Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 44

LOYEMBO 33 Bwakelá Yehova mokumba na yo

Ndenge ya koyika mpiko na makambo ya kozanga bosembo

Ndenge ya koyika mpiko na makambo ya kozanga bosembo

“Kotika te mabe elonga yo, kasi saláká malamu mpo na kolonga mabe.”ROM. 12:21.

NA MOKUSE

Ndenge ya koyika mpiko na makambo ya kozanga bosembo kozanga ete obebisa lisusu makambo.

1-2. Makambo nini tokoki kokutana na yango?

 YESU abɛtaki lisolo ya mwasi moko oyo mobali akufá, oyo azalaki ntango nyonso kosɛnga zuzi moko akata likambo na ye na bosembo. Na ntembe te bayekoli mingi ya Yesu bakangaki ntina ya lisolo yango, mpamba te na ntango wana bato bazalaki kokutana mingi na makambo ya kozanga bosembo. (Luka 18:​1-5) Lisolo yango ezali mpe na ntina mpo na biso lelo, mpo biso nyonso tosilá kokutana na makambo ya kozanga bosembo na bomoi na biso.

2 Na mokili oyo, bato mingi bakaniselaka basusu mabe, bamonaka basusu mpamba, mpe banyokolaka basusu, yango wana tokamwaka te ntango basali biso makambo ya kozanga bosembo. (Mos. 5:8) Lisusu, atako tokoki komizela te ete ndeko moko na lisangá asala biso mabe, likambo yango ekoki kosalema. Nzokande, bandeko na biso ya lisangá bakokani te na banguna to baoyo batɛmɛlaka solo. Bandeko bazali kaka bato ya kozanga kokoka. Tokoki kozwa mateya mingi na ndenge oyo Yesu asalaki ntango banguna ya mitema mabe basalaki ye makambo ya kozanga bosembo. Soki tokoki komonisa motema molai epai ya banguna oyo basalaka biso makambo ya kozanga bosembo, tosengeli komonisa motema molai mingi koleka epai ya bandeko na biso bakristo! Yehova ayokaka ndenge nini ntango basali biso makambo ya kozanga bosembo epai ya bato ya libándá to na kati ya lisangá? Akipaka likambo yango?

3. Ndenge nini toyebi ete Yehova atyaka likebi ntango basaleli biso makambo ya kozanga bosembo?

3 Yehova atyaka likebi mingi na makambo oyo basusu basalelaka biso. “Yehova alingaka bosembo.” (Nz. 37:28) Yesu amonisaki ete Yehova akosala ete “likambo . . . ekatama na bosembo nokinoki” na ntango oyo ebongi. (Luka 18:​7, 8) Mpe mosika te, akolongola bampasi na biso nyonso mpe makambo nyonso ya kozonga bosembo.—Nz. 72:​1, 2.

4. Lisalisi nini Yehova apesi biso lelo?

4 Lokola ntango oyo bosembo ekozala bisika nyonso ekoki naino te, Yehova asalisaka biso tóyika mpiko na makambo ya kozanga bosembo. (2 Pe. 3:13) Ateyaka biso ndenge ya koboya kosala likambo oyo ezangi bwanya ntango basali biso makambo ya kozanga bosembo. Yehova atindaki Mwana na ye mpo apesa biso ndakisa ya kokoka na oyo etali koyikela makambo ya kozanga bosembo mpiko. Apesi biso mpe toli ya malamu oyo tokoki kosalela ntango basali biso makambo ya kozanga bosembo.

KEBÁ NA OYO OKOSALA NTANGO BASALI YO MAKAMBO YA KOZANGA BOSEMBO

5. Tosengeli kokeba na nini ntango basali biso makambo ya kozanga bosembo?

5 Makambo ya kozanga bosembo ekoki kopesa biso mpasi mpe mawa makasi. (Mos. 7:7) Basaleli ya Nzambe ya sembo, lokola Yobo mpe Habakuku, bayokaki mpe bongo. (Yobo 6:​2, 3; Hab. 1:​1-3) Atako mayoki yango ezali mabe te, tosengeli kokeba ete tósala likambo ya bozoba te ntango basali biso likambo ya kozanga bosembo.

6. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Abisalome? (Talá mpe elilingi.)

