ya Cindy, ndeko mwasi moko ya mbula pene na 30. Akómaki moninga ya Marie-Louise, ndeko mwasi moko ya mobongisi-nzela oyo azalaki na mbula pene na 70. Cindy ná Marie-Louise bazalaki kobima na mosala ya kosakola mikolo nyonso ya minei na ntɔngɔ, mpe bazalaki kosolola polele makambo ndenge na ndenge. Cindy alobi boye: “Nasepelaka kolobela makambo ya ntina ntango nazali kobɛta masolo na baninga mpo yango esalisaka ngai nayeba bango malamu.” Bato bakómaka na ya boninga makasi soki basololaka polele. Ndenge moko na Cindy, soki opusani pene na basusu mpo na kosolola na bango, boninga na bino ekoki kokóma makasi.​—Mas. 27:9.

KOSALA ELONGO

Baninga ya malamu babimaka elongo na mosala ya kosakola (Talá paragrafe 10)

10. Na kotalela Masese 27:17, nini ekoki kosalema ntango tozali kosala elongo na bandeko na biso bakristo?

10 Ndenge kaka esalemaki mpo na Yirimia ná Baruke, ntango tozali kosala elongo na bandeko na biso bakristo mpe tozali komona bizaleli na bango ya malamu, tomekolaka bango mpe tokómaka baninga. (Tángá Masese 27:17.) Na ndakisa, oyokaka ndenge nini soki ozali na mosala ya kosakola na ndeko moko mpe oyoki ndenge azali kolobela bindimeli na ye na mpiko to azali kolimbola na motema mobimba ntina oyo andimelaka Yehova mpe bilaka na ye? Na ntembe te, olingaka ye lisusu mingi.

11-12. Pesá ndakisa oyo emonisi ete kobima elongo na mosala ya kosakola ekoki kosala ete boninga ekóma makasi.

11 Tózwa ndakisa mibale oyo emonisi ete kobima elongo na mosala ya kosakola esalaka ete bato bákóma baninga. Adeline, oyo azali na mbula 23, asɛngaki moninga na ye Candice bákende kosakola elongo na teritware oyo basakolá mingi te. Adeline alobi boye: “Tozalaki na mposa ya kosakola na molende mpe kosepela lisusu mingi na mosala ya kosakola. Tozalaki na mposa ya kolendisana mpo tókoba mosala ya Yehova.” Matomba nini bazwaki? Adeline alobi boye: “Na nsuka ya mokolo nyonso, tozalaki kolobela mayoki na biso, makambo oyo esepelisaki biso na masolo oyo tosololaki na bato, mpe ndenge tomonaki lobɔkɔ ya Yehova na mosala ya kosakola. Tozalaki kosepela mingi na masolo yango ya ntina mingi mpe toyebanaki malamu koleka.”

12 Laïla ná Marianne, bandeko basi mibale ya France oyo bazali minzemba, bakendaki mpo na kosakola pɔsɔ mitano na Bangui, engumba-mokonzi ya République centrafricaine. Laïla alobi boye: “Ngai ná Marianne tokutanaki na mikakatano, kasi lokola tozalaki kosolola malamu mpe tolinganaki mpenza, boninga na biso ekómaki makasi. Komona ndenge Marianne azalaki komesana na makambo ya sika, azalaki kolinga bato, mpe molende na ye na mosala ya kosakola esalaki ete nasepela na ye lisusu mingi.” Esɛngi kaka te okende na mboka-mopaya mpo ozwa matomba yango. Mbala nyonso oyo obimi na mosala ya kosakola elongo na ndeko mobali to ndeko mwasi ya lisangá na bino, ozwi libaku ya koyeba ye malamu mpe ya kokómisa makasi boninga na bino.

KOTALA BIZALELI MALAMU YA BASUSU MPE KOLIMBISA

13. Nini ekoki kosalema ntango tozali kosala elongo na baninga na biso?

13 Ntango tozali kosala elongo na baninga na biso, tokómaka komona makambo na bango ya malamu, kasi mpe bolɛmbu na bango. Nini ekoki kosalisa biso tóyika mpiko? Tótalela lisusu ndakisa ya Yirimia. Nini esalisaki ye atala bizaleli malamu ya basusu mpe atya likebi te na bolɛmbu na bango?

14. Bizaleli nini ya Yehova Yirimia ayekolaki, mpe ndenge nini esalisaki ye?

14 Yirimia akomaki mokanda oyo ebengami na nkombo na ye, mpe ekoki kozala ete akomaki mpe 1 Bakonzi ná 2 Bakonzi. Na ntembe te, mokumba yango esalisaki ye amona mpenza ndenge Yehova amoniselaka bato ya kozanga kokoka motema mawa. Na ndakisa, ayebaki ete ntango Mokonzi Ahaba abongolaki motema mpo na misala na ye ya mabe, Yehova alobaki ete akomona te ndenge libota na ye mobimba ekobebisama. (1 Bak. 21:27-29) Lisusu, Yirimia ayebaki ete Manase asalaki mabe mingi na miso ya Yehova koleka Ahaba. Atako bongo, Yehova alimbisaki Manase mpo abongolaki motema. (2 Bak. 21:16, 17; 2 Nt. 33:10-13) Na ntembe te, masolo yango esalisaki Yirimia amekola motema molai mpe motema mawa ya Nzambe, mpe amonisa yango na boyokani na ye na baninga na ye ya motema.​—Nz. 103:8, 9.

