Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 45

LOYEMBO 138 Kitoko ya nsuki mpɛmbɛ

Zwá mateya na maloba ya nsuka ya mibali ya sembo

Zwá mateya na maloba ya nsuka ya mibali ya sembo

“Bwanya ezalaka nde epai ya mibange te mpe mayele eyaka te na koumela na bomoi?”—YOBO 12:12.

NA MOKUSE

Kotosa Yehova Nzambe ekomemela biso mapamboli lelo mpe bomoi ya seko na mikolo ezali koya.

1. Mpo na nini mikóló bakoki kosalisa biso?

 BISO nyonso tozalaka na mposa ya litambwisi mpo tózwa bikateli ya malamu na bomoi. Tokoki kozwa litambwisi yango mingimingi epai ya bankulutu mpe bakristo mosusu oyo bakɔmɛli na elimo. Soki bazali mikóló na biso, tosengeli te komona mbala moko ete toli na bango esilá ngala. Yehova alingi tóyekola epai ya mikóló. Balekisi ntango mingi koleka biso mpo na koyekola makambo, kozwa mayele, mpe bwanya.—Yobo 12:12.

2. Tokotalela nini na lisolo oyo?

2 Na ntango ya kala, Yehova asalelaki mibange ya sembo mpo na kolendisa mpe kotambwisa bato na ye. Tótalela ndakisa ya Moize, Davidi mpe ntoma Yoane. Bazalaki na bomoi na bileko ekeseni, mpe bomoi na bango ezalaki ndenge moko te. Pene na nsuka ya bomoi na bango, bapesaki baoyo bazalaki naino bilenge toli ya bwanya. Mobali mokomoko ya sembo amonisaki ntina ya kotosa Nzambe. Yehova akomisaki maloba na bango ya bwanya mpo tózwela yango mateya lelo. Ozala elenge to mokóló, okoki kozwa matomba na toli oyo bapesaki. (Rom. 15:4; 2 Tim. 3:16) Na lisolo oyo, tokotalela maloba ya nsuka ya Moize, Davidi, mpe ntoma Yoane, mpe tokomona mateya oyo tokoki kozwa na makambo oyo balobaki.

“OKOFANDA NTANGO MOLAI NA MABELE”

3. Mikumba nini Moize akokisaki?

3 Moize akangamaki makasi na Yehova bomoi na ye mobimba. Azalaki mosakoli, mosambisi, motambwisi, mpe mokomi ya masolo ya kala. Moize ayebaki makambo mingi na bomoi na ye! Abimisaki ekólo Yisraele na boombo na Ezipito mpe amonaki makamwisi mingi ya Yehova. Yehova asalelaki ye mpo na kokoma mikanda mitano ya liboso ya Biblia ná Nzembo 90, mpe mbala mosusu Nzembo 91. Emonani ete akomaki mpe mokanda ya Yobo.

4. Moize alendisaki banani, mpe mpo na nini?

4 Mwa moke liboso Moize akufa, ntango azalaki na mbula 120, ayanganisaki Bayisraele nyonso mpe akundwelaki bango makambo oyo bamonaki mpe oyo Yehova asalelaki bango. Na bolenge na bango, basusu kati na bango bamonaki ebele ya bilembo mpe makamwisi oyo Yehova asalaki mpe bitumbu oyo apesaki Ezipito. (Kob. 7:​3, 4) Bakatisaki Mai Motane oyo ekabwanaki mpe bamonaki ndenge limpinga ya Farao ebebisamaki. (Kob. 14:​29-31) Na esobe, bamonaki ndenge Yehova abatelaki bango mpe akokisaki bamposa na bango. (Mib. 8:​3, 4) Sikoyo lokola ekólo yango ekómaki pene ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, Moize asimbaki libaku yango ya nsuka mpo na kolendisa bango. a

5. Maloba ya nsuka ya Moize oyo ezali na Kolimbola Mibeko 30:​19, 20 epesaki Bayisraele elikya nini?

5 Moize alobaki nini? (Tángá Kolimbola Mibeko 30:​19, 20.) Amonisaki ete Bayisraele bakoki kozala malamu mpenza na mikolo ezali koya. Na lipamboli ya Yehova, Bayisraele bakokaki kofanda ntango molai na mokili oyo Nzambe alakaki bango. Mokili yango ezalaki kitoko mpenza, etondi na mbuma! Moize alobelaki yango na maloba oyo: “Bingumba minene mpe kitoko oyo botongaki te, bandako oyo etondi na biloko nyonso ya kitoko, oyo bosalaki mpo na yango te, mabulu mpo na kobomba mai, oyo botimolaki te, bilanga ya vinyo mpe nzete ya olive oyo bolonaki te.”—Mib. 6:​10, 11.

