Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 46

LOYEMBO 49 Tósepelisa motema ya Yehova

Ndeko mobali​—⁠Ozali koluka kokóma mosaleli na misala?

Ndeko mobali​—⁠Ozali koluka kokóma mosaleli na misala?

“Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.”MIS. 20:35.

NA MOKUSE

Mpo na kolendisa bandeko mibali báluka kokokisa masɛngami mpo na kokóma basaleli na misala.

1. Ndenge nini ntoma Paulo azalaki kotalela basaleli na misala?

 BASALELI na misala basalaka misala ya ntina na lisangá. Na ntembe te ntoma Paulo azalaki kosepela na bandeko yango ya sembo. Na ndakisa, ntango akomelaki bakristo ya Filipi, alobaki polele ete bápesa basaleli na misala mbote elongo na bankulutu.—Flp. 1:1.

2. Ndeko moko na nkombo Luis alobaki nini mpo na mokumba na ye lokola mosaleli na misala?

2 Bázala bilenge to mikóló, bandeko mibali oyo bazwá batisimo bayokaka esengo mingi soki bazali basaleli na misala. Na ndakisa, Devan azalaki na mbula 18 ntango atyamaki mosaleli na misala. Mpe ndeko mobali moko na nkombo Luis atyamaki mosaleli na misala ntango azalaki na mbula mwa moke koleka 50. Amonisi mayoki oyo bandeko mingi bazalaka na yango ntango alobaki: “Namonaka ete ezali libaku malamu kosala lokola mosaleli na misala, mingimingi ntango nakanisaka bolingo nyonso oyo lisangá emoniselá ngai!”

3. Mituna nini tokotalela?

3 Soki ozali ndeko mobali oyo azwá batisimo mpe ozali naino mosaleli na misala te, mpo na nini te omityela mokano yango? Nini ekoki kotinda yo osala yango? Mpe masɛngami nini ya Biblia osengeli kokokisa? Na lisolo oyo, tokozwa biyano na mituna yango. Kasi liboso, tótalela naino soki mokumba ya mosaleli na misala ezali nini.

MOKUMBA YA MOSALELI NA MISALA EZALI NINI?

4. Mokumba ya mosaleli na misala ezali nini? (Talá mpe elilingi.)

4 Mosaleli na misala azali ndeko mobali oyo azwá batisimo, oyo atyami na nzela ya elimo santu mpo na kosalisa bankulutu na makambo ndenge na ndenge na kati ya lisangá. Basaleli na misala mosusu balandelaka makambo ya teritware ya lisangá mpe mikanda mpo na mosala ya kosakola. Basusu basalisaka na kotya bopɛto mpe kobatela Ndako ya Bokonzi. Basaleli na misala bapesaka mpe bandeko bisika ya kofanda mpe basalaka na sono mpe video na makita. Misala mingi ya basaleli na misala ezalaka mpo na kosalisa bandeko. Atako bongo, bazali libosoliboso mibali ya elimo; balingaka Yehova mpe batosaka mibeko na ye ya sembo na bomoi na bango. Longola yango, balingaka mpenza bandeko ya lisangá. (Mat. 22:​37-39) Ndenge nini ndeko mobali oyo azwá batisimo akoki koluka kokóma mosaleli na misala?

Basaleli na misala bamekolaka Yesu na ndenge bamipesaka na kosalela basusu (Talá paragrafe 4)


5. Ndenge nini ndeko mobali akoki kozwa mokumba ya mosaleli na misala?

5 Biblia elobeli masɛngami oyo bandeko oyo balingi kokóma basaleli na misala basengeli kokokisa. (1 Tim. 3:​8-10, 12, 13) Okoki kozwa mokumba yango soki oyekoli masɛngami yango ya Biblia mpe na nsima osali makasi okokisa yango. Kasi, liboso, osengeli koyeba naino ntina oyo ozali koluka mokumba yango.

