Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 51

Oyebi Yehova malamu?

Oyebi Yehova malamu?

“Baoyo bayebi nkombo na yo bakotyela yo motema, mpo okotika ata moke te baoyo balukaka yo, Ee Yehova.”​—NZ. 9:10.

LOYEMBO 56 Monisá solo

NA MOKUSE *

1-2. Ndenge ndakisa ya Angelito emonisi yango, mokomoko na biso asengeli kosala nini?

OZALI kobɔkwama na baboti oyo bazali Batatoli ya Yehova? Soki bongo, yebá ete kozala na baboti oyo bazali baninga ya Yehova elakisi te ete yo mpe okómi mbala moko moninga na ye. Ezala baboti na biso basalelaka Yehova to te, mokomoko na biso asengeli koluka kokóma moninga ya Yehova na ndenge na ye moko.

2 Tózwa ndakisa ya ndeko mobali moko na nkombo Angelito. Abɔkwamá na libota ya Batatoli. Kasi, ntango azalaki elenge, azalaki mpenza komiyoka penepene na Nzambe te. Alobi boye: “Nazalaki kosalela Yehova kaka mpo nalingaki kosala lokola bato nyonso ya libota na biso.” Kasi, Angelito azwaki mokano ya kolekisa ntango mingi na kotánga mpe komanyola Liloba ya Nzambe, mpe kobondela Yehova mingi. Nini esalemaki? Alobi boye: “Nayekolaki ete lolenge kaka moko ya kokóma moninga ya Tata na biso ya bolingo, Yehova, ezali ya koyekola koyeba ye. Ndakisa ya Angelito ebimisi mwa mituna ya ntina mingi: Ezali nde na bokeseni kati na koyeba makambo etali Yehova mpe koyeba ye malamu? Ndenge nini toyekolaka koyeba Yehova malamu?

3. Bokeseni nini ezali kati na koyeba makambo etali Yehova mpe koyeba ye malamu?

3 Tokoki koloba ete moto ayebi makambo etali Yehova soki ayebi nkombo ya Nzambe to mwa makambo oyo alobaki to oyo asalaki. Nzokande, koyeba Yehova malamu esuki wana te. Tosengeli kolekisa ntango mingi na koyekola makambo ya Yehova mpe bizaleli na ye ya kokamwa. Soki tozali kosala bongo nde tokoki kobanda komona ntina oyo alobi likambo moko to asali likambo boye to boye. Yango ekosalisa biso tósosola soki andimaka makanisi na biso, bikateli na biso, mpe makambo oyo tosalaka. Soki tososoli mokano ya Yehova mpo na biso, tosengeli kosala na boyokani na makambo oyo toyekoli.

4. Ndenge nini kotalela bandakisa oyo ezali na Biblia ekosalisa biso?

4 Bato mosusu bakoki kotyola biso mpo tolingi kosalela Yehova, mpe bakoki kutu kotɛmɛla biso mingi koleka ntango tobandi koyangana na makita. Kasi, soki totyeli Yehova motema, akosundola biso ata mokolo moko te. Ekozala lokola tobandi kosala boninga na Nzambe, oyo ekoumela bomoi na biso mobimba. Tokoki mpenza koyeba Yehova malamu ndenge wana? Ɛɛ! Ndakisa ya Moize ná Mokonzi Davidi oyo bazalaki mpe bato ya kozanga kokoka emonisi yango. Wana tozali kotalela makambo oyo basalaki, tokoyanola na mituna oyo mibale: Ndenge nini bayekolaki koyeba Yehova? Mpe mateya nini tokoki kozwa na ndakisa na bango?

MOIZE AZALAKI KOMONA “MOTO OYO AMONANAKA TE”

5. Moize aponaki nini?

5 Moize aponaki kosalela Nzambe. Ntango azalaki na mbula soki 40, Moize aponaki kozala na ngámbo ya Bayisraele oyo bazalaki bato ya Nzambe, na esika ayebana lokola “mwana ya mwana mwasi ya Farao.” (Ebr. 11:24) Moize asundolaki esika ya lokumu oyo azalaki na yango. Ntango aponaki kozala na ngámbo ya Baebre, oyo bazalaki baombo na Ezipito, ayebaki ete Farao akosilikela ye. Farao azalaki mokonzi ya nguya mpe bazalaki komona ye lokola nzambe. Yango emonisi ete Moize azalaki na kondima makasi! Atyelaki Yehova motema, mpe yango nde esalisaki ye azala moninga ya Nzambe bomoi na ye mobimba.​—Mas. 3:5.

