Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LIKANISI MPO NA KOYEKOLA

Luká esika ya malamu mpo na koyekola

Luká esika ya malamu mpo na koyekola

Okosepela kozwa mpenza matomba na boyekoli na yo moko? Batoli oyo elandi ekosalisa yo ozala na esika oyo ebongi mpo na koyekola:

  • Poná esika ya malamu. Soki likoki ezali, luká esika ya pɛto mpe epai molili ezali te. Okoki kofanda na ndako na kiti mpe pene ya mesa, to okoki kopona esika moko ya malamu na libándá.

  • Luká kozala yo moko. Yesu azalaki kolinga kobondela “na ntɔngɔntɔngɔ” na “esika oyo bato bazalaka te.” (Mrk. 1:35) Soki likoki ya kozala yo moko ezali te, okoki koyebisa bato oyo ofandaka na bango programɛ na yo ya koyekola mpe kosɛnga bango bátika yo kimya na ntango yango.

  • Tyá makanisi esika moko. Boyá makambo oyo elongolaka likebi. Soki ozali kosalela telefone to tablɛti mpo na koyekola, longolá makɛlɛlɛ na yango to tyá yango na mode avion. Mpe soki okanisi likambo moko oyo osengeli kosala, komá yango mpo osala yango nsima. Soki motó elɛmbi, tɛlɛmá mpo na kotambola moke to konyolisa nzoto.