NINI EZALI KOTINDA YO OLUKA KOZWA MOKUMBA YANGO?

6. Nini esengeli kotinda yo oluka kosalela bandeko ya lisangá? (Matai 20:28; talá mpe ezipeli.)

6 Yesu Kristo, ndakisa oyo eleki malamu mpo na biso, azalaki kosala makambo nyonso na bolingo, bolingo ya Tata na ye mpe bolingo ya bato. Bolingo yango nde etindaki ye asala mosala makasi mpe ya komikitisa mpo na kosalisa basusu. (Tángá Matai 20:28; Yoa. 13:​5, 14, 15) Soki bolingo nde ezali kotinda yo, Yehova akopambola yo mpe akosalisa yo okokisa mokano na yo ya kokokisa masɛngami mpo na kokóma mosaleli na misala.—1 Ko. 16:14; 1 Pe. 5:5.

Na ndakisa na ye, Yesu ateyaki bantoma na ye ndenge ya kosalela basusu na komikitisa, na esika ya koluka esika ya lokumu (Talá paragrafe 6)


7. Mpo na nini tosengeli koboya kosala makambo na lolendo?

7 Na mokili oyo, bato basepelaka mbala mingi na bato oyo bamilakisaka. Kasi, na ebongiseli ya Yehova ezalaka bongo te. Ndeko oyo bolingo nde ezali kotinda ye, na ndakisa ya Yesu, akoluka te kokonza, kozala na bokonzi likoló ya basusu to kosala nkombo. Soki moto oyo alukaka lokumu atyami mosaleli na misala na lisangá, na ntembe te akoboya kosala misala mosusu oyo esɛngaka komikitisa mpo na kosalisa bampate ya Yehova. Akoki komona ete ye akoki kosala misala ya bongo te. (Yoa. 10:12) Yehova akopambola te milende ya moto oyo asalaka makambo na lolendo to mpo na koluka matomba na ye moko.—1 Ko. 10:​24, 33; 13:​4, 5.

8. Toli nini Yesu apesaki bantoma na ye?

8 Na bantango mosusu, ata baninga ya Yesu ya penepene balukaki mikumba na makanisi ya mabe. Talá likambo oyo bantoma mibale ya Yesu, Yakobo ná Yoane, basalaki. Basɛngaki Yesu atya bango na esika ya lokumu na Bokonzi na ye. Yesu apesaki bango longonya te mpo na ezaleli wana ya koluka lokumu. Kasi, alobaki na bantoma nyonso 12 ete: “Moto oyo alingi kokóma moto monene na kati na bino asengeli kozala mosaleli na bino, mpe moto oyo alingi kozala moto ya liboso na kati na bino asengeli kozala moombo ya bato nyonso.” (Mrk. 10:​35-37, 43, 44) Bandeko mibali oyo bazali koluka kokóma basaleli na misala na makanisi ya malamu, elingi koloba mpo na kosalela basusu, bakozala lipamboli mpo na lisangá.—1 Tes. 2:8.

NINI EKOKI KOPESA YO MPOSA MAKASI YA KOSALELA BASUSU?

9. Nini ekoki kopesa yo mposa makasi ya koluka kokóma mosaleli na misala?

9 Na ntembe te olingaka Yehova mpe osepelaka kosalela basusu. Atako bongo, mbala mosusu ozali na mposa te ya kosala mosala makasi ya mosaleli na misala. Ndenge nini okoki kokóma na mposa makasi ya kosala yango? Okoki kokanisa esengo oyo okozwa ntango ozali kosalela bandeko ya lisangá. Yesu alobaki: “Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.” (Mis. 20:35) Ye moko asalelaki maloba yango. Azalaki koyoka esengo mingi na kosalela basusu, yo mpe okoki koyoka yango.

10. Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki kosepela kosalela basusu? (Marko 6:​31-34)

10 Talá ndakisa moko oyo emonisi ndenge Yesu amonisaki ete azalaki kosepela kosalela basusu. (Tángá Marko 6:​31-34.) Na libaku moko, Yesu ná bantoma na ye balɛmbaki. Bazalaki kokende na esika oyo bakozala kaka bango moko mpo bápema. Kasi, ebele ya bato bakómaki kuna liboso na bango, na elikya ete Yesu ateya bango. Yesu akokaki koboya kosala yango. Kutu, ye ná bantoma na ye “bazwaki ata ntango ya kolya te.” To, Yesu akokaki koteya bango kaka mwa liteya moko to mibale mpe na nsima kotika bango bákende. Kasi, lokola azalaki kolinga bango, “abandaki koteya bango makambo mingi.” Mpe akobaki koteya bango tii ntango ‘ngonga epusanaki.’ (Mrk. 6:35) Soki asalaki bongo, ezalaki te mpo asengelaki kaka kosala yango, kasi ezalaki mpo “ayokelaki bango mawa.” Asepelaki koteya bango mpo alingaki bango. Kosalela basusu ezalaki kopesa Yesu esengo mingi.

11. Makambo nini Yesu asalaki mpo na kosalisa bato oyo bazalaki koyoka ye? (Talá mpe elilingi.)

11 Ntango Yesu azalaki kosalela ebele ya bato, asukaki kaka te na koteya bango. Akokisaki mpe mposa na bango ya mosuni. Asalaki likamwisi ya kokómisa bilei ebele mpe na nsima apesaki bayekoli na ye bákabola yango. (Mrk. 6:41) Na ndenge yango, ateyaki bayekoli na ye ndenge ya kosalela basusu. Amonisaki bango mpe ete kosala makambo mpo na kosalisa basusu, ndenge basaleli na misala basalaka, ezali na ntina mingi. Kanisá esengo oyo bantoma bayokaki elongo na Yesu ntango bazalaki kokabola bilei oyo Yesu akómisaki ebele na ndenge ya likamwisi, tii ntango bato “nyonso balyaki mpe batondaki”! (Mrk. 6:42) Nzokande, Yesu atyaki bolamu ya basusu liboso ya bamposa na ye kaka na libaku wana te. Asalelaki bomoi na ye mobimba awa na mabele mpo na kosalela basusu. (Mat. 4:23; 8:16) Yesu azalaki koyoka esengo mingi na koteya basusu mpe na kokokisa bamposa na bango na komikitisa nyonso. Na ntembe te, yo mpe okoyoka esengo mingi soki ozali koluka kokóma mosaleli na misala mpo na kosalisa basusu.

Kolinga Yehova mpe mposa ya kosalela basusu ekotinda yo ondima ata mokumba nini na lisangá (Talá paragrafe 11) a


12. Mpo na nini moko te kati na biso asengeli komona ete azali na eloko ya kosala te na lisangá?

12 Soki omoni ete ozali te na makoki ya kokamwa, kolɛmba nzoto te. Na ntembe te ozali na bizaleli malamu oyo ekoki kosalisa lisangá. Okoki kotánga na likebi maloba ya Paulo oyo ezali na 1 Bakorinti 12:​12-30 mpe kobondela mpo na yango. Maloba ya Paulo emonisi polele ete, ndenge moko na basaleli mosusu nyonso ya Yehova, ozali na ntina mpe okoki kosalisa lisangá. Soki sikoyo okokisi masɛngami te mpo na kokóma mosaleli na misala, kolɛmbisa mabɔkɔ te. Kasi, salá nyonso oyo okoki mpo na kosalela Yehova mpe kosalisa bandeko! Yebá ete bankulutu bakotalela makoki na yo liboso bápesa yo mosala moko boye.—Rom. 12:​4-8.

