Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 52

Baboti—Bóteya bana na bino bálinga Yehova

Baboti—Bóteya bana na bino bálinga Yehova

“Bana bazali libula oyo euti na Yehova.”​—NZ. 127:3.

LOYEMBO 134 Bana bazali mokumba Nzambe apesi

NA MOKUSE *

1. Mokumba nini Yehova apesi baboti?

NTANGO Yehova akelaki mwasi ná mobali ya liboso, atyaki kati na bango mposa ya kobota bana. Yango wana Biblia elobi: “Bana bazali libula oyo euti na Yehova.” (Nz. 127:3) Yango elingi koloba nini? Kanisá ete moninga na yo moko ya motema apesi yo mbongo ebele mpenza mpo obombela ye. Okoyoka ndenge nini? Na ntembe te, okomona ete apesi yo lokumu mpe atyeli yo motema. Kasi, mbala mosusu okomituna mpe ndenge oyo okoki kobomba mbongo yango malamu. Yehova, Moninga na biso ya penepene mpenza, apesi baboti eloko moko oyo ezali na motuya mingi mpenza koleka mbongo. Apesi bango mokumba ya kosala nyonso mpo na kokipe bana na bango malamu mpe kosala ete bázala na esengo.

2. Mituna nini tokotalela?

2 Banani basengeli kokata soki mwasi ná mobali oyo babalani basengeli kobota bana mpe ntango nini bakoki kobota? Mpe baboti bakoki kosala nini mpo na kosalisa bana na bango bázala na esengo? Tótalela kaka mwa ndambo ya mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa bakristo oyo babalá bázwa bikateli ya malamu.

TOSÁ EKATELI OYO MWASI NÁ MOBALI BAZWI

3. (a) Nani asengeli kokata soki mwasi ná mobali oyo babalani bakobota to te? (b) Mitinda nini ya Biblia baninga mpe bandeko ya libota ya babalani basengeli kolanda?

3 Na mimeseno ya bamboka mosusu, bato bazelaka ete bato oyo bauti kobalana sika bábanda mbala moko kobota. Bato ya libota mpe bato mosusu bakoki kutu kotya babalani mbamba ete bábota nokinoki. Ndeko mobali moko ya Asie na nkombo Jethro alobi boye: “Na lisangá, bato mosusu oyo bazali na bana batyaka babalani oyo bazali na bana te mbamba ete bábanda kobota.” Jeffrey, ndeko mosusu mpe ya Asie, alobi boye: “Soki mwasi ná mobali bazali na bana te, bato mosusu balobaka na bango ete bakozanga moto ya kosunga bango ntango bakokóma mibange.” Nzokande, babalani bango moko nde basengeli kokata soki bakobota to te. Bango nde basengeli kozwa ekateli; ezali mokumba na bango. (Gal. 6:5) Ya solo, baninga mpe bandeko ya libota bakoki kolinga ete bato oyo babalani sika bázala na esengo, kasi bango nyonso basengeli kobosana te ete babalani bango moko nde bakozwa ekateli ya kobota bana to te.​—1 Tes. 4:11.

4-5. Mituna nini mibale ndeko mwasi ná ndeko mobali basengeli kolobela, mpe ntango nini eleki malamu bálobela yango? Limbolá.

4 Mwasi ná mobali oyo bazwi ekateli ya kobota bana basengeli kolobela mituna mibale oyo ya ntina mingi: Ya liboso, ntango nini basepeli kobota? Mpe ya mibale, bana boni balingi kobota? Ntango nini eleki malamu mwasi ná mobali bázwa biyano na mituna wana? Mpe mpo na nini makambo yango mibale ezali na ntina mingi?