6 Ntango moto asali biso likambo ya kozanga bosembo, tokoki koluka kozwa makambo na mabɔkɔ biso moko mpo na kozongisa mabe. Nzokande kosala bongo ekoki kobebisa lisusu makambo. Tótalela ndakisa ya Abisalome, mwana ya Mokonzi Davidi. Abisalome azokaki na motema ntango Aminone, mwana ya mama mosusu, asangisaki nzoto na makasi na Tamara, leki ya Abisalome. Na kolanda Mobeko ya Moize, Aminone asengelaki kokufa mpo na likambo oyo asalaki. (Lev. 20:17) Atako Abisalome azalaki na ntina ya koyoka nkanda, azalaki na ndingisa te ya kozwa ye moko makambo na mabɔkɔ.—2 Sa. 13:​20-23, 28, 29.

Abisalome atikaki nkanda etambwisa ye ntango basalaki leki na ye Tamara likambo ya kozanga bosembo (Talá paragrafe 6)


7. Mokomi moko ya nzembo amiyokaki ndenge nini mpo na makambo ya kozanga bosembo?

7 Ntango ezali komonana ete baoyo bazali kosala makambo ya kozonga bosembo bazali kozwa etumbu te, tokoki komituna soki ebongi mpenza kosala oyo ezali malamu. Tótalela ndakisa ya mokomi ya nzembo oyo amonaki lokola nde bato mabe bazali na bomoi ya malamu, mpe konyokola bato ya sembo. Alobaki: “Bato mabe bazalaka bongo, . . . bamitungisaka ata moke te.” (Nz. 73:12) Alɛmbaki mpenza nzoto mpo na makambo ya kozanga bosembo oyo amonaki, mpe azalaki lisusu komona mpenza te matomba ya kosalela Yehova; alobaki: “Ntango nalukaki koyeba yango, natungisamaki.” (Nz. 73:​14, 16) Kutu, ye moko alobaki: “Etikalaki moke makolo na ngai elongwa na nzela ya sembo, matambe na ngai etikalaki moke esɛlimwa.” (Nz. 73:2) Likambo ya ndenge wana ekómelaki mpe ndeko moko oyo topesi nkombo Alberto.

8. Makambo ya kozanga bosembo esalaki ndeko moko nini?

8 Bakoselaki Alberto makambo ete azalaki koyiba mbongo ya makabo ya lisangá. Na yango, balongolaki ye mikumba mpe bandeko mingi oyo bayokaki likambo yango bazalaki lisusu kopesa ye limemya te. Alberto alobi boye: “Nayokaki mabe, nasilikaki mpe nalɛmbaki nzoto.” Lokola atikaki mayoki yango etambwisa ye, boyokani na ye na Yehova ebebaki, mpe alɛmbaki na elimo mbula mitano mobimba. Ndakisa yango emonisi likambo oyo ekoki kosalema soki topekisi nkanda na biso te ntango basali biso makambo ya kozanga bosembo.

MEKOLÁ YESU NA OYO ETALI KOYIKA MPIKO

9. Makambo nini ya kozanga bosembo Yesu ayikelaki mpiko? (Talá mpe elilingi.)

9 Yesu atikaki ndakisa ya kokoka na oyo etali koyika mpiko na makambo ya kozanga bosembo. Kanisá makambo ya kozanga bosembo oyo basalaki ye epai ya bato ya libota na ye mpe bato mosusu. Bandeko na ye oyo bandimelaki ye te balobaki ete abɛli motó; bakonzi ya mangomba balobaki ete azali kosala makamwisi na nguya ya bademo; mpe basoda ya Roma batyolaki ye, babɛtaki ye, mpe nsukansuka babomaki ye. (Mrk. 3:​21, 22; 14:55; 15:​16-20, 35-37) Kasi, Yesu ayikaki mpiko na makambo wana nyonso kozanga kozongisa mabe. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa na ye?