13. Masɛngami oyo bandeko mibali basengeli kokokisa etali mpe banani?

13 Ntina moko oyo osengeli koluka kokokisa masɛngami mpo na kokóma mosaleli na misala yango oyo: Masɛngami yango mingi etali bakristo nyonso. Bakristo nyonso basengeli kopusana penepene na Yehova, koyoka esengo ya kopesa, mpe kozala ndakisa na oyo etali kosalela mitinda ya Biblia na bomoi na bango. Ndenge nini mpenza ndeko mobali akomonisa ete azali koluka kokóma mosaleli na misala?

NDENGE YA KOMONISA ETE OZALI KOLUKA KOKÓMA MOSALELI NA MISALA

14. ‘Kozwa makambo na lisɛki te’ elimboli nini? (1 Timote 3:​8-10, 12)

14 Tólobela sikoyo mwa masɛngami oyo ezali na 1 Timote 3:​8-10, 12. (Tángá.) Mosaleli na misala asengeli kozala moto oyo ‘azwaka makambo na lisɛki te.’ Maloba yango ekoki mpe kobongolama na “moto oyo abongi na limemya,” to “moto oyo bakoki kopesa lokumu.” Yango elingi koloba te ete okoki kosɛka te to kosɛkisa basusu. (Mos. 3:​1, 4) Kasi, osengeli kosala makasi ya kokokisa mikumba nyonso oyo bapesi yo. Soki eyebani ete ozali moto oyo basusu bakoki kotyela motema, bandeko ya lisangá bakopesa yo limemya.

15. Kozala ‘moto ya minɔkɔ mibale te’ mpe ‘moto ya lokoso te oyo alukaka kozwa litomba na ndenge ya mabe’ elimboli nini?

15 Kozala ‘moto ya minɔkɔ mibale te’ elimboli koloba solo, komitambwisa na bosembo, mpe kozala nyamunyamu te. Osengeli kotosaka maloba na yo, mpe kokosa basusu te. (Mas. 3:32) Kozala ‘moto ya lokoso te oyo alukaka kozwa litomba na ndenge ya mabe’ elimboli ete osengeli kozala sembo na makambo ya mombongo mpe na ndenge na yo ya kosalela mbongo. Okoluka te kosalela boyokani malamu oyo ozali na yango na bandeko ya lisangá mpo na kolyela bango mpe kozwa mbongo.

16. (a) Kozala moto ‘oyo amipesá na vinyo te’ elimboli nini? (b) Kozala na “lisosoli ya pɛto” elimboli nini?

16 Kozala ‘moto oyo amipesá na vinyo te’ elimboli ete osengeli te kozala moto oyo amɛlaka mingi to koyebana lokola moto oyo alingá masanga. Kozala na “lisosoli ya pɛto” elimboli ete osengeli kozala na bomoi oyo eyokani na mibeko ya Yehova. Atako ozali moto ya kokoka te, okozala na kimya mpo ozali na boyokani malamu na Nzambe.

17. Ndenge nini ndeko mobali akoki komonisa ete abongi kotyelama motema ntango bazali ‘komeka ye liboso mpo na koyeba soki akoki’? (1 Timote 3:10; talá mpe elilingi.)

17 ‘Amekama liboso mpo na koyeba soki akoki’ elimboli ete osili komonisa ete bakoki kopesa yo mikumba mpe kotyela yo motema. Na yango, ntango bankulutu bapesi yo mosala moko, landá malamumalamu malako oyo ebongiseli ya Yehova epesi. Omindimisa ete okangi ntina ya likambo oyo basɛngi yo osala mpe ntango oyo osengeli kosilisa yango. Wana ozali kokokisa mokumba mokomoko na molende, basusu na lisangá bakomona yango mpe bakosepela na bokoli na yo. Bankulutu, bósala nyonso bópesaka bandeko mibali oyo bazwá batisimo formasyo. (Tángá 1 Timote 3:10.) Ezali na bilenge mibali na lisangá na bino oyo bazwá batisimo mpe baleki mwa moke mbula 13 to bazali na nse na yango? Bazalaka na programɛ ya malamu ya boyekoli na bango moko? Bapesaka biyano na makita mpe babimaka na mosala ya kosakola mbala na mbala? Soki bongo, bópesaka bango misala oyo eyokani na mbula na bango mpe na makoki na bango. Na ndenge yango, bilenge yango bakoki ‘komekama liboso mpo na koyeba soki bakoki.’ Na nsima, liboso kutu bákokisa mbula 20, mbala mosusu bakokokisa masɛngami mpo na kokóma basaleli na misala.