6. Ndakisa ya Moize eteyi biso nini?

6 Liteya mpo na biso: Ndenge moko na Moize, na ntango moko boye, tosengeli kopona soki tokosalela Nzambe mpe tokozala na ngámbo ya bato na ye! Ekoki kosɛnga tómipimela makambo mosusu mpo na kosalela Nzambe, mpe bato oyo bayebi Yehova te bakoki kotɛmɛla biso. Kasi, soki totyeli Tata na biso ya likoló motema, tóyeba ete akosalisa biso!

7-8. Moize akobaki koyekola nini?

7 Moize akobaki koyekola bizaleli ya Yehova mpe kosala mokano na Ye. Na ndakisa, ntango Yehova asɛngaki ye akamba Bayisraele mpo abimisa bango na boombo na Ezipito, Moize azalaki na mpiko te mpe ayebisaki Yehova mbala na mbala ete akokoka te. Kasi, Nzambe amonisaki motema mawa na ndenge amityaki na esika ya Moize mpe asalisaki ye. (Kob. 4:10-16) Na bongo, Moize alongaki kopesa Farao bansango makasi ya bitumbu ya Nzambe. Na nsima, amonaki ndenge Yehova asalelaki nguya na Ye ntango abikisaki Bayisraele, mpe abomaki Farao ná mampinga na ye na Mbu Motane.​—Kob. 14:26-31; Nz. 136:15.

8 Nsima ya kolongwa na Ezipito na lisalisi ya Moize, Bayisraele bakómaki koimaima ntango nyonso. Atako bongo, Moize amonaki ndenge Yehova azalaki mpenza komonisa motema molai epai ya bato yango oyo alongolaki na boombo. (Nz. 78:40-43) Moize amonaki mpe ndenge Yehova amonisaki komikitisa ntango abongolaki makanisi na Ye mpo Moize asɛngaki Ye asala bongo.​—Kob. 32:9-14.

9. Ndenge Baebre 11:27 emonisi yango, boninga ya Moize ná Yehova ekómaki ndenge nini?

9 Nsima ya kobima ya Bayisraele na Ezipito, boninga ya Moize ná Yehova ekómaki makasi mpenza mpe ezalaki lokola nde azalaki komona Tata na ye ya likoló. (Tángá Baebre 11:27.) Mpo na komonisa ndenge boninga yango ezalaki makasi, Biblia elobi: “Yehova azalaki koloba na Moize mpenza boye na miso, kaka ndenge moto alobaka na moninga na ye.”​—Kob. 33:11.

10. Mpo tóyeba Yehova malamu, tosengeli kosala nini?

10 Liteya mpo na biso: Mpo na koyeba Yehova malamu, tosengeli kosuka kaka te na koyekola bizaleli na ye, tosengeli mpe kosala mokano na ye. Lelo oyo, mokano ya Yehova ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Tim. 2:3, 4) Lolenge moko ya kosala mokano ya Nzambe ezali ya koteya basusu makambo ya Yehova.

11. Wana tozali koteya basusu makambo ya Yehova, ndenge nini toyekolaka koyeba ye malamu?

11 Mbala mingi, biso moko mpe toyekolaka koyeba Yehova malamu ntango tozali koteya basusu makambo na ye. Na ndakisa, tomonaka mbala moko motema mawa ya Yehova ntango asalisi biso tókutana na bato oyo balingi kokóma baninga na ye. (Yoa. 6:44; Mis. 13:48) Tomonaka ete Liloba ya Nzambe ezali na nguya ntango esalisi bato oyo toyekolaka na bango Biblia bátika mimeseno ya mabe mpe bálata bomoto ya sika. (Kol. 3:9, 10) Mpe tomonaka ndenge Nzambe azali na motema molai ndenge apesaka bato ebele ya teritware na biso mabaku mingi ya koyeba ye mpe ya kozwa lobiko.​—Rom. 10:13-15.

12. Ndenge emonisami na Kobima 33:13, Moize asɛngaki nini, mpe mpo na nini?

12 Moize azalaki kozwa boyokani na ye na Yehova na motuya mingi. Lokola Yehova asalaki makamwisi na nzela ya Moize, yango emonisi ete Moize ayebaki Yehova malamu. Atako bongo, Moize asɛngaki Yehova asalisa ye ayeba ye malamu koleka. (Tángá Kobima 33:13.) Na ntango yango, Moize azalaki na mbula koleka 80, kasi ayebaki ete ezalaki na makambo mosusu mingi oyo akokaki koyekola na ntina etali Tata na ye ya likoló oyo atondi na bolingo.

