Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 47

LOYEMBO 103 Babateli ya mpate—Makabo oyo ezali bato

Ndeko mobali​—⁠Ozali koluka kokóma nkulutu?

Ndeko mobali​—⁠Ozali koluka kokóma nkulutu?

“Soki moto azali koluka kozala mokɛngɛli, azali na mposa ya mosala moko ya malamu mingi.1 TIM. 3:1.

NA MOKUSE

Lisolo oyo ekolobela mwa masɛngami ya Biblia oyo ndeko mobali asengeli kokokisa mpo na kokóma nkulutu.

1-2. “Mosala moko ya malamu” oyo nkulutu asalaka esangisi makambo nini?

 SOKI ozali mosaleli na misala banda mwa ntango, mbala mosusu ozali kosala makasi mpo na kokokisa masɛngami mpo okóma nkulutu. Okoki koluka kosala ‘mosala yango ya malamu mingi’?—1 Tim. 3:1.

2 Mosala ya nkulutu esangisi makambo nini? Nkulutu apesaka ndakisa na mosala ya kosakola, asalaka mosala makasi mpo na kobatela bampate mpe koteya, mpe alendisaka bandeko ya lisangá na maloba mpe misala. Yango wana, Biblia ebengi bankulutu oyo basalaka mosala makasi “makabo oyo ezali bato.”—Ef. 4:8.

3. Ndenge nini ndeko mobali akoki kokóma nkulutu? (1 Timote 3:​1-7; Tito 1:​5-9)

3 Masɛngami nini osengeli kokokisa mpo okóma nkulutu? Kokokisa masɛngami mpo na kokóma nkulutu ekeseni na koluka mosala ya mosuni. Mbala mingi na mokili, soki ozali na boyebi na likambo oyo patrɔ azali koluka, okoki kozwa mosala. Kasi, soki olingi kokóma nkulutu, osengeli kosuka kaka te na koyeba kosakola mpe koteya. Osengeli kokokisa masɛngami ya Biblia mpo na bankulutu ndenge ezali na 1 Timote 3:​1-7 mpe Tito 1:​5-9. (Tángá.) Lisolo oyo ekolobela makambo minene misato oyo esengeli kosala mpo na kokóma nkulutu: kozala na nkombo malamu na kati mpe na libándá ya lisangá, kozala ndakisa malamu lokola mokonzi ya libota, mpe kozala pene ya kosalela lisangá.

ZALÁ NA NKOMBO MALAMU

4. “Kozala moto oyo afundami na likambo moko te” elimboli nini?

4 Mpo okóma nkulutu, osengeli “kozala moto oyo afundami na likambo moko te,” elingi koloba, bandeko ya lisangá balobaka malamu mpo na yo mpo etamboli na yo ezali malamu. Lisusu, osengeli “kozala moto oyo bato ya libándá bazali kolobela ye malamu.” Bato oyo bazali bandimi te bakoki kotyola bindimeli na yo ya bokristo, kasi basengeli kozala ata na ntina moko te ya kotyela bosembo to etamboli na yo ntembe. (Dan. 6:​4, 5) Omituna boye, ‘Nazali na nkombo malamu na kati mpe na libándá ya lisangá?’

5. Ndenge nini okoki komonisa ete ozali “moto oyo alingaka makambo ya malamu”?

5 Soki ozali “moto oyo alingaka makambo ya malamu,” okoluka makambo ya malamu epai ya basusu mpe okopesa bango longonya mpo na bizaleli na bango. Okozala mpe na esengo ya kosalela basusu bolamu, koleka ata oyo basɛngi yo. (1 Tes. 2:8; Tito 1:8) Mpo na nini ezaleli yango ezali mpenza na ntina mpo na bankulutu? Mpo esalisaka bango bápesa ntango na bango mingi mpo na kobatela lisangá mpe kokokisa mikumba mosusu. (1 Pe. 5:​1-3) Kasi, esengo oyo bayokaka na kosalela basusu eleki mosika makambo oyo bamipimelaka.—Mis. 20:35.

6. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali ‘bayambi bapaya’? (Baebre 13:​2, 16; talá mpe elilingi.)