Ntango bazali kopesa bandeko mibali misala, bankulutu bazali komeka bango “mpo na koyeba soki bakoki” (Talá paragrafe 17)


18. Kozala moto oyo ‘afundami ata na likambo moko te’ elimboli nini?

18 Moto oyo ‘afundami ata na likambo moko te’ elimboli ete osengeli te kozala na efundeli moko ya solo ete osali likambo moko ya mabe mpenza. Ya solo, bakoki kokosela bakristo makambo. Bakoselaki mpe Yesu makambo, mpe asakolaki ete bayekoli na ye mpe bakokutana na likambo yango. (Yoa. 15:20) Kasi, soki ozali ntango nyonso na etamboli ya pɛto, ndenge moko na Yesu, okozala na lokumu malamu na lisangá.—Mat. 11:19.

19. Kozala ‘mobali ya mwasi kaka moko’ esangisi makambo nini?

19 ‘Mobali ya mwasi kaka moko.’ Soki obalá, osengeli kotosa mobeko ya Yehova na oyo etali libala: mobali moko mpo na mwasi moko. (Mat. 19:​3-9) Mobali mokristo asengeli ata moke te kosala pite. (Ebr. 13:4) Kasi esuki wana te. Osengeli kozala sembo epai ya mwasi na yo, mpe kotya ata moke te likebi oyo ebongi te epai ya mwasi mosusu.—Yobo 31:1.

20. Ndenge nini mobali akoki kokamba libota na ye “na ndenge ya malamu mpenza”?

20 ‘Moto oyo akambaka bana na ye mpe libota na ye na ndenge ya malamu mpenza.’ Soki ozali tata ya libota, osengeli kokokisa mikumba na yo malamu. Saláká losambo na kati ya libota pɔsɔ na pɔsɔ. Bimáká mosala ya kosakola elongo na mwasi na yo to bana na yo ntango nyonso oyo okoki kosala yango. Salisá bana na yo bákóma na boyokani ya bango moko elongo na Yehova. (Ef. 6:4) Mobali oyo akokisaka bamposa ya libota na ye malamu amonisaka ete akokoka mpe kobatela lisangá.—Talá mpe 1 Timote 3:5.

21. Soki ozali naino mosaleli na misala te, okoki kosala nini?

21 Ndeko mobali, soki ozali naino mosaleli na misala te, tosɛngi yo okanisa makambo oyo totaleli na lisolo oyo mpe obondela mpo na yango. Yekolá masɛngami oyo Biblia etye mpo na basaleli na misala mpe salá makasi okokisa yango. Kanisá ndenge oyo olingaka Yehova mpe bandeko ya lisangá. Kómisá makasi mposa na yo ya kosalela bango. (1 Pe. 4:​8, 10) Okoyoka esengo oyo eutaka na kosalela bandeko na yo ya elimo. Tiká ete Yehova apambola mpenza milende oyo ozali kosala mpo na koluka kokokisa masɛngami mpo na kokóma mosaleli na misala!—Flp. 2:13.

LOYEMBO 17 “Nalingi”

a NDIMBOLA YA BILILINGI: Na lobɔkɔ ya mwasi, Yesu azali kosalela bayekoli na ye na komikitisa; na lobɔkɔ ya mobali, mosaleli na misala azali kosalisa ndeko mobali moko ya mobange