6. Mpo na nini Nzambe apesaki nzela ete bikólo mosusu elonga Yisraele?

6 Moize apesaki mpe Bayisraele likebisi. Mpo bákoba kofanda na mokili yango ya kitoko, basengelaki kokoba kotosa mibeko ya Yehova. Moize alendisaki bango ‘bápona bomoi’: báyokaka Yehova mpe ‘bákangama na ye.’ Kasi, Bayisraele baboyaki Yehova. Na yango, Nzambe apesaki nzela ete bato ya Asiri mpe na nsima bato ya Babilone bálonga bango mpe bámema bango na mboka mopaya.—2 Bak. 17:​6-8, 13, 14; 2 Nt. 36:​15-17, 20.

7. Liteya nini tokoki kozwa na maloba ya Moize? (Talá mpe elilingi.)

7 Liteya ezali nini mpo na biso? Kotosa ekopesa biso bomoi. Ndenge moko na Bayisraele oyo bazalaki pene ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, mosika te biso mpe tokokɔta na mokili ya sika oyo Nzambe alaki; mosika te mabele ekokóma paradiso. (Yis. 35:1; Luka 23:43) Zabolo ná bademo na ye bakozala lisusu te. (Em. 20:​2, 3) Mangomba ya lokuta ekozala lisusu te mpo na komema bato mosika na Yehova. (Em. 17:16) Baguvɛrnema oyo ezali konyokola bana-mboka na bango ekozala lisusu te. (Em. 19:​19, 20) Batomboki bakozala te na paradiso. (Nz. 37:​10, 11) Bato nyonso oyo bakofanda na paradiso bakotosa mibeko ya sembo ya Yehova, mpe yango ekosala ete bomoko mpe kimya ezala. Na yango, bato bakolingana mpe bakotyelana motema. (Yis. 11:9) Tozali mpenza kozela ntango yango! Esuki wana te: soki tokobi kotosa Yehova, tokozala na bomoi na paradiso awa na mabele kaka bankama ya bambula te, kasi mpo na libela.—Nz. 37:29; Yoa. 3:16.

Soki tokobi kotosa Yehova, tokozala na bomoi na paradiso awa na mabele kaka bankama ya bambula te, kasi mpo na libela (Talá paragrafe 7)


8. Ndenge nini elaka ya bomoi ya seko esalisaki ndeko moko ya misionɛrɛ? (Yuda 20, 21)

8 Soki tobateli ntango nyonso elaka ya Nzambe ya bomoi ya seko na makanisi na biso, tokosala nyonso tókoba kokangama na ye ata soki tokutani na komekama ya ndenge nini. (Tángá Yuda 20, 21.) Elaka yango ekoki mpe kopesa biso makasi ya kobundisa bolɛmbu na biso. Ndeko mobali moko oyo azalaki misionɛrɛ na Afrika bambula mingi mpe azalaki kobundisa bolɛmbu moko oyo ezalaki kosila te, alobi boye: “Koyeba ete bolɛmbu yango ekokaki kopekisa ngai nazwa bomoi ya seko epesaki ngai mpiko ya kokoba kobundisa yango mpe kosɛnga mpenza Yehova asalisa ngai. Na lisalisi na ye, na nsima nalongaki bolɛmbu yango.”

