LISOLO YA BOMOI
Na ntango ya etumba mpe ya kimya, Yehova apesaki biso makasi
Paul: Ezalaki na sanza ya 11/1985! Tozalaki na esengo makasi, mpe tozalaki kokende na mboka na biso ya liboso lokola bamisionɛrɛ na Libéria, na wɛsti ya Afrika. Mpɛpɔ na biso ekitaki na Sénégal. Anne alobaki: “Etikali kaka ngonga moko mpo tókóma na Libéria!” Na nsima bapesaki liyebisi ete: “Bato oyo bazali kokende na Libéria bákita na mpɛpɔ. Bato balukaki kokweisa guvɛrnema kuna, tokoki kokende kuna te.” Mikolo zomi oyo elandaki, tofandaki elongo na bamisionɛrɛ na Sénégal, mpe tozalaki koyoka basango ya Libéria: mituka minene ezalaki kotonda na bibembe, bakatelaki bato ngonga ya kozonga ndako mpe bazalaki koboma bato oyo bazalaki kotosa te.
Anne: Tozalaka te bato ya mpiko oyo babangaka eloko te. Kutu, banda bomwana bazalaki kobenga ngai Annie Bibangábangá. Nazalaki kobanga ata kokatisa balabala! Kasi, tozalaki na ekateli ya kokende esika batindaki biso na Libéria.
Paul: Ngai ná Anne tobotamá na wɛsti ya Angleterre; bamboka na biso ekabwanaki kaka na kilomɛtrɛ 8. Tobandaki mosala ya mobongisi-nzela mbala moko nsima ya kozwa diplome, mpo baboti na ngai ná mama ya Anne bazalaki kolendisa biso mingi. Bandimaki na motema moko ete tómipesa na mosala ya ntango na nyonso bomoi na biso mobimba. Ntango nakokisaki mbula 19, nazwaki libaku ya kokɔta Betele, mpe Anne alandaki ngai na 1982 nsima ya libala na biso.
Anne: Tolingaki Betele mingi, kasi tozalaki ntango nyonso kosepela kosala esika oyo mposa ezali mingi. Kosala na Betele elongo na bandeko oyo bazalaki bamisionɛrɛ kala ekolisaki lisusu mposa yango. Tobondelaki mpo na likambo yango butu nyonso na boumeli ya mbula misato; yango wana tosepelaki mingi na 1985 ntango tozwaki libyangi ya kokɔta na kelasi ya mbala ya 79 ya Gileade! Batindaki biso na Libéria, na wɛsti ya Afrika.
BOLINGO YA BANDEKO EPESI BISO MAKASI
Paul: Tozwaki mpɛpɔ ya liboso oyo ezwaki ndingisa ya kokende na Libéria. Yikiyiki ezalaki na mboka mpe bakatelaki bato ngonga ya kozonga ndako. Ata motuka oyo etye makɛlɛlɛ makasi ekokaki kobangisa mpe kopanza bato na wenze! Mpo na kokitisa motema, tozalaki kotánga elongo mikapo ya mokanda ya Nzembo butu nyonso. Kasi, tolingaki mpenza esika a Mayele na ye mpe ndenge azalaki komitya na esika ya bandeko esalisaki mingi mpo na kopesa ngai formasyo.
batindaki biso. Anne azalaki kosakola mikolo nyonso, mpe ngai nazalaki na Betele; nazalaki kosala elongo na John Charuk.Anne: Nini esalaki ete tólinga Libéria nokinoki? Bandeko ya ekólo yango. Bazalaki boboto, bazalaki kobimisa makanisi na bango polele, mpe bazalaki sembo. Tolingaki bango mbala moko; bakómaki libota na biso ya sika. Batoli ya malamu oyo bapesaki biso elendisaki biso na elimo. Mosala ya kosakola ezalaki kokamwisa biso. Bankolo-ndako bazalaki komitungisa soki toumeli te epai na bango! Bato bazalaki kolobela makambo ya Biblia na babalabala. Okoki kaka koya esika bazali mpe kokɔta na lisolo. Tozalaki na bayekoli ya Biblia ebele mpe ezalaki mokakatano koyekola na bango nyonso. Ezalaki likambo mpenza, kasi ya malamu!