6 Okomonisa ete ozali “moyambi bapaya” ntango ozali kosala makambo ya malamu mpo na basusu, ata baoyo bazali na kati ya baninga na yo te. (1 Pe. 4:9) Buku moko elobi boye mpo na moto oyo azali moyambi bapaya: “Porte ya ndako na ye, mpe ya motema na ye, esengeli kozala polele mpo na kokɔtisa bapaya.” Omituna boye, ‘Nayebani lokola moto oyo ayambaka bapaya?’ (Tángá Baebre 13:​2, 16.) Moto oyo azali moyambi bapaya akabolaka oyo azali na yango ná bapaya, ezala baoyo bazali na biloko mingi te ya kobikela mpe baoyo basalaka mosala makasi, na ndakisa bakɛngɛli ya zongazonga mpe balobi bapaya.—Eba. 18:​2-8; Mas. 3:27; Luka 14:​13, 14; Mis. 16:15; Rom. 12:13.

Ndeko mwasi moko ná mobali na ye bayambi mokɛngɛli ya zongazonga ná mwasi na ye na ndako na bango (Talá paragrafe 6)


7. Ndenge nini nkulutu akoki komonisa ete azali “moto oyo alingá mbongo te”?

7 “Moto oyo alingá mbongo te.” Yango elingi koloba ete osengeli te kotyaka makanisi na yo nyonso na biloko ya mosuni. Ozala mozwi to mobola, osengeli kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na makambo nyonso ya bomoi na yo. (Mat. 6:33) Osengeli kosalela ntango na yo, makasi na yo, mpe biloko na yo mosusu mpo na kosalela Yehova, kokokisa bamposa ya libota na yo, mpe kosalela lisangá. (Mat. 6:24; 1 Yoa. 2:​15-17) Omituna boye: ‘Natalelaka mbongo ndenge nini? Nazali na ezaleli ya kosepela na oyo nazali na yango? To natyaka makanisi na ngai nyonso na koluka mbongo mpe kozwa biloko mingi ya mosuni?’—1 Tim. 6:​6, 17-19.

8. Na makambo nini okoki komonisa ete ozali “moto oyo alekisaka ndelo te na bizaleli na ye” mpe “moto oyo amipekisaka”?

8 Soki ozali “moto oyo alekisaka ndelo te na bizaleli na ye” mpe “moto oyo amipekisaka,” okozala na bokatikati na makambo nyonso oyo osalaka. Yango esangisi koboya kolekisa ndelo na kolya, komɛla, kolata ná kosala monzɛlɛ, mpe kominanola. Okozala te moombo ya eloko nyonso ya sika oyo bato ya mokili babimisi. (Luka 21:34; Yak. 4:4) Osengeli mpe koyeba kobatela kimya na yo, ata ntango basusu bapesi yo nkanda. Osengeli kozala “molangwi-masanga te”; to koyebana lokola moto oyo amɛlaka mingi. Omituna boye, ‘Emonanaka ete nazali moto oyo alekisaka ndelo te na bizaleli na ngai mpe moto ya komipekisa?’

9. Kozala “moto ya makanisi malamu” mpe “moto ya makambo na molɔngɔ” elimboli nini?

9 Soki ozali “moto ya makanisi malamu,” okotalela makambo nyonso na likebi na kolanda mitinda ya Biblia. Elingi koloba, okomanyola na mozindo na mitinda yango, mpe yango ekosalisa yo ozala na bososoli mpe oyeba likambo malamu. Moto ya makanisi malamu azwaka bikateli likolólikoló te. Kasi, atalelaka makambo nyonso oyo esengeli liboso ya kozwa bikateli. (Mas. 18:13) Na bongo, akozwa bikateli ya malamu oyo emonisi makanisi ya Yehova. Osengeli kozala “moto ya makambo na molɔngɔ,” elingi koloba, obongisaka makambo malamu mpe osalaka makambo na ngonga. Osengeli koyebana lokola moto oyo abongi kotyelama motema mpe oyo alandaka malako. Bizaleli yango ekosala ete ozala na nkombo malamu. Tólobela sikoyo ndenge ya kokokisa masɛngami ya Biblia na oyo etali kozala ndakisa malamu lokola mokonzi ya libota.