“OKOLONGA”

9. Mikakatano nini Davidi akutanaki na yango na bomoi?

9 Davidi azalaki mokonzi moko monene. Azalaki mpe alangá-nzembo, mokomi ya bapoɛmi, mobundi-etumba, mpe mosakoli. Akutanaki mpe na mikakatano mingi. Mwa bambula mingi, azalaki koyengayenga, azalaki kokima Mokonzi Saulo oyo ayokelaki ye zuwa. Nsima ya kokóma mokonzi, Davidi asengelaki lisusu kokima mpo na kobikisa bomoi na ye ntango mwana na ye Abisalome alukaki kobɔtɔla ye kiti ya bokonzi. Atako mikakatano ya Davidi mpe mabunga oyo asalaki, atikalaki sembo epai ya Nzambe tii na nsuka ya bomoi na ye. Yehova abengaki ye “moto oyo azali kosepelisa motema na ngai.” Na yango, ebongi mpenza tóyoka toli ya Davidi!—Mis. 13:22; 1 Bak. 15:5.

10. Mpo na nini Davidi apesaki Salomo toli?

10 Na ndakisa, talá toli oyo Davidi apesaki Salomo, mwana na ye oyo azwaki kiti ya bokonzi nsima na ye. Yehova aponaki Salomo ntango azalaki naino elenge mpo akoba kolendisa losambo ya pɛto mpe atonga tempelo mpo na lokumu ya Nzambe. (1 Nt. 22:5) Salomo alingaki kokutana na mikakatano. Davidi ayebisaki ye nini? Tólobela yango.

11. Na kotalela 1 Bakonzi 2:​2, 3, toli nini Davidi apesaki Salomo, mpe ndenge nini maloba yango ekokisamaki? (Talá mpe elilingi.)

11 Davidi alobaki nini? (Tángá 1 Bakonzi 2:​2, 3.) Ayebisaki mwana na ye ete soki atosi Yehova, akolonga na bomoi. Mpe na boumeli ya bambula mingi, Yehova asalisaki Salomo alonga na makambo mingi. (1 Nt. 29:​23-25) Salomo atongaki tempelo moko kitoko, akomaki mikanda ebele ya Biblia mpe maloba na ye mosusu ezali na mikanda mosusu ya Biblia. Ayebanaki mingi mpo na bwanya mpe bomɛngo oyo azalaki na yango. (1 Bak. 4:34) Kasi, ndenge Davidi amonisaki yango, Salomo akokoba kolonga kaka soki akobi kotosa Yehova Nzambe. Likambo ya mawa, na nsuka ya bomoi na ye, Salomo akómaki kosambela banzambe mosusu. Yehova aboyaki ye, mpe Salomo abungisaki bwanya oyo ezalaki kosalisa ye atambwisa bato na boyengebene mpe na bosembo.—1 Bak. 11:​9, 10; 12:4.

Maloba ya nsuka ya Davidi epai ya Salomo esalisaka biso tómona ete soki tozali kotosa Yehova, akopesa biso bwanya mpo na kozwa bikateli ya malamu (Talá paragrafe 11-12) b


12. Liteya nini tokoki kozwa na maloba ya Davidi?

12 Liteya ezali nini mpo na biso? Kotosa esalaka ete tólonga na bomoi. (Nz. 1:​1-3) Ya solo, Yehova alaki te ete akopesa biso bomɛngo mpe nkembo ndenge Salomo azalaki na yango. Kasi soki tozali kotosa Nzambe, akopesa biso bwanya oyo ekosalisa biso tózwa bikateli ya malamu. (Mas. 2:​6, 7; Yak. 1:5) Toli ya Nzambe ekoki kosalisa biso tózwa bikateli ya malamu na makambo lokola mosala, kelasi, kominanola, mpe mbongo. Kolanda toli yango ya Nzambe ekobatela biso mpo eloko te esala biso mabe mpo na libela. (Mas. 2:​10, 11) Tokozala na baninga ya malamu. Mpe tokozala na bomoi ya esengo na libota.