5 Mbala mingi, ezali malamu ndeko mwasi ná ndeko mobali oyo bakobalana básolola likambo ya kobota bana liboso ete bábalana. Mpo na nini? Ntina moko ezali ete ebongi mwasi ná mobali bázala na likanisi moko na likambo yango. Lisusu, basengeli kotalela soki bakoki mpo na komema mokumba yango. Bato mosusu oyo babalani bayokanaka ete bázela ata mbula moko to mibale eleka liboso bábanda kobota, mpo kokóma moboti ekolya bango ntango mpe makasi mingi. Bamonaka ete kozela mwa moke ekopesa bango ntango ya komesana na bomoi ya libala mpe ya kokómisa makasi boyokani na bango ya mwasi ná mobali.​—Ef. 5:33.

6. Na kotalela ntango oyo tozali, bandeko mosusu oyo babalá bazwi ekateli nini?

6 Bandeko mosusu bazwá ekateli ya kolanda ndakisa ya bana misato ya Noa ná basi na bango. Babalani yango babotaki nokinoki te. (Eba. 6:18; 9:18, 19; 10:1; 2 Pe. 2:5) Yesu akokanisaki ntango na biso na “mikolo ya Noa,” mpe ntembe ezali te ete tozali na “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” (Mat. 24:37; 2 Tim. 3:1) Mpo na ntina yango, bandeko mosusu oyo babalá bamoni ete malamu bátya naino pembeni likambo ya kobota bana, mpo bálekisa ntango mingi na mosala ya Nzambe.

Ntango bazali kotalela soki bakobota mpe bana boni bakobota, babalani oyo bazali na bwanya balukaka koyeba soki “yango ekosɛnga” nini (Talá paragrafe 7) *

7. Ndenge nini etinda oyo ezali na Luka 14:28, 29 mpe Masese 21:5 ekoki kosalisa mwasi ná mobali?

7 Ntango bazali kotalela soki bakobota mpe bana boni bakobota, babalani oyo bazali na bwanya balukaka koyeba soki “yango ekosɛnga” nini. (Tángá Luka 14:28, 29.) Baboti oyo bakolisá bana bandimi ete kobɔkɔla bana esɛngaka kaka mbongo te, kasi elyaka mpe ntango ná makasi. Yango wana, ezali na ntina mwasi ná mobali bámituna boye: ‘Ekosɛnga ete biso mibale tókendaka mosala mpo tókokisa bamposa ya libosoliboso ya libota? Biso mibale toyokani soki bamposa ya libosoliboso mpo na libota na biso ezali nini? Soki biso mibale tokobanda kokende mosala, nani akobatela bana? Bana bakolanda makanisi mpe bizaleli ya nani?’ Ntango mwasi ná mobali bazali kotalela mituna yango na likebi, babosanaka te maloba ya Masese 21:5.​Tángá.

Mobali oyo alingaka mwasi na ye akosala nyonso oyo akoki mpo na kosalisa ye (Talá paragrafe 8)

8. Mikakatano nini babalani bakristo basengeli kokanisa liboso, mpe mobali oyo alingaka mwasi na ye asalaka nini?

8 Esengeli mpe ebongi ete moboti mokomoko apesa ntango mpe makasi na ye mingi mpo na kobɔkɔla mwana. Na yango, soki mwasi ná mobali bazali kolandisa mabota, ekoki kozala mpasi mingi mpo bátyela mwana mokomoko likebi oyo esengeli. Bandeko mosusu oyo balandisaki bana bandimaki ete makambo ezalaki koleka bango motó. Mama akoki kolɛmba mingi na nzoto mpe na makanisi. Yango ekoki kosala ete azwa makasi te mpo na koyekola, kobondela, mpe kobima mbala na mbala na mosala ya kosakola! Ekoki mpe kozala mpasi mpo atyaka likebi na makita mpe azwela yango matomba. Na yango, mobali oyo alingaka mwasi na ye akosala oyo akoki mpo na kosalisa ye na kobatela bana, ezala na makita to na ndako. Na ndakisa, akoki kosalisa mwasi na misala ya ndako. Akosala nyonso mpo moto nyonso azwa matomba ya Losambo na kati ya libota pɔsɔ na pɔsɔ. Lisusu, batata bakristo basengeli kobimaka mosala ya kosakola mbala na mbala na mabota na bango.

