LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Décembre 2019

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli mpo na 03/02–01/03/2020.

“Ezali na ntango” ya kosala mpe ya kopema

Lisolo oyo ezwi ndakisa ya mobeko ya Sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ oyo epesamaki na Yisraele ya kala mpo na kosalisa biso tóyeba soki totalelaka mosala mpe kopema na bokatikati

Yehova azwi ebongiseli mpo na kopesa yo bonsomi

Yubile ya ntango ya kala ekundwelaka biso ebongiseli oyo Yehova azwi mpo na kopesa biso bonsomi.

Mituna ya batángi

Na nse ya Mibeko, soki “na zamba,” mobali moko akuti mwana mwasi oyo alakami na libala mpe asangisi na ye nzoto na makasi mpe mwasi yango agangi, mwasi azalaki na ngambo te, kasi mobali azalaki na ngambo ya ekobo. Mpo na nini?

Mituna ya batángi

Ntango Satana alobaki na Eva ete akokufa te soki alei mbuma ya nzete ya koyeba malamu ná mabe, azalaki nde koteya ye likanisi oyo bato mingi bazalaka na yango lelo, ete molimo ekufaka te?

Oyebi Yehova malamu?

Koyeba Yehova elimboli nini? Mateya nini tokoki kozwa epai ya Moize mpe Mokonzi Davidi na oyo etali kokómisa makasi boyokani na biso na Yehova?

Baboti—Bóteya bana na bino bálinga Yehova

Ndenge nini baboti bakoki koteya bana na bango bálinga Yehova mpe básalela ye?

‘Bópesaka matɔndi na makambo nyonso’

Ezali na makambo mingi oyo emonisi ete kozala na ezaleli ya komonisa botɔndi ezali malamu mpo na biso.

Ozali koyeba lisusu?

Otángaki banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Talá soki okoki koyanola na mituna boni.

Index ya masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! 2019

Liste ya masolo nyonso oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe na Lamuká! 2019