13. Ndenge nini Carmen alongaki mpenza na bomoi?

13 Carmen, oyo afandaka na Mozambique, akanisaki ete kotánga iniversite nde ekosala ete alonga na bomoi. Akɔtaki na iniversite mpo na koyekola makambo ya kotonga bandako (architecture). Carmen akomaki boye: “Nalingaki makambo oyo tozalaki kotánga. Kasi, ezalaki kosɛnga ntango mpe makasi na ngai mingi. Nazalaki kokende kelasi banda ngonga ya 7:30 tii 18:00. Ezalaki mpasi kokende makita, mpe boyokani na ngai na Yehova ezalaki lisusu makasi te. Na nse ya motema, nayebaki ete nazalaki koluka kosalela bankolo mibale.” (Mat. 6:24) Carmen abondelaki mpo na likambo na ye mpe asalaki bolukiluki na mikanda ya moombo ya sembo. Abakisaki boye: “Nsima ya koyoka batoli ya malamu epai ya bankulutu mpe mama na ngai, nazwaki ekateli ya kolongwa na iniversite mpe kosalela Yehova na mosala ya ntango nyonso. Yango esalisaki ngai nazwa bikateli oyo eleki malamu, mpe nayokaka mawa ata moke te.”

14. Moize ná Davidi balobaki nini na nsuka ya bomoi na bango?

14 Moize ná Davidi balingaki Yehova mpe bayebaki ete ezali na ntina mingi kotosa ye. Na maloba na bango ya nsuka, balendisaki basusu bálanda ndakisa na bango mpe bákangama na Yehova Nzambe na bango. Bakebisaki mpe basusu ete soki batiki Yehova, akoboya bango mpe bakozwa lisusu te mapamboli oyo alakaki bango. Toli na bango ezali mpe na ntina mpo na biso lelo. Bankama ya bambula na nsima, mosaleli mosusu ya Yehova ya sembo amonisaki ntina ya kotikala sembo epai ya Nzambe.

“ESENGO MONENE TE KOLEKA OYO”

15. Makambo nini ntoma Yoane amonaki na bomoi na ye?

15 Yoane azalaki ntoma oyo Yesu Kristo alingaki mingi. (Mat. 10:2; Yoa. 19:26) Yoane azalaki elongo na Yesu na boumeli ya mosala na ye, amonaki makamwisi oyo Yesu asalaki, mpe akangamaki na ye na ntango ya mpasi. Amonaki ndenge babomaki Yesu mpe amonaki ye lisusu nsima ya lisekwa na ye. Lisusu, amonaki ndenge lisangá ya bokristo ekolaki na siɛklɛ ya liboso kobanda na mwa etuluku moke ya bato ya sembo tii ntango nsango malamu “esakolamaki na kati ya bato ya bikólo nyonso oyo ezali na nse ya lola.”—Kol. 1:23.

16. Banani bazwaka matomba na mikanda ya Yoane?

16 Na nsuka ya bomoi na ye ya molai, Yoane azwaki libaku ya kokoma eteni ya Liloba ya Nzambe na lisalisi ya elimo santu. Akomaki makambo ya kokamwa, “emoniseli ya Yesu Kristo.” (Em. 1:1) Yoane akomaki mpe Evanzile oyo ebengami na nkombo na ye. Akomaki mpe mikanda misato na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Mokanda ya misato atindelaki yango Gayusi, mokristo moko ya sembo, oyo Yoane azalaki kozwa ye lokola mwana na ye ya elimo oyo alingaki mingi. (3 Yoa. 1) Na ntango yango, na ntembe te ezalaki na bato mingi oyo Yoane azalaki kozwa lokola bana na ye ya elimo. Makambo oyo Yoane, mobange ya sembo akomaki, elendisaka bayekoli ya Yesu tii lelo.

17. Na kotalela 3 Yoane 4, nini epesaka esengo monene?

17 Yoane akomaki nini? (Tángá 3 Yoane 4.) Yoane akomaki ete kotosa Nzambe epesaka esengo. Ntango Yoane akomaki mokanda na ye ya misato, bato mosusu bazalaki kopanza mateya ya lokuta mpe kokɔtisa bokabwani. Kasi, basusu bakobaki “kotambola na kati ya solo.” Bazalaki kotosa Yehova mpe “kotambola ndenge mibeko na ye esɛngi.” (2 Yoa. 4, 6) Bakristo yango ya sembo bazalaki kosepelisa kaka Yoane te, kasi mpe Yehova.—Mos. 27:11.