13. Ndenge nini tokoki komonisa polele ete tozwaka boninga na biso na Nzambe na motuya?

13 Liteya mpo na biso: Ata soki tosali bambula ebele na mosala ya Yehova, tosengeli kokoba kozwa boninga na biso na ye na motuya. Tokomonisa yango polele soki tosololaka na ye mingi na nzela ya libondeli.

14. Mpo na nini libondeli ezali na ntina mingi mpo tóyeba Nzambe malamu?

14 Kosolola mingi nde esalaka ete boninga ya bato mibale ekóma makasi. Na yango, bondeláká Nzambe mingi, kobangaka te koyebisa ye makanisi ya motema na yo. (Ef. 6:18) Krista, oyo afandaka na Turquie, alobi boye: “Nakómaka kolinga Yehova mpe kotyela ye motema mingi koleka mbala nyonso oyo nayebisi ye makanisi na ngai na libondeli mpe na nsima namoni ndenge asalisi ngai. Komona biyano ya Yehova na mabondeli na ngai esalisi ngai namonaka ete Yehova azali Tata mpe Moninga.”

MOTO OYO ASEPELISAKI MOTEMA YA YEHOVA

15. Yehova alobaki nini mpo na Davidi?

15 Mokonzi Davidi abotamaki na ekólo oyo emipesaki na Yehova Nzambe. Kasi, Davidi asukaki kaka te na kolanda mimeseno ya losambo ya libota na bango. Ye moko alukaki kokóma moninga ya Nzambe, mpe Yehova akómaki kolinga ye mingi mpenza. Alobaki ete Davidi azalaki “moto moko oyo azali kosepelisa motema na [Ye].” (Mis. 13:22) Davidi asalaki nini mpo akóma penepene na Yehova ndenge wana?

16. Makambo nini etali Yehova Davidi ayekolaki ntango azalaki kotala bozalisi?

16 Davidi ayekolaki makambo etali Yehova na nzela ya bozalisi. Ntango Davidi azalaki elenge, azalaki kolekisa ntango mingi na libándá mpo na kokɛngɛla bampate ya tata na bango. Mbala mosusu ezalaki na ntango wana nde akómaki komanyola mpo na biloko oyo Yehova akelá. Na ndakisa, ntango Davidi azalaki kotala likoló na butu, azalaki kaka komona ebele ya minzoto te, azalaki mpe kososola bizaleli ya Moto oyo asalaki yango. Yango etindaki ye akoma ete: “Likoló ezali kosakola nkembo ya Nzambe; mpe etando ezali koyebisa mosala ya mabɔkɔ na ye.” (Nz. 19:1, 2) Mpe ntango Davidi akanisaki ndenge oyo bato bakelamaki malamu, amonaki bwanya monene ya Yehova. (Nz. 139:14) Komanyola biloko oyo Yehova akelá etindaki Davidi amikitisa.​—Nz. 139:6.

17. Makambo nini tokoki koyekola soki tomanyoli biloko oyo Nzambe akelá?

17 Liteya mpo na biso: Tyáká likebi na biloko oyo Yehova akelá. Kosukaka kaka te na kotala yango, sepeláká mpe na yango! Mokolo na mokolo, kanisáká soki biloko oyo ezali zingazinga na yo, na ndakisa milona, banyama, mpe bato, ezali koteya yo nini mpo na Yehova. Soki ozali kosala bongo, mokolo na mokolo okozanga te makambo ya koyekola mpo na Tata na yo ya bolingo. (Rom. 1:20) Mpe mokolo na mokolo, bolingo na yo mpo na ye ekokóma makasi.

18. Ndenge Nzembo 18 emonisi yango, makambo nini Davidi azalaki koyeba?

18 Davidi ayebaki ete Yehova azalaki kosalisa ye. Na ndakisa, ntango Davidi abatelaki bampate ya tata na bango mpo nkɔsi ná urse elya yango te, ayebaki ete Yehova nde asalisaki ye aboma banyama yango ya zamba. Ntango akweisaki Goliate, elombe ya etumba, Davidi amonaki polele ete Yehova azalaki elongo na ye. (1 Sa. 17:37) Mpe ntango akimaki Mokonzi Saulo oyo ayokelaki ye zuwa mpe alingaki koboma ye, Davidi andimaki ete Yehova nde abikisaki ye. (Nz. 18, maloba oyo ezali na likoló) Soki Davidi azalaki na lolendo, alingaki kokanisa ete asalá nyonso wana na makoki na ye moko. Kasi, lokola azalaki na komikitisa, azalaki komona lobɔkɔ ya Yehova na bomoi na ye.​—Nz. 138:6.