ZALÁ NDAKISA MALAMU LOKOLA MOKONZI YA LIBOTA

10. Ndenge nini ndeko mobali akoki komonisa ete “akambaka libota na ye moko na ndenge ya malamu mpenza”?

10 Soki ozali tata ya libota mpe olingi kokóma nkulutu, bakotalela mpe ndakisa oyo libota na yo epesaka. Na yango, osengeli kozala “moto oyo akambaka libota na ye moko na ndenge ya malamu mpenza.” Osengeli kozala moto oyo ayebani lokola mokonzi ya libota ya bolingo mpe oyo abatelaka yango malamu. Yango esangisi kosala losambo na kati ya libota, kosalisa bato nyonso ya libota báyanganaka na makita mpe bábimaka na mosala ya kosakola. Mpo na nini ezali na ntina mingi? Ntoma Paulo atunaki boye: “Soki moto ayebi te kokamba libota na ye moko, ndenge nini akobatela lisangá ya Nzambe?”—1 Tim. 3:5.

11-12. Ndenge nini etamboli ya bato ya libota etaleli mpe masɛngami ya tata ya libota oyo alingi kokóma nkulutu? (Talá mpe elilingi.)

11 Soki ozali tata ya libota, bana na yo oyo bakómi naino mikóló te basengeli kozala “bana oyo bazali na botosi mpe bazwaka makambo na lisɛki te.” Osengeli koteya mpe kopesa bango formasyo na bolingo. Ya solo, bakosepela kosɛka mpe kosakana lokola bana nyonso. Kasi lokola oteyaka bango malamu, bakozala na botosi, na limemya epai ya basusu, mpe na etamboli ya malamu. Lisusu, osengeli kosalisa bana na yo bázala na boyokani malamu na Yehova, bálandaka mitinda ya Biblia mpe bákola tii na kozwa batisimo.

12 Kozala na “bana oyo bazali bandimi oyo bafundami te mpo na bomoi ya mbindo mpe bazali batomboki te.” Soki mwana oyo azali mondimi mpe afandaka na tata na ye asali lisumu moko ya monene, ndenge nini bakotalela tata? Soki tata azalaki na bolɛmbu mpo na koteya mpe kopesa disiplini, ekoki komonisa ete akokisi masɛngami te mpo na kozala nkulutu.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/10/1996, lok. 21, par. 6-7.

Batata ya mabota bazali koteya mpe kopesa bana na bango formasyo na makambo ndenge na ndenge ya losambo ya Yehova (Talá paragrafe 11)


SALELÁ LISANGÁ

13. Ndenge nini okoki komonisa ete ozali “moto ya makambo makasimakasi te” mpe “moto ya motó makasi te”?

13 Bandeko mibali oyo bamonisaka bizaleli malamu ya bokristo basalisaka lisangá mingi mpenza. “Moto ya makambo makasimakasi te” alendisaka kimya. Soki olingi koyebana lokola moto ya makambo makasimakasi te, yokáká basusu mpe ndimáká makanisi na bango. Ntango ozali na likita moko na basusu, okondima kopesa mabɔkɔ na ekateli oyo bato mingi bandimi soki ebuki mobeko to etinda moko ya Biblia te? “Moto ya motó makasi te,” elakisi ete otingamaka te makambo esalema kaka ndenge okanisi. Okoyeba ete likambo elongaka soki bapesi-toli bazali mingi. (Eba. 13:​8, 9; Mas. 15:22) Osengeli kozala moto “oyo aswanaka na bato te” to oyo “asilikaka mpambampamba te.” Na esika ozala na maloba mabe to na matata na basusu, osengeli kozala na boboto mpe koyeba koloba na basusu. Osengeli kozala moto oyo atyaka kimya, elingi koloba osalaka nyonso mpo na kotya kimya, ata ntango ezali mpasi kosala yango. (Yak. 3:​17, 18) Maloba na yo ya boboto ekoki kokitisa nkanda ya basusu, ata mpe ya batɛmɛli.—Bas. 8:​1-3; Mas. 20:3; 25:15; Mat. 5:​23, 24.

14. ‘Kozala mondimi ya sika te’ mpe “moto ya sembo” elimboli nini?

14 Esɛngi ete ndeko mobali oyo alingi kokóma nkulutu “azala mondimi ya sika te.” Esɛngi kaka te ete ozwa batisimo banda bambula mingi, kasi osengeli na ntango mpo na kokóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo. Liboso otyama nkulutu, na ndakisa ya Yesu, osengeli komonisa ete ozali moto ya komikitisa mpe osepelaka kozela ntango oyo Yehova amoni malamu mpo na kopesa yo mokumba. (Mat. 20:23; Flp. 2:​5-8) Okoki komonisa ete ozali “moto ya sembo” soki okangami na Yehova mpe na mitinda na ye ya sembo mpe ozali kolanda malako oyo azali kopesa na nzela ya ebongiseli na ye.—1 Tim. 4:15.