15. Ndenge nini Yirimia amekolaki motema molai ya Yehova ntango Baruke abendamaki mwa moke na makambo mosusu?

15 Tótala ndenge Yirimia asalisaki Baruke ntango abendamaki mwa moke na makambo mosusu. Yirimia asundolaki moninga na ye mbala moko te, kasi asalisaki ye; ayebisaki ye nsango ya boboto mpe ya polelepolele oyo eutaki na Nzambe. (Yir. 45:1-5) Mateya nini tokoki kozwa na lisolo yango?

Baninga ya malamu balimbisanaka na motema moko (Talá paragrafe 16)

16. Ndenge emonisami na Masese 17:9, tosengeli kosala nini mpo na kobatela boninga na biso na basusu?

16 Tosengeli kobosanaka te ete bandeko na biso bakristo bazali bato ya kozanga kokoka. Yango wana, soki tosali boninga ya makasi na basusu, tosengeli kokoba kobunda mpo na kobatela yango. Soki baninga na biso basali libunga, ekoki kosɛnga tópesa bango toli ya boboto mpe ya polelepolele oyo euti na Liloba ya Nzambe. (Nz. 141:5) Mpe soki moninga apesi biso mpasi, tosengeli kolimbisa ye. Soki tolimbisi, tosengeli koboya kozongela lisusu likambo yango na nsima. (Tángá Masese 17:9.) Ezali mpenza na ntina ete na ntango oyo ya mikakatano, tótalaka bizaleli malamu ya bandeko na biso, na esika ya kotala bolɛmbu na bango! Kosala bongo ekokómisa boninga na biso makasi, mpe tokozala na mposa ya baninga ya ndenge wana na ntango ya bolɔzi monene.

KOMONISA BOLINGO YA SEMBO

17. Ndenge nini Yirimia amonisaki ete azali moninga ya solosolo na ntango ya mpasi?

17 Makambo oyo Yirimia asalaki emonisaki ete azali moninga ya solosolo na ntango ya mpasi. Na ndakisa, Ebede-meleke oyo azalaki kosala na ndako ya mokonzi abikisaki Yirimia mpo akufa te ntango babwakaki ye na libulu ya pɔtɔpɔtɔ, kasi na nsima abangaki ete bankumu básala ye mabe. Ntango Yirimia ayokaki likambo yango, akangaki monɔkɔ te; alobaki te ete moninga na ye akoluka kaka ndenge ya koyika mpiko. Atako Yirimia azalaki na bolɔkɔ, asalaki oyo akokaki na ndenge ayebisaki moninga na ye Ebede-meleke elaka ya kobɔndisa oyo eutaki epai ya Yehova.​—Yir. 38:7-13; 39:15-18.

Baninga ya malamu basalisaka bandeko oyo bazali na bosɛnga (Talá paragrafe 18)

18. Na kotalela Masese 17:17, tosengeli kosala nini ntango moninga moko azali konyokwama?

18 Lelo oyo, bandeko na biso bazali kokutana na mikakatano ya ndenge na ndenge. Na ndakisa, mingi bazali konyokwama mpo na makama oyo ebimaka yango moko to oyo bato babimisaka. Soki esalemi bongo, basusu kati na biso bazalaka na likoki ya koyamba bandeko na ndako na bango. Basusu mpe basalisaka bango na mbongo. Kasi, biso nyonso tokoki kobondela Yehova mpo na kosɛnga ye asalisa bandeko na biso. Soki toyoki ete ndeko mobali to ndeko mwasi moko alɛmbi nzoto, ntango mosusu tokoyeba te tóloba na ye nini to tósala nini. Kasi, biso nyonso tokoki kosalisa na ndenge mingi. Na ndakisa, tokoki kokende kolekisa ntango na moninga yango. Tokoki koyoka ye na boboto ntango azali koloba. Tokoki mpe kotángela ye vɛrsɛ ya kolendisa oyo tolingaka mingi. (Yis. 50:4) Ezali na ntina mingi ozala elongo na baninga na yo na ntango oyo bazali na mposa na yo.​—Tángá Masese 17:17.

19. Ndenge nini kosala boninga ya makasi sikoyo ekosalisa biso na mikolo oyo ezali koya?

19 Tosengeli kozala na ekateli ya kosala boninga ya makasi na bandeko mpe kobatela yango banda sikoyo. Mpo na nini? Mpo banguna na biso bakoluka kokabola biso na nzela ya bansango ya lokuta. Bakoluka kosala ete tótyelana motema lisusu te. Kasi, milende na bango ekolonga te. Bakokoka te kobebisa bolingo na biso. Eloko moko te oyo bakosala ekopanza boninga oyo tosali na bandeko na biso. Kutu, boninga yango ekoumela kaka te tii na nsuka ya mokili oyo, kasi ekoumela seko!

LOYEMBO 24 Bóya na ngomba ya Yehova

^ par. 5 Lokola nsuka ezali se kopusana, biso nyonso tosengeli kokómisa makasi boyokani na biso na bandeko na biso bakristo. Na lisolo oyo, tokotalela mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Yirimia. Tokolobela mpe ndenge oyo kosala boninga ya makasi na basusu lelo oyo ekosalisa biso na ntango ya mpasi.

^ par. 2 Makambo oyo ezali na mokanda ya Yirimia ekomami te na kolanda molɔngɔ oyo esalemaki.

^ par. 57 ELILINGI: Elilingi yango ezali komonisa makambo oyo ekoki kosalema na ntango ya “bolɔzi monene.” Bandeko babombani likoló ya plafɔ na ndako moko. Bazali kobɔndisana na ntango yango ya komekama. Bililingi misato oyo elandi emonisi ete bandeko yango basalaki boninga ya makasi banda kala, liboso bolɔzi monene ebanda.