NDENGE YA KOTEYA BANA BÁLINGA YEHOVA

9-10. Baboti oyo balingi kosalisa bana na bango basengeli kosala nini?

9 Baboti bakoki kosala nini mpo na kosalisa bana na bango báyekola kolinga Yehova? Ndenge nini bakoki kobatela bana mpo mokili ebebisa bizaleli na bango te? Tótalela mwa makambo oyo baboti bakoki kosala.

10 Bóbondela Yehova asalisa bino. Tótalela ndakisa ya Manoa ná mwasi na ye, oyo bakómaki baboti ya Samsone. Ntango Manoa ayokaki ete ye ná mwasi na ye bakobota mwana mobali, asɛngaki Yehova alakisa ye ndenge ya kobɔkɔla mwana yango.

11. Na kotalela Basambisi 13:8, ndenge nini baboti mosusu bamekolaki ndakisa ya Manoa?

11 Nihad ná Alma, oyo bafandaka na ekólo Bosnie-Herzégovine, balandaki ndakisa ya Manoa. Balobi boye: “Ndenge moko na Manoa, tosɛngaki Yehova alakisa biso ndenge ya kozala baboti ya malamu. Mpe Yehova ayanolaki biso na ndenge mingi, na nzela ya Makomami, ya mikanda ya moombo ya sembo, ya makita, mpe ya mayangani.”​—Tángá Basambisi 13:8.

12. Ndakisa nini Yozefe ná Maria bapesaki bana na bango?

12 Bóteya na nzela ya ndakisa na bino. Maloba na yo ezali na ntina; kasi mwana akolanda mingimingi nde makambo oyo osalaka. Tokoki mpenza kondima ete Yozefe ná Maria bapesaki bana na bango, ata mpe Yesu, ndakisa ya malamu. Yozefe azalaki kosala mosala makasi mpo na kokokisa bamposa ya libota na ye. Azalaki mpe kolendisa bato ya ndako na ye básepelaka na makambo ya elimo. (Mib. 4:9, 10) Atako Mibeko esɛngaki te ete amema libota na ye na Yerusaleme “mbula na mbula” mpo na fɛti ya Elekeli, Yozefe azalaki kosala yango. (Luka 2:41, 42) Mbala mosusu, batata mosusu na mikolo wana bazalaki komona ete ebongi te kosala mobembo yango libota mobimba, ete esɛngi ntango mingi mpe eleki ntalo. Atako bongo, Yozefe amonisaki ete azalaki kozwa makambo ya elimo na motuya mingi mpe ateyaki bana na ye básala mpe bongo. Lisusu, Maria ayebaki Makomami malamu. Na maloba mpe na misala na ye, na ntembe te azalaki koteya bana na ye bálinga Liloba ya Nzambe.

13. Ndenge nini ndeko moko ná mwasi na ye balandaki ndakisa ya Yozefe ná Maria?

13 Nihad ná Alma, oyo tolobelaki liboso, balingaki mpe kolanda ndakisa ya Yozefe ná Maria. Ndenge nini yango esalisaki bango bábɔkɔla mwana na bango mpo alinga Nzambe mpe asalela ye? Balobi boye: “Na bomoi na biso, tosalaki makasi tómonisa mwana na biso ete ezali malamu kotosa mitinda ya Yehova.” Nihad abakisi boye: “Zalá lolenge ya moto oyo olingi ete mwana na yo mpe azala.”