TOZALAKI KOBANGA KASI YEHOVA APESAKI BISO MAKASI
Paul: Na 1989, nsima ya mbula 4 ya mwa kimya, likambo moko ya nsɔmɔ ebongolaki makambo: etumba ya bana-mboka ebandaki. Bato oyo batombokaki bakangaki kartye oyo ezalaki pembeni ya Betele na mokolo ya 02/07/1990. Na boumeli ya sanza misato, tozalaki lisusu kosolola na bato ya libándá ya mboka te, ata mpe bato ya libota na biso to biro monene. Yikiyiki, kozanga bilei, mpe kosangisa nzoto na basi na makasi ezalaki bisika nyonso. Mobulu yango eumelaki mbula 14 mpe ebebisaki ekólo mobimba.
Anne: Bato ya bikólo ekeseni ya mboka bazalaki kobunda mpe kobomana. Bato ya mobulu oyo basimbi mandoki mpe balati bilamba oyo ezalaki kokamwisa batondaki na babalabala, bazalaki kokɔta na ndako mokomoko. Ndenge bazalaki koloba, bato yango mosusu bazalaki komona ete koboma bato ezalaki lokola “koboma bansoso.” Bibembe etondaki bisika nyonso, mosusu pembeni ya Betele. Batatoli ya Yehova ya sembo mpe babomamaki, na kati na bango bamisionɛrɛ mibale.
Bandeko batyaki bomoi na bango na likama mpo na kobomba bandeko oyo bazalaki na bikólo oyo bato bazalaki koluka koboma. Bamisionɛrɛ ná bandeko ya Betele mpe babombaki bandeko. Na Betele, Batatoli mosusu oyo bayaki kobombana balalaki na nse mpe basusu bafandaki na biso na bashambre na biso na likoló. Tozalaki na shambre na biso elongo na libota moko ya bato nsambo.
Paul: Mokolo na mokolo, bato ya mobulu bazalaki komeka kokɔta na Betele mpo na kotala soki tobombaki bato. Totyaki bandeko minei mpo na kokɛngɛla: mibale bazalaki kotala na fɛnɛtrɛ, mibale mosusu
bakendaki na porte ya monene. Soki bandeko mibale oyo bazalaki na porte batiki kaka mabɔkɔ liboso na bango, elingaki koloba ete makambo ezali malamu. Kasi, soki batye mabɔkɔ na nsima ya mokɔngɔ, elimbolaki ete bato ya mobulu bazalaki kosala matata, bongo bandeko oyo bazalaki kotala na fɛnɛtrɛ bazalaki kosala mbangu mpo na kobomba baninga oyo tozalaki na bango.Anne: Nsima ya bapɔsɔ mingi, etuluku moko ya bato ya mobulu basalaki makasi mpe bakɔtaki na lopango. Ngai ná ndeko mwasi moko tomikangaki na esika tosukolaka epai tosalaki esika ya kobombana na eteni ya nse ya armware moko. Ndeko mwasi afinanaki kuna na kati. Bato ya mobulu balandaki ngai likoló, bazalaki na mandoki mpenza. Babɛtaki porte na nkanda. Paul abondelaki bango, alobi: “Mwasi na ngai azali kuna na kati.” Kozipa esika oyo ndeko mwasi abombanaki esalaki mwa makɛlɛlɛ mpe kobongisa biloko nyonso mpo na kozongisa armware eumelaki; lokola nabangaki ete bato yango bakotuna soki nazalaki kosala nini, nabandaki kolɛnga banda na motó tii na makolo. Nakofungola porte yango ndenge nini? Nabondelaki na nse ya motema, nasɛngaki Yehova asalisa ngai. Na nsima nafungolaki porte mpe napesaki bango mbote na kimya. Moko na bango atindikaki ngai, akɔtaki mbala moko, afungolaki armware mpe abandaki kosimbasimba biloko. Azalaki kondima te ete eloko ezali kuna te. Na nsima, ye ná bato oyo bayaki elongo babandaki koluka na bisika mosusu mpe na nse ya nsamba. Kasi kuna mpe bamonaki eloko te.
