Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ozali koyeba lisusu?

Ozali koyeba lisusu?

Okoki kopesa biyano na mituna oyo euti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 2019?

Elaka oyo ya Nzambe ete: “Ebundeli nyonso oyo ekosalema mpo na kobunda na yo ekolonga te” elimboli nini? (Yis. 54:17)

Tokoki kotya motema ete Nzambe akobatela biso na “mopɛpɛ ya banyokoli.” (Yis. 25:4, 5) Banguna na biso bakolonga te kosala biso mabe mpo na libela.​—w19.01, nk. 6-7.

Ndenge nini Yehova amonisaki bosembo na boyokani na ye na Bakanana mpe Bayisraele oyo bapɛngwaki?

Nzambe apesaki etumbu na baoyo bazalaki kosala makambo ya pite mpe baoyo bazalaki konyokola basi mpe bana. Kasi, apambolaki baoyo bazalaki na botosi epai na ye mpe oyo basalelaki basusu makambo na bosembo.​—w19.02, nk. 22-23.

Tosengeli kosala nini soki tozali na esika oyo moto oyo azali Motatoli te azali kobondela?

Tokoki kofanda nyɛɛ mpe kozala na limemya kasi tokoloba “amen” te mpe tokosimbana na mabɔkɔ na bato mosusu te na ntango ya libondeli. Tokoki kosala libondeli na biso na nse ya motema.​—w19.03, lok. 31.

Mpo na nini kobebisa mwana ezali lisumu moko monene?

Kobebisa mwana ezali lisumu epai ya moto oyo abebisami, epai ya bandeko ya lisangá, epai ya bakonzi ya Leta, mpe epai ya Nzambe. Na bamboka oyo mibeko esɛngi koyebisa likambo ya kobebisa mwana epai ya bakonzi ya Leta, bankulutu batosaka yango.​—w19.05, nk. 9-10.

Ndenge nini okoki kobongola bokasi oyo etambwisaka makanisi na yo?

Makambo ya ntina ezali: Kobondela Yehova. Komanyola mpe komitalela malamu. Kopona baninga ya malamu.​—w19.06, lok. 11.

Ndenge nini tokoki komibongisa mpo na minyoko banda sikoyo?

Tosengeli kokómisa makasi boyokani na biso na Yehova; kotya motema ete alingaka biso mpe ete akotika biso ata moke te; kotánga Biblia mokolo na mokolo, mpe kobondela mingi. Zalá na kondima ete tokozwa mpenza mapamboli na nzela ya Bokonzi. Kangá na motó bavɛrsɛ oyo olingaka mingi.​—w19.07, nk. 2-4.

Ndenge nini okoki kosalisa bandeko ya libota na yo mpo bábika?

Ezali na ntina omitya na esika na bango, ozala na bizaleli ya malamu oyo ekopesa litatoli, mpe ozala na motema molai mpe osilikisa bango te.​— w19.08, nk. 15-17.

Ndenge nini topemaka, ndenge Yesu alakaki na Matai 11:28?

Tozali na bakɛngɛli ya boboto na lisangá, baninga ya malamu, mpe mosala oyo eleki malamu.​—w19.09, lok. 23.

Ndenge nini Nzambe apesaka biso mposa mpe nguya ya kosala? (Flp. 2:13)

Ntango tozali kotánga Liloba ya Nzambe mpe komanyola yango, Nzambe akoki kopesa biso makasi, kosala na kati na biso mpo tólinga mpe tósala mokano na ye. Elimo na ye ekoki kobimisa malamumalamu makoki oyo tozalaka na yango.​—w19.10, lok. 21.

Makambo nini tosengeli kosala liboso ya kozwa ekateli ya monene?

Makambo mitano yango oyo: Kosala bolukiluki. Kobondela mpo na kosɛnga Nzambe bwanya. Kotalela makanisi oyo ezali kotinda yo. Komityela mikano ya sikisiki. Kozala na bokatikati.​—w19.11, nk. 27-29.

Likanisi oyo elobaka ete molimo ekufaka te ebandá ntango Satana asololaki na Eva?

Emonani ete ezali bongo te. Satana alobaki na Eva nde ete akokufa te, kasi te ete ekomonana lokola akufi. Ata liteya moko te ya lokuta etikalaki nsima ya Mpela. Ekoki kozala ete liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ebandaki liboso Nzambe apalanganisa bato oyo bazalaki kotonga ndako molai ya Babele.​—w19.12, lok. 15.