14. Mpo na nini baboti basengeli koyeba baninga ya bana na bango?

14 Bósalisa bana báponaka baninga ya malamu. Tata ná mama basengeli koyeba baninga ya bana na bango mpe makambo oyo basalaka. Elakisi ete baboti basengeli mpe koyeba soki bana na bango basololaka na banani, ezala na basite Internet ya kosolola na baninga to na telefone. Baninga yango bakoki kobongola makanisi mpe bizaleli ya bana.​—1 Ko. 15:33.

15. Mateya nini baboti bakoki kozwa na ndakisa ya Ndeko Jessie?

15 Baboti bakoki kosala nini soki bamesani te na makambo ya baordinatɛrɛ to ya telefone? Jessie, tata moko na Philippines, alobi boye: “Toyebaki mpenza te makambo ya baaparɛyi. Kasi, yango epekisaki biso te koteya bana na biso báyeba makama ya biloko yango.” Jessie aboyaki te ete bana na ye básalela baaparɛyi kaka mpo ye amesanaki na yango te. Alobi boye: “Nalendisaki bana básalela baaparɛyi na bango mpo na koyekola monɔkɔ mosusu, kobongisa makita, mpe kotánga Biblia mokolo na mokolo.” Soki ozali moboti, osilá kotánga mpe kotalela elongo na bana na yo makambo oyo ezali na eteni “Bilenge” na jw.org®, oyo ezali na toli oyo ebongi na likambo etali kotindelana bamesaje mpe kotya bafɔtɔ na Internet? Osilá kotala elongo na bango video Otikaka aparɛyi etambwisa yo? mpe Kebá na basite Internet ya kosolola na baninga? * Makambo yango ekoki kosalisa mpenza mpo oteya bana na yo ndenge ya kosalela baaparɛyi na bwanya.​—Mas. 13:20.

16. Baboti mingi basalaka nini, mpe yango ebotaka mbuma nini?

16 Baboti mingi basalaka makasi bázwa bibongiseli mpo bana na bango bálekisa ntango elongo na bato oyo bazali ndakisa malamu na mosala ya Nzambe. Na ndakisa, mbala mingi ndeko N’Déni ná mwasi na ye Bomine, oyo bafandaka na Côte d’Ivoire, bazalaki kosɛnga mokɛngɛli ya zongazonga afanda epai na bango. N’Déni alobi boye: “Yango esalisaki mpenza mwana na biso ya mobali. Akómaki mobongisi-nzela mpe sikoyo asalaka lokola mokɛngɛli ya zongazonga mosungi.” Yo mpe okoki kozwa bibongiseli ya ndenge wana mpo na bana na yo?

17-18. Ntango nini baboti basengeli kobanda koteya bana na bango?

17 Bóbanda koteya bana ntango bazali naino mike mpenza. Ezalaka malamu mingi soki baboti babandi koteya bana ntango bazali naino bana mike mpenza. (Mas. 22:6) Tózwa ndakisa ya Timote, oyo na nsima akómaki kosala mibembo elongo na ntoma Paulo. Mama na ye Enise mpe nkɔkɔ na ye Loisi bateyaki ye ‘banda bomwana mpenza.’​—2 Tim. 1:5; 3:15.

18 Jean-Claude ná Peace, oyo bafandaka mpe na Côte d’Ivoire, basalisaki bana na bango nyonso motoba bálinga Yehova mpe básalela ye. Nini esalisaki bango bálonga? Balandaki ndakisa ya Enisi ná Loisi. Balobi boye: “Tobandaki kokɔtisa malamumalamu Liloba ya Nzambe na mitema ya bana na biso kaka mwa moke nsima ya kobotama na bango.”​—Mib. 6:6, 7.

19. Kokɔtisa malamumalamu Liloba ya Nzambe na mitema ya bana esɛngi nini?

19 “Kokɔtisa malamumalamu” Liloba ya Yehova na mitema ya bana elimboli nini? Maloba “kokɔtisa malamumalamu” elimboli “koteya mpe kozongela likambo mbala na mbala.” Mpo na kosala bongo, baboti basengeli kolekisa ntango mingi elongo na bana na bango. Baboti mosusu bakoki kolɛmba nzoto soki bazali kozongela malako moko mbala na mbala. Kasi, baboti basengeli kosala makasi bámona ete ezali libaku ya kosalisa bana na bango bákanga ntina ya Liloba ya Nzambe mpe básalela yango.