POLE YA SOLO EKOBAKI KONGƐNGA
Paul: Tozalaki kaka na biloko moke ya kolya na boumeli ya basanza ebele. Kasi, bilei ya elimo nde ezalaki kosalisa biso. Losambo ya ntɔngɔ na Betele nde ezalaki “ti” na biso, mpe biso nyonso tozalaki kosepela ndenge ezalaki kopesa biso makasi na elimo.
Soki bilei ná mai nyonso esilaka, elingaki kosɛnga biso ná bandeko mosusu tólongwa na Betele, mpe bandeko oyo babombanaki balingaki mbala mosusu kobomama. Na bantango mosusu, lolenge mpe ngonga oyo Yehova azalaki kopesa biso oyo tosengeli na yango ezalaki lokola likamwisi! Yehova akokisaki bamposa na biso mpe asalisaki biso tólongola kobanga.
Wana makambo ezalaki se kobeba na mboka, pole ya solo ezalaki se kopesa elikya. Mbala na mbala, bandeko bazalaki kokima mpo na kobatela bomoi na bango, kasi kondima na bango mpe lokumu na bango ebebaki te. Basusu balobaki ete etumba yango ezalaki kopesa bango “formasyo mpo na bolɔzi monene.” Bankulutu mpe bandeko mibali ya bilenge bamonisaki mpiko mpe basalaki nyonso mpo na kobatela bandeko. Soki bandeko bakimi bandako na bango, bazalaki kofanda esika moko mpe bazalaki kosakola na bisika yango; bazalaki kozwa biloko oyo bakuti na zamba mpo na kosala Bandako ya Bokonzi mpe kosala makita. Makita ezalaki kolendisa mingi na ntango wana ya mawa, mpe mosala ya kosakola esalisaki Batatoli yango bábungisa elikya te. Ntango tokendaki kokabola biloko ya lisungi, tokamwaki ndenge bandeko basɛngaki basaki mpo na mosala ya kosakola na esika ya kosɛnga bilamba. Ebele ya bato oyo bazalaki na Mat. 5:14-16) Molende ya bandeko esalaki kutu ete bato mosusu ya mobulu makasi bákóma bandeko na biso.
mawa mpe bayokaki nsɔmɔ na makambo oyo bamonaki bazalaki kolinga koyoka nsango malamu. Bazalaki kokamwa ndenge Batatoli bazalaki na esengo mpe na makanisi malamu; bazalaki kongɛnga lokola pole na kati ya molili. (YEHOVA APESAKI BISO MAKASI NA LIKAMBO OYO EPESAKI BISO MPASI
Paul: Na bantango mosusu, esɛngaki tólongwa mboka; tolongwaki mbala misato mpo na mwa ntango, mpe mbala mibale mpo na mbula mobimba. Ndeko mwasi moko ya misionɛrɛ amonisaki malamu mayoki oyo tozalaki na yango, alobaki: “Na Gileade, bateyaki biso ete tosengeli kolinga esika batindi biso na motema mobimba, mpe tosalaki yango. Na yango, kotika bandeko na ntango wana ezalaki lokola kopasola mitema na biso!” Likambo ya esengo, tokokaki kosunga bandeko ya Libéria longwa na bikólo ya pembeni.