19. Ndakisa ya Davidi ekoki koteya biso nini?

19 Liteya mpo na biso: Tosengeli kosuka kaka te na kosɛnga Yehova asalisa biso. Tosengeli mpe kosala makasi tómona ntango oyo asalisi biso mpe ndenge oyo asali yango. Soki tozali na komikitisa mpe toyebi bandelo na biso, tokomona polele ndenge oyo Yehova asalisaka biso esika makoki na biso esuki. Mpe mbala nyonso oyo tomoni ndenge Yehova asalisi biso, boyokani na biso na ye ekokóma makasi. Isaac, ndeko mobali moko oyo afandaka na ekólo Fidji mpe asaleli Yehova bambula mingi, amoni ete ezali solo. Alobi boye: “Soki nakanisi makambo oyo nakutaná na yango, namonaka ndenge Yehova asalisi ngai kobanda ntango nabandaki koyekola Biblia tii lelo. Na yango, namonaka Yehova moto ya solo mpenza.”

20. Boyokani ya Davidi ná Nzambe ezali koteya biso nini?

20 Davidi amekolaki bizaleli ya Yehova. Yehova akelá biso na likoki ya komekola bizaleli na ye. (Eba. 1:26) Soki tozali koyekola mingi bizaleli ya Yehova, tokomekola ye mpe malamu. Davidi ayekolaki koyeba Tata na ye ya likoló malamu, yango wana azalaki mpe komekola Ye mingi na boyokani na ye na basusu. Tózwa kaka ndakisa moko. Davidi asalelaki Yehova lisumu ntango asalaki ekobo na Bate-sheba mpe na nsima abomisaki mobali na ye. (2 Sa. 11:1-4, 15) Kasi, Yehova amonaki malamu amonisela Davidi motema mawa, mpo ye mpe azalaki komonisela basusu motema mawa. Lokola Davidi azalaki na boyokani ya malamu na Yehova, akómaki moko ya bakonzi ya Yisraele oyo balingamaki mingi mpe Yehova asalelaki ye lokola ndakisa mpo na kolobela bakonzi mosusu ya Yisraele.​—1 Bak. 15:11; 2 Bak. 14:1-3.

21. Na kotalela Baefese 4:24 mpe 5:1, tokozwa nini soki tokómi “bamekoli ya Nzambe”?

21 Liteya mpo na biso: Tosengeli kokóma “bamekoli ya Nzambe.” Soki tomekoli Nzambe, tokozwa matomba mpe tokoyeba ye malamu. Ntango tozali komekola bizaleli ya Nzambe, tozali mpe komonisa ete tozali bana na ye.​—Tángá Baefese 4:24; 5:1.

TÓLUKA KOYEBA YEHOVA MALAMU

22-23. Nini ekosalema soki tozali kosalela makambo oyo toyekolaka mpo na Yehova?

22 Ndenge tomoni yango, Yehova asalisaka biso tóyeba ye na nzela ya bozalisi mpe ya Liloba na ye, Biblia. Buku yango oyo ekokani na mosusu te etondi na bandakisa ya basaleli ya Nzambe ya sembo oyo tokoki komekola, na ndakisa Moize mpe Davidi. Yehova asali oyo esengeli. Biso mpe tósala oyo esengeli mpo na koyekola koyeba ye malamu.

23 Koyekola koyeba Yehova ekosuka te. (Mos. 3:11) Likambo ya ntina ezali te koyeba makambo mingi mpo na ye, kasi nde kosalela makambo oyo toyebi. Soki tozali kosalela makambo oyo toyekolaka mpe tozali kosala makasi tómekola Tata na biso ya bolingo, tokokoba kozala penepene na ye. (Yak. 4:8) Na nzela ya Liloba na ye, alaki biso ete akosundola ata moke te bato oyo balukaka koyeba ye malamu.

LOYEMBO 80 ‘Bómeka mpe bómona malamu ya Yehova’

^ par. 5 Bato mingi bandimaka ete Nzambe azali, kasi bayebi ye malamu te. Koyeba Yehova elimboli nini? Mateya nini tokoki kozwa epai ya Moize mpe Mokonzi Davidi na oyo etali kokómisa makasi boyokani na biso na Yehova? Lisolo oyo ekopesa biyano na mituna yango.