Baboti basengeli koyeba ndenge ya koteya mwana mokomoko (Talá paragrafe 20) *

20. Monisá ndenge oyo Nzembo 127:4 etali mpe likambo ya kobɔkɔla bana.

20 Bóyeba bana na bino malamu. Nzembo 127 ekokanisi bana na makula. (Tángá Nzembo 127:4.) Makula esalemaka na biloko ekeseni mpe ezalaka monene mpe molai ndenge moko te; mwana na mwana mpe azalaka na ndenge na ye. Yango wana, baboti basengeli koyeba ndenge ya koteya mwana mokomoko. Ndeko moko ná mwasi na ye oyo bafandaka na Israël mpe oyo balongaki koteya bana na bango mibale básalela Yehova balobeli makambo oyo esalisaki bango; balobi boye: “Tozalaki koyekola Biblia ná mwana mokomoko.” Kasi, tata mokomoko ya libota akotala soki esengeli mpe ebongi koyekola na bana, moto na moto na esika na ye.

YEHOVA AKOSALISA BINO

21. Baboti bakoki kondima ete Yehova akosala nini?

21 Na bantango mosusu, mikakatano oyo baboti bazali kokutana na yango ekoki kolekela bango, kasi bana bazali likabo euti na Yehova. Azalaka ntango nyonso pene ya kosalisa baboti. Asepelaka koyoka mabondeli oyo baboti basalaka. Mpe ayanolaka na mabondeli yango na nzela ya Biblia, ya mikanda ya moombo ya sembo, mpe na nzela ya ndakisa mpe toli ya baboti mosusu na lisangá, oyo bakolisá bana malamu.

22. Makambo nini oyo eleki malamu baboti bakoki kopesa bana na bango?

22 Balobaka ete kobɔkɔla bana ezali mosala ya mbula 20, nzokande mosala ya moboti esilaka te. Na kati ya makambo eleki malamu oyo baboti bakoki kopesa bana na bango, tokoki kotánga bolingo, ntango, mpe koteya bango Biblia. Mwana na mwana akopona kolanda to te mateya ya baboti. Kasi, bana mingi oyo babɔkwamá na baboti oyo balingaka Yehova bamiyokaka lokola Joanna Mae, ndeko mwasi moko ya Asie; ndeko yango alobi boye: “Soki nakanisi ndenge oyo baboti na ngai babɔkɔlá ngai, nasepelaka mingi ndenge bapesaki ngai disiplini mpe bateyaki ngai nalinga Yehova. Basukaki kaka te na kopesa ngai bomoi, basalisaki ngai nazala na bomoi ya esengo.” (Mas. 23:24, 25) Bakristo mingi bamiyokaka ndenge wana.

LOYEMBO 59 Sanzolá Yah elongo na ngai

^ par. 5 Bato oyo babalani basengeli kaka kobota bana? Soki bandimi kobota, basengeli kobota bana boni? Mpe ndenge nini bakoki koteya bana na bango bálinga Yehova mpe básalela ye? Lisolo oyo elobeli bandakisa ya mikolo na biso mpe mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso tózwa biyano na mituna wana.

^ par. 15 Talá mpe buku Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano oyo ebongi, Volimi 1, mok. 36, mpe Volimi 2, mok. 11.

^ par. 60 ELILINGI: Bandeko mibale oyo bazali bafianse bazali kosolola soki bakobota to te, bazali kokanisa bisengo mpe mikakatano na yango.

^ par. 64 ELILINGI: Baboti bakaboli mokumba ya koyekola na bana na kotalela mbula mpe makoki na bango.