Anne: Na sanza ya 05/1996, tozalaki bato minei oyo tozwaki motuka ya Betele mpe tomemaki mikanda oyo ezalaki na makambo ya ntina oyo etali mosala na biso na Libéria. Tolingaki kosala kilomɛtrɛ 16 mpo na kokóma na mboka moko oyo ezalaki na kimya. Kaka na ntango yango, etumba ebimaki esika tozalaki. Bato ya mobulu babandaki kobɛta masasi, batɛlɛmisaki biso, bakitisaki biso misato, mpe bakendaki na motuka ná Paul na kati. Totikalaki lokola bazoba. Na mbala moko, tomonaki Paul azali koya elongo na ebele ya bato, motó na ye ezali kotanga makila. Na mobulu wana, tokanisaki ete babɛti ye masasi, kasi tomilobaki soki babɛtaki ye masasi, alingaki kotambola te! Moto moko ya mobulu abɛtaki ye ntango azalaki kobimisa ye na motuka. Likambo ya esengo, ezalaki kaka mpota ya moke.
Motuka moko ya basoda pembeni wana etondaki na bato oyo bazalaki kobanga. Tomataki na motuka yango mpe todiembelaki. Sofɛlɛ atyaki vitɛsi makasi mpe tolingaki kokwea. Tosɛngaki ye atɛlɛma, kasi lokola azalaki kobanga makasi ayokaki te. Nzokande, tokweaki te mpe tokómaki, tolɛmbaki makasi mpe misuni ya nzoto ezalaki kolɛnga.
Paul: Tozalaki mbindo, bilamba epasukaki, totalanaki, mpe tomitunaki ndenge nini tozali kaka na bomoi. Tolalaki libándá pene na hélicoptère moko oyo ezwaki masasi; yango nde ememaki biso na Sierra Leone mokolo oyo elandaki. Tozalaki na esengo ndenge tozalaki na bomoi kasi tomitungisaki mingi mpo na bandeko.
YEHOVA APESAKI BISO MAKASI MPO NA MOKAKATANO YA SIKA
Anne: Ntango tokómaki na Betele na Freetown, na Sierra Leone, tozalaki na kimya mpe bandeko bazalaki kokipe biso malamu. Kasi, makambo ya etumba yango ekómaki kozongela biso na makanisi. Na moi, nazalaki ntango nyonso ekɛngɛ mpe kobangabanga; nazalaki komona makambo nyonso lokola filme. Na butu, nazalaki kosutuka na mpɔngi, na motoki ya mobesu, nazali kolɛnga, komona lokola balingi kosala ngai mabe. Nazalaki kokoka kopema te. Paul asimbaki ngai mpe asalaki libondeli. Toyembaki banzembo ya Bokonzi tii ntango natikaki kolɛnga. Nakanisaki ete nabɛli ligboma mpe ete nakokoka lisusu kozala misionɛrɛ te.
Nabosanaka te likambo oyo esalemaki na nsima. Na pɔsɔ yango, zulunalo mibale ebimaki. Moko ezalaki Lamuká! ya 08/1996. Ezalaki na lisolo oyo elobi “Comment venir à bout des crise de panique” (Ndenge ya kobundisa ezaleli ya kobangabanga.) Nayebaki likambo oyo ezalaki kokómela ngai. Zulunalo ya mibale ezalaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/05/1996, oyo ezalaki na lisolo oyo elobi “Epai wapi bazwaka nguya na bango?” Linɔ́ngi yango ezalaki na fɔtɔ ya lipekapeka moko oyo lipapu na ye moko ebebá. Lisolo yango emonisaki ete kaka ndenge lipekapeka ekoki kokoba kopumbwa atako mapapu na yango ekatani makasi, na lisalisi ya elimo ya Yehova, biso mpe tokoki kokoba kosalisa basusu ata soki tokutani na makambo ya nsɔmɔ. Yango ezalaki bilei oyo Yehova atindelaki biso na ntango oyo ebongi mpo na kopesa biso makasi. (Mat. 24:45) Kosala bolukiluki na likambo yango mpe kobomba masolo oyo elobeli likambo yango esalisaki ngai mingi. Nsima ya mikolo, makanisi oyo ezalaki kobangisa ngai ezalaki koyela ngai lisusu te.
