Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

‘Bópesaka matɔndi na makambo nyonso’

‘Bópesaka matɔndi na makambo nyonso’

OMIMONAKA ete ozalaka na ezaleli ya komonisa botɔndi? Biso nyonso tosengeli kokanisa motuna yango. Biblia esakolaki ete na mikolo na biso, bato mingi bakozala bato oyo “bazangi botɔndi.” (2 Tim. 3:2) Mbala mosusu osilá kokutana na bato oyo bamonaka ete ebongi basusu nde básalelaka bango makambo. Emonani ete bato yango bamonaka ete bazali na ntina te ya komonisa botɔndi mpo na eloko oyo bazwi. Na ntembe te, okosepela te kozala na bato ya ndenge wana!

Nzokande, Biblia elendisi basaleli ya Yehova ete: “Bózala na botɔndi.” Tosengeli ‘kopesaka matɔndi na makambo nyonso.’ (Kol. 3:15; 1 Tes. 5:18) Kutu, kokolisa ezaleli ya komonisa botɔndi ezali malamu mpo na biso. Tótala mwa bantina oyo emonisi yango.

KOMONISA BOTƆNDI ESALISAKA BISO TÓMIYOKA MALAMU

Ntina ya libosoliboso oyo tosengeli ntango nyonso kokolisa ezaleli ya komonisa botɔndi ezali ete yango ekoki kosalisa biso tómiyoka malamu. Mbala mingi moto oyo apesi matɔndi amiyokaka malamu, mpe moto oyo bapesi ye matɔndi ayokaka mpe malamu. Mpo na nini komonisa botɔndi esalaka bongo? Tózwa ndakisa oyo: Ntango omoni ete bato mosusu bandimi kosalela yo likambo moko, ekomonisa yo ete ozali na ntina mpo na bango, boye te? Batyelaka yo likebi. Ntango omoni bongo, okomiyoka malamu. Tokoki koloba ete ezalaki mpe bongo mpo na Ruta. Boaze akabelaki Ruta biloko. Na ntembe te, Ruta asepelaki mingi ntango amonaki ete Boaze atyelaki ye likebi.​—Ruta 2:10-13.

Ebongi mpenza tómonisa botɔndi epai ya Nzambe. Na ntembe te, na bantango mosusu okanisaka ebele ya makabo ya elimo mpe ya mosuni oyo apesá mpe oyo azali kokoba kopesa yo. (Mib. 8:17, 18; Mis. 14:17) Kasi na esika ya kokanisa kaka mwa moke bolamu ya Nzambe, mpo na nini te kozwa ntango mpo na komanyola ebele ya mapamboli oyo Nzambe asopelaka yo mpe bato oyo olingaka? Komanyola ndenge Mozalisi na biso akabelaka biso ekotinda yo ozala lisusu na botɔndi mingi epai na ye mpe omona ete alingaka yo mpe asepelaka na yo mingi.​—1 Yoa. 4:9.

Kasi, kosuka kaka te na kokanisa mpe komanyola mapamboli oyo Nzambe apesaka biso; osengeli mpe kopesa ye matɔndi mpo azali malamu. (Nz. 100:4, 5) Komonisa botɔndi esalisaka mingi mpo moto azala na esengo.

KOMONISA BOTƆNDI ESALAKA ETE BATO BÁKÓMA BANINGA

Ntina mosusu oyo komonisa botɔndi ezali malamu ezali ete yango ekomisaka boninga makasi. Biso nyonso tolingaka ete bato basepela na biso. Ntango omonisi botɔndi oyo euti na motema mpo na likambo ya boboto oyo moto mosusu asaleli yo, bokokóma baninga ya malamu koleka. (Rom. 16:3, 4) Mpe mbala mingi, bato oyo bamonisaka botɔndi balingaka kosalisa basusu. Bamonaka ntango bato mosusu bamoniseli bango boboto mpe yango etindaka bango mpe bamonisela basusu boboto. Ya solo, kosalisa basusu epesaka esengo. Kaka ndenge Yesu alobaki: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”​—Mis. 20:35.

Robert Emmons, mokambi-mosungi na bolukiluki oyo iniversite moko ya Californie ezali kosala na likambo etali komonisa botɔndi, alobaki ete mpo tómonisa botɔndi, tosengeli kobosana te ete tozalaka kaka na mposa ya basusu; na bantango mosusu topesaka, na bantango mosusu mpe bapesaka biso. Likambo ya solo ezali ete tozalaka na mposa ya basusu na makambo mingi. Na ndakisa, bakoki kopesa biso biloko ya kolya mpe kosalisa biso ntango tozali kobɛla. (1 Ko. 12:21) Moto oyo amonisaka botɔndi asepelaka na oyo bato mosusu basali mpo na ye. Lokola ezali bongo, ozalaka na momeseno ya komonisa botɔndi mpo na oyo basusu basalaka mpo na yo?

