Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Ntango Satana alobaki na Eva ete akokufa te soki alei mbuma ya nzete ya koyeba malamu ná mabe, azalaki nde koteya ye likanisi oyo bato mingi bazalaka na yango lelo, ete molimo ekufaka te?

Zabolo alobaki na Eva te ete soki alei mbuma oyo Nzambe apekisaki, ekomonana kaka lokola akufi kasi eteni mosusu ya nzoto na ye oyo emonanaka te (oyo bato mosusu lelo babengaka molimo oyo ekufaka te) ekokoba kozala na bomoi na esika mosusu. Na nzela ya nyoka, Satana alobaki na Eva ete soki alei mbuma ya nzete yango, ‘akokufa soki moke te.’ Amonisaki ete Eva akokoba kozala na bomoi, ete akosepela na bomoi ya malamu na mabele, kozanga litambwisi ya Nzambe.​—Eba. 2:17; 3:3-5.

Soki liteya ya lokuta oyo bato bateyaka lelo ete molimo ekufaka te ebandaki na Edene te, boye ebandaki ntango nini? Toyebi mpenza te. Toyebi ete losambo nyonso ya lokuta elimwaki na Mpela ya mikolo ya Noa. Ata liteya moko te ya lokuta etikalaki nsima ya Mpela, mpo kaka Noa ná libota na ye, oyo bazalaki basambeli ya solo, nde babikaki.

Na yango, emonani ete liteya ya lokuta oyo bato bateyaka lelo ete molimo ekufaka te ebandaki nde na nsima ya Mpela. Ntango Nzambe abulunganisaki minɔkɔ na Babele mpe bato bapalanganaki “na mabele mobimba,” na ntembe te bapalanganisaki mpe likanisi oyo elobaka ete molimo ekufaka te. (Eba. 11:8, 9) Ata soki liteya yango ya lokuta ebandaki ntango nini, tondimi ete Satana Zabolo, “tata ya lokuta,” azalaki nsima na yango mpe asepelaki komona ndenge epalanganaki mingi.​—Yoa. 8:44.