YEHOVA APESAKI BISO MAKASI YA KOMESANA NA MAKAMBO YA SIKA
Paul: Mbala nyonso oyo tozalaki kozonga na Libéria, tozalaki na esengo mingi. Na nsuka ya mobu 2004, tosalaki mbula pene na 20 kuna. Etumba
esilaki. Bibongiseli ezwamaki mpo na kotonga Betele. Kasi na mbala moko, batindaki biso na esika mosusu.Ezalaki mpasi mingi. Tomesanaki mingi na bandeko kuna, tokosala ndenge nini? Ntango tokabwanaki na bandeko ya mabota na biso mpo na kokende na Gileade, tomonaki ndenge kotika makambo na mabɔkɔ ya Yehova ememaka mapamboli; na yango tondimaki mokumba ya sika. Batindaki biso na ekólo moko ya pembeni, na Ghana.
Anne: Tolelaki mingi ntango tolongwaki Libéria. Tokamwaki ntango Frank, ndeko moko ya mobange mpe ya bwanya, alobaki na biso: “Bóbosana biso!” Na nsima abakisaki: “Toyebi ete bokobosana biso te, kasi bosengeli kotya motema na bino mobimba na esika oyo batindi bino. Euti epai ya Yehova, na yango bósalisa bandeko kuna.” Maloba yango epesaki biso makasi ya kobanda bomoi esika oyo bato mingi bayebaki biso te mpe esika oyo tozalaki na baninga te.
Paul: Kasi, eumelaki te, tobandaki kolinga bandeko ya Ghana. Ezalaki na Batatoli ebele kuna! Toyekolaki makambo mingi na bosembo mpe kondima makasi ya bandeko kuna. Nsima ya kosala mbula 13 na Ghana, tokamwaki ntango batindaki biso esika mosusu. Basɛngaki biso tókende kosala na Betele ya Ɛsti ya Afrika na Kenya. Atako tozalaki kokanisa mingi bandeko oyo totikaki na bisika oyo tosalaki liboso, tomesanaki noki na bandeko ya sembo na Kenya. Mpe tii sikoyo, tozali kosala na Kenya, teritware oyo mposa ezali mingi.
MATEYA OYO TOZWI
Anne: Na boumeli ya bambula, nakutani na makambo ya kobangisa mpenza. Makambo ya nsɔmɔ to oyo ememaka mitungisi ekoki konyokola biso na nzoto mpe na makanisi. Yehova asalaka likamwisi te mpo na kobatela biso na yango. Soki nayoki makɛlɛlɛ ya masasi mpe ya bɔmbi, nayokaka motema mokuse mpe mabɔkɔ na ngai esalaka lisusu te. Kasi, nayekoli kotya motema mobimba na lisalisi oyo Yehova apesaka mpo na kopesa ngai makasi, kati na yango lisungi ya bandeko. Mpe namoni ete soki tobateli mimeseno malamu ya elimo, Yehova akoki kosalisa biso tókoba na mosala na biso.
Paul: Bato mosusu batunaka biso: “Bolingaka esika oyo bozali kosala?” Bisika ekoki kozala kitoko, kasi makambo ekoki kobeba mpe bisika yango ekoki kokóma likama. Bongo, eloko nini tolingaka mingi koleka esika oyo tozali? Tolingaka mingi bandeko, yango nde libota na biso. Ata soki tobɔkwamá ndenge moko te, tozali mpenza na makanisi moko. Tokanisaki ete batindi biso mpo na kolendisa bango, kasi mpo na koloba solo, bango nde bapesaka biso makasi.
Mbala nyonso oyo tolongwe na esika moko, tomonaka likamwisi ya mikolo na biso: libota ya bandeko. Soki tozali na kati ya lisangá, tozali na libota mpe esika ya kimya. Tondimi ete soki tokobi kotyela Yehova motema, akopesa biso makasi na likambo nyonso oyo ekómeli biso.—Flp. 4:13.
a Talá lisolo ya bomoi ya ndeko John Charuk, ‘Je suis reconnaissant à Dieu et au Christ,’ na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/07/1973.