18. Liteya nini tokoki kozwa na maloba ya Yoane?

18 Liteya ezali nini mpo na biso? Kotikala sembo epesaka esengo. (1 Yoa. 5:3) Na ndakisa, toyokaka esengo mpo toyebi ete tozali kosepelisa Yehova. Yehova asepelaka ntango toboyi komekama ya mokili oyo mpe tolandi solo. (Mas. 23:15) Baanzelu na likoló mpe basepelaka. (Luka 15:10) Biso mpe tokoki kosepela ntango tozali komona ndenge biso moko mpe bandeko mosusu tozali kotikala sembo, mingimingi na mikakatano mpe komekama. (2 Tes. 1:4) Na bongo, ntango mokili oyo ekozala lisusu te, tokozala na esengo ya koyeba ete tomonisaki bosembo epai ya Yehova ata na mokili oyo eyangelamaki na Satana.

19. Ndeko mwasi Rachel alobi nini na oyo etali koteya basusu solo? (Talá mpe elilingi.)

19 Tosepelaka mingimingi ntango tosakwelaka basusu solo. Rachel, oyo afandaka na République Dominicaine, amonaka ete koteya moto makambo etali Yehova Nzambe oyo tosalelaka ezali lokumu monene mpenza. Akanisaki bana na ye ya elimo mpe alobaki boye: “Ezali mpasi nalimbola esengo oyo nayokaka ntango namonaka bato oyo nateyaki bakómi kolinga Yehova, bakómi kotyela ye motema mobimba, mpe babongoli bomoi na bango mpo na kosepelisa ye. Esengo yango eleki milende nyonso oyo nasalaki mpe makambo oyo nazalaki komipimela mpo na koyekola na bango.”

Toyokaka esengo ntango toteyi basusu bálinga mpe bátosa Yehova lokola biso (Talá paragrafe 19)


ZWÁ MATOMBA NA MALOBA YA NSUKA YA BATO YA SEMBO

20. Makambo nini ekokanisi biso na Moize, Davidi, mpe Yoane?

20 Moize, Davidi, ná Yoane bazalaki na bomoi na bileko oyo makambo ya bomoi ekokani te na oyo ya biso. Kasi, tokokani na bango na makambo mingi. Bazalaki kosalela Nzambe ya solo, ndenge moko na biso. Bazalaki kobondela Yehova, kotyela ye motema, mpe kosɛnga ye atambwisa bango; biso mpe tosalaka bongo. Mpe ndenge moko na mibali yango ya ntango ya kala, tozalaka na kondima ete Yehova apambolaka mpenza baoyo batosaka ye.

21. Baoyo bakoyoka toli ya bato ya sembo lokola Moize, Davidi, mpe Yoane, bakozwa mapamboli nini?

21 Yango wana, tiká ete tótya likebi na maloba ya nsuka ya mibali wana, tótosa mibeko ya Yehova. Soki tosali bongo, tokolonga mpenza na nyonso oyo tozali kosala. Tokozala na bomoi mpe ‘tokofanda ntango molai,’ mpo na seko! (Mib. 30:20) Mpe tokozala na esengo mpo tozali kosepelisa Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo, oyo akokisaka bilaka na ye nyonso na ndenge oyo eleki nyonso oyo tokoki kozela to ata kokanisa.—Ef. 3:20.

LOYEMBO 129 Tokoyika mpiko tii na nsuka

a Bayisraele mingi oyo bamonaki makamwisi oyo Yehova asalaki na Mbu Motane bakɔtaki na Mokili ya Ndaka te. (Mit. 14:​22, 23) Yehova azwaki ekateli ete bato oyo bazalaki na mbula 20 mpe koleka bakokufa na esobe. (Mit. 14:29) Kasi, Yosua, Kalebe, mpe bana mingi oyo bakokisaki naino mbula 20 te, mpe libota ya Levi bazalaki na bomoi mpe bamonaki kokokisama ya bilaka ya Yehova ntango Yisraele ekatisaki Ebale Yordani mpe ekɔtaki na Kanana.—Mib. 1:​24-40.

b NDIMBOLA YA BILILINGI: Lobɔkɔ ya mwasi: Davidi azali koyebisa mwana na ye Salomo mwa maloba ya nsuka. Lobɔkɔ ya mobali: Bana-kelasi na Eteyelo ya babongisi-nzela bazali koyoka mateya ya Nzambe.