Yesu apesaki ndakisa ya kokoka na oyo etali koyikela kozanga bosembo mpiko (Talá paragrafe 9-10)


10. Yesu asalaki nini liboso ya makambo ya kozanga bosembo? (1 Petro 2:​21-23)

10 Tángá 1 Petro 2:​21-23. a Yesu atikelaki biso ndakisa malamu ya kolanda ntango basali biso makambo ya kozanga bosembo. Ayebaki ntango ya kofanda nyɛɛ mpe ntango ya koloba. (Mat. 26:​62-64) Apesaki eyano te na makambo mosusu ya lokuta oyo bakoselaki ye. (Mat. 11:19) Ntango amonaki malamu aloba, afingaki te bato oyo bazalaki konyokola ye, akanelaki mpe bango te. Yesu amonisaki komipekisa mpo “amitikaki na mabɔkɔ ya Moto oyo asambisaka na bosembo.” Ayebaki ete ndenge oyo Yehova azalaki kotalela makambo nde elekaki ntina. Atyaki motema ete Yehova akosilisa kozanga bosembo nyonso na ntango oyo ebongi.

11. Ndenge nini tokoki komonisa komipekisa na oyo etali koloba? (Talá mpe bililingi.)

11 Tokomekola Yesu soki tozali komonisa komipekisa na oyo etali koloba ntango basali biso makambo ya kozanga bosembo. Makambo mosusu ezalaka minene te, mpe tokoki kaka kolekisa yango. To tokoki kofanda nyɛɛ mpo tóloba te likambo oyo ekotya lisusu mafuta na mɔtɔ. (Mos. 3:7; Yak. 1:​19, 20) Na mabaku mosusu, ekoki kosɛnga tóloba ntango tomoni makambo ya kozanga bosembo to ntango tolingi kokɔtela solo. (Mis. 6:​1, 2) Soki tomoni malamu tóloba, tosengeli kosala makasi tósala yango na kimya mpe na limemya.—1 Pe. 3:15. b

Ntango basali biso makambo ya kozanga bosembo, tokomekola Yesu soki tokanisi ntango nini mpe ndenge ya koloba (Talá paragrafe 11-12)


12. Ndenge nini tokoki komitika na mabɔkɔ ya “Moto oyo asambisaka na bosembo”?

12 Tokomekola mpe Yesu soki tomitiki na mabɔkɔ ya “Moto oyo asambisaka na bosembo.” Ntango moto akaniseli biso mabe to asali biso makambo ya kozanga bosembo, tosengeli kotya motema ete Yehova ayebi bosolo ya makambo. Kotya motema ndenge wana ekoki kosalisa biso tóyika mpiko mpo toyebi ete nsukansuka Yehova akosembola makambo. Soki totiki makambo na mabɔkɔ ya Yehova, tokokangela moto nkanda te mpe tokoyina moto te. Mayoki ya ndenge wana ekoki kotinda biso tólekisa ndelo na ezaleli na biso, ekoki kosilisa esengo na biso, mpe kobebisa boyokani na biso na Yehova.—Nz. 37:8.

13. Nini ekoki kosalisa biso tókoba koyikela makambo ya kozanga bosembo mpiko?

13 Ya solo, tokokoka ata moke te kolanda ndakisa ya Yesu na ndenge ya kokoka. Na bantango mosusu, tokoki kosala to koloba makambo oyo na nsima ekopesa biso mawa. (Yak. 3:2) Mpe makambo mosusu ya kozanga bosembo ekoki kotika biso na elembo na motema to na nzoto bomoi na biso mobimba na mokili oyo. Soki ezali bongo mpo na yo, yebá ete Yehova ayebi mpasi na yo. Mpe Yesu, oyo akutanaki mpe na makambo ya kozanga bosembo, akoki komitya na esika na yo. (Ebr. 4:​15, 16) Longola ndakisa ya kokoka ya Yesu, Yehova apesi biso mpe toli ya malamu oyo esalisaka biso tóyika mpiko na makambo ya kozanga bosembo. Tótalela bavɛrsɛ mibale na mokanda ya Baroma oyo ekoki kosalisa biso.

“BÓTIKELA . . . NKANDA ESIKA”

14. ‘Kotikela nkanda esika’ elimboli nini? (Baroma 12:19)

14 Tángá Baroma 12:19. Ntango ntoma Paulo alendisaki bakristo ‘bátikela nde nkanda esika,’ azalaki kolobela nkanda ya nani? Lisolo yango emonisi ete ezali nkanda ya Yehova. Tokotikela nkanda ya Yehova esika soki totiki ye akata likambo na ntango oyo amoni malamu mpe na ndenge oyo alingi. Ndeko moko na nkombo John oyo basalaki ye makambo ya kozanga bosembo, alobaki boye: “Nasengelaki kobundisa mposa ya kosembola makambo na ndenge na ngai moko. Baroma 12:19 esalisaki ngai nazela Yehova.”