KOMONISA BOTƆNDI ESALISAKA MOTO ATALELA BOMOI NA NDENGE YA MALAMU

Ntina mosusu ya kokolisa ezaleli ya komonisa botɔndi ezali ete ekosalisa yo otya makanisi na makambo ya malamu kasi ya mabe te. Makanisi na yo ezali lokola kiyungulu. Ekosalisa yo obanda kotala mingi makambo ya malamu, mpe otya likebi te na makambo ya mabe. Soki ozali komonisa botɔndi, okobanda komona mingi makambo ya malamu mpe yango ekosalisa yo okóma lisusu na botɔndi mingi. Koluka ntango nyonso makambo oyo mpo na yango okoki komonisa botɔndi ekosalisa yo osala likambo oyo ntoma Paulo alendisaki ete: “Ntango nyonso bósepelaka na kati ya Nkolo.”​—Flp. 4:4.

Okomona ete soki ozali na botɔndi okozala na makanisi ya mabe te. Lisusu, ezalaka mpasi moto oyo amonisi botɔndi azala mpe na zuwa, azala mawamawa, mpe akangela moto mosusu nkanda! Longola yango, mbala mingi bato oyo bamonisaka botɔndi bakangamaka na biloko ya mokili te. Basepelaka na biloko oyo bazali na yango mpe balukaka biloko ebeleebele te.​—Flp. 4:12.

KANISÁKÁ MAPAMBOLI NYONSO OYO OZWAKA!

Lokola ozali mokristo, oyebi ete Satana akosepela okóma mawamawa mpe olɛmba nzoto mpo na mikakatano oyo ozali kokutana na yango na mikolo oyo ya nsuka. Akosepela soki okómaki na makanisi ya mabe, mpe okómi komilelalela. Elimo ya ndenge wana ekoki kokitisa molende na yo na mosala ya kosakola nsango malamu. Kutu, kozala na botɔndi ezali na boyokani na bizaleli ya mbuma ya elimo ya Nzambe. Okozala na esengo mpo na bolamu ya Nzambe mpe kondima na bilaka na ye nyonso.​—Gal. 5:22, 23.

Lokola ozali mosaleli ya Yehova, na ntembe te ondimi makambo oyo tolobeli na lisolo oyo mpo na likambo ya komonisa botɔndi. Atako bongo, omoni ete komonisa botɔndi mpe kozala na makanisi ya malamu ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Kasi, kolɛmba nzoto te. Okoki kokolisa mpe kobatela ezaleli ya komonisa botɔndi. Ndenge nini? Mokolo na mokolo zwáká ntango ya kokanisa makambo oyo okoki komonisela botɔndi. Soki ozali kosala bongo mbala na mbala, ekozala lisusu mpasi te mpo omonisaka botɔndi. Yango ekosalisa yo ozala lisusu na esengo mingi koleka baoyo batyaka makanisi na makambo ya mpasi oyo bazali kokutana na yango na mokili. Kanisáká makambo ya malamu oyo Nzambe mpe bato mosusu basalaka, oyo epesaka yo makasi mpe esengo. Okoki mpe kobanda kokoma yango na mwa mokanda. Na kati ya mokanda yango, mokolo na mokolo okoki kokoma makambo mibale to misato oyo okoki komonisela botɔndi na mokolo yango.

Bato ya siansi oyo bayekoli likambo yango balobi ete “komonisa botɔndi mbala na mbala ekoki kobongola ndenge oyo misisa ya bɔɔngɔ ya moto esalaka mpe kotinda yango esalaka lisusu malamu koleka.” Moto oyo amonisaka botɔndi azalaka na esengo mingi. Yango wana, kanisáká mapamboli oyo ozwaka, sepeláká na makambo ya malamu oyo ekómeli yo, mpe monisáká botɔndi ntango nyonso! Na esika omonaka ete ebongaki kaka makambo ya malamu ekómela yo, ‘pesáká Yehova matɔndi, mpo azali malamu.’ Ya solo, ‘pesáká matɔndi na makambo nyonso.’​—1 Nta. 16:34; 1 Tes. 5:18.