15. Nkulutu asengeli kaka kozala moto oyo asalaka badiskur ya kafukafu? Limbolá.

15 Biblia elobi polele ete mokɛngɛli asengeli kozala “moto oyo ayebi koteya.” Yango elingi nde koloba ete osengeli kozala moto oyo asalaka badiskur ya kafukafu? Te. Bankulutu mingi ya makoki, atako bazali te na kati ya balobi oyo baleki malamu, bayebi koteya na mosala ya kosakola mpe kolendisa bandeko malamu. (Talá mpe 1 Bakorinti 12:​28, 29 mpe Baefese 4:11.) Atako bongo, osengeli kosala ntango nyonso makasi ya kokolisa makoki na yo mpo okóma moteyi malamu. Ndenge nini okoki kokóma moteyi malamu mpenza?

16. Ndenge nini okoki kokóma moteyi malamu? (Talá mpe elilingi.)

16 Moto “oyo akangami makasi na liloba ya sembo.” Mpo ozala moteyi ya malamu, saláká ete makambo okoteya na lisangá to toli oyo okopesa basusu euta na Liloba ya Nzambe. Osengeli kozala moyekoli malamu ya Biblia mpe ya mikanda ya moombo ya sembo. (Mas. 15:28; 16:23; Tito 1:9) Ntango ozali koyekola, tyáká likebi na ndenge mikanda na biso elimbolaka bavɛrsɛ mpo oyeba ndenge ya kosalela yango malamu. Mpe ntango ozali koteya, saláká makasi osimba mitema ya baoyo bazali koyoka yo. Okoki mpe kobakisa makoki ya moteyi soki ozali kosɛnga toli epai ya bankulutu oyo bayebi koteya malamu mpe soki osaleli toli yango. (1 Tim. 5:17) Bankulutu basengeli kozala ‘bato oyo . . . bayebi kolendisa’ bandeko na bango; kasi na bantango mosusu basengeli kopesa bango toli to ata “kopamela” bango. Ezala ndenge nini, bankulutu basengeli ntango nyonso kozala na boboto. Soki ozali na boboto mpe na bolingo mpe ozali kosalela Liloba ya Nzambe mpo na koteya, okozala moteyi malamu mpo okomekola Moteyi Monene, Yesu.—Mat. 11:​28-30; 2 Tim. 2:24.

Mosaleli na misala moko azali koyekola ndenge ya kosalela Biblia mpo na koteya epai ya nkulutu moko oyo akɔmɛli. Mosaleli na misala yango azali komekameka diskur oyo akosala na lisangá liboso ya talatala (Talá paragrafe 16)


KOBÁ KOLUKA KOKOKISA MASƐNGAMI

17. (a) Nini ekoki kosalisa basaleli na misala bákoba koluka kokokisa masɛngami? (b) Bankulutu basengeli kobatela nini na makanisi ntango bazali kotalela basusu soki bakoki mpo na kozwa mikumba? (Talá etanda “ Zalá na bopɔlɔ ntango esɛngi kotalela basusu.”)

17 Nsima ya kotalela masɛngami mpo na kokóma nkulutu, basaleli na misala mosusu bakoki komona ete bakokoka ata moke te kokokisa yango. Kasi, kobosana te ete Yehova ná ebongiseli na ye basɛngi yo te omonisa bizaleli yango na ndenge ya kokoka. (1 Pe. 2:21) Mpe ezali elimo santu ya Yehova nde ekosalisa yo okokisa masɛngami yango. (Flp. 2:13) Ezali na likambo oyo osengeli kobongisa? Bondelá Yehova mpo na yango. Salá bolukiluki na likambo yango, mpe sɛngá nkulutu moko apesa yo makanisi mpo na ndenge ya kobongisa.

18. Basaleli na misala nyonso balendisami na kosala nini?

18 Tiká ete biso nyonso, ata mpe baoyo bazali bankulutu, tókoba kosalela makambo oyo tolobeli na lisolo oyo. (Flp. 3:16) Ozali mosaleli na misala? Luká kokokisa masɛngami! Sɛngá Yehova apesa yo formasyo mpe abongisa yo mpo ozala lisusu na ntina na mosala na ye mpe na lisangá. (Yis. 64:8) Tiká ete Yehova apambola milende nyonso oyo okosala mpo na kokokisa masɛngami ya kokóma nkulutu.

LOYEMBO 101 Tósala na bomoko