15. Mpo na nini eleki malamu kozela ete Yehova asembola makambo?

15 Tokozwa matomba soki tozeli ete Yehova asembola makambo. Soki tosali bongo, tokoboya komema kilo mpe kolɛmba nzoto mpo tolingi kosilisa makambo biso moko. Yehova alingi kosalisa biso. Ezali lokola nde alobi: ‘Tikelá ngai likambo yango ya kozanga bosembo; nakolandela yango.’ Soki tondimi maloba ya Yehova ete “ngai nde nakozongisa mabe,” tokoki kolekisa likambo na biso, na elikya ete Yehova akosilisa yango na ndenge oyo eleki malamu. Yango nde esalisaki John, oyo tolobelaki liboso. Alobaki boye: “Soki nazeli Yehova, akosilisa yango malamu koleka ngai.”

“SALÁKÁ MALAMU MPO NA KOLONGA MABE”

16-17. Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa biso tókoba ‘kosala malamu mpo na kolonga mabe’? (Baroma 12:21)

16 Tángá Baroma 12:21. Paulo alendisaki mpe bakristo bákoba ‘kosala malamu mpo na kolonga mabe.’ Na Lisolo likoló ya Ngomba, Yesu alobaki: “Bókoba kolinga banguna na bino mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino.” (Mat. 5:44) Ye mpe asalaki kaka bongo. Mbala mosusu tosilá kokanisa mpasi oyo Yesu amonaki ntango basoda ya Roma babakaki ye na bansɛtɛ na nzete. Tokoki mpenza te kokanga ntina ya mpasi oyo ayokaki, ndenge basambwisaki ye, mpe makambo ya kozanga bosembo oyo basalaki ye.

17 Makambo yango ya kozanga bosembo elongaki Yesu te. Na esika alakela basoda wana mabe, Yesu abondelaki boye: “Tata, limbisá bango, mpo bayebi te makambo oyo bazali kosala.” (Luka 23:34) Ntango tobondeli mpo na baoyo basali biso mabe, ekoki kokitisa biso motema mpe nkanda, mpe ekoki kutu kobongola ndenge na biso ya kotalela bango.

18. Ndenge nini libondeli esalisaki Alberto ná John?

18 Libondeli esalisaki Alberto ná John, bandeko mibale oyo tolobelaki liboso, báyika mpiko na makambo ya kozanga bosembo oyo basalaki bango. Alberto alobi boye: “Nabondelaki mpo na bandeko oyo bakoselaki ngai makambo. Nasɛngaki Yehova mbala mingi ete asalisa ngai nalekisa likambo yango.” Likambo ya esengo, Alberto azongelá kosalela Yehova na bosembo. John alobi boye: “Mbala mingi, nazalaki kobondela mpo na ndeko oyo azokisaki ngai. Mabondeli yango esalisaki ngai natalela ye na ndenge ya malamu, nalimbisa ye mpe nasambisa ye te. Epesaki ngai mpe kimya ya makanisi.”

19. Tosengeli kosala nini tii na nsuka ya mokili oyo? (1 Petro 3:​8, 9)

19 Toyebi te makambo nini ya kozanga bosembo tokokutana na yango liboso nsuka eya. Ata soki ezali ya ndenge nini, tótika te kobondela Yehova asalisa biso. Lisusu, tokoki komekola ndakisa ya Yesu mpe kokoba kosalela toli ya Biblia. Soki tosali bongo, tokoki kotya motema ete Yehova akopambola biso mpenza.—Tángá 1 Petro 3:​8, 9.

LOYEMBO 38 Akokómisa yo makasi

a Na mokapo 2 mpe 3 ya mokanda na ye ya liboso, Petro alobelaki bakristo ebele ya siɛklɛ ya liboso oyo bazalaki kokutana na makambo ya kozanga bosembo mpo na bankolo oyo bazalaki makambo makasi to mibali oyo bazalaki bandimi te.—1 Pe. 2:​18-20; 3:​1-6, 8, 9.

b Talá na jw.org video Bolingo